Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 15/4 lok. 31
  • Ntina oyo asalelaki nkombo oyo eleki nkombo mosusu nyonso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ntina oyo asalelaki nkombo oyo eleki nkombo mosusu nyonso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 15/4 lok. 31

Ntina oyo asalelaki nkombo oyo eleki nkombo mosusu nyonso

“Nasalaki lisumu, engebene moko na bato oyo batalelaki mosala na ngai, mpo ete nakɔtisaki liloba ‘Yehova’ na esika ya ‘Nkolo,’ oyo uta bikeke mingi bato bazali na momeseno ya kosalela yango na esika ya Yehova.”

Wana ezalaki maloba ya J. J. Stewart Perowne na maloba ya ebandeli ya ebimeli ya mibale ya libongoli na ye na mokanda ya Nzembo, oyo ebimaki mpo na mbala ya liboso na 1864. Moto yango oyo atalelaki mosala na ye, wana akomaki kati na zulunalo Saturday Review ya 2 Yulí 1864, aboyaki kosalelama ya nkombo ya Nzambe kati na libongoli wana, lokola ezalaki kosalelama lisusu te kati na mangomba ya Bayuda to ya boklisto. Alobaki ete nkombo Yehova ezali na bokangami mingi mpenza mpo na Bayuda mpe ete liloba mosusu esengelaki kosalelama, na ndakisa “Nkolo” to “Nzambe,” “oyo ezali bobele mpo na esika to ekólo moko mpamba te.”

Perowne andimaki maloba wana te, mpamba te “alingaki kolongola ata lɛ́tɛlɛ moko” te kati na emoniseli oyo Nzambe apesaki epai na bato. Alobaki na elónga nyonso ete babongoli oyo babongolaka nkombo ya Nzambe uta na Liebele ete “Nkolo” bayebaka te kokesenisa maloba mibale ya Liebele.

Lisusu, Perowne alobaki ete ezalaki na banganga-mayele oyo basepelaki na kozongisama ya nkombo ya Nzambe. Azongelaki maloba ya mokomi na ntɔ́ki moko ya Angleterre oyo ayebani mingi, Samuel Taylor Coleridge:

“Mpo na nini kokóba kobongola na Lingelesi uta na Liebele na nzela ya libongoli mosusu, to na kosaleláká la Septante? Tosilaki kondima liloba ya Liebele Yehova, boye te? Ezali te liloba ya Greke Κύριος, to Nkolo, oyo esalelami mingi na esika ya liloba ya Liebele Yehova, kati na la Septante? Na bongo, mpo na nini te kozongisa nkombo ya ebandeli; mpe kati na Kondimana na Kala babongoli Yehova na bosembo nyonso ete Yehova; mpe makomi nyonso ya Kondimana na Sika, oyo ezongeli maloba ya Kondimana na Kala, na kosaleláká liloba ya Liebele kati na makomi oyo matángami?”

Perowne andimaki ete ebéngeli oyo ebongi mpenza na Tetragrame ya Liebele ebungi te, kasi alobaki ete: “Soki ezalaki bobele mpo na komipesa makasi na biyambayamba nde nkombo wana etikaki kosalelama kati na lingomba ya Bayuda, mpe soki ezalaki mpo na kolanda kozanga bokɛngi mabongoli ya Greke mpe ya Latin nde libongoli na biso [ya Lingelesi] ebungisaki nkombo wana, bantina yango ekoki soko moke te kokweisa kozongisama ya kosalelama oyo ezalaki na yango kala.” Perowne asalelaki ebéngeli “Yehova” mpamba te eyebanaki malamu. Uta ntango wana mabongoli misusu ya mikolo na biso makómi mpe kosalela nkombo ya Nzambe. Les Saintes Écritures — Traduction du monde nouveau esaleli nkombo Yehova mbala koleka 7 200 kati na Makomami ya Liebele mpe ya Greke ya boklisto.

Kati na libongoli na ye ya mokanda ya Nzembo, Perowne asalaki makasi ete “alanda mpenza lolenge ya Liebele, ezala engebene elobeli ya elilingi mpe kati na mibeko ya lokótá.” Wana abongolaki Nzembo 69, milɔngɔ́ 5 mpe 6, amonaki ete asengelaki kokesenisa maloba ya Liebele oyo mabongolami na “Nzambe” (ʼElo·himʹ), “Nkolo” (ʼAdho·naiʹ), mpe “Yehova”: “Ɛ Nzambe [ʼElo·himʹ], yo oyebi zóba na ngai mpe mabungá na ngai ibombami na yo te. Ɛ Nkolo [ʼAdho·naiʹ], Yehova (Nzambe) na bibele, tiká te ete baoyo bakolikya epai na yo báyoka nsɔ́ni mpo na ngai te; ɛ Nzambe na Yisalaele, tiká te ete baoyo bakoluka yo bázwa nsɔ́ni mpo na ngai.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto