Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 15/8 nk. 22-26
  • “Libondo ya litatoli” na mokili ya “Ngomba ya Nzambe”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Libondo ya litatoli” na mokili ya “Ngomba ya Nzambe”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Na bwato, na motuka, to na velo?
  • Mosika na kati ya mboka
  • Mosika epai na Nɔ́rdi
  • Kopesa litatoli na bingumba
  • Kokana bozongeli ya sika?
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 15/8 nk. 22-26

“Libondo ya litatoli” na mokili ya “Ngomba ya Nzambe”

LIKOLÓ na kálati oyo elakisi eteni moko ya mokili, soki otali ndelo oyo ekaboli Afrika ya Wɛ́sti na mai monene mpe otali pembenipembeni ya Golfe de Guinée, na esika oyo yango egumbami epai na súdi, okomona Cameroun. Soki olandi pembeni ya mai monene epai na súdi, okokóma na etando moko monene ya zɛ́lo moindo na mabóngo ya mai monene. Zɛ́lɔ ya moindo euti na ngomba-mɔ́tɔ na Ngomba Cameroun.

Nsongɛ́ ya ngomba wana, ya mɛ́tɛlɛ 4070 etombwani mpenza likoló koleka na etúká yango. Ntango kolala ya moi esopaka pole na yango na mopanzi ya Ngomba Cameroun, yango ebimisaka balángi kitoko ndenge na ndenge​—motane-ngola, lángi ya mosaka, lángi ya wolo, mpe motane-ngwaa. Mai monene mpe bitando ya pɔtɔpɔ́tɔ oyo ezali zingazinga na yango emonisaka balángi yango lokola talatála, kosaláká lokola ete mabelé masangani ná likoló. Ezali mpasi te kososola mpo na nini bitúlúká oyo basambelaka bankɔ́kɔ kati na etúká yango babéngaki ngomba wana Mongo Ma Loba, oyo elimbolami ete “Likálo ya banzambe,” to mbala mingi, “Ngomba ya Nzambe.”

Mosika epai na súdi, ezali na ntáká molai ya zɛ́lɔ mpɛmbɛ na mabóngo ya mai monene, oyo elónami na nzeté ya kokoti. Longola etando ya pembeni ya mai monene, eteni monene ya mboka yango ezipami na zamba monene, oyo etandami kino na ndelo ya Congo mpe République centrafricaine mpe na nɔ́rdi kino na Nigeria mpe Tchad na súdi ya Sahara. Eteni ya wɛ́sti ya mboka yango ezali etúká ya ngombangomba, oyo ekundwelaka batamboli bisika mosusu ya Mpótó. Nzokande, molungé ekotinda yo omikundola ete ozali bobele pembeni ya équateur [nzela ya moi]. Makambo ndenge na ndenge mazwami na mabelé ya mboka yango esali ete mikanda mingi oyo mikomami mpo na bapaya-batamboli mílobela Cameroun lokola fɔtɔkɔpi moke ya Afrika. Likanisi wana lindimisami lisusu mpo na bituluku ndenge na ndenge ya bikólo mpe nkótá koleka 220 oyo eyebani.

Soki okoya kotala Cameroun, mbala mosusu okoki kofanda kati na moko ya balɔtɛ́lɛ minene ezwami na libóngo ya engumba Douala, to na mboka-mokonzi, Yaoundé. Nzokande, okozanga mabaku ya koyeba makambo matali bomoi ya bato ya mboka yango, mingi mpenza bomoi ya Batatoli ya Yehova koleka 24 000, oyo bamipesi mpo na kotonga “libondo ya litatoli” moko kati na mboka wana ya “Ngomba ya Nzambe.”a Mpo na nini te kokenda kokutana na bango bipai na bipai kati na mboka? Botamboli na yo kati na mboka wana ya Afrika ya Wɛ́sti ekomemela yo matomba mingi.

Na bwato, na motuka, to na velo?

Epai Sanaga, ebale eleki molai ya Cameroun, ekɔti na Mai monene, esali libeke monene. Mpo na kokutana na bato nyonso ya etúká wana monene, mbala mingi Batatoli ya Yehova basengeli kosala mobémbo na bwato. Ezali yango nde basakoli ya Bokonzi libwa ya etuluku moke ya Mbiako basalaka. Mibale kati na bango bafandaka na ntáka ya kilomɛ́tɛlɛ 25, na mboka moke Yoyo. Mpo bákóma na Mbiako basengeli kolúka makasi, atako bongo bazangisaka makita ya boklisto soko moke te. Ntango akendaki kotala etuluku yango, mokɛngɛli-motamboli moko apesaki likanisi ya kolakisa kasɛ́ti-video Les Témoins de Jéhovah — Un nom, une organisation. Kasi yango ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te. Na mboka mosika ndenge wana, epai wapi akokaki kozwa masini ya video, televizyó, mpe lotiliki mpo na kotambolisa yango?

Na boumeli ya pɔ́sɔ oyo alekisaki kuna, basakoli mosusu bakendaki kotala pastɛrɛ moko ya lingomba ya mboka yango. Bakamwaki mingi na lolenge pastɛrɛ wana ayambaki bango, mpe basalaki lisoló moko kitoko kati na Biblia elongo na ye. Ntango bamonaki ete pastɛrɛ yango azalaki te bobele na masini ya kolakisa kasɛ́ti-video kasi azalaki mpe na motɛ́lɛ ya lotiliki, bandeko bazwaki mpiko ya kotuna ye soki akoki kodefisa bango bamasini na ye. Lokola mwa moke liboso basalaki na ye lisoló ya kosepelisa kati na Biblia, pastɛrɛ andimaki kosunga bango. Na Mwapɔ́sɔ na mpokwa, bato 102 bayaki kotala kasɛ́ti yango, ná pastɛrɛ ye moko mpe azalaki elongo na motángo monene ya basangani ya lingomba na ye. Batatoli mibale oyo bautaki na Yoyo bayaki elongo na bato mosusu oyo basepelaka na solo kati na máto na bango mibale. Bamonaki yango mpasi te mpo na kolúka wana basengelaki konana na ntango ya mpela. Nsima ya kotala video, bakamwaki mpe balendisamaki mingi, mpe bazalaki na esengo ya kozala basangani ya lisangá monene motindo wana oyo mokano na yango mozali ya kokumisa Yehova.

Mpo na kokenda epai bwato ekoki kokóma te, okoki kosalela motuka. Bisika ya kozela mituka yango bizalaka ntango nyonso na makɛlɛlɛ mingi. Ezali mpasi te kobulungana kati na esika oyo etondi na batɛki ya mai ya malili, batɛki bitabe, mpe babɔi-sofɛ́lɛ. Mosala ya babɔi-sofɛ́lɛ mozali bongo kokɔtisa basáli-mobémbo kati na mituka oyo mizali kozela, oyo nyonso ezali “pene na kokenda,” engebene maloba na bango. Nzokande, “pene” wana ekoki koyokana na ndimbola mpenza te ya liloba yango. Basáli-mobémbo balekisaka ntango mingi mpo na kozela, mbala mosusu ata mikolo. Ntango bato nyonso batondisami mpenza na kati mpe mokumbi motuka asilisi kobongisa basanduku, basaki mpe biloko, mbala mosusu ata bansoso mpe bantaba, likoló na motuka, yango ekokenda na lombangu mpenza na nzela ya mabulumabulu mpe oyo etondi na mputulu.

Ministre-motamboli moko, oyo alɛmbaki kosalela lolenge yango ya mobémbo aponaki kosala mobémbo na lolenge na ye moko. Sikawa asalaka mibémbo na ye na velo. Alobaki ete: “Banda nazali kosalela velo mpo na kokenda na lisangá moko mpe mosusu, nakómaka ntango nyonso na ngonga malamu mpo na kobanda mosala na ngai. Ya solo, mobémbo mokoki kozwa bangonga mingi, kasi nasengelaka te kolekisa mokolo mobimba to mikolo mibale mpo na kozela motuka. Na eleko ya mbula, banzela mosusu etondaka na mai. Esengeli bongo kolongola sapato mpe kotambola na pɔtɔpɔ́tɔ mpe na mai. Mokolo mosusu sapato na ngai moko ekweaki na moluka mpe ezwamaki bobele bapɔ́sɔ mingi na nsima, ntango mwana mwasi ya Motatoli moko amonaki yango na pwasa wana azalaki koluka mbisi! Nazali na esengo ete nakoki kolata sapato yango lisusu, nsima wana moko na yango elekisaki ntango molai kati na mai. Na bantango mosusu natambolaka na bisika oyo Batatoli ya Yehova basakolá naino te. Bafandi ya mboka yango batunaka ngai ntango nyonso soki namemi nini. Na yango, nazalaka na bazulunalo mpe mwa babúku na mabɔkɔ. Epai nyonso oyo natɛlɛmaka, nakabolaka mikanda oyo mikolimbolaka Biblia mpe napesaka mwa litatoli. Nazali kolikya ete Yehova akokólisa mbóto ya solo wana.”

Mosika na kati ya mboka

Batatoli ya Yehova bazali kosala makasi mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi epai na bato mosusu ata mosika na ntei ya mboka Cameroun, na bamboka mike oyo ebombani kati na bangunda minene. Yango ezali kosɛnga kosala molende, kasi mbano na yango ezali mpenza kolendisa.

Marie, mosáleli moko ya ntango nyonso, abandaki koyekola Biblia elongo na elenge mwasi moko ya moke na nkombo Arlette. Na nsuka ya boyekoli ya liboso, Marie asɛngaki na Arlette ete akenda kotika ye na nzela, lokola ezalaka momeseno na eteni wana ya Afrika. Nzokande, elenge mwasi yango alobaki ete akokaki kotambola te mpo azalaki koyoka mpasi na makolo. Makolo ya Arlette matondaki na mayanzi. Na mpiko nyonso Marie alongolaki liyanzi mokomoko. Na nsima, ayokaki mpe ete bilimo mabe bizalaki kotungisa elenge mwasi wana na butu. Marie alimbwelaki ye na motema pɛtɛɛ nyonso lolenge ya kotya motema epai na Yehova, mingimingi na kobyangáká nkombo na ye na mongongo makasi kati na libondeli.​—Masese 18:10.

Arlette asalaki bokóli noki. Na ebandeli libota na ye bamonaki mabe moko te na boyekoli yango mpamba te bamonaki mbongwana monene kati na bokóli na ye na mosuni mpe na mayele ya bomoto. Kasi ntango bamonaki ete alingaki kokóma Motatoli ya Yehova, bapekisaki ye koyekola Biblia. Nsima ya pɔ́sɔ misato mama ya Arlette, ntango asosolaki ete mwana na ye ya mwasi azalaki kotungisama mingi, akutanaki na Marie mpe asɛngaki ete bázongela boyekoli na bango.

Wana ekómaki ntango ya koyangana na liyangani ya zongazonga, Marie apesaki mbongo na motambwisi motuka moko mpo ete amema Arlette mpo na mikolo mibale. Nzokande, mokumbi motuka yango aboyaki kokenda kino na ndako ya ba Arlette, mpamba te alobaki ete nzela ezali te mpo na kokóma kuna. Bongo Marie ayaki na elenge mwasi yango na balabála. Yehova apambolaki mpenza milende yango. Lelo oyo Arlette azali koyangana na makita nyonso ya lisangá. Mpo na kosunga ye, Marie atikaka te kokenda kozwa ye. Basalaka na nzela miniti 75 mpo na kokenda mpe mpo na kozonga. Lokola na Mwalomingo makita mabandaka na 8:30 ya ntɔ́ngɔ́, Marie asengeli kolongwa na ndako na 6:30; atako bongo bakómaka na ngonga malamu. Arlette azali na elikya ya komonisa mosika te komipesa na ye na nzela ya batisimo. Marie alobaki ete: “Moto nyonso oyo amonaki ye te ntango abandaki koyekola akoki te kondima mbongwana monene oyo asali. Nazali kotɔ́nda Yehova mingi mpo na lolenge oyo apamboli ye.” Na ntembe te Marie azali ndakisa malamu mingi mpo na oyo etali bolingo ezangi moimi.

Mosika epai na Nɔ́rdi

Nɔ́rdi ya Cameroun etondi na makambo ndenge na ndenge mpe ya kokamwisa. Na eleko ya mbula, ebongwanaka elanga monene, ya bitwɛlɛ mingi. Kasi ntango moi makasi ebɛtaka, matiti nyonso makaukaka. Na midi, ntango moi ekómaka na nzánga, ezalaka mpasi mpo na kozwa esika ya malili, na bongo, bampate bamitondisaka esika moko pembeni na bifelo ya bandako ya mabelé motane. Kati na zɛ́lɔ mpe matiti ya kokauka, elembo moke ya matiti ezali bobele mwa nkasa ya nzeté gbukulu (baobab). Atako nzeté yango ezali mpenza monene mingi te lokola ndeko na yango oyo ezali na bazamba epai molungé esalaka mpe mbula enokaka mingi, makoki na yango ya kotɛmɛla ezingelo moko ya mpasi ezali mpenza komonisa molende mpe mpiko ya ndambo ya Batatoli oyo bakendá kofanda na etúká wana mpo na kongɛngisa solo.

Mwa masangá oyo mazali na etúká yango mazali mosika moko na mosusu na ntáka ya kilomɛtɛlɛ 500 kino 800, mpe mazali mpenza komiyoka ete makabwani moko na mosusu. Kasi bato bazali komonisa mposa mingi. Batatoli ya bitúká mosusu bayaka kofanda wana mpo na kosunga. Mpo na kolónga kati na mosala ya kosakola, basengeli koyekola lokótá Foufouldé, oyo elobamaka kuna.

Motatoli moko oyo autaki na Garoua azwaki ekateli ya kolekisa mwa mikolo mpo na kosakola na mboka na ye ya kobotama, na ntáka ya kilomɛ́tɛlɛ soko 160. Akutanaki na bato oyo bamonisaki bosepeli, kasi akokaki te kozonga kuna mbala na mbala mpo azangaki mbongo ya kofuta motuka. Mwa bapɔ́sɔ na nsima, Motatoli yango azwaki nkomá eutaki epai ya bato oyo bamonisaki bosepeli, bazalaki kosɛnga na ye ete azonga lisusu kotala bango. Kasi azalaki na mbongo te ya kofuta motuka, mpe akokaki kokenda te. Kanisá kokamwa ya Motatoli wana ntango moto moko akómelaki ye na ndako na ye na Garoua mpo na koyebisa ye ete bato zomi na mboka wana bazalaki kozela ye!

Na mboka mosusu, pene na ndelo ya Tchad, etuluku moko ya bato 50 oyo bamonisaki bosepeli babongisaki bango moko boyekoli ya Biblia. Basalaki bibongiseli ete misato kati na bango bákoka kokenda na makita na lisangá moko ya mboka Tchad, oyo lizali penepene na mboka na bango. Na bozongi, basengelaki kotambwisa boyekoli ya Biblia elongo na etuluku mobimba. Ya solo, maloba oyo ya Yesu mazali kokokisama kuna: “Mbuma na elanga iteli mingi mpenza nde basáli bazali mingi te. Bóbondela Nkolo na elanga ete atinda basáli kati na elanga na mbuma na ye.”​—Matai 9:37, 38.

Kopesa litatoli na bingumba

Nsima ya bambula mingi ya kozanga bilei, esili koleka soko mibu mibale, bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! ekomi komonana mingi na Cameroun. Bosepeli ezali mingi mpo na bazulunalo yango lokola bato bazali kotánga yango mpo na mbala ya liboso. Babalani mibale bilenge oyo bazali babongisi-nzela monene batindamaki kati na moko na bingumba epai kuna bakabolaki bazulunalo 86 na ntɔ́ngɔ́ ya mokolo ya liboso oyo basakolaki kati na teritware na bango ya sika. Basakoli mosusu bakabolaki koleka bazulunalo 250 na sanza moko mpamba! Sɛkɛlɛ́ ya kolónga na bango ezali nini? Kolakisa bazulunalo epai na moto nyonso.

Motatoli moko oyo asalaka na biro epai bato banso bakoki kokutana na ye, atandaka ntango nyonso bazulunalo yango polele. Mwasi moko atalaki bazulunalo yango kasi akamataki ata moko te. Motatoli asosolaki mposa na ye mpe alakisaki zulunalo moko, oyo akamataki yango. Ndeko yango akamwaki na komona mwasi yango lisusu na mokolo oyo molandaki. Alukaki te bobele kopesa mwa likabo mpo na zulunalo oyo azwaki kasi asɛngaki lisusu bazulunalo mingi. Mpo na nini? Lokola babebisaki ye, aponaki kotánga zulunalo oyo ezalaki kolobela likambo yango. Alekisaki butu mobimba na kotánga mpe kozongela kotánga batoli oyo epesami kati na yango. Lokola azwaki kobɔndisama, alingaki koyeba makambo mingi na ntina na Batatoli ya Yehova.

Ata bana mike bakoki kosangana kati na mosala ya kopalanganisa nsango ya elikya oyo ezwami kati na Biblia. Ntango molakisi asɛngaki na elenge mwasi moko ya mibu motoba ete ayemba loyembo moko ya Bakatolike, aboyaki, kolobáká ete azali Motatoli ya Yehova. Na nsima, molakisi asɛngaki na ye ete ayemba moko na nzembo ya lingomba na ye mpo ete akoka kopesa bapwɛ ya loyembo. Ye aponaki loyembo oyo ezali na motó ya likambo “Elaka ya Nzambe mpo na paladiso” mpe ayembaki yango na motó. Molakisi atunaki ye ete: “Olobelaki paladiso kati na loyembo na yo. Paladiso yango ezali wapi?” Elenge mwasi yango alimbolaki mokano oyo Nzambe azali na yango ya kotya mosika te Paladiso awa na mabelé. Wana akamwaki na eyano na ye, molakisi asɛngaki na baboti na ye búku oyo azalaki koyekola. Amonisaki motema malamu ya kopesa ye bapwɛ na ntina na makambo oyo ayekolaki kati na búku yango na esika ya makambo oyo bateyaki ye yango na boumeli ya mateya likoló na lingomba. Baboti na ye bapesaki molakisi likanisi ete soki alingi kopesa mwana pwɛ na lolenge lobongi, asengeli liboso ye moko koyekola. Babandaki boyekoli ya Biblia elongo na ye.

Kokana bozongeli ya sika?

Lelo oyo, kati na mikili mingi, bato bamonisaka bosepeli te na nsango malamu ya Bokonzi. Basepelaka na Nzambe te, basepelaka mpe na Biblia te. Basusu babulunganisamaka na nsɔ́mɔ mpe baboyaka kobima soki moto oyo bayebi ye te ayei na ekuke na bango. Nyonso wana ezalaka komekama monene epai na Batatoli ya Yehova kati na mosala na bango. Kasi makambo makesani mpenza na Cameroun!

Awa, kosakola ndako na ndako ezali mpenza esengo monene. Na esika ya kobɛta ekuke, bazalaka na momeseno ya kobénga, “Kong, kong, kong.” Bongo moto oyo azali na kati akoyanola ete, “Nani kuna?” na nsima tomilakisaka ete tozali Batatoli ya Yehova. Mbala mingi, baboti basɛngaka na bana na bango ete bámema bibonga mpe bátya yango na malili na nsé ya nzeté moko, mbala mosusu nzeté ya mangolo. Tokolekisa ntango ya esengo mingi na kolimboláká Bokonzi ya Nzambe mpe nini yango ekosala mpo na kosikola bato na ezalela ya mpasi.

Nsima ya lisoló lolenge yango, mwasi moko amonisaki mayoki ya motema na ye, ete: “Nazali na mawa mingi na komona ete solo oyo nazalaki koluka yango ekoki kozwama te kati na lingomba oyo nabotami mpe nakóli kati na yango. Natɔ́ndi Nzambe ete amonisi ngai solo. Nazalaki mama-mokambi kati na lingomba na ngai. Ekeko ya Ngɔndɔ Malia ezalaki koumela pɔ́sɔ moko na ndako ya mama-mokambi mokomoko mpo ete bákoka koyebisa ye masɛngi na bango. Mpo na ngai, ntango nyonso nazalaki kosɛnga na Malia asalisa ngai mpo na koyeba solo. Sikawa Nzambe asili komonisa ngai ete solo ezali epai na Malia te. Natɔ́ndi Yehova.”

Boye soki mokolo mosusu okanisi ete olingi kozwa esengo monene oyo ekoki kozwama na nzela ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe, mpo na nini okoki te koya kotala eteni oyo ya Afrika ya Wɛ́sti? Lisusu, okomona “elilingi moke ya Afrika,” ezala na bwato, na motuka, na velo, okosangana mpe na kopesa mabɔkɔ na “libondo ya litatoli” oyo ezali kotongama kati na mboka ya “Ngomba ya Nzambe.”

[Maloba na nse ya lokasa]

a “Libondo ya Litatoli” likoki mpenza kozala ndimbola ya liloba ya Liebele libongolami “Gileadi.” Kobanda 1943, Gileadi, Eteyelo ya Biblia ya Watchtower ezali kotinda bamisionere mpo na kofungola mosala ya kosakola na mokili mobimba, ezala mpe na Cameroun.

[Eutelo ya bafɔtɔ on page 22]

Kálati: Bakálati Ngomba molai. Copyright. 1995 Digital Wisdom, Inc.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto