Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 15/9 nk. 5-6
  • Zúwa elingaki kobebisa bomoi na ngai

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Zúwa elingaki kobebisa bomoi na ngai
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Masolo mosusu
  • Bolingo elóngaka zúwa ya mabe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Zúwa mpo na losambo ya pɛtɔ ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Oyo tosengeli koyeba na ntina na zúwa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Baklisto basengeli kozala na zuwa?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 15/9 nk. 5-6

Zúwa elingaki kobebisa bomoi na ngai

ZÚWA ebandaki mpenza kopusa ngai na lolenge ya mabe na ntango nabalaki mobali na ngai ya mibale, Marc.a Biso mibale elongo tosengelaki kobókola bana ya moko na mosusu mpe kotalela boyokani na biso elongo na babalani na biso ya kala. Na bantango mosusu ebandaki kozala mpenza mpasi. Na ntango nyonso oyo tozalaki koswana kati na libota, emonanaki ete Marc azalaki kokoka te kokanga motema mpo na makambo na ngai. Nabandaki komiyoka ete azalaki kokóba kolinga mwasi na ye ya kala. Na esika ete namipekisa na zúwa na ngai, natikelaki yango nzela ete elónga bomoi na ngai. Nazalaki kobanga mingi soki mwasi ya kala ya Marc azali wana.

Nazalaki kotalatala Marc kozanga kotika, nazalaki kosɛnzɛla soki miso na ye ezalaki kotala epai wapi. Nazalaki kokanisela ye makambo oyo ye nkutu azalaki kokanisa te. Na bantango mosusu nazalaki kofunda ye liboso na bato banso ete atikaki naino mwasi na ye ya kala te. Mokolo mosusu ayokaki mawa mingi mpo na yango na boye ete atɛlɛmaki mpe abimaki na liyangani moko ya boklisto. Nazalaki na liyoki ya ngambo liboso na Yehova. Nayokisaki libota na ngai mpasi mpamba te na nsuka bana mpe batungisamaki. Namiyinaki mpo na makambo oyo nazalaki kosala, kasi atako milende nyonso oyo nazalaki kosala, nakokaki te kolónga zúwa na ngai.

Na esika ete asunga ngai, Marc abandaki kozongisa mabe na mabe. Na ntango nafundaki ye, angangelaki ngai ete: “Zúwa, ozali nde na zúwa.” Nkutu emonanaki ete abandaki kosala makambo na nkó mpo na kokómisa ngai mwasi na zúwa. Mbala mosusu akanisaki ete kosala bongo elingaki kosilisa zúwa na ngai, nzokande ebakisaki yango lisusu. Abandaki kotala basi mosusu, kokumisáká kitoko na bango. Yango esalaki ete namiyoka ete nazali na ntina te mpe nalingami te. Natungisamaki mpenza kino na meko oyo liyoki mosusu​—koyina​—ekɔtelaki ngai mpenza makasi. Na ntango wana nabulunganisamaki mingi na boye ete nalingaki bobele kokabwana na ye mpe libota na ye.

Na ntango Biblia elobi ete “elulelá ekopolisa mikwa,” ezali mpenza bongo. (Masese 14:30) Kolɔngɔ́nɔ́ na ngai ya nzoto ebandaki sikawa kobeba. Nazwaki bampota na esitomá, yango eumelaki mingi mpo na kosila. Nakóbaki kobebisa bomoi na ngai na kokanisáká mabe na ntina na makambo nyonso oyo Marc azalaki kosala. Nazalaki kolukaluka kati na mabenga ya bilamba banimero na ye ya telefone, nazalaki komeka kobénga na banimero yango mpo na koyeba baoyo bazalaki koyanola na yango. Na nsé ya motema na ngai mpenza nayokaki mpenza nsɔ́ni, nazalaki kolela mpo na nsɔ́ni oyo nazalaki koyoka liboso na Yehova. Atako bongo nakokaki komipekisa te. Ngai moko nazalaki monguna monene ya nzoto na ngai.

Bizaleli na ngai ya elimo ebebaki kino na meko oyo nazalaki kokoka lisusu kosambela te. Nazalaki kolinga Yehova mpe nazalaki mpenza kolinga kosala oyo ezali sembo. Nayebaki mikapo nyonso oyo elobelaka mibali mpe basi na libala, kasi nazalaki kokoka te kosalela yango. Mpo na mbala ya liboso na bomoi na ngai, nalingaki ete nákufa na ngai, atako nazalaki na bana ya kitoko.

Bankulutu kati na lisangá ya boklisto balendisaki ngai mingi mpe basalaki oyo ekoki na bango mpo na kosunga ngai. Kasi na ntango bamonisaki likambo litali ezaleli na ngai ya zúwa, nazalaki kowangana yango makasi mpo na nsɔ́ni, nazalaki koboya kondima ete nazalaki na zúwa.

Na nsuka, kolɔngɔ́nɔ́ na ngai ya nzoto ebebaki na meko oyo ete nasengelaki kokende lopitalo mpo ete básala ngai lipasó. Wana nazalaki kuna, namonaki ete bomoi na ngai ekokaki kokóba bobele na motindo wana te. Ngai mpe Marc tozwaki ekateli ya kokabwana mpo na sanza misato mpo ete tótalela ezalela ya makambo na biso kozanga kopusama na mayoki. Na boumeli ya ntango yango likambo moko ya kokamwa lisalemaki. Lisoló moko oyo lizalaki na motó ya likambo “Lisungi mpo na bana oyo baboti na bango bazali baombo ya masanga,” libimaki kati na zulunalo Lamuká!b

Mama na ngai azalaki moombo ya masanga. Atako nabebisamaki na nzoto te, baboti na ngai bamonisaki te bolingo ya motema kati na bango to epai na ngai. Ata mokolo moko te mama na ngai asimbaki ngai na lobɔ́kɔ to ayebisaki ngai ete alingaka ngai. Na yango, nakólaki kozanga koyeba ndenge ya kolinga to, lolenge moko mpe, lolenge nini kolingama.

Mama na ngai azalaki mbala mingi koyebisa ngai ete tata azalaki kozwa basi ya makango yango wana akokaki kotyela ye motema te. Na yango, nabanzi ete nakólaki na ezaleli ya kozanga kondimela bato nyonso. Mpo na lolenge nakólaki, nazalaki ntango nyonso komona lokola ete nazalaki na nsé ya basusu, mingimingi basi mosusu. Botángi ya lisoló wana ya Lamuká! esalisaki ngai na kososola ndimbola ya makambo wana. Mpo na mbala ya liboso, nayaki koyeba bantina mpenza ya mokakatano na ngai mpo na kozala na zúwa.

Nalakisaki lisoló ya Lamuká! epai na mobali na ngai Marc, mpe yango esalisaki ye ete ayeba ngai malamumalamu. Mosika te, ngai na ye tokokaki kolanda toli ya Biblia epesami epai na babálani oyo bazalaki kokana kokabwana. Tozongisaki boyokani. (1 Bakolinti 7:10, 11) Sikawa libala na biso esilá kobonga. Tosalaka makambo mingi elongo, mingimingi kati na misala ya boklisto. Marc amonisaka boboto mingi. Pene na mikolo nyonso ayebisaka ngai ete alingaka ngai, mpe sikawa nandimi yango mpenza.

Soki nayebi ete nakomonana na mwasi ya Marc ya kala, nasambelaka Yehova mpo ete apesa ngai makasi, kosɛngáká ye ete asunga ngai mpo ete namitambwisa lokola moklisto oyo akɔmeli. Mpe esalemaka bongo. Ata mpe mayoki na ngai ya koyina ye ezali kokita. Makanisi ya mabe maumelaka lisusu te kati na ngai to natikaka lisusu te ete makanisi na ngai mabulunganisa ngai.

Nazali naino na mwa ndambo ya mayoki ya zúwa ya mabe. Bobele bomoi ya kokoka kati na mokili ya sika ya Nzambe nde ekolongola ngai yango nyonso. Liboso na yango, na esika zúwa eyangela ngai, nasili kolónga yango. Ee, etikalaki mpenza moke ete zúwa ebebisa bomoi na ngai, kasi na lisalisi ya Yehova mpe lisangá na ye, nazali sikawa moto ya esengo mingi, mpe kolɔngɔ́nɔ́ na ngai ezongi malamu. Nazongeli lisusu boyokani na ngai ya malamu elongo na Yehova.​—Euti na moko na bandeko na biso.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Nkombo oyo ebongolamaki.

b Talá Lamuká! ya 22 Máí 1992 (ebimeli ya Lifalansé), nkasa 8-12.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto