Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 1/4 lok. 32
  • “Bosengeli koyika mpiko”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bosengeli koyika mpiko”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 1/4 lok. 32

“Bosengeli koyika mpiko”

TOSENGELI “koyika mpiko,” soki tolingi kozwa “yango esili kolakama.” (Baebele 10:36) Nganga-mayele moko na boyekoli Biblia alimboli ete liloba ya Greke oyo ebongolami na “koyika mpiko” oyo ntoma Paulo asaleli awa ezalaki mbala mosusu kosalelama mpo na kolobela “likoki oyo bitwɛlɛ bizali na yango ya kokóla kati na nkaká mpe bisika mabe.”

Likoló na bangomba milai ya Mpótó, lolenge moko ya bitwɛlɛ motindo wana ezali kokóla. Likambo oyo lileki kokamwisa, yango ebéngami na nkombo zalá-na-bomoi-seko. Ezali solo te ete lititi wana likoló na bangomba Alpe eumelaka seko, kasi elendendelaka mbula na mbula, kobimisáká bafololo kitoko na eleko ya molungé. Búku moko (The New Encyclopædia Britannica) elobi ete nkombo zalá-na-bomoi-seko epesamaki na lititi yango na ntina na “bompikiliki mpe boumeli molai” na yango. (Nkombo ya siansi mpo na bitwɛlɛ ya etúlúká yango ebéngami Sempervivum oyo elimboli mpe “zalá-na-bomoi-seko.”)

Likambo oyo lizali kokómisa lititi wana ya bomoi molai eloko ya kokamwisa ezali ete yango ekólaka na bisika ya mpasi mpenza. Ekoki komonana likoló mpenza na mopanzi ya bangomba epai mopɛpɛ mokopɛpaka makasi, esika molungé ekoki komata kino 35°C bobele kati na bangonga 24. Misisa na yango mikoki kokangama na minkaka ya mabángá oyo ezali bobele na mabelé moke. Wapi mwa basɛkɛlɛ́ ya bompikiliki na yango kati na ezalela ya mpasi lolenge wana?

Lititi oyo ebéngami zalá-na-bomoi-seko ezali na nkasa oyo ivimbi, oyo ibombaka mai kati na yango. Yango epesaka lititi wana likoki ya kosalela malamu mpenza mai nyonso oyo makoki kozwama na mbula to na mbula-mpɛmbɛ oyo enangwi. Lisusu, ekólaka na bituluku oyo esangisaka nguya na yango mpo na kokangama makasi na mabángá oyo esimbi yango. Na kokangisáká misisa na yango kati na minkaka ya ngomba, matiti yango ebatelami na mopɛpɛ mpe na mbula makasi atako ekoki kozala likoló na mabelé moke. Na maloba mosusu, eyikanaka na kosaleláká malamu matomba nyonso ya makambo ya mpasi.

Na lolenge ya elimo, tokoki kozwama kati na ezalela ya makambo oyo ezali kotya mpiko na biso na komekama. Nini ekosalisa biso na koyika mpiko kati na komekama? Lokola lititi oyo ebéngami zalá-na-bomoi-seko, tokoki kobomba mai mingi ya Liloba ya Nzambe oyo epesaka bomoi mpe tosengeli kozala penepene na baklisto ya solo mpo na kozwa lisungi mpe libateli. Na koleka, lokola fololo ya bangomba Alpe, tosengeli kokangama makasi na “libangá” na biso Yehova, mpe na Liloba na ye mpe na lisangá na ye.​—2 Samwele 22:3.

Ya solo, lititi zalá-na-bomoi-seko lizali bokundoli kitoko ete, ata kati na ezalela ya mpasi, tokoki kosalela bibongiseli oyo bizali. Yehova azali kondimisa biso ete mpiko motindo yango ekomema biso na ‘kozwa yango esili kolakama,’ oyo elimboli mpenza kozala na bomoi seko.​—Baebele 6:12; Matai 25:46.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto