Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 1/9 nk. 8-13
  • Mibeko liboso na Klisto

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mibeko liboso na Klisto
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ntina ya Mibeko ya Mose
  • Mibeko oyo mimonisaki polele ezaleli ya motema mawa
  • Kosalelama ya mibeko na lolenge mabe
  • Libebi ya Bafalisai
  • Tózwa liteya na mabungá ya Bafalisai
  • “Mobeko ya Yehova ezali ya kokoka”
    Pusaná penepene na Yehova
  • Mibeko ya Klisto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mibeko oyo mikomamaki te​—Mpo na nini bakomaki yango nsima?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Baklisto ya ekeke ya liboso mpe mibeko ya Moize
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 1/9 nk. 8-13

Mibeko liboso na Klisto

“Ɛ nalingi Mobeko na yo na bolingo bɛ! Nakobanzaka yango mokolo mobimba.”​—NZEMBO 119:97.

1. Nini etambwisaka minzɔ́tɔ na likoló?

EMONANI mpenza lokola ete uta bomwana na ye, Yobo azalaki kokamwa mingi wana azalaki kotala minzɔ́tɔ. Ekoki mpenza kozala ete baboti na ye bateyaki ye nkombo ya maboke minene ya minzɔ́tɔ mpe bateyaki ye makambo oyo bango bayebaki na ntina na mibeko oyo mitambwisaka maboke ya minzɔ́tɔ na likoló. Nzokande, na ntango ya kala bato bazalaki koyeba mbongwana ya bileko na lisalisi ya likambo oyo ete maboke minene ya minzɔ́tɔ etondi na bonzenga etambwisami na bosikisiki nyonso. Kasi mbala na mbala oyo Yobo azalaki kotala yango na bokamwi nyonso, ayebaki te nguya nini ezalaki kosangisa maboke ya minzoto wana esika moko. Na yango, akokaki soko moke te koyanola na ntango Yehova atunaki ye ete: “Oyebi nde mibeko nini bakotosaka o likoló?” (Yobo 38:31-33, Liloba lya Nzambe) Ɛɛ, minzɔ́tɔ mitambwisami na mibeko​—mibeko ya sikisiki mpenza mpe misangisi makambo ndenge na ndenge oyo banganga-mayele ya mikolo na biso bazali kososola yango nyonso te.

2. Mpo na nini tokoki koloba ete bikelamu nyonso bitambwisami na mibeko?

2 Yehova azali Mopesi monene na mibeko kati na mɔlɔ́ngɔ́ mobimba. Misala na ye nyonso mitambwisami na mibeko. Mwana na ye ya bolingo, “Mobotami na liboso na biloko nyonso bizalisami,” azalaki kotosa na bosembo nyonso mibeko ya Tata na ye liboso ya kozalisama ya biloko oyo bikoki komonana kati na molɔ́ngɔ́ mobimba! (Bakolose 1:15) Baanzelu mpe batambwisami na mibeko. (Nzembo 103:20) Ata nyama mpe etambwisami na mibeko, mpamba te etosaka mitindá oyo Mozalisi na yango asilá kokɔtisa kati na mayele na yango ya loómbi.​—Masese 30:24-28; Yilimia 8:7.

3. (a) Mpo na nini bato bazali na mposa ya mibeko? (b) Yehova asalelaki nini mpo na kotambwisa ekólo ya Yisalaele?

3 Ezali boni mpo na bato? Atako tosili kopesamela makabo lokola mayele, likoki ya komonisa bizaleli malamu, mpe likoki ya kosepela na makambo ya elimo, kasi tozali na mposa ya mwa ndambo ya mibeko ya Nzambe ete ekamba biso mpo na kosalela makoki yango. Baboti na biso ya liboso, Adama na Eva, bazalaki bato ya kokoka, na yango bazalaki bobele na mposa ya mwa ndambo moke ya mibeko ete ekamba bango. Bolingo oyo bazalaki na yango epai na Tata na bango ya likoló esengelaki kopesa bango ntina ebongi ya kotosa ye na esengo nyonso. Kasi batosaki te. (Genese 1:26-28; 2:15-17; 3:6-19) Mpo na yango, bana na bango babotamaki bikelamu ya masumu oyo bazalaki na mposa ya mibeko mwa mingi koleka mpo ete mitambwisa bango. Na nsima, Yehova ayaki kokokisa mposa yango na bolingo nyonso. Apesaki epai na Noa mibeko ya sikisiki oyo asengelaki mpe kolakisa yango na libota na ye. (Genese 9:1-7) Bikeke mingi na nsima, na nzela ya Mose, Nzambe apesaki mibeko mingi mikomami epai na libota ya Yisalaele oyo eutaki kosalema sika. Wana ezalaki mbala ya liboso ete Yehova atambwisa ekólo moko na mobimba na yango na mibeko na Ye. Kotalela Mibeko yango ekosalisa biso ete tósosola mokumba ya ntina mingi oyo mibeko miuti na Nzambe mizali kokokisa kati na bomoi na biso ya boklisto lelo oyo.

Ntina ya Mibeko ya Mose

4. Mpo na nini esengelaki kozala mpasi mpo na bakitani baponami ya Abalayama ete bábimisa Mombóto oyo alakamaki?

4 Ntoma Paulo, moyekoli monene ya Mibeko, atunaki ete: “Bongo Mibeko ezali mpo na nini?” (Bagalatia 3:19) Mpo na koyanola, tosengeli komikundola ete Yehova alakaki epai na moninga na ye Abalayama ete Mombóto oyo asengelaki koyeisa mapamboli minene na bikólo nyonso asengelaki kobima na libota na ye. (Genese 22:18) Kasi, na likambo yango mokakatano mozalaki ete Bayisalaele, bakitani baponami ya Abalayama, bango nyonso te nde balingaki Yehova. Na nsima ya bambula, mingi kati na bango bamonisaki motó makasi, botomboki! (Exode 32:9; Deteronome 9:7) Bato motindo wana bazalaki kati na libota ya Nzambe bobele mpo ete babotamaki kati na yango, kasi ezalaki liponi na bango mpenza te.

5. (a) Yehova ateyaki nini epai na Bayisalaele na nzela ya Mibeko ya Mose? (b) Na meko nini Mibeko misengelaki kozala na bopusi likoló na etamboli ya baoyo bandimaki yango?

5 Lolenge nini bato motindo wana bakokaki kobimisa Mombóto oyo alakamaki mpe kozwa litomba epai na ye? Na esika ete atambwisa bango lokola barobó, Yehova ateyaki bango na nzela ya mibeko. (Nzembo 119:33-35; Yisaya 48:17) Ya solo, liloba ya Liebele oyo ebongolami na “mobeko,” toh·rahʹ, elimboli “litambwisi.” Yango eteyaki bango nini? Libosoliboso, eteyaki Bayisalaele ete bazalaki na mposa ya Masiya, oyo asengelaki kosikola bango na ezalela na bango ya masumu. (Bagalatia 3:24) Mibeko miteyaki bango mpe bobángi Nzambe mpe botosi. Na boyokani na elaka oyo epesamaki epai na Abalayama, Bayisalaele basengelaki kozala batatoli ya Yehova epai na bikólo mosusu nyonso. Na yango Mibeko misengelaki koteya bango mitindá mitombwani, mitindá ya lokumu mitali bizaleli malamu, oyo misengelaki komonisa bizaleli ya Yehova; misengelaki kokabola Yisalaele na mimeseno ya mbindo ya bikólo ya zingazinga.​—Levitike 18:24, 25; Yisaya 43:10-12.

6. (a) Mibeko ya Mose mizali na mibeko ya mikemike boni kati na yango, mpe mpo na nini tosengeli kotalela yango te ete eleki ndelo? (Talá maloba na nsé ya lokasa.) (b) Bososoli nini tokoki kozwa na boyekoli ya Mibeko ya Mose?

6 Na bongo, likambo ya kokamwa ezali te na komona ete Mibeko ya Mose mizalaki na mibeko mingi ya mikemike kati na yango​—koleka 600.a Mibeko wana mikomamaki mitambwisaki bango kati na makambo matali losambo, boyangeli, bizaleli malamu, boyengebene, ata kati na mimeseno mitali bolei mpe bopɛto ya nzoto. Kasi, yango elimboli ete Mibeko mizalaki bobele ebele ya bitindá mpamba mpe malako ya makasimakasi? Soko moke te! Boyekoli ya Mibeko yango ekopesa biso bososoli mingi likoló na bomoto ya Yehova oyo etondi na bolingo. Tótalela mwa bandakisa.

Mibeko oyo mimonisaki polele ezaleli ya motema mawa

7, 8. (a) Lolenge nini Mibeko mimonisaki polele motema mawa? (b) Lolenge nini Yehova asalelaki Mibeko na motema mawa nyonso epai na Davidi?

7 Mibeko mimonisaki polele ezaleli ya motema mawa, mingimingi epai na babólá to epai na bato oyo bazangaki lisungi. Basi bakufelá mibali mpe bitiké batyamaki na etɛlɛmɛlo ekeseni mpo ete bákoka kozwa libateli. (Exode 22:22-24) Mibeko mipesamaki mpo na kobatela nyama ya mosala ete enyokolama te. Mobeko oyo ete moto na moto asengelaki kozala na bokonzi likoló na biloko na ye etosamaki. (Deteronome 24:10; 25:4) Atako mibeko misɛngaki ete mobomi asengelaki kozwa etumbu ya liwa, kasi motema mawa mpe esalelamaki soki moto abomi moninga na nkó te. (Mituya 35:11) Na ntembe te, basambisi na Yisalaele bazalaki na likoki ya kokata soki moto oyo asali likambo moko ya mabe asengeli kozwa etumbu ya liwa to te, na kotalela ezaleli na ye.​—Kokanisá na Exode 22:7 mpe Levitike 6:1-7.

8 Yehova amonisaki epai na basambisi ndakisa na kosaleláká mibeko na ngwi nyonso soki yango esengeli, kasi na komonisáká mpe motema mawa soki likoki lizali. Amonisaki motema mawa epai na Mokonzi Davidi, oyo asalaki ekobo mpe abomaki moto. Kasi Yehova alongolaki etumbu likoló na ye te, mpamba te abatelaki ye te na mbuma mabe oyo ebimaki mpo na lisumu na ye. Nzokande, na ntina na kondimana ya Bokonzi mpe lokola Davidi azalaki na ezaleli ya komonisa motema mawa epai na basusu, yango wana abomamaki te.​—1 Samwele 24:4-7; 2 Samwele 7:16; Nzembo 51:1-4; Yakobo 2:13.

9. Bolingo ezalaki na esika nini kati na Mibeko ya Mose?

9 Lisusu, Mibeko ya Mose mimonisaki bolingo polele. Kanisá soki bikólo ya mikolo na biso bizalaki na mibeko oyo bolingo esɛngisami kati na yango! Na yango, Mibeko ya Mose esukaki te bobele na kopekisa koboma; epesaki mpe etindá oyo ete: “Okolinga moninga na yo lokola yo mpenza.” (Levitike 19:18) Esukaki te bobele na kopekisa konyokola mopaya; epesaki mpe etindá oyo ete: “Okolinga ye lokola yo mpenza, mpo ete bino bozalaki bapaya na mokili na Ezipito.” (Levitike 19:34) Esukaki te bobele na kokweisa ekobo; epesaki mpe etindá oyo ete mobali asengeli kosepelisa mwasi na ye! (Deteronome 24:5) Bobele kati na mokanda ya Deteronome, maloba ya Liebele oyo malimboli bolingo masalelami mbala soko 20. Yehova andimisaki Bayisalaele na ntina na bolingo na ye epai na bango​—na kala, sikawa, mpe na ntango ezalaki koya. (Deteronome 4:37; 7:12-14) Ya solo, etindá elekaki monene kati na Mibeko ya Mose ezalaki oyo: “Okolinga [Yehova] Nzambe na yo na motema na yo mobimba, mpe na molimo na yo mobimba, mpe na nguya na yo mobimba.” (Deteronome 6:5) Yesu alobaki ete Mibeko nyonso mikangami na etindá oyo, bakisá mpe etindá ya kolinga mozalani na yo lokola yo moko. (Levitike 19:18; Matai 22:37-40) Ezali likambo ya kokamwa te ete mokomi na Nzembo akomaki: “Ɛ nalingi Mobeko na yo na bolingo bɛ! Nakobanzaka yango mokolo mobimba.”​—Nzembo 119:97.

Kosalelama ya mibeko na lolenge mabe

10. Lolenge nini eteni monene ya Bayuda batalelaki Mibeko ya Mose?

10 Likambo ya mawa mpenza, eteni monene ya Bayisalaele bamonisaki botɔ́ndi te mpo na Mibeko ya Mose! Bato batosaki mibeko te, baboyaki kotalela yango, to basundolaki yango. Babebisaki losambo ya pɛto na misala ya mbindo ya bato ya bikólo mosusu. (2 Mikonzi 17:16, 17; Nzembo 106:13, 35-38) Babukaki mpe Mibeko na ndenge mosusu.

11, 12. (a) Na lolenge nini Bituluku ya bakonzi ya lingomba oyo ebimaki kati na Bayuda na nsima ya eleko ya Ezela esalaki mabe? (Talá etánda.) (b) Mpo na nini balabi ya ntango ya kala bakanisaki ete basengelaki “kozingela mibeko na efelo”?

11 Baoyo bazalaki komitánga bateyi mpe babateli ya Mibeko bazalaki bato oyo basalaki mwa makambo mosusu ya mabe koleka, oyo ebebisaki Mibeko. Yango esalemaki bongo na nsima ya eleko ya mokomeli ya sembo, Ezela, oyo azalaki na bomoi na ekeke ya mitano L.T.B. Ezela abundisaki bopusi mabe ya bikólo mosusu mpe amipesaki mingi na kotánga mpe na koteya Mibeko. (Ezela 7:10; Nehemia 8:5-8) Balakisi mosusu ya mibeko balobaki ete bazalaki kolanda ndakisa ya Ezela mpe basalaki ebongiseli oyo eyaki kobéngama “Eyanganelo monene.” Kati na maloba na yango ezalaki na lilako oyo ete: “Salá lopango zingazinga na mibeko.” Balakisi yango bazalaki koloba ete Mibeko mizalaki lokola elanga moko ya motuya mingi. Mpo ete moto moko te amikɔtisa kati na elanga wana mpe abuka mibeko na yango, babimisaki mibeko mosusu, “Mibeko mikomami te,” mpo na kopekisa bato ete bápusana pembeni na yango te.

12 Bamoko bakokaki mbala mosusu koloba ete ezalaki likambo lilongobani mpo na bakambi Bayuda ete bázala na mayoki motindo wana. Na nsima ya eleko ya Ezela Bayuda bayangelamaki na banguya ya bapaya, mingi mpenza Grèce. Mpo na kobundisa bopusi ya filozofi mpe ya mimeseno ya Bagreke, bituluku ya bakonzi ya lingomba bibimaki kati na Bayuda. (Talá etánda, lokasa 10.) Mwa mibu na nsima, mwa ndambo ya bituluku yango bikómaki kowelana mpe bamipesaki kútu mingi koleka banganga Balevi mpo na oyo etali koteya Mibeko. (Kokanisá na Malaki 2:7.) Soko na mobu 200 L.T.B., mibeko mikomami te mibandaki kosala bopusi na yango kati na bomoi ya Bayuda. Na ebandeli mibeko yango mikomamaki te, mpo ete ekokana te na Mibeko mikomami. Kasi mokemoke, makanisi ya bato matyamaki liboso na oyo ya Nzambe, nsukansuka “efelo” ebebisaki mpenza “elanga” oyo yango esengelaki nde kobatela.

Libebi ya Bafalisai

13. Bakonzi ya lingomba ya Bayuda bazalaki koloba nini mpo na kolóngisa ezaleli na bango ya kobimisa mibeko mingi?

13 Balabi bazalaki koloba ete lokola Torah, to Mibeko ya Mose, mizalaki ya kokoka, misengelaki koyanola na mituna nyonso oyo mikokaki kobima. Likanisi wana emonisaki mpenza botosi te. Na solo mpenza, epesaki balabi nzela ya kosalela mayele ya bomoto, komonisáká lokola ete Liloba ya Nzambe ezali moboko mpo na kotya mibeko likoló na makambo motindo nyonso​—na makambo matali moto na moto, na makambo mosusu ya mikemike.

14. (a) Lolenge nini bakonzi ya lingomba ya Bayuda balekisaki ndelo na kobakisáká makambo mingi mosusu likoló na mobeko ya Makomami oyo etalelaki bokabwani na bikólo mosusu? (b) Nini emonisi ete mibeko ya balabi ebatelaki Bayuda te na bopusi ya bapakano?

14 Mbala na mbala, bakonzi ya lingomba bazalaki kokamata mitindá ya Biblia mpe koyeisa yango makasi koleka. Na ndakisa, Mibeko ya Mose milendisaki ezaleli ya kokabwana na bikólo mosusu, kasi balabi bateyaki nde ezaleli ya koyina ezangi ntina likoló na eloko nyonso oyo ezalaki ya Bayuda te. Bateyaki ete Moyuda asengelaki soko moke te kotika bibwele na ye na ndako ya Mopakano, mpamba te na ntina na Bapakano “ekanisamaki ete bazalaki kosangisa nzoto elongo na nyama.” Mwasi Moyuda apesamelaki nzela te ya kosunga mwasi mopakano oyo azali kobota, noki na kosaláká bongo, “akosunga kobotama ya mwana ya losambo ya bikeko.” Atako bazalaki na elongá na kotaleláká bandako ya ngalasisi ya Bagreke na liso mabe, kasi balabi bapekisaki ata lolenge mosusu nyonso ya masano ya konyolisa nzoto. Lisoló ya makambo ya kala limonisi ete nyonso wana esalaki eloko moko te mpo na kobatela Bayuda na bindimeli ya bapakano. Ya solo, Bafalisai bango moko bakómaki koteya liteya ya Bagreke oyo elobi ete molimo ekufaka te!​—Ezekiele 18:4.

15. Lolenge nini bakonzi ya lingomba ya Bayuda babebisaki mibeko mitalaki kopɛtolama mpe kosangisa nzoto na ndeko ya libota moko?

15 Bafalisai babebisaki mpe mibeko oyo mitalaki kopɛtolama. Elobamaki ete Bafalisai balingaki kopɛtola ata mpe sanza soki bapesamelaki libaku ya kosala bongo. Mibeko na bango mizalaki koloba ete moto oyo abombi mposa ya kokende na kabiné akotángama mbindo! Kosukola mabɔkɔ ekómaki molulu motondi na mindondo, bakisá mpe mibeko mpo na oyo etalaki lobɔkɔ nini moto asengelaki kosukola liboso mpe lolenge nini asengelaki kosukola yango. Mingi mpenza, basi batalelamaki ete bazalaki mbindo. Na kosaleláká mobeko oyo mopekisaki ‘kobɛlɛma na’ ndeko ya mosuni (oyo ezalaki nde mobeko mopekisaki kosangisa nzoto na ndeko ya libota moko), balabi batyaki mobeko ete mobali asengelaki te kotambola na nsima ya mwasi na ye; akokaki mpe kosolola na ye te na zándo.​—Levitike 18:6.

16, 17. Lolenge nini mibeko mikomami te mibakisaki mibeko mosusu mingi likoló na Mobeko ya Sabata ya pɔ́sɔ na pɔ́sɔ, mpe yango ebotaki mbuma nini?

16 Likambo ya kobenda likebi mpenza ezali bongo kotyolama monene oyo mibeko mikomami te mityaki yango likoló na mobeko ya Sabata. Nzambe apesaki Yisalaele etindá oyo ya pɛtɛɛ: Kosala mosala moko te na mokolo ya nsambo ya pɔ́sɔ. (Exode 20:8-11) Nzokande, mibeko mikomami te mibakisaki makambo mosusu na komonisáká mitindo 39 ya misala mipekisami, kati na yango mpe kokanga lizita te to kofungola yango te, na kosona elamba kokɔtisa ntonga mbala mibale te, kokoma lɛ́tɛlɛ ya Liebele koleka lɛ́tɛlɛ mibale te, mpe bongo na bongo. Mpe mokomoko na mitindo wana ezalaki na ebele ya mibeko mosusu. Mazita ya lolenge nini mapekisamaki mpe mazita ya lolenge nini mapekisamaki te? Na motuna motindo oyo, mibeko mikomami te mizalaki kopesa biyano bizangi moboko ya sikisiki. Kobikisa moto ya maladi eyaki kotalelama lokola mosala mopekisami. Na ndakisa, epekisamaki kosembola lobɔkɔ to lokolo oyo ebukani na mokolo ya Sabata. Moto oyo azali na mpasi na mino akokaki kotya mai-ma-ngaí (vinaigre) na bilei, kasi asengelaki te kofiba mai-ma-ngaí kati na mino na ye. Noki ekobikisa ye na mpasi na ye ya mino!

17 Na yango, lokola mobeko ya Sabata ekundamaki kati na bankámá ya mibeko oyo mibimisami na bato, mpo na Bayuda mingi, ndimbola na yango ya elimo ebungaki. Na mokolo moko ya Sabata, na ntango Yesu Klisto “Nkolo na Sabata” asalaki makamwisi ya kobenda likebi, ya kosimba motema, bakomeli mpe Bafalisai basepelaki te. Bayokaki motema mpasi bobele mpo ete bamonaki lokola nde aboyaki kotosa bipekiseli na bango.​—Matai 12:8, 10-14.

Tózwa liteya na mabungá ya Bafalisai

18. Kobakisama ya mibeko mikomami te mpe bonkɔ́kɔ likoló na Mibeko ya Mose ebimisaki likambo nini? Pesá ndakisa.

18 Na mokuse, tokoki koloba ete mibeko wana oyo mibakisamaki mpe mimeseno ya bonkɔ́kɔ eyaki kokangama makasi na Mibeko ya Mose lokola mpenza nsáníá ya mai monene oyo ekangamaka na masuwa. Nkolo masuwa asalaka makasi mingi mpenza mpo na kolongola bikelamu wana oyo bilɛmbisaka lombangu ya masuwa mpe bibebisaka lángi oyo epakolami mpo na kobatela yango. Bobele bongo, mibeko mikomami te mpe bonkɔ́kɔ etyaki nkaká na Mibeko mpe epesaki nzela ete esalelama na lolenge mabe. Nzokande, na esika ya kolongola mibeko wana oyo eutaki libándá, balabi bakóbaki kobakisa mibeko mosusu. Na eleko oyo Masiya ayaki kokokisa Mibeko, “masuwa” esilaki kotonda na “nsáníá” mingi na boye ete ekokaki kotambola soko moke te! (Kokanisá na Masese 16:25.) Na esika ete bábatela kondimana ya mibeko, bakonzi wana ya lingomba basalaki libungá na kobukáká yango. Kasi, mpo na nini “lopango” oyo bango basalaki ekokisaki mokano na yango te?

19. (a) Mpo na nini ‘lopango oyo ezingaki Mibeko’ ekokisaki mokano na yango te? (b) Nini emonisi ete bakonzi ya lingomba ya Bayuda bazangaki kondima ya solosolo?

19 Bakonzi ya Lingomba ya Bayuda basosolaki te ete etumba mpo na kolongola libebi esengeli kosalema kati na motema, kasi te kati na mikanda ya mibeko. (Yilimia 4:14) Sɛkɛlɛ́ mpo na kolónga ezali bongo bolingo​—bolingo mpo na Yehova, bolingo mpo na mibeko na ye mpe mpo na mitindá na ye ya sembo. Bolingo yango ezali kobota ezaleli ya koyina makambo oyo Yehova ayinaka. (Nzembo 97:10; 119:104) Na bongo, baoyo motema na bango etondi na bolingo bazali kobatela bosembo na bango liboso na mibeko ya Yehova kati na mokili oyo esilá kobeba. Bakonzi ya lingomba ya Bayuda bazalaki na mokumba monene ya koteya bato mpo ete bákoka kokólisa bolingo wana mpe na nzela ya ndakisa na bango, bápusa bato ete bámonisa bolingo yango. Mpo na nini bakokaki kosala bongo te? Na ntembe te, bazangaki kondima. (Matai 23:23, maloba na nsé ya lokasa na NW) Soki bazalaki na kondima kati na nguya ya elimo ya Yehova oyo esalaka mosala kati na mitema ya bato ya sembo, mbɛlɛ balingaki komona ete ezali na ntina te kosɛnzɛla makasi likoló na bomoi ya basusu. (Yisaya 59:1; Ezekiele 34:4) Lokola bango moko bazangaki kondima, bakokaki te kosala ete basusu mpe bákóma na kondima; batyelaki bato bozito na mitindá misalemi na bato.​—Matai 15:3, 9; 23:4.

20, 21. (a) Bopusi monene nini elimo ya kokangama na bonkɔ́kɔ ezalaki na yango likoló na losambo ya Bayuda? (b) Liteya nini tozwi kati na makambo oyo masalemaki na lingomba ya Bayuda?

20 Bakonzi wana ya lingomba ya Bayuda bakólisaki bolingo te. Bonkɔ́kɔ wana ebimisaki lingomba moko oyo basangani na yango bazalaki komibanzabanza mingi koleka mpo na bizaleli oyo bikoki komonana na miso ya bato, na botosi oyo euti na motema te, bobele mpo na komilakisa​—oyo nyonso epesaki nzela mpo na kokólisa ezaleli ya bokosi. (Matai 23:25-28) Bipekiseli na bango ebimisaki ebele ya bantina mpo na kosambisa basusu. Na yango, Bafalisai, bato ya lolendo, oyo bazalaki kosalela bokonzi na bango na kolekisa ndelo, bakanisaki ete bazalaki na elonga ya kotónga Yesu ye moko. Babosanaki kotalela lisusu mokano ya liboso mpenza ya Mibeko mpe babwakaki Masiya bobele moko ya solo. Mpo na yango, ayebisaki ekólo ya Bayuda ete: “Talá, ndako na bino etikali mpamba.”​—Matai 23:38; Bagalatia 3:23, 24.

21 Liteya nini tokoki kozwa? Emonani polele ete, ezaleli ya kokangama na bonkɔ́kɔ ekólisaka losambo ya pɛto te mpo na Yehova! Kasi yango elimboli ete basambeli ya Yehova lelo oyo basengeli kozala ata na mobeko moko te, longola bobele oyo emonisami sikisiki kati na Makomami mosantu? Te. Mpo na kozwa eyano ebongi na motuna yango, tiká tótalela kati na boyekoli oyo ekolanda, lolenge oyo Yesu Klisto akitanyaki Mibeko ya Mose na mibeko mosusu ya sika mpe ya malamu.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ya solo, ezali bobele motángo moke, soki tokokanisi yango na ebongiseli ya mibeko ya bikólo ya mikolo na biso. Na ndakisa, na ebandeli ya mibu ya 1990, mibeko ya bitúká nyonso ya États-Unis ekokisaki nkasa 125 000, elongo na bankámá ya mibeko oyo ezali kobakisama mbula na mbula.

Okoki kolimbola?

◻ Lolenge nini bikelamu nyonso bitambwisami na mibeko ya Nzambe?

◻ Mokano ya liboso ya Mibeko ya Mose ezalaki nini?

◻ Nini elakisi ete Mibeko ya Mose mimonisaki polele motema mawa?

◻ Mpo na nini bakonzi ya lingomba ya Bayuda babakisaki mibeko mingi likoló na Mibeko ya Mose, mpe yango ebotaki mbuma nini?

[Etanda na lokasa 10]

Bakonzi ya lingomba ya Bayuda

Bakomeli: Bazalaki komitalela lokola bakitani ya Ezela mpe balimboli ya Mibeko. Engebene búku A History of the Jews (Lisoló ya makambo ya kala ya Bayuda), “bakomeli nyonso te nde bazalaki na mikano malamu, mpe nyonso oyo bazalaki kosala mpo na kobimisa ndimbola ebombami kati na mibeko ezalaki mbala mingi kokóma mimeseno mizangi ntina mpe bipekiseli ya bozoba. Nyonso wana ezalaki kokɔtisama mpenza kati na mimeseno, oyo nokinoki ekómaki kosalelama na makasi.”

Bahasidime: Nkombo yango elimboli “bato na kobanga Nzambe” to “basantu.” Yango etángamaki liboso lokola etuluku soko na mobu 200 L.T.B., bazalaki na nguya makasi na makambo ya politiki, bazalaki bato ya molende moleki ndelo oyo bazalaki kobatela bopɛto ya mibeko mpo na kotɛmɛla bopusi mabe ya Bagreke. Haidisme ekabwanaki na bituluku misato: Bafalisai, Basadukai, mpe Baesene.

Bafalisai: Banganga-mayele mosusu bakanisaka ete nkombo yango euti na maloba “Baoyo bakabwani,” to “Baoyo bakabolaka.” Bazalaki mpenza na molende moleki ndelo mpo na komikabola na Bapakano, kasi bazalaki mpe kotalela etuluku na bango lokola ete ekabwani​—mpe eleki​—Bayuda mosusu nyonso, baoyo bayebaki te ebongiseli na bango ya mibeko mizangi kokomama oyo etondaki na mindondo. Mokomi moko ya makambo ya kala alobaki na ntina na Bafalisai ete: “Na mobimba na bango, bazalaki kotalela bato lokola bana mike, kotyáká mibeko mpe kopesáká bandimbola ata likoló na makambo maleki mike mpenza ya mimeseno na bango.” Nganga-mayele mosusu alobaki ete: “Etuluku ya Bafalisai ebimisaki ebele ya mibeko likoló na makambo nyonso, mpe na yango bayeisaki makambo mike minene mpe na kosaláká bongo makambo minene makómaki mike (Mt. 23:23).”

Basadukai: Etuluku oyo ekangamaki na bato ya lokumu mpe na banganga. Batɛmɛlaki bakomeli mpe Bafalisai na mpiko nyonso, kolobáká ete mibeko mizangi kokomama mizalaki na motuya te liboso na Mibeko mikomami. Mishnah yango moko emonisi ete balóngaki etumba wana te: “Likebi monene lityamaki mingi mpenza likoló na [kotosama ya] maloba ya Bakomeli koleka [kotosama ya] maloba ya Mibeko [mikomami].” Talmud, oyo ezalaki na bandimbola mingi ya mibeko mizangi kokomama, elobaki kútu ete: “Maloba ya bakomeli mazali . . . na motuya mingi koleka maloba ya Torah.”

Baesene: Ezalaki etuluku moko ya bato ya makambo makasi oyo bamikabolaki na masangá ndenge na ndenge. Engebene búku The Interpreter’s Dictionary of the Bible, Baesene bazalaki komikabola mingi na bato mosusu koleka Bafalisai mpe “mbala mosusu bakokaki kozala na makambo makasi koleka Bafalisai.”

[Elilingi na lokasa 8]

Ekoki mpenza kozala ete baboti ya Yobo bateyaki ye mibeko oyo etambwisaka maboke ya minzoto

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto