Minganga bazali kotalela myango misusu na esika ya kozongisama makila
PENE na minganga 200 bautaki bipai nyonso na États-Unis bakutanaki na Cleveland, na etúká Ohio, mwapɔ́sɔ 7 Ɔkɔtɔ́bɛ 1995, mpo na kosolola likambo oyo lizali kobenda likebi ya bato mingi kati na zebi ya minganga: nkisi mpe lipaso oyo likoki kosalema kozanga kosalela makila.
Mikakatano ndenge na ndenge oyo mikoki kobima milobelamaki. Na ndakisa, ezali boni soki mobɛ́li asili mpenza makila? Lolenge nini elɛzi oyo abotami matshombé akoki kosalisama kozanga kosalela makila? Lipaso ya motema likoki kosalema malamu kozanga kozongisama makila? Likambo ya kobenda likebi ezali ete, lipaso ya kozanga kosalela makila—mingimingi kosalelama ya myango oyo mikoki kopesa nzela na nzoto ete ekólisa makila na yango moko—lisilaki kosalelama kati na mabaku wana nyonso na matomba malamu.a
Mpo na nini mposa ezali ya kosalela myango misusu na esika ya kozongisama makila? Sharon Vernon, mokambi ya centre mpo na nkisi mpe lipaso oyo ekoki kosalema kozanga kosalela makila na lopitalo St. Vincent na Cleveland alobi ete: “Tosili koyekola ete kozongisama makila mbala mingi epesaka makɔnɔ, mingimingi hépatite.” Alobaki lisusu ete: “Ata soki makila mapesi bokɔnɔ te, kasi makoki kolongola epai na mobɛ́li likoki oyo nzoto na ye ezali na yango ya kobundisa maladi.” Atako kozwa sida na nzela ya kozongisama makila ezali kosalema lisusu mingi te mpo ete etalelamaka malamu, ezali naino na makɔnɔ mingi oyo mamonanaka te na baekzamé motindo wana. Mpe atako mposa ezali mpo na kobongisama malamu, lipaso lizangi kosalela makila ezali malamu mpo na lopitalo, mpo ete ezali kolongola mikakatano ya mosolo oyo ekoki kobima soki babɛ́li bazwi makila oyo mazalaki na mikrobe.
Mpo na Batatoli ya Yehova, ezali na ntina moko monene mpo na yango baboyaka kozongisama makila: mobeko ya Nzambe epekisi yango. (Misala 15:29) Nzokande, balingaka kozwa lisalisi ya malamu. Na yango, basili koyokana na minganga oyo bazali kosala bolukiluki kati na kosalisama kozanga kosalela makila. Kosalisama motindo wana ezali kopesa matomba te bobele na Batatoli ya Yehova kasi mpe na bato mosusu mingi oyo bazali komibanzabanza mpo na makámá oyo mautaka na kozongisama makila.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá Lamuká! ya 22 Novɛ́mbɛ 1993, nkasa 24 kino 27, mpe ya 22 Yanuáli 1996, lokasa 31 (nyonso, ebimeli ya Lifalansé).
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 32]
WHO photo by P. Almasy