Eteyelo ya Gileadi: Ebimisi kelasi na yango ya mbala ya 100
GILEADI, eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower, esili kokokisa mokumba monene kati na mosala ya kosakola Bokonzi ya Nzambe na mokili mobimba na mikolo na biso. Uta Eteyelo ya Gileadi ebandaki kobimisa bamisionɛrɛ na 1943, banakelasi oyo bazwaki mapɔlɔ́mi kuna basili kosala mosala kati na mikili koleka 200. Na mokolo mwa 2 Mársi 1996, bana ya kelasi ya mbala ya 100 bazwaki mapɔlɔ́mi.
Bayekoli bakɔtaki kelasi na boumeli ya eleko oyo mbulampɛmbɛ enókaki na bamɛ́tɛlɛ koleka mibale likoló na etando epai kuna ezwami Esika monene ya Watchtower mpo na mateya na Patterson, na New York. Na bongo ezalaki likambo ya kokamwa te na komona lolenge mbulampɛmbɛ ezalaki konóka na mokolo oyo bazwaki mapɔlɔ́mi. Atako bongo, ndako ya makita etondaki, mpe ebele ya bayoki balandaki molulu yango na Patterson, na Wallkill, mpe na Brooklyn—bango nyonso bazalaki bato 2 878.
Theodore Jaracz, moko kati na Komité ya mateya ya Lisangani ya Mikóló-bakambi, azalaki prezidá ya molulu yango. Nsima ya kotombela boyei malamu na esengo nyonso epai na bapaya oyo bautaki na mikili ndenge na ndenge, asɛngaki na bango nyonso ete bátɛlɛma mpe báyemba loyembo 52. Ndako ya makita ebimisaki lokito na kosanzola Yehova wana loyembo “Nkombo ya Tata na biso,” ezwami na búku Nzembo mpo na kokumisa Yehova eyembamaki. Loyembo yango, bakisá mpe maloba ya prezidá mpo na oyo etali kosalela kolakisama mpo na kosanzola Yehova ebandisaki molulu yango na mɔ́tɔ nyonso.
Batoli ya Makomami euti na bankulutu
Na boumeli ya eteni ya liboso ya molulu yango, mwa ndambo ya baoyo balekisi bambula mingi kati na mosala ya Yehova basalaki mwa masukúlu mikuse mpo na banakelasi. Richard Abrahamson, moko kati na basáli na biro monene, ye oyo abandaki mosala ya ntango nyonso na 1940, alendisaki banakelasi ete: “Bókóba kosembolama.” Akundwelaki bango ete kati na bomoi na bango ya boklisto basilaki kolekisa bileko ndenge na ndenge oyo esɛngaki kosembolama, ete basalaki mpe bongo na boumeli ya sanza mitano ya kolakisama oyo balekisaki na Gileadi. Na yango, mpo na nini basengeli kokóba kosembolama?
Molobi alimbolaki ete elobeli oyo Paulo asaleli kati na 2 Bakolinti 13:11 “emonisi likambo oyo ezali kokóba kokóla mokemoke, kokóba komitika na kobongisama mpe kopɛtolama na Yehova, mpo ete tókokisa mitindá minene ya Yehova.” Kati na mosala na bango na mboka-mopaya, banakelasi oyo bazwaki mapɔlɔ́mi bakokutana na komekama na ntina na kondima na bango. Basengeli koyekola lokótá ya sika, basengeli komimesenisa na bizaleli mpe na lolenge ya bomoi ya sika, mpe komesana na bateritware ya ndenge na ndenge. Bakokutana mpe na bomoto ya ndenge na ndenge kati na bandako ya bamisionɛrɛ mpe kati na masangá na bango ya sika. Soki bakosalela mitindá ya Biblia na bokɛngi kati na makambo wana nyonso, mpe soki bakomonisa bolingo malamu ya komisembola, na bongo, lokola Paulo akomaki yango, bango mpe ‘bakokóba kosepela.’
John Barr, moko na basangani mitano ya Lisangani ya Mikóló-bakambi oyo basalaki masoló kati na molulu yango, azwaki motó ya likambo ya lisukúlu na ye kati na 1 Bakolinti 4:9. Akundwelaki bayoki na ye ete baanzelu mpe bato batalaka baklisto. Alobaki ete: “Kososola likambo yango ekosalisa moklisto ayeba lisusu malamu ete lolenge ya bomoi ya boklisto ezali na ntina, mingi mpenza soki asosoli ete na makambo oyo azali kosala mpe koloba, akoki kosala bopusi makasi likoló na baoyo bazali kotala ye, ezala baoyo ye akoki komona to mpe baoyo akoki komona te. Nabanzi ete oyo ekozala likambo malamu mingi mpo na bino bandeko mibali mpe bandeko basi ya kelasi ya Gileadi ya mbala ya 100 ete bómikundola yango awa ezali bino kokende mosika na nsuka ya mabelé.”
Ndeko Barr alendisaki bayekoli 48 bábosana te ete, wana ekozala bango kosunga bato bakokani na bampate ete báyekola solo, “esengo ekozala bongo kati na baanzelu na Nzambe mpo na moto moko na masumu oyo abongoli motema.” (Luka 15:10) Kolobeláká 1 Bakolinti 11:10, amonisaki ete elimo oyo moto akoki komonisa liboso na bibongiseli ya teokrasi ezalaka na bopusi bobele te epai na bandeko na biso mibali mpe bandeko na biso basi oyo tokoki komona, kasi mpe epai na baanzelu oyo tokoki komona te. Ezali mpenza litomba ete tóbosana te kotalela makambo na lolenge wana!
Mosangani mosusu ya Lisangani ya Mikóló-bakambi, Gerrit Lösch, ye moko mpe asilá kozwa lipɔlɔ́mi na Eteyelo ya Gileadi, alobelaki mikapo lokola Nzembo 125:1, 2; Zekalia 2:4, 5; mpe Nzembo 71:21 mpo na komonisa ete Yehova ‘azingelaka bato na ye.’ Abatelaka bango na ngámbo nyonso. Nzambe akobatela biso na lolenge yango bobele na boumeli ya bolɔ́zi monene? Molobi ayanolaki ete: “Te, mpamba te uta kala Yehova azali ‘efelo ya mɔ́tɔ,’ libateli mpo na bato na ye. Na nsima ya etumba ya liboso ya mokili mobimba, na 1919, batikali ya Yisalaele ya elimo bazalaki na mposa makasi ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso. Bazalaki bamonisi ya Yelusaleme ya elilingi oyo ezali na likoló. Yehova apesi ndanga ete akobatela etuluku mobimba ya bamonisi wana na ntango ya nsuka. Nani akoki mpenza kopekisa bango? Moto moko te.” Ezali solo elendiseli mpo na bango mpe mpo na baoyo nyonso bazali kosangana elongo na bango na kosaláká mokano ya Nzambe!
Ulysses Glass, ye oyo azali mokóló koleka bakambi nyonso ya eteyelo yango, alendisaki banakelasi ete ‘bámisalela esika kati na lisangá ya Yehova ya mokili mobimba.’ Esika yango ezali bongo mokumba moko to mosala oyo ebongi na makoki to na bizaleli ya moto mokomoko. Alobaki ete: “Bino baoyo bokokóma bamisionɛrɛ bosili kozwa esika na bino kati na lisangá ya mokili mobimba ya Batatoli ya Yehova. Atako ezali na motuya monene sikawa, kasi yango ezali bobele ebandeli ya bomoi na bino lokola bamisionɛrɛ.” Ekosɛnga na bango ete básala makasi mpo na kosalela makoki na bango mpe ete bámiyokanisa na mikumba na bango ya ntina mingi oyo Yehova mpe lisangá na ye bapesi bango.
Lisukúlu ya nsuka ya eteni ya liboso ya molulu yango esalemaki na Wallace Liverance, moko na bakambi ya eteyelo ya Gileadi oyo asalaki na Bolivie na boumeli ya mbula 17. Atunaki bayekoli ete: “Bokomeka Nzambe?” Lolenge nini basengelaki kosala yango? Libota ya Yisalaele bamekaki Nzambe na lolenge mabe. (Deteronome 6:16) Molobi ayebisaki ete: “Na ntembe te, komeka Nzambe na komilelaleláká to na koimaimáká to na komonisáká kozanga kondima kati na lolenge na ye ya kosala makambo ezali mabe.” Alendisaki bayekoli ete: “Na ntango bokokóma epai botindami, bótɛmɛla bopusi motindo wana.” Na bongo, wapi lolenge malamu ya komeka Nzambe? Ndeko Liverance alimbolaki ete: “Na kondimáká maloba na ye, na kosaláká bobele oyo azali koloba, mpe na kotikáká makambo nyonso na mabɔkɔ na ye.” Lokola emonani kati na Malaki 3:10, Yehova azali kosɛnga na libota na ye ete: “Meká ngai.” Alakaki ete soki bakotya ndambo na zomi na bango kati na ebombelo ya tempelo, akopambola bango. Molobi atunaki ete: “Mpo na nini te kotalela mosala na bino ya misionɛrɛ na motindo wana mpe? Yehova alingi ete bólónga kati na yango, na bongo bómeka ye. Bókangama na mokumba na bino. Bósala mbongwana oyo ye azali komizela na yango epai na bino. Bóyika mpiko. Bótala soki akopambola bino te.” Oyo nde toli kitoko mpo na baoyo bazali kosalela Yehova!
Na nsima ya loyembo moko, masukúlu masilaki mpe ekómaki sikawa ntango ya mituna-lisoló ya kosepelisa.
Makambo ya kolendisa mauti na mosala ya kosakola
Mark Noumair, mosangani ya sika kati na bakambi ya Eteyelo ya Gileadi, asɛngaki na bayekoli ete báyebisa makambo oyo bakutanaki na yango kati na mosala ya kosakola na eleko oyo bazalaki kolanda mateya. Yango emonisaki ntina ya koyeba kobimisa myango ya sika mpo na oyo etali lolenge ya kobandisa makambo kati na mosala ya kosakola mpe epesaki bango makanisi ya kolendisa oyo bakoki kosalela.
Na boumeli ya ntango oyo balekisaki mpo na mateya, bayekoli ya kelasi ya Gileadi na mbala oyo bazwaki matomba mingi mpenza ya kosangana elongo na basangani ya bakomité ya bafiliale oyo bautaki na bamboka 42, bayaki mpe na Esika monene ya Watchtower mpo na mateya na Patterson mpo na kozwa kobongisama ya sikisiki. Mingi na bango basilá kozwa mapɔlɔ́mi na Gileadi na bambula esilá koleka. Kati na molulu yango, mituna mitunamaki mpe epai na bamonisi ya bakelasi ya 3, ya 5, ya 51, mpe ya 92, ya Eteyelo mosusu ya Gileadi na Allemagne. Biyano na bango bipesaki matomba mpenza!
Bayebisaki mayoki oyo bamisionɛrɛ bazalaka na yango na ntango bamonaka kati na bateritware na bango lolenge motángo ya basanzoli na Yehova emataka uta na motángo ya moke kino kokóma bankóto mingi. Bayebisaki makambo matali mokumba oyo bakokisaki kati na mosala ya kosakola nsango malamu na bandako epalangani likoló na bangomba ya Andes mpe na bamboka oyo ezwami pene na eutelo ya Ebale Amazone. Balobelaki lolenge ya kosakola epai na bato oyo bayebi kotánga te. Balobelaki mikakatano oyo bango moko bakutanaki na yango mpo na koyekola nkótá ya sika mpe makambo oyo baye bazwi mapɔlɔ́mi bakoki komizela na yango na ntina na ntango oyo basengeli kolekisa liboso ete bákoka kosakola mpe kosala masukúlu na lokótá ya Chinois. Balakisaki mpe lolenge ya kobanda masoló na Espagnol mpe na Chinois. Balobelaki makasi ete bamisionɛrɛ balóngaka te bobele na ntango bayekolaka nkótá ya sika, kasi balóngaka mpe na ntango bayekolaka lolenge ya kokanisa ya bato ya mboka epai kuna batindami. Balobaki na ntina na bomoi ya mpasi na mikili ya bobólá mpe balobaki ete: “Bamisionɛrɛ basengeli kososola ete bato na mikili wana bazali na bobólá mpo ete bato mosusu balyaka na nsima ya mitoki na bango. Misionɛrɛ akosala malamu soki amonisi mayoki motindo moko na Yesu—ayokelaki bato mawa, baoyo bazalaki lokola bampate bazangi mobateli.”
Na nsima ya loyembo, molulu yango mokóbaki na lisoló ya A. D. Schroeder, moko kati na Lisangani ya Mikóló-bakambi. Azwaki libaku ya kozala moko na balakisi ya ebandeli ya Eteyelo ya Gileadi na ntango efungwamaki na 1943. Asalaki lisoló oyo ebongaki mpenza mpo na kosukisa molulu yango, lisoló oyo ezalaki na motó ya likambo, “Tókumisa Yehova lokola Nkolo Mokonzi.” Lisoló ya kobenda likebi oyo Ndeko Schroeder asalaki likoló na Nzembo 24 esimbaki bayangani nyonso na ntina na bonene ya libaku oyo tozali na yango ya kokumisa Nkolo Mokonzi.
Na nsima ya kokabola mapɔlɔ́mi, mpe loyembo ya nsuka, Karl Klein, moko kati na Lisangani ya Mikóló-bakambi, asalaki libondeli ya nguya, oyo eutaki mpenza na nsé ya motema. Ezalaki mpenza molulu moko kitoko mpe ya kolendisa na elimo!
Na mikolo oyo milandaki kozwama ya mapɔlɔ́mi, basangani 48 ya kelasi ya mbala ya 100 babandaki kosala mibémbo mpo na kokende na bateritware na bango na mikili 17. Kasi bazalaki bato ya sika te kati na mosala ya kosakola. Basilaki kosala mosala ya boklisto ya ntango nyonso uta mwa kala. Na ntango bakomamaki nkombo na Gileadi, mwayene ya bambula na bango ya kobotama ezalaki bongo 33, mpe basilaki kolekisa mwayene ya bambula 12 kati na mosala ya ntango nyonso. Bamoko kati na bango bazalaki basangani ya libota ya mokili mobimba ya Betele ya la Société Watch Tower. Basusu basilaki kosala lokola bakɛngɛli batamboli. Bamoko na bayekoli basilaki kosala na mikili ya bopaya—na Afrika, na Mpótó, na Amerika ya Súdi, na bisanga ya mai monene, mpe epai na bituluku ya bato oyo balobaka nkótá ya bapaya kati na bamboka na bango. Kasi sikawa basangani elongo na ebele ya bamisionɛrɛ mosusu oyo bazalaki na esengo ya kozwa likoki ya koloba: ‘Tokosala kati na mboka nyonso ya mokili epai kuna bazali na mposa na biso.’ Mposa na bango ya nsé ya motema ezali bongo ya kosalela bomoi na bango mpo na kokumisa Yehova.
[Etanda na lokasa 27]
Makambo matali banakelasi:
Motuya ya bikólo epai bauti: 8
Motuya ya bikólo epai batindami: 17
Motuya ya bayekoli: 48
Mwayene ya bambula ya kobotama: 33,75
Mwayene ya bambula balekisi kati na solo: 17,31
Mwayene ya bambula balekisi kati na mosala ya ntango nyonso: 12,06
[Elilingi na lokasa 26]
Kelasi ya mbala ya 100 ya Gileadi, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower
Kati na bankombo oyo ezali awa na nsé, milɔngɔ́ mitángami kobanda liboso kino na nsima, mpe bankombo etángami kobanda na lobɔkɔ ya mwasi kino na lobɔkɔ ya mobali.
(1) Shirley, M.; Grundström, M.; Genardini, D.; Giaimo, J.; Shood, W.; Phair, P.; Buchanan, C.; Robinson, D. (2) Pine, C.; Kraus, B.; Racicot, T.; Hansen, A.; Beets, T.; Berg, J.; Garcia, N.; Fleming, K. (3) Whinery, L.; Whinery, L.; Harps, C.; Giaimo, C.; Berg, T.; Mann, C.; Berrios, V.; Pfeifer, C. (4) Randall, L.; Genardini, S.; Kraus, H.; Fleming, R.; D’Abadie, S.; Shirley, T.; Stevenson, G.; Buchanan, B. (5) Robinson, T.; Garcia, J.; Harps, P.; Racicot, D.; D’Abadie, F.; Phair, M.; Stevenson, G.; Shood, D. (6) Beets, L.; Pfeifer, A.; Berrios, M.; Pine, J.; Mann, L.; Randall, P.; Grundström, J.; Hansen, G.