Talá! Ndako ya Bokonzi na Niue
NIUE ezali esanga moko oyo etando na yango ezali mabángámabángá, ezwami na Pacifique Sud, ekabwani na Nouvelle-Zélande na ntáká ya bakilomɛtɛlɛ 2 160 na nɔ́rdi. Engebene mwa búku moko ya basáli mobembo, nkombo Niue euti na maloba mibale, Niu, oyo elimboli “nzeté ya kokoti,” mpe e elimboli “moná,” to “talá.” Mwa búku yango elobi ete: “Masapo matali esanga yango mayebisi ete bato ya liboso oyo bakendaki kofanda kuna, oyo bautaki na Polynésie, balobaki maloba wana ntango bakómaki kuna mpe wana bamonaki banzeté ya kokoti kokóla kati na esanga.”
Lelo oyo, Batatoli ya Yehova na Niue bazali na esengo ya koyebisa epai na baoyo bayaka kotala esanga yango ete: E! Fale he Kautu ha mautolu!” elimboli, “Talá! Ndako ya Bokonzi na biso!” Mpo na nini bazali na esengo mingi boye na ntina na ndako yango? Na mikili nyonso Batatoli ya Yehova basepelaka na Bandako ya Bokonzi na bango, mingi mpenza soki bango moko nde batongaki yango. Kasi mpo na kotonga Ndako ya Bokonzi na esanga oyo ezali mosika, na katikati ya Pacifique Sud ezali likambo ya mpasi mpenza. Niue ezali na etando bobele ya 260 km2, mpe esanga mobimba ezali bobele na bafandi 2 300.
Likambo monene ezalaki bongo ya koyeba soki banani basengelaki kotonga Ndako ya Bokonzi yango. Lisangá oyo ezali na Niue ezali bobele na basakoli 32. Bisaleli nyonso oyo bisengelaki, na ndakisa mituka ya minene, mituka ya kotimola, mpe bitombwelo, izali ya Leta. Lisusu, biloko mingi mpenza ya botongi—bibende, mabángá, motóndó mpe batiyó ya pompi, bikóliseli loláká, mpe bakiti—bisengelaki kouta na Nouvelle-Zélande na mwango moko oyo esalaka bobele mbala moko nsima ya pɔ́sɔ́ mitano. Na nsuka, lokola etando ya esanga yango etondi na mabángá, ekokaki kosala ete mosala ya botongi ezala mpenza mpasi, mpe ndako yango esengelaki kotongama na lolenge ete mipɛpɛ makasi mikweisa yango te. Ya solo, ezalaki mosala monene mpo na moko moko!
Nzokande, ezalaki bongo bokeseni monene. Mpo na Batatoli ya Yehova, Ndako ya Bokonzi ezali esika ya ntina mpo na losambo ya solo na mboka oyo bango bafandi, mpe batyaka motema na bango epai na Yehova mpo na kozwa litambwisi mpe lisungi. (Nzembo 56:11; 127:1) Bandeko baklisto na Nouvelle-Zélande, bakisá mpe basangani ya lisangá ya Niuean na Auckland, bayaki kosunga etuluku moke ya Batatoli na Niue, bapesaki lisungi na motema na bango mobimba mpo na mosala wana ya botongi.
Ekateli ya kokóba
Na Yúni 1994, na esika bazalaki kotonga Ndako ya Bokonzi na Rotorua, na Nouvelle-Zélande, libyangi epesamaki mpo na baoyo balingaki kopesa mabɔkɔ na mosala ya botongi na Niue. Likambo ya kokamwa, bandeko mibali mpe bandeko basi baklisto 200 bandimaki libyangi yango na bolingo malamu na bango moko. Kati na bango, bato 80 baponamaki: basáli na mabaya, basáli na bibende, babongisi pompi, baoyo basalaka mosala ya kotya motóndó, batongi, bapakoli lángi, basáli na lotiliki, mpe basáli oyo batyaka bikoliseli lolaka, baoyo batyaka mabángá na nsé, babɛti bilíki, mpe basáli mosusu ya misala ya mabɔkɔ.
Bandeko balengelaki botongi mpe babandaki mosala, na kotyáká elikya epai na Yehova. Moko na bankulutu mibale ya lisangá ya Niue, moto ya mombongo kati na engumba wana, akamataki bibongiseli mpo ete biloko nyonso oyo bisengelaki bikóma. Ebongiseli mosusu ekamatamaki mpo na kokakola ntálo ya tiké ya mpepo mpo na basáli oyo basengelaki kouta mosika, oyo bamipesaki na bolingo malamu mpo na kofuta mosolo na bango moko, mpe dati oyo botongi esengelaki kobanda mpe dati oyo esengelaki kosila etyamaki. Mosala yango esengelaki kosila nsima ya mikolo 20, kobanda na mokolo mwa 4 Mársi kino na mokolo mwa 23 Mársi 1995, na ntango oyo Ndako ya bokonzi esengelaki kofungolama.
Mokambi ya mosala yango, ye oyo autaki na Nouvelle-Zélande mpe akómaki kuna pɔ́sɔ moko liboso mpo na kotya makambo na molɔngɔ́ alobaki ete: “Ezalaki mpo na ngai mbala ya liboso ya kobulunganisama na makanisi. Etando ezalaki mabángámabángá. Esengelaki pɔ́sɔ mibale mpo na kosala moboko.” Kasi atyelaki Batatoli ya mboka wana motema te. Na nsuka ayaki mpenza kondima: “Bandeko ya Niue bayebi mabángá malamu. Bayebi esika ya kobɛta ebendé na libángá mpo ete biteni minene bipanzana.” Miboko misilaki kosalema nsima ya mikolo mibale!
Na mokolo mwa 4 Mársi mpɛ́pɔ ya liboso oyo ekumbaki Batatoli oyo bautaki na Nouvelle-Zélande ekómaki, mpe mosala mpenza mobandaki. Kolandana ya bituluku ya basáli oyo bazalaki koya, biteni ndenge na ndenge ya mosala bisalemaki. Mosala mozalakaki kobanda na 7:00 ya ntongo na mwa lisoló mokuse ya mokapo ya Biblia ya mokolo na mokolo. Bandeko mosusu bazalaki kosala na boumeli ya bangonga 12 na mokolo, na nsé ya moi makasi oyo ezalaki kokóma kino na molungé ya 36° C. Na nsuka, pene na mokolo mwa 23 Mársi, balonaki fololo na mabelé. Elembo moko kitoko esalemi na nzeté ya mángolo emonisaki ete ndako yango ezali bongo “Ndako ya Bokonzi.”
Elimo ya kosala na bomoko mpe ya boyambi bapaya
Likambo ya ntina mingi oyo esungaki mpo ete mosala molónga ezalaki bongo elimo ya kosala na bomoko oyo bato ya Niue bamonisaki. Elimo oyo emonisamaki na libaku yango ekɔtelaki mpe bato ya mboka, na yango bapesaki makabo ya bilei mpe ya mosolo. Mingi na bango batalelaki mosala ya botongi ndako wana lokola mosala na bango. Bakonzi ya Leta mpe bato ya mombongo bapesaki lisungi na bango koleka oyo bandeko bamizelaki na yango. Bisaleli oyo bisengelaki bipesamaki, bapesamelaki ndingisa ya kosalisa misala na kompanyi moko ya mabaya. Kompanyi ya masúwa ezalaki kútu kobongola nzela ya masúwa na yango mpo ete biloko ya mosala bikóma na ntango ebongi.
Bato oyo bazalaki koya kotala basepelaki mingi na mosala makasi mpe na elimo ya boyambi bapaya oyo Batatoli ya Niue bamonisaki, oyo basalelaki bandako na bango mpe biloko na bango elongo na Batatoli mosusu. Moko kati na basáli alobaki ete: “Bandeko basi ya lisangá wana bazalaki na molende mingi.” Longolá bilei ya mɔ́tɔ oyo bazalaki kolɛngɛla mikolo nyonso na midi, bazalaki mpe kolamba bilei ya ntongo mikolo nyonso na 6:30. Basusu bazalaki kolamuka na 4:30 mpo na kolamba bilei. Mosáli mosusu alobaki ete: “Nabanzi ete tofandi malamu awa na Niue koleka na bipai touti.”
Na mokolo mwa 10 Mársi zulunalo Niue Star eyebisaki likambo yango na lokasa ya liboso na motó ya likambo “Ndako ya Bokonzi ya liboso kati na Niue” mpe fɔtɔ́ ya bandeko ya Nouvelle-Zélande bazali kosala elongo etyamaki wana. Eyebisaki ete ndako yango ezali na bonene ya 280 m2 mpe ezali na bifandelo mpo na bato 70 kino bato 100. Lisoló yango elobaki lisusu ete: “Mosala yango mokoki kokamata mpenza [pɔ́sɔ] mibale, kasi soki ekosalema bongo ekozala nde mingi. Sikawa, bobele mikolo mibale mileki uta mosala mobandaki, moboko, makonzi ya ndako, mabásá, mpe motóndó isili kotyama, liboso ya ntango oyo ekanamaki.”
Moto moko ya mombongo na mboka wana asepelaki ete bafandi nyonso ya Esanga Niue bátala mosala wana mpe bázwa liteya kati na yango. Alobaki ete azalaki na elikya ete yango ekomonisa epai na moto nyonso makambo oyo bato bakoki kokokisa soki bolingo mpe elimo ya kosala na bomoko ezali.
Etuluku monene ya bato 204 bayaki na molulu ya bofungoli. Likambo oyo ebendaki likebi ya bayangani nyonso ezalaki bongo elakiseli moko ya ntina mingi oyo kati na yango bandeko mibali, bandeko basi, mpe bana ya Niue bamonisaki kati na loyembo mpe kati na mabina lolenge Ndako ya bokonzi etongamaki. Matondi mapesamaki epai na etuluku oyo esalaki mosala wana ya botongi mpe epai na Yehova, mpamba te elimo na ye epusaki makanisi, mitema, mpe mabɔkɔ ya bato mpo ete mosala mosalema.—Yisaya 40:28-31.