Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 15/8 nk. 30-31
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Masolo mosusu
  • Tokokende na bino
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Bolei ya mpokwa ya Nkolo ezali na ntina nini mpo na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • “Elimo yango moko etatolaka”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Koyanganisama ya biloko oyo ezali na likoló mpe oyo ezali na mabelé
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 15/8 nk. 30-31

Mituna ya batángi

Balapólo na boumeli ya mwa bambula emonisi ete motángo ya baoyo bazali kolya limpa mpe komɛla vinyo ekóli mwa moke. Yango elingi komonisa ete bato mingi ya sika bazali kopakolama na elimo santu?

Ezali na ntina malamu ya kokanisa ete motuya ya baklisto bapakolami 144  000 ekokaki esili koleka bambula mingi.

Na Misala 2:1-4, tozali kotánga na ntina na bato ya liboso oyo batángamaki kati na etuluku wana moke ete: ‘Wana esilaki mokolo na ntuku mitano [“Pantekote,” NW] koya, bazalaki nyonso elongo na esika moko. Lokito ebimi na likoló pwasa lokola lokito na kopɛpa na mopɛpɛ makasi. Etondisi ndako mobimba kuna efandi bango. Ndemo lokola mɔtɔ́ imonani na bango, ikabwani, ifandi mokomoko na motó na moto na moto na bango. Bango nyonso batondaki na elimo santu, mpe babandi kosolola na nkótá mosusu pelamoko elimo, epesi bango maloba.’

Nsima na yango, Yehova aponaki basusu, mpe apakolaki bango na elimo santu na ye. Bankóto babakisamaki na bambula ya liboso mpenza ya lisangá ya boklisto. Na eleko na biso, ntango Ekaniseli esalemaka, mbala mingi molobi abendaka likebi na maloba ya ntoma Paulo oyo mazwami na Baloma 8:15-17, NW, oyo mazali komonisa ete bapakolami ‘bazwi elimo ya kokamatama lokola bana.’ Paulo abakisaki ete elimo santu oyo bazwaka ‘epesaka litatoli elongo na elimo na bango ete bazali bana na Nzambe, basangoli na libula elongo na Klisto.’ Baoyo bapakolami mpenza na elimo yango bayebaka yango malamumalamu. Ezali te mposa ya mwa ntango moke to kopusama na mayoki mpe na makanisi mpamba ya bango moko.

Tozali kososola ete libyangi yango ya likoló ekóbaki na boumeli ya bikeke, nzokande na boumeli ya eleko oyo ebéngami Âge des ténèbres, ekokaki kozala ntango oyo motángo ya bapakolami ezalaki mpenza moke.a Na kozongisama ya boklisto ya solo pene na nsuka ya ekeke oyo euti koleka, mingi babyangamaki mpe baponamaki. Kasi, emonani ete na katikati ya bambula 1930, motángo nyonso ya ba 144 000 ekokisamaki mpenza. Na yango etuluku moko ya baklisto ya sembo oyo bazali na elikya ya kofanda na mabelé ekómaki komonana. Yesu abyangaki bango ete “bampate mosusu,” oyo bazali koyangana na losambo elongo na bapakolami lokola etongá moko oyo endimami.​—Yoane 10:14-16.

Makambo oyo masalemaki na boumeli ya bambula oyo eleki mamonisi kokokisama ya libyangami ya bapakolami mpe mapamboli ya Yehova likoló na “ebele monene” oyo bazali kokóla, oyo bazali na elikya ya kobika na “bolozi monene.” (Emoniseli 7:9, 14) Na ndakisa, na ntango Ekaniseli esalemaki na 1935, bayangani bazalaki 63 146, baoyo balyaki limpa mpe bamɛlaki vinyo na komilobáká ete bazali bapakolami bazalaki 52 465. Nsima ya mibu ntuku misato, to na 1965, motángo ya bayangani ezalaki 1 933 089, nzokande baoyo balyaki limpa mpe bamɛlaki vinyo bakitaki na 11 550. Na mikolo na biso, na 1995 motuya ya bayangani ekólaki na 13 147 201, kasi bobele bato 8 645 balyaki límpa mpe bamɛlaki vinyo. (1 Bakolinti 11:23-26) Emonani polele ete, lokola bambula ezali koleka, motángo ya baoyo bazali komiloba ete bazali kati na batikali bapakolami ezali mpenza kokita​—soko 52 400 na 1935; 11 500 na 1965; 8 600 na 1995. Nzokande, baoyo bazali na elikya ya kofanda awa na mabelé bazali kopambolama, mpe motángo na bango ezali kokóla mingi.

Lapólo ya Ekaniseli oyo euti kobimisama na mikanda ezali ya 1995, mpe emonisi ete bato 28 babakisamaki na motángo ya baoyo balyaki limpa mpe bamɛlaki vinyo na mobu oyo molekaki atako mwayene ya baoyo balyaki kokanisá na oyo ya baoyo bayanganaki ekitaki mpenza. Soki totaleli makambo nyonso, likambo oyo ete bato mosusu baponaki kolya limpa mpe komɛla vinyo, esengeli kotungisa biso te. Na boumeli ya bambula, ata baoyo bautaki kobatisama kala mingi te, na mbalakaka babandaki kolya limpa mpe komɛla vinyo. Basusu kati na bango, nsima ya mwa ntango basosolaki ete yango ezalaki libunga. Basusu bandimaki ete balyaki limpa mpe bamɛlaki vinyo mbala mosusu mpo na bopusi ya nzoto to ya mayoki. Kasi bamonaki ete babyangamaki te na bomoi na likoló. Basɛngaki ngɔlu ya Nzambe. Mpe bazali kokóba kosalela ye lokola baklisto babongi mpe ya sembo, kozaláká na elikya ya bomoi ya seko awa na mabelé.

Ntina ezali te ete tómitungisa soki moto moko abandi kolya limpa mpe komɛla vinyo to atiki kosala bongo. Ezali mpenza likambo litaleli biso te soki moto apakolami na elimo santu mpe abyangami kozala na bomoi na likoló to te. Tómikundwela endimiseli ya moboko mpo na Yesu: “Nazali mobateli na mpate malamu, mpe nayebi bampate na ngai.” Na ntembe te, Yehova ayebi baoyo asili kopona lokola bana na ye ya elimo. Tozali na bantina malamu ya kokanisa ete motángo ya bapakolami ekokóba kokita wana bazali kopusana na mbula mpe makambo mosusu oyo makanamaki te ezali kosukisa bomoi na bango awa na mabelé. Nzokande, wana baklisto ya solo bapakolami bazali komonisa bosembo na bango kino liwa, na kozeláká na motema esengo mpo na kozwa motole na bomoi, bampate mosusu, oyo basili kosukola bilamba na bango kati na makila ya mwana na Mpate, bakoki kozela na motema esengo kobika na bolozi monene oyo ekómi pene.​—2 Timoté 4:6-8; Emoniseli 2:10.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augústo 1965, ebimeli ya Lifalansé, nkasa 511 kino 512.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto