Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 15/12 nk. 26-29
  • Boyengebene etombolaka libota

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Boyengebene etombolaka libota
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Yisalaele ya elimo
  • Bato ya mokili bazali komona bokeseni
  • Ntina oyo basusu babimisamaka na lisangá
  • Tótombola boyengebene ya Yehova
  • Sepelá na boyengebene ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mpo na nini kolanda kosalela boyengebene?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Ndimáká disipilini ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mpo na nini kobimisa moto na lisangá ezali ebongiseli ya bolingo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 15/12 nk. 26-29

Boyengebene etombolaka libota

NSIMA wana mbula ebɛti na boumeli ya mikolo mingi, okozala mpenza na esengo, na ntango olamuki, omoni moi ezali kongɛnga mpe likoló ezangi mapata! Mabelé ekómi mpiɔ, mpe sikawa bitwele bikoki kobima mingi. Mokolo mosusu Yehova Nzambe asalelaki elilingi motindo wana mpo na kolobela mapamboli oyo bokonzi oyo etambwisami na boyengebene ekoki kozwa yango. Alobaki na Mokonzi Davidi ete: “Wana ye oyo azali koyangela bato azali moto na boyengebene, koyangeláká na kobanga Nzambe, na bongo ezali lokola pole ya ntongo, wana moi ezali kongɛnga, ntongo ezangi mapata. Na lisalisi ya pole, na lisalisi ya mbula, matiti mazali kobima na mabelé.”​—2 Samwele 23:3, 4, NW.

Maloba wana ya Nzambe makokisamaki na boumeli ya boyangeli ya sembo ya Mokonzi Salomo, mwana na Davidi. Biblia eyebisi ete: “Yuda mpe Yisalaele bafandaki na kimya longwa na Dani kino Bele-seba, moto na moto na nsé na mowiti na vinyo na ye mpe na nzeté na ye na mbuma, mikolo nyonso na Salomo.”​—1 Mikonzi 4:25.

Yisalaele ya kala ezalaki ekólo oyo eponamaki na Nzambe. Apesaki bango mibeko na ye mpe ayebisaki bango ete soki batosaki maloba na ye, mbɛlɛ alingaki kotombola bango “likoló na mabota nyonso na nsé.” (Deteronome 28:1) Ezalaki te boyengebene ya Yisalaele mpenza nde etombolaki bango kasi boyengebene ya Yehova. Mitindá oyo Yehova apesaki bango mizalaki likoló mpenza koleka mibeko ya bikólo oyo bizalaki zingazinga na bango. Lokola bazalaki bato, bazalaki na kozanga kokoka lolenge moko na bikólo nyonso wana. Na yango, soki batombwanaki koleka mabota nyonso, ezalaki mpo na Mibeko mitombwani oyo Yehova apesaki bango mpe mpo na bokangami na bango makasi na mibeko yango. Na ntango batosaki mibeko ya Yehova, bandimamaki na ye mpe bazwaki mapamboli na ye. Mokonzi Salomo amonaki yango na boumeli ya boyangeli na ye. Alobaki ete: “Boyengebene ekokumisa libota nde masumu ikoyeisela bato nsɔ́ni.”​—Masese 14:34.

Na mawa nyonso, lokola bamonisaki kozanga botosi mbala na mbala, ekólo ya Yisalaele ekitisamaki na nsé. Ekólo mobimba eyokisamaki nsɔ́ni. Yango esalaki ete na nsuka bábwakama mpo na libela, ete ekólo moko ya sika ya elimo ekamata esika na bango.​—Matai 21:43.

Yisalaele ya elimo

Na likita ya lisangani ya baklisto mikóló-bakambi na Yelusaleme, Yakobo, ye oyo azalaki Moyuda, apemamaki mpo na koloba ete Nzambe “atyaki likebi na ye likoló na bikólo mpo na kokamata kati na yango libota moko mpo na nkombo na ye.” (Misala 15:14, NW) Ntoma Paulo abéngaki ekólo wana ya sika ya boklisto ete “Yisalaele ya Nzambe.” (Bagalatia 6:16) Na ntina etali mokano ya libyangi na bango, Petelo akomaki ete: “Nde bino bozali [ekólo, NW] eponami, banganga na bokonzi, libota na bulɛɛ, bato baponami, ete bóyebisa malamu na oyo abyangi bino kobima na molili kokɔta na moi na ye na kokamwisa.” (1 Petelo 2:9) Lokola libota liponami na Nzambe, basengelaki kongɛnga lokola bingɛngɛli kati na mokili. Boyengebene ya Yehova esengelaki kotombola bango likoló.​—Bafilipi 2:15.

Koponama ya Bayisalaele wana ya elimo ekoki kokokanisama na lolenge balukaka diamá. Na ntango makɛ́lɛ ya motuya mingi oyo ezali na diamá ebimisami uta na mabelé, ekoki kozala bobele na kará 1 (200 mg) mpo na batone 3 ya mabelé. Moko na myango oyo ezalaki kosalelama kala mpo na kopona diamá ezalaki bongo ya kosangisa makɛ́lɛ elongo na mai mpe na nsima kosopa yango likoló na mesa oyo epakolami mafuta ya nyama. Diamá elinganaka na mai te, ekanganaka na mafuta mpe biloko mosusu oyo bizangi ntina bizalaki kobwakama. Nsima ya kosala bongo, diamá ezalaki naino salité. Nzokande, na ntango ekatami mpe epalolami, ezalaki kongɛnga bipai na bipai.

Lokola diamá oyo elinganaka na mai te mpe esanganaka te na biloko oyo bizali zingazinga na yango, basaleli ya Yehova bakabwani na mokili. (Yoane 17:16) Ekoki kozala ete na ntango bamemamaki kati na pole, bazalaki kongɛnga te. Kasi Liloba ya Yehova mpe elimo na ye ezalisaki bomoto ya sika kati na bango, mpe bangɛngaki lokola bingɛngɛli kati na mokili. Ezali mpo na boyengebene ya Yehova nde batombolami mpe bazali kongɛngisa pole ya solo ya Bokonzi bipai na bipai, kasi mpo na boyengebene na bango moko te.

Nzokande, kobanda na nsuka ya ekeke ya liboso T.B., lipɛngwi likɔtaki kati na masangá mpe ekamataki bato mingi. Baoyo bazalaki komibénga baklisto basanganaki na bikólo ya mokili mpe bakokaki te kokesenisama na mokili oyo ezingaki bango.

Lelo batikali bapakolami ya sembo ya Yisalaele ya elimo basili kozongisama mpo na kondimama na Nzambe. Bamikaboli na mokili mpe bamipɛtɔli “na mbindo nyonso na nzoto mpe na [elimo, NW].” (2 Bakolinti 7:1) Lokola bakómi pɛtɔ mpe sembo liboso na Yehova, basimbaki boyengebene na ye. Yango etomboli bango na etɛlɛmɛlo ya ngɔlu likoló na mabota nyonso ya mokili. Na nzela ya mosala na bango ya kosakola nsango malamu na molende, etuluku monene ya bato bauti na mikili ndenge na ndenge bazali komemama epai na Yehova mpe bazali kokóma basangani ya libota na ye.​—Emoniseli 7:9, 10.

Bato ya mokili bazali komona bokeseni

Na bantango mosusu bakonzi ya mokili bakumisaka basaleli ya Nzambe mpo na etamboli na bango. Esili koleka mwa mikolo, mokonzi moko oyo akɛngɛlaka esika ya foire na engumba Pretoria, na Afrique du Sud, akumisaki etamboli malamu ya Batatoli ya Yehova, ya mposo nyonso, oyo basalelaka esika yango mpo na mayangani minene na bango ya mbula na mbula. Akomaki ete: “Moto nyonso azalaki mpe azali na bonkonde, bato bazali kosolola na esengo nyonso moko na mosusu, ezaleli oyo bamonisaki na mwa mikolo moke oyo miuti koleka​—nyonso wana ezali komonisa nguya ya basangani ya lisangá na bino, mpe ete bino banso bozali kofanda elongo lokola libota moko ya esengo.”

Basaleli ya Yehova bakoki kosala ete libota na ye ezala na boyengebene, bobele te kati na mayangani minene, kasi lisusu kati na bomoi ya mokomoko na bango. Na ndakisa, filiale ya la Société Watch Tower na Afrique du Sud ezwaki nkomá oyo eutaki epai na elenge mwasi moko na Johannesbourg, elobaki ete: “Na pɔ́sɔ eleki na ntango nabimaki na motuka na ngai natyaki potomoné na ngai likoló na yango. Ekweaki na balabála Jan Smuts mpe moko na basangani ya lisangá na bino, Mr. R​—, alokotaki yango elongo na biloko nyonso oyo ezalaki kati na yango, abéngaki ngai na telefone mpe azongiselaki ngai yango. . . . Nasepelaki mingi na ezaleli wana ya kolongobana oyo ezali bongo likambo oyo esalemaka lisusu mpenza mingi te na mikolo oyo mpe nazali kopesa longonya epai na lisangá na bino mpo ete botyaki malako oyo basangani na bino balandaka.”

Ee, na kolandáká malako ya boyengebene ya Nzambe, bato na ye bazali kokesana mpenza na bato ya mokili. Lokola yango ezali komonisa boyengebene ya Yehova, bato ya mitema sembo bazali komemama kati na lisangá ya boklisto. Ezali likambo ya kokamwa te na komona ete bato bábendama na eloko oyo ezangi litɔnɔ mpe ezali pɛtɔ. Na ndakisa, mokolo mosusu mopaya moko ayaki na likita moko ya Batatoli ya Yehova na engumba Zurich, na Suisse, mpe alobaki ete azalaki na mposa ya kokóma mosangani ya lisangá. Alobaki ete balongolaki ndeko na ye ya mwasi na lisangá mpo na etamboli ya mbindo mpe alobaki ete alingaki kokɔta na lisangá oyo “ekangaka miso te liboso na bizaleli mabe.” Ata búku The New Catholic Encyclopedia endimi ete Batatoli ya Yehova bayebani lokola “moko na bituluku ya bato ya etamboli malamu kati na mokili.”

Boyengebene etombolaka, kasi lisumu ekoki kobebisa lokumu malamu, mingi mpenza soki mabe monene oyo moto moko asalaki eyebani na bato banso. Mbala mosusu, lisangá ya boklisto ezwaka nsɔ́ni oyo basangani mosusu babwakaka likoló na yango na ntango bazali kosala masumu minene. Yango wana, basangani ya sembo ya lisangá bakoki kolóngisa lokumu malamu ya lisangá na komonisáká ete moto oyo asalaki mabe apesamelaki disipilini na motema mawa nyonso, elingi koloba, engebene malako ya Biblia. Soki moto moko azali kosala masumu mpe abongwani te, akolongolama na lisangá​—akobimisama.​—1 Bakolinti 5:9-13.

Ntina oyo basusu babimisamaka na lisangá

Atako bankóto ya bato babimisamaka na lisangá ya boklisto mbula na mbula, soki tokokanisi bango na oyo bakómi soko milió mitano kati na mokili mobimba, tokomona ete baoyo bazali kobimisama bazali moke mpenza. Mpo na nini ekateli makasi boye esengeli kokamatama mpo na moto ata nani kati na lisangá ya boklisto? Etalelaka mingi mpenza bonene ya mbeba oyo moto asali te. Kasi likambo eleki ntina ezali bongo ya kotalela soki ye oyo asali mabe azali na elimo ya solosolo ya kobongwana na mabe monene oyo asalaki. Soki ayoki mpenza mawa kati na motema na ye, amibaloli epai na Yehova kati na libondeli oyo euti mpenza na nsé ya motema, kosɛngáká bongo bolimbisi mpo na lisumu oyo asalaki, mpe aluki lisungi epai na baoyo bazali na mokumba kati na lisangá, akoki kosalisama mpo ete andimama lisusu na Nzambe mpe atikala kati na lisangá.​—Masese 28:13; Yakobo 5:14, 15.

Na ntango mwana oyo azali na boyokani malamu elongo na tata na ye asali likambo moko oyo epesi tata na ye mawa, bango nyonso mibale basengeli kosala nokinoki mpo na kozongisa boyokani wana ya ntina mingi. Bobele bongo, na ntango topesi bomoi na biso epai na Yehova, tosali boyokani ya ntina mingi elongo na ye. Na yango, na ntango tosali likambo moko oyo epesi ye mawa, tosengeli kosala nokinoki mpo na koluka kozongisa boyokani wana elongo na Tata na biso ya likoló.

Ezali likambo ya esengo ete, basusu oyo babimisamaki na lisangá basosolaki mpenza lisese ya mwana na kilikili. Awa Yehova akokanisami na Tata oyo atondi na bolingo mpe azali pene ya kondima mosumuki oyo abongoli motema soki mpenza moto yango abaluki epai na Nzambe mpo na kosɛnga bolimbisi ya masumu na ye. (Luka 15:11-24) Kobongwana ya solosolo, oyo euti mpenza na nsé ya motema, mpe kotika mabe ezali lolenge ya kozongela kondimama na Nzambe mpe kondimama na lisangá ya Yehova. Bamoko kati na basáli mabe oyo babongolaki motema, baoyo bamiyokaki ete babulunganisamaki mpo na bonene ya ngambo na bango bapusamaki na kobongola motema mpe na kokamata bibongiseli ya kozonga kati na ezingelo ya lisangá ya boklisto oyo etondi na bolingo. Na yango, bakangaki ntina ya maloba ya Yehova oyo mazwami kati na Yisaya 57:15.

Mpo na kopekisa bato ete bázongela te libateli ya bolingo ya Yehova, Satana akolinga komonisa lokola ete bolimbisi ya masumu ezali te mpo na masumu oyo masalemaki. Kasi mbeka ya lisiko ya Yesu ekoki mpenza mpo na kozipa masumu ya moto nyonso oyo abongoli motema​—ee, ata mpe ezalela ya lisumu oyo “mokili mobimba” esangolaki. (1 Yoane 2:1, 2) Lisumu bobele moko oyo lisiko ezipaka yango te ezali bongo lisumu oyo esalelami epai na elimo santu ya Nzambe, oyo ekokani bongo na botombokeli mosala ya elimo ya Nzambe, na ndakisa masumu minene oyo Yuda Mokeliota mpe bakomeli mpe Bafalisai basalaki.​—Matai 12:24, 31, 32; 23:13, 33; Yoane 17:12.

Tótombola boyengebene ya Yehova

Uta ntango batikali ya Yisalaele ya elimo bandimamaki lisusu epai na Nzambe na 1919, bazali sé kotombwana likoló na mokili oyo ezingi bango. Yango ezali te mpo na malamu oyo basali bango moko kasi mpo ete bazali kotosa mibeko mpe malako ya Yehova kozanga kokakatana. Yango wana, bamilió ya “bampate mosusu” ya Klisto babendamaki ete báya kosangana elongo na Yisalaele ya elimo, lokola baninga ya bokonzi. (Yoane 10:16) Bato yango bazali kopesa nkembo mpe lokumu epai na Yehova kati na mokili oyo emitangoli mosika na malako ya boyengebene ya Nzambe. Ezali lokola zulunalo Personality ya Afrique du Sud elobaki yango: “Emonani ete Batatoli ya Yehova bazali na bizaleli mingi ya malamu mpe ete basalaka mpenza mabe te.”

Mpo na kobatela etɛlɛmɛlo wana etombwani kati na mokili oyo etukaka Nzambe, mosangani mokomoko ya lisangá ya boklisto asengeli kozala na bomoi ya pɛtɔ, ya sembo liboso na Yehova. Kati na Biblia, lisangá ya Yehova na likoló emonisami na elilingi na biloko ya pɛtɔ. Emonanaki na motindo ya mwasi moko bonzéngá alatisami moi mpe sanza etyamaki na nsé ya makolo na ye. (Emoniseli 12:1) Yelusaleme ya sika etalelami lokola mboka ya bulɛɛ, mboka kitoko. (Emoniseli 21:2) Balatisaki basangani ya sembo ya mwasi ya Klisto “molikani ya pɛtɛɛ, ya kongɛnga, ya pɛtɔ.” (Emoniseli 19:8, NW) Basangani ya ebele monene balati “bilamba mpɛmbɛ.” (Emoniseli 7:9) Bato oyo balingaka boyengebene bazali kobendama kati na lisangá ya pɛtɔ. Na ngambo mosusu, lisangá ya Satana ezali oyo ezangi pɛtɔ. Ebongiseli ya mangomba na yango emonisami lokola mwasi na pite, mpe baoyo bazali na libandá ya mboka ya bulɛɛ balobelami ete bazali mbindo, bazangi pɛtɔ.​—Emoniseli 17:1; 22:15.

Bato na boyengebene balakelami ete bakozwa bomoi ya seko. Bato oyo basangisami esika moko mpe bazali kotombola boyengebene ya Yehova bazali na elikya ya kobika na nsuka ya ebongiseli oyo ya mabe. Nzambe apesi elaka oyo kati na Masese 1:33, ete: “Ye oyo akoyokamela ngai akofanda na kimya.”

Ekozala mpenza esengo monene wana Salomo Monene, Yesu Klisto, akoyangela mokili ya sika na boyengebene, kati na bobángi Yehova! (2 Petelo 3:13) Ekozala lokola pole ya ntongo na ntango moi ebimaka, ntongo ezangi mapata. Bafandi nyonso ya mabelé bakofanda na libateli, moto na moto akofanda na nsé ya nzeté na ye ya mowiti mpe ya mosuke. Bato ya sembo bakokembisa mabelé mpe bakofanda na esika ebongi mpenza kati na molɔngɔ́ mpo na kosanzola Yehova Nzambe na biso mpo na libela.​—Mika 4:3, 4; talá lisusu Yisaya 65:17-19, 25.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 26]

Garo Nalbandian

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto