Bazali kopalanganisa solo ya biblia na Portugal
LONGWA na Caminha epai ya nɔ́rdi kino na Vila Real de Santo Antônio na súdi, bankóto ya masúwa ya kolɔ́ba mbisi oyo ezali na lángi ndenge na ndenge epalangani likoló na bakilomɛtɛlɛ 800 na ndelo ya mboka Portugal mpe libóngo ya Mai Monene ya Atlantiki. Na boumeli ya bikeke mingi, balɔ́bi-mbisi bazali kokende na mai monene, kosaláká ete mbisi ezala bilei ya ntina na mabota mingi ya bato ya Portugal.—Nzembo 107:23.
Na boumeli ya mibu 70 oyo mileki, kolɔ́ba ya lolenge mosusu mpe ezali kosalema na Portugal. Batatoli ya Yehova bamipesi mingi mpo na komema nsango malamu epai na ebele ya nkóto ya bambisi ya elilingi. (Matai 4:19) Na Máí 1995 motángo ya basakoli ya Bokonzi nyonso mozalaki 44650—bokokanisi ya motatoli 1 mpo na bato soko 210. Na bingumba mosusu motuya yango mozali bobele katikati na oyo.
Na motángo wana monene ya basáli, bateritware mingi esakolamaka mobimba pɔ́sɔ na pɔ́sɔ to penepene bongo. Na yango, Batatoli ya mboka Portugal basalelaka nokinoki myango mikeseni mpo na koyebisa elikya ya Biblia epai na basusu. Ee, bayebi mpenza ntina ya koyebisa solo ya Biblia na lolenge nyonso oyo ekoki kosalema.—1 Bakolinti 9:20-23.
Bazali kosunga baoyo bamipesi na makambo ya losambo
Engebene botángi bato oyo esalemaki na 1991, 70% ya bato oyo bazali na mibu kobanda 18 na mboka Portugal bazali komitánga ete bazali basangani ya lingomba ya Katolike ya Loma. Atako bongo, boyebi ya Biblia ezali te epai na bato yango. Zulunalo Jornal de Notícias elobaki ete: “Oyo ezali moko ya makambo ya mawa maleki monene ya mikili ya Bakatolike: Kozanga boyebi ya Biblia!” Mpo na nini yango ezali bongo? Expresso, zulunalo moko ya mboka Portugal epesi eyano na motuna yango. Kolobeláká likita moko oyo eyanganisaki basángó 500 na Fátima, zulunalo yango elobi ete: “Engebene mokonzi ya lingomba yango, esengeli ete basángó bámilongola bango moko na ebele ya misala misusu mpo ete bákoka kozongela bobele etɛlɛmɛlo na bango ya ‘basakoli.’ . . . Soki basángó batye motema na bango kati na mosala ya kosakola Evanzile, bakozala na ntango te ya komipesa na misala misusu.”
Na kokesana, Batatoli ya Yehova ya Portugal bamipesi mingi na koyebisa solo ya Biblia na libaku nyonso. Mbano na yango ezali ete, Bakatolike mingi ya motema sembo basili kozwa boyebi ya Biblia.
Carlota azalaki Mokatolike oyo amipesaki mingi mpe mosangani ya etuluku moko ya bilenge ya lingomba oyo basilaki kolapa ndai. Ye azalaki mpe molakisi na eteyelo ya bana mike epai Antônio, Motatoli moko, azalaki kosala. Lokola azalaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza, to mosakoli ya ntango nyonso, Antônio azalaki ntango nyonso kosala milende mpo na kosolola elongo na baninga na ye ya mosala na ngonga ya bolei. Mokolo moko Carlota atunaki ye motuna na ntina ya bindimeli bitali lifelo ya mɔ́tɔ mpe losambo ya Malia. Antônio amonisaki ye oyo Biblia ezali koteya na ntina na makambo yango, mpe wana ezalaki ebandeli ya masoló mingi ya Biblia. Ntango Carlota akendaki mpo na mbala ya liboso na makita na Ndako ya Bokonzi epai azalaki, akamwaki mingi. Nzokande, ngonga ya makita ezalaki kowelana na oyo ya etuluku na bango ya lingomba. Asosolaki ete asengelaki kozwa ekateli. Asengelaki kosala nini?
Carlota ayanganisaki etuluku mobimba ya bilenge mpe alimbolaki na lisalisi ya Biblia mpo na nini azalaki kolongwa. Banso batyolaki ekateli na ye, longolá bobele elenge mwasi moko na nkombo Stela, oyo ayokaki ye na likebi mingi. Ntango Carlota asololaki na ye na nsima, atunaki mingi mingi na ntina na ebandeli ya bomoi mpe mokano na yango. Carlota apesaki ye búku La vie: comment est-elle apparue? Évolution ou Création?a mpe abandaki boyekoli ya Biblia elongo na ye.
Bobele na ntango yango Carlota akólaki mpenza malamu na elimo, azwaki batisimo na Yúni 1991, mpe sanza motoba na nsima abandaki kosala lokola mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Na Máí 1992 ye mpe Antônio babalanaki, wana balandaki kosala mosala ya mobongisi-nzela elongo kati na lisangá moko ya penepene epai mposa ezali monene. Bongo Stela? Azwaki batisimo na Máí 1993 mpe sikawa azali mobongisi-nzela ya sanza na sanza.
Elenge Francisco amipesaki mingi na lingomba. Mokolo ya Lomingo nyonso na ntɔ́ngɔ́ azalaki kokɔta misa mpe na mpokwa azalaki kokende kosambela Malia. Azalaki mosungi ya sángó, kopesáká lisalisi na boumeli ya Misa. Abondelaki kutu Nzambe ete akóma “mosantu” mokolo mosusu!
Francisco azalaki mpenza na mposa ya kozwa Biblia, mpe mokolo moko moninga moko adefisaki ye yango. Akamwaki mingi na komona ete Nzambe azali na nkombo, Yehova. (Exode 6:3; Nzembo 83:18) Ntango atángaki na Exode 20:4, 5 ete Nzambe aboyi ete básalela bikeko kati na losambo, akamwaki lisusu mingi! Emonaki ye ete ndakonzambe etondaki na bikeko, abondelaki mingi ete Nzambe asalisa ye mpo asosola mobulungano nyonso wana. Mikolo mingi na nsima, akutanaki na moninga na ye moko ya kala ya kelasi mpe atunaki ye mpo na nini atikaki eteyelo ya mpokwa.
Moninga na ye ayanolaki ete: “Nazali sikawa koyangana na eteyelo ya mpokwa ya malamu mingi.”
Francisco atunaki ete: “Eteyelo nini yango, mpe ozali koyekola nini?” Akamwaki mingi mpenza na eyano ya moninga na ye.
Moninga na ye ayebisaki ye ete: “Nazali koyekola Biblia na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova. Okolinga koya elongo na ngai?”
Francisco akamwaki mingi na makambo oyo ye amonaki mbala ya liboso oyo ayanganaki na likita—bilongi ya esengo, ya bosepeli; bato oyo bazali kosolola na lolenge ya esengo mpe ya boninga; bana bafandi elongo na baboti na bango mpe bazali kotya likebi na oyo ezalaki kolobama.
Francisco alobaki ete: “Epai nafandaki, nayebanaki na moto moko te, nzokande namiyokaki lokola mosangani ya libota!” Kobanda wana akómaki koyangana pɔ́sɔ na pɔ́sɔ na makita. Sikawa Francisco azali nkulutu kati na lisangá, mpe elongo na mwasi na ye mpe bana na bango mibale, azali kosepela mingi na bilaka ya Bokonzi oyo bizali kati na Liloba ya Nzambe.
Kosakola solo epai na bandeko ya mosuni
Manuela, mobongisi-nzela moko ya sanza na sanza kati na etúká ya Lisbonne, azwaki mbano monene kati na mosala na ye ya kolɔ́ba mbisi ya elimo mpo ete amonisaki kolendendela na kopesáká litatoli na boboto epai na bato banso, bakisá bandeko na ye ya mosuni. Kati na bango José Eduardo, ndeko na ye ya mobali, oyo ayekolaki myango ya kobunda mpe lolenge ya kosalela bibundeli. Abukaki mibeko mbala mingi na boye ete na nsuka basambisaki ye na bifundeli 22 mpe bakatelaki ye mibu 20 ya bolɔ́kɔ. Azalaki mpenza na nkanda makasi na boye ete ata baninga na ye bakangami bazalaki kobanga ye, mpe atyamaki na eteni moko ya ndako ya bolɔ́kɔ ye moko.
Na boumeli ya mibu nsambo Manuela azalaki na motema pɛtɛɛ nyonso kokende kotala José Eduardo, kasi azalaki ntango nyonso koboya nsango ya Biblia oyo azalaki komemela ye. Na nsima, ntango búku La vie: comment est-elle apparue? Évolution ou création? ebimaki, azwaki yango, mpe boyekoli ya Biblia ebandaki. Nokinoki asalaki mbongwana monene kati na bomoi na ye. Nsima ya pɔ́sɔ moko apesaki litatoli epai na bakangami 200, mpe na pɔ́sɔ oyo elandaki epai na bakangami mosusu 600. Azwaki kutu ndingisa ya kokende kotala bakangami na bandako mosusu ya bolɔ́kɔ. Na ntina na mbongwana monene oyo asalaki kati na etamboli na ye, etumbu ekitisamaki na mibu 15. Nsima ya kosala kuna mibu 10, batikaki ye mpo na etamboli malamu. Kobanda wana mibu mitano misili koleka, mpe José Eduardo azali sikawa Motatoli ya Yehova oyo asili kozwa batisimo, mpe azali mosaleli na misala kati na lisangá epai ye azali. Oyo ezali solo ndakisa ya ‘nkoi afandi esika moko na mwana na mpate’!—Yisaya 11:6.
Mpo na milende na ye ya kotatola epai na libota na ye, Manuela asili kozwa esengo monene ya kosalisa mobali na ye mpe basangani mosusu minei ya libota na ye na kokóma makasi kati na mosala ya Yehova. Mobali na ye azali sikawa mosaleli na misala.
“Nakobéngana bango na mokɔ́sɔ mpe na fimbo”
Maria do Carmo azalaki kofanda na kartyé ya pembeni na engumba Lisbonne ntango Batatoli bakómaki epai na ye. Asepelaki na makambo oyo ayokaki mpe atunaki mobali na ye, Antônio, soki akokaki kondima boyekoli ya Biblia na ndako. Ayanolaki ete: “Komeka ata kokanisa yango te! Soki namoni Batatoli ya Yehova na ndako na biso, nakobengana bango na mokɔ́sɔ mpe na fimbo.” Antônio azalaki molakisi ya karate, ceinture noire, troisième dan. Yango wana Maria do Carmo azwaki ekateli ya koyekola Biblia na esika mosusu.
Na nsima, Antônio asengelaki kokende na Angleterre mpo na kolanda mateya ya karate na boumeli ya mikolo mwambe, mpe na mayele mpenza Maria do Carmo atyaki kati na sakosi na ye búku Mokanda mpo na Masolo ya Biblia.b Lokola Antônio azalaki na ntango mingi na boumeli ya mobémbo na ye, atángaki búku yango. Na bozongi, mopɛpɛ makasi eningisaki mpenza mpepo, mpe kokita na yango ezalaki na mpasi. Mpo na mbala ya liboso kati na bomoi na ye, Antônio abondelaki Yehova.
Ntango Antônio akómaki na ndako, Motatoli oyo azalaki koyekola Biblia na mwasi na ye abyangaki ye na makita. Andimaki mpe amonaki ete bato nyonso bazalaki na boninga mpenza. Bibongiseli bizwamaki mpo na boyekoli ya Biblia, mpe nsima ya ntango moke, Antônio asosolaki ete asengelaki kozwa bikateli. Na nsuka atikaki kolakisa karate mpe abandaki kolakisa na bayekoli na ye lolenge ya kozala na kimya sikawa mpe mpo na libela. Moko kati na bango, ye mpe ceinture noire, azali sikawa moklisto oyo asili kozwa batisimo.
Antônio azwaki batisimo na Apríli 1991. Mokolo oyo molandaki batisimo na ye, abandaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Sanza motoba na nsima abandaki mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza, mpe nokinoki abandaki kotambwisa boyekoli ya Biblia 12. Na Yulí 1993 aponamaki lokola mosaleli na misala kati na lisangá.
Kati na teritware epai basakolaka mbala na mbala
Na bisika mingi ya mboka, teritware etalelamaka pɔ́sɔ na pɔ́sɔ. Lolenge nini Batatoli bazali kokóba na misala na bango ya “kolɔ́ba mbisi” na lolenge ete ebota mbuma mingi?
João alukaka kokutana na bato banso na ndako moko na moko. Wana azalaki epai na mama moko, atunaki soki bato mosusu mpe bazalaki kofanda na ndako yango. Mama yango ayanolaki ete mobali na ye mpe bana na bango mibale ya mibali bazalaki kofanda wana, kasi ezalaki mpasi kokutana na bango mpo ete bazalaki kosala mpe bazalaki kozonga na ndako bobele na mpokwa. Na yango João akóbaki kotala bato mosusu na kartyé yango. Pene na ngonga moko na ndambo na nsima, mobali moko abɛlɛmaki na ye.
Mobali yango alobaki na João ete: “Olobaki ete olingaki kosolola na ngai. Soki olingi yebisá ngai makambo oyo olingaki koloba.”
Na kokamwa nyonso, João ayanolaki ete: “Limbisá ngai, nayebi yo te. Ozali nani?”
“Ngai nazali Antônio, nafandaka kuna liboso na balabála oyo. Olobaki na mama na ngai ete olingaki kosolola na basangani mosusu ya libota na biso, yango wana nayei mpo nayeba makambo olingaki koloba.”
João apesaki Antônio litatoli moko ya mozindo mpe abandaki koyekola Biblia elongo na ye. Nsima ya boyekoli ya mbala ya mibale, Antônio asɛngaki soki boyekoli yango ekokaki kosalema mbala mibale na pɔ́sɔ. Bobele nsima ya bapɔ́sɔ minei, alandaki João mpe abandaki kosakola nsango malamu na balabála na bango. Nsima ya sanza misato, azwaki batisimo. Eleki kala mingi te, mama na ye asili kobanda koyekola Biblia. Oyo nde ntina mpenza ya koluka kosolola na basangani nyonso ya libota moko moko wana tozali na mosala ya kosakola!
Makambo ya kosepelisa wana mazali komonisa ete mosala ya kolɔ́ba mbisi ya elimo mozali naino monene kati na mai ya Portugal. Yehova asili kopambola Batatoli oyo bazali kosala mosala makasi kuna na kopesáká bango ebele ya bayekoli ya Biblia oyo bazali kokóla malamu. Wana ezali bango kokóba koluka mabaku mingi ya koyebisa solo ya Biblia epai na bato nyonso, maloba ya ntoma Paulo epai na baklisto ya Filipi mazali solo kokokisama lelo na Portugal, ete: “Klisto azali kosakolama na nzela nyonso.”—Bafilipi 1:18.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
b Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
[Karte na lokasa 23]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
SPAIN
PORTUGAL
[Bililingi na lokasa 24, 25]
Batatoli ya Portugal bazali kosalela mabaku nyonso mpo na koyebisa solo ya Biblia