Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 1/1 nk. 3-4
  • Kimya ekoki kozwama?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kimya ekoki kozwama?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Masolo mosusu
  • Biblia elobi nini mpo na etumba ya nucléaire?
    Makambo mosusu
  • Nani akoki kotya kimya ya seko?
    Lamuká!—1996
  • Likámá ya nikleere​—Elongolami mpo na libela!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Kimya na mokili mobimba ezali nde komonana?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 1/1 nk. 3-4

Kimya ekoki kozwama?

“BITUMBA bikozala ntango nyonso na mokili. Yango ezali likambo ya mawa na ntina na bato.” Likanisi wana ya kozanga elikya eutaki kala mingi te komonana kati na nkomá oyo motángi moko atindaki na zulunalo Newsweek. Ondimi likanisi oyo? Bitumba bikoki kosila te mpe kimya ekoki kozwama te? Soki totaleli makambo oyo masilá kosalema kati na lisoló ya bato, tokopusama nokinoki na koyanola ɛɛ na mituna wana mibale. Na kotalela masoló ya makambo ya kala oyo masilá kotyama na mikanda, bato bazali komikɔtisa kati na mobulu ya bitumba moko nsima na mosusu, mpe matáta makómaki makasi wana bato bakólisaki mayele mingi ya kobomana moko na mosusu.

Ekeke ya 20 mpe esili komona makambo wana. Ya solo, esili komona bitumba bileki na kosopa makila, kasi esili mpe komona likambo mosusu ya sika. Esili koleka mibu ntuku mitano, Etats-Unis ekɔtisaki eleko ya nikleere na kobwakáká bómbi atomike mibale na Japon. Na bambula ntuku mitano oyo eleki kobanda na ntango wana, mabota masili kobomba ebele ya bibundeli ya nikleere oyo ekoki koboma bato mbala mingi koleka. Bibundeli ya nikleere ekobangisa bato mpo ete bátika komipesa na bitumba? Makambo mazali kosalema mapesi eyano na motuna wana. Kobanda 1945 bamilió mingi ya bato basili kokufa kati na bitumba​—atako bómbi ya nikleere ebwakamaki lisusu te.

Mpo na nini bato balingi mingi bitumba? Búku Encyclopedia Americana elobeli mwa ndambo ya makambo oyo uta kala esili komema bato na bitumba. Kati na makambo yango tozali kokuta kozanga kondima makanisi ya bato mosusu mpo na oyo etali lingomba, koponapona mposo, mimeseno mikeseni, makanisi makeseni (lokola Kominisme mpe kapitalisme), bolingí-ekólo mpe liteya ya bonsomi ya ekólo, makambo na nkita, mpe bokumisi mosala ya sodá. Wana ozali kotánga makambo oyo, ozali komona ete ezali na eloko moko oyo ekoki kobongwana mosika te? Mabota makolɛmbisa ekateli na bango ya kobatela lotómo ya komiyangela? Bato bakolɛmbisa ezaleli na bango ya koponapona mposo? Mangomba ya kala makolɛmbisa bindimandima na yango? Yango ekoki mpenza kosalema te.

Na bongo, elikya ezali te na makambo nyonso wana ete mokolo mosusu makambo makozala malamu mpe ete kimya ya koumela ekozala? Ɛɛ, elikya ezali. Atako yikiyiki ya mokili oyo, likoki ezali ya kozwa kimya ata lelo. Bamilió ya bato basili kozwa yango. Tiká tóyebisa yo na ntina na mwa ndambo moke ya bato yango mpe otala soki makambo yango makoki kozala na bopusi nini epai na yo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto