Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 1/4 lok. 31
  • Kondima epusaki ye na mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kondima epusaki ye na mosala
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 1/4 lok. 31

Kondima epusaki ye na mosala

NTANGO Yehova apesaki Mose mokumba ya kobimisa libota ya Yisalaele na boombo ya Ezipito, liboso Mose aboyaki, na kolobáká ete: “Ɛ [Yehova], nazali moto na maloba polele te; nazalaki boye kalakala mpe ata nsima na koloba na yo na moombo na yo nazali bobele bongo.” (Exode 4:10) Ee, Mose amiyokaki ete azalaki na makoki te mpo na mokumba wana monene.

Bobele bongo lelo oyo, na bantango mosusu basaleli mingi ya Yehova bamiyokaka ete bazali na makoki te ya kokokisa mikumba oyo mipesameli bango. Na ndakisa, nkulutu moko moklisto na nkombo Théodore, alobi ete: “Kati na makambo nyonso oyo Yehova asɛngaka na ngai, mosala ya kosakola ezali mosala oyo eleki mpasi. Ntango nazalaki elenge, nazalaki kokenda nokinoki kino ekuke, nazalaki kosala lokola ete nabɛti ekuke mpe nazalaki kolongwa wana malɛmbɛ mpenza, na elikya ete moto moko te akoyoka ngai to akomona ngai. Ntango nakómaki mokolo, natikaki kosala bongo, kasi likanisi ya kokende ndako na ndako ebɛlisaka ngai. Ata kino lelo oyo, nayokaka kizunguzungu liboso na kokende na mosala ya kosakola, kasi atako bongo nakendaka.”

Nini oyo esungaki Mose mpe Batatoli ya mikolo na biso, lokola Théodore ete báyika mpiko na bobángi motindo wana? Biblia epesi eyano ete: “Mpo na kondima, [Mose] atikaki Ezipito, . . . zambi ayikaki mpiko lokola ete azali komona ye oyo akomonanaka te.”​—Baebele 11:27.

Ya solo, na kondimeláká Yehova, Mose akokaki kolónga mayoki ya kozanga kokoka oyo azalaki na yango mpe akokisaki mikumba na ye lokola mosambisi, mosakoli, motambwisi ekólo, moyokanisi ya kondimana ya Mibeko, mokonzi ya basodá, mokomi makambo ya kala mpe mokomi ya Biblia.

Bobele bongo, soki tozali na kondima lokola ya Mose, tokotambola lokola nde ‘tozali komona Ye oyo amonanaka te.’ Kondima motindo yango epesaka mpiko, ekopesa biso likoki ya komema mikumba minene

​—ata soki tomiyokaka ete tokoki te.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto