Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 15/6 nk. 28-30
  • “Bókumisa lolenge oyo na bato”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bókumisa lolenge oyo na bato”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndako ya Setefana
  • “Balendisi elimo na ngai pelamoko na elimo na bino”
  • Kosalana elongo na bosembo nyonso ebotaka mbuma malamu
  • Baninga ya paulo na mosala​—Ezalaki banani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mokanda ya Biblia nimero 46—1 Bakolinti
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • ’Bolingaka bato ya lolenge oyo’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mokanda ya Biblia nimero 47—2 Bakolinti
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 15/6 nk. 28-30

“Bókumisa lolenge oyo na bato”

MAKAMBO mazalaki kotambola malamu te kati na lisangá ya Kolinti. Likambo moko ya nsɔ́mɔ esalemaki kuna: pite; mpe bandeko bazalaki na mikabwano. Bamoko kati na bango bakutanaki na mikakatano minene to bazalaki na mituna oyo mizalaki kosɛnga biyano. Bandeko mosusu bazalaki kofundana na bisambiselo; basusu kútu bazalaki koboya kondima lisekwa.

Mituna misusu ya ntina mingi mpe mitunamaki. Baoyo bazalaki na babalani oyo bazalaki bandimi te basengelaki kokóba kofanda na bango, to basengelaki kokabwana na bango? Mokumba ya bandeko basi kati na lisangá ezalaki nini? Kolya nyama epesami na losambo ya bikeko ezali mabe? Lolenge nini makita​—kati na yango Elambo ya Mpokwa ya Nkolo​—masengelaki kotambwisama?​—1 Bakolinti 1:12; 5:1; 6:1; 7:1-3, 12, 13; 8:1; 11:18, 23-26; 14:26-35.

Na ntembe te, lokola batungisamaki na ntina na bolamu ya bandeko na bango kati na ezalela ya makambo ya elimo ebulunganisami, Akaiko, Folotunato, mpe Setefana basalaki mobémbo mpo na kotala ntoma Paulo na Efese. Longolá bansango wana ya kobulunganisa, ekoki kozala ete bamemelaki Paulo nkomá moko eutaki na lisangá wana, oyo kati na yango ezalaki na mituna mitalelaki makambo yango. (1 Bakolinti 7:1; 16:17) Na ntembe te, bobele bandeko wana misato te nde batungisamaki na ntina na likambo yango. Ya solo, Paulo asilaki koyoka nsango uta na “bato na Koloe” ete mikabwano mizali kati na basangani ya lisangá. (1 Bakolinti 1:11) Na ntembe te, makambo oyo bamemi-nsango bayebisaki Paulo esungaki ye ete ayeba malamumalamu makambo oyo mazalaki koleka, mpe lolenge ya koyanola na mituna oyo mitunamaki. Emonani lokola ete mokanda oyo ebéngami lelo Bakolinti ya Liboso ezalaki eyano ya Paulo, oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu ya Nzambe. Ekoki kozala ete Akaiko, Folotunato, mpe Setefana nde bamemaki nkomá yango.

Akaiko, Folotunato, mpe Setefana bazalaki banani? Liteya nini tokoki kozwa na koyekoláká makambo oyo Makomi mayebisi likoló na bango?

Ndako ya Setefana

Ndako ya Setefana ezalaki “mbuma na liboso” ya mosala ya Paulo na etúká ya Loma, oyo ebéngamaki Akaya, na súdi ya Grèce, soko na mobu 50 T.B., mpe Paulo ye moko nde abatisaki bango. Emonani ete Paulo atalelaki bango lokola ndakisa, bato oyo bakɔmeli mpe bakoki kozala na bopusi malamu likoló na Bakolinti. Akumisaki bango mingi mpo na mosala oyo bazalaki kosala kati na lisangá: “Nazali kobondela bino bandeko. Boyebi bato na ndako na Setefana ete bazalaki bandimi na liboso kati na Akaya mpe ete basili komitya bango mpenza na mosala kosalela babulami. Bino bótosaka bato na lolenge oyo mpe bato nyonso baoyo bakosangana na mosala mpe bakosalaka na etingya.” (1 Bakolinti 1:16; 16:15, 16) Nkombo ya basangani ya “ndako” ya Setefana eyebisami te. Liloba yango ekokaki kolimbola basangani ya libota kasi ekokaki mpe kosangisa baombo to bato ya mosala. Lokola nkombo Akaiko euti na lokótá ya Latin mpe ezalaki kosalelama mpenza mpo na moto oyo azali moombo, mpe Folotunato ezalaki kosalelama mpenza mpo na moto oyo asikolami, banganga-mayele mosusu bakanisi ete bango mibale bakokaki mbala mosusu kozala basangani ya ndako wana moko.

Ata soki ezalaki bongo to te, Paulo atalelaki ndako ya Setefana ete ezalaki ndakisa malamu. Basangani na yango ‘bamityaki mpenza na mosala kosalela babulami.’ Na ntembe te, libota ya Setefana bayebaki ete ezalaki na mosala oyo esengelaki kosalema mpo na bolamu ya lisangá mpe na bolingo malamu na bango nyonso, bandimaki mosala yango lokola mokumba na bango moko. Na bongo, ebongaki ete lisangá elendisa mposa na bango ya kosalela babulami mosala mpe emonisela bango botɔ́ndi.

“Balendisi elimo na ngai pelamoko na elimo na bino”

Atako Paulo abulunganisamaki na ntina na makambo oyo mazalaki koleka kati na Kolinti, koya ya bamemi-nsango wana misato eyikisaki ye mpiko. Paulo alobaki ete: “Nasepeli ete Setefana mpe Folotunato mpe Akaiko basili koya, zambi bango batondisi misala mizangaki epai na bino. Balendisi [elimo, NW] na ngai pelamoko na [elimo, NW] na bino.” (1 Bakolinti 16:17, 18) Na kotaleláká makambo oyo mazalaki koleka na Kolinti, Paulo atungisamaki mingi mpo ete azalaki mosika na Bakolinti, kasi sikawa koya ya batindami na bango ekokisaki mposa oyo azalaki na yango ya komona lisangá mobimba. Ekoki mpenza kozala ete makambo oyo bamemelaki ye esungaki Paulo ete ayeba makambo nyonso oyo mazalaki koleka kuna mpe elongolaki mwa ndambo ya bobángi na ye. Mbala mosusu makambo mazalaki mpenza makasi te na lolenge azalaki kokanisela yango.

Engebene Paulo, mokumba ya bato wana misato esukaki te bobele na kobɔndisa elimo na ye, kasi esungaki mpe mpo na kolendisa elimo ya lisangá ya Kolinti. Na ntembe te, ezalaki libɔndisi mpo na bango na koyeba ete batindami na bango basilaki kolimbola polele makambo nyonso epai na Paulo mpe balikyaki ete na ntango bakozonga, bakomemela bango batoli na ye.

Na yango, Setefana mpe baninga na ye mibale bakumisamaki mingi mpo na mosala makasi na bango epai na Bakolinti. Botɔ́ndi oyo Paulo azalaki na yango epai na bato wana ezalaki monene na boye ete apesaki bango mokumba ya kokamba lisangá ya Kolinti oyo ezalaki na mikabwano. Ntoma alendisaki bandeko ete: “Bótosaka bato na lolenge oyo mpe bato nyonso baoyo bakosangana na mosala mpe bakosalaka na etingya. . . . Bókumisa [“bóndima,” NW] lolenge oyo na bato.” (1 Bakolinti 16:16, 18) Mitindá ya nguya motindo wana mimonisi polele ete bato yango bazalaki mpenza sembo atako mikakatano mizalaki kati na lisangá. Bato motindo wana basengeli kolingama mingi.​—Bafilipi 2:29.

Kosalana elongo na bosembo nyonso ebotaka mbuma malamu

Ntembe ezali te ete, boyokani ya penepene elongo na lisangá ya Yehova mpe bamonisi na yango ebotaka mbuma malamu. Na ntango Paulo akomaki mokanda oyo ebéngami lelo Bakolinti ya Mibale, mwa moke nsima ya Mokanda na ye ya liboso, makambo masilaki kobanda kobonga kati na lisangá. Mosala oyo bandeko mibali lokola Akaiko, Folotunato, mpe Setefana basalaki yango na motema pɛtɛɛ nyonso, bakisá mpe koya ya Tito, ebimisaki mbuma malamu.​—2 Bakolinti 7:8-15; kokanisá na Misala 16:4, 5.

Basangani ya masangá ya libota ya Yehova na mikolo na biso bakoki kozwa litomba na komanyoláká likoló na mwa ndambo ya makambo oyo malobelami na ntina na mibali wana kati na Makomami. Na ndakisa, tókamata ete mokakatano moko ezali kokóba kati na lisangá moko lelo oyo mpe ekoki kosilisama te nokinoki mpo na ntina moko to mosusu mpe ezali kotungisa bandeko. Basengeli kosala nini? Basengeli komekola Akaiko, Folotunato, mpe Setefana, oyo basundolaki te mokumba na bango ya koyebisa Paulo makambo oyo mazalaki koleka mpe na nsima, na elikya nyonso, batikaki makambo na mabɔkɔ ya Yehova. Batikaki soko moke te ete molende na bango ya kosala oyo ezali sembo epusa bango kosala makambo na elimo ya lipandá to na ‘kotombokela [Yehova].’​—Masese 19:3.

Lisangá ezali ya Yesu Klisto, mpe na ntango ebongi, bobele lokola ezalaki na Kolinti, akosala oyo ekoki mpo na kosilisa mikakatano oyo ekoki kobebisa bolamu ya elimo ya lisangá mpe kimya na yango. (Baefese 1:22; Emoniseli 1:12, 13, 20; 2:1-4) Liboso na yango, soki tolandi ndakisa malamu oyo Akaiko, Folotunato, mpe Setefana batikaki mpe tokóbi kosala mosala ya kosunga bandeko, biso mpe tokosimba na bosembo nyonso ebongiseli ya lisangá, kolendisáká bongo bandeko na biso, na ‘kozaláká na bopusi likoló na bango ete bámonisa bolingo mpe misala malamu.’​—Baebele 10:24, 25.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto