Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 15/8 nk. 23-27
  • Mabota ya sembo mazali koyeisa bokóli ya nokinoki na Sri Lanka

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mabota ya sembo mazali koyeisa bokóli ya nokinoki na Sri Lanka
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Bakutanaki na ntembe monene
  • Mabota mabongisami malamu mazali kopesa masanzoli
  • Botɛmɛli esangisi mabota kati na losambo ya solo
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 15/8 nk. 23-27

Mabota ya sembo mazali koyeisa bokóli ya nokinoki na Sri Lanka

KINO na mobu 1972, bazalaki kobénga yango Ceylan; Sri Lanka ezali esanga moko kitoko na mabóngo na yango malónami na banzeté ya mbila, na milɔngɔ́ ya bangomba, mpe na bitando mike ya mabelé makauki. Likoló na ngomba patatalu, Ngomba Adam, na bolai ya bamɛtɛlɛ 2243, ezali esika mosantu mpo na mangomba minei ya minene.a Pembeni na yango ezali bongo Nsuka ya Mokili, ekitelo ya ngomba ya mabangámabangá ekwei pwasa na bolai ya bamɛtɛlɛ 1 500. Ezali moko na bisika bileki kitoko na Sri Lanka.

Lisoló ya makambo ya kala matali bafándi ya Sri Lanka, oyo bazali bamilió 18 ezali mpenza ya kobenda likebi. Uta na ekeke ya mitano L.T.B., bato oyo eutelo na bango ezali bongo libota ya Indo-Européen ya nɔ́rdi ya Inde bayaki kofanda na esanga wana. Ezali bongo ba Cinghalais, oyo bazali sikawa 75% ya bafándi ya mboka. Na nsima, kino pene na ekeke ya 12, ebele ya ba Tamouls oyo bautaki na súdi ya Inde bayaki wana; mingi na bango bazali sikawa kofanda na eteni ya nɔ́rdi mpe ya ɛ́sti ya esanga wana. Bato ya Portugal, ya Hollande, mpe ya Grande-Bretagne basalaki mbongwana uta na ntango mboka yango ezalaki na nsé ya boyangeli na bango. Lisusu, basáli mombongo na Mai monene oyo bautaki na bisanga ya Arabie mpe ya Malaisie bayaki kofanda elongo na bato ya esanga wana. Ezali mpe na bituluku mikemike ya bato ya Mpótó, ya Parsis, ya Chine mpe basusu.

Longolá kosangisama ya bato ya mposo ndenge na ndenge, lokótá mpe makambo matali mangomba kati na Sri Lanka mazali mpe komonisa biutelo na yango bikeseni. Nkótá oyo elobamaka mingi kati na esanga yango ezali bongo, Cinghalais, Tamoul, mpe Lingelesi. Bato mingi ya Sri Lanka balobaka nkótá mibale kati na bankótá wana misato. Eutelo na bato na ntina etali bikólo na bango ezali mpe na bopusi likoló na mangomba na bango. Bato mingi oyo balobaka lokótá ya Cinghalais bazali bato ya lingomba ya Bouddhisme, nzokande bato mingi oyo balobaka lokóta ya Tamoul bazali na lingomba ya Hindouisme. Baoyo eutelo na bango ezali bongo Arabie to Malaisie bazali na lingomba ya Islam, mpe baoyo bautaki na Mpótó bazali mingi kati na mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba, Katolike to Protestá.

Bakutanaki na ntembe monene

Oyo nyonso ezali kotya ntembe monene liboso na Batatoli ya Yehova kati na Sri Lanka. Bazali kosala makasi mpo na kokokisa etindá ya Yesu: “Nsango malamu oyo na bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Longolá likambo litali kolónga ntembe ya koloba nkótá mingi, basakoli ya nsango malamu bakoki kosolola na bato ya lingomba ya Bouddhisme, Hindouisme, mpe basangani ya mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba, mpe baoyo bandimaka Nzambe te​—nyonso wana bobele na mwa bangonga moke ya mosala ya kosakola.

Mpo na kolónga kati na mosala na bango ya kosakola, basakoli basengeli komema Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! mpe mikanda mosusu na nkótá ya Tamoul, Cinghalais, mpe na Lingelesi. Baoyo bazali na makasi mpenza bamemaka nkutu ba Biblia na nkótá wana. Kala mingi te, basakoli basepelaki na ntango mwa babúku Nzambe azali komibanzabanza mpo na biso mpe Nos problèmes ​— Qui nous aidera à les résoudre? mpe trakte Mokili ya lelo ekoumela lisusu? ebimisamaki nzela moko na nkótá wana misato. Ebakisaki bongo bisaleli mosusu ya mosala ya kosakola.

Batatoli bazali kosala makasi uta 1912, na ntango Charles Taze Russell, oyo azalaki prezidá ya Association internationale des étudiants de la Bible na ntango wana, asalaki mobembo mokuse na Ceylan. Nzokande, bokóli ya solosolo elingaki kosalema bobele na bokómi ya baoyo bazwaki mapɔlɔ́mi ya Galadi, eteyelo monene ya Biblia ya Watchtower, na 1947. Uta ntango wana, basakoli na Sri Lanka bazali kozwa matomba kitoko kati na mosala na bango ya kosakola. Na 1994, basakoli ya Bokonzi 1 866 batambwisaki mwayene ya boyekoli ya Biblia 2 551 kati na bandako ya bato sanza nyonso. Motuya ya bato 6 930 oyo bayanganaki na Ekaniseli ezalaki pene na mbala minei koleka motángo ya basakoli kati na masangá nyonso. Oyo nde lipamboli ya kitoko!

Na bokokanisi na mikili mosusu, ekoki komonana ete bokóli na Sri Lanka ezali kosalema malɛmbɛmalɛmbɛ. Moko na bantina yango ezali ete kuna, bato bazalaka na bokangami makasi na libota. Nzokande, yango ekoki kopesa litomba. Na ntango Korneye, mokonzi ya basodá ya Baloma akamataki etɛlɛmɛlo mpo na solo, libota na ye mpe ekamataki ekateli elongo na ye. (Misala 10:1, 2, 24, 44) Mokanda ya Misala ezali kolobela mpe mabota mosusu ya boklisto oyo mazalaki makasi, kati na yango mpe oyo ya Lidia, Crispus, mpe mokɛngeli bolɔ́kɔ oyo akɛngɛlaki Paulo mpe Sila.​—Misala 16:14, 15, 32-34; 18:8.

Ya solo, bokangami makasi na libota ekoki kozala libaku malamu soki ebongiseli malamu ezali mpe komonisa bompikiliki na bosembo nyonso. Na kotalela maloba ya Yisaya 60:22, misionere moko oyo aumeli mingi na mosala, Ray Matthews, alobi: “Emonani ete Yehova azali kokólisa makambo nokinoki na ntango ebongi, bobele na kotalela moto mokomoko te kasi lisusu na kotalela mabota.”

Mabota mabongisami malamu mazali kopesa masanzoli

Mabota ya sembo motindo wana mazali mpenza lelo oyo kati na Sri Lanka. Na ndakisa, ezali na libota ya Sinnapa oyo ebongisami malamu, oyo bafandaka na Kotahena, moko na bazone ya Colombo, mboka-mokonzi ya Sri Lanka. Atako Marian tata ya libota autaki kokufa kala mingi te, mwasi na ye, Annamma, mpe bana na bango 12 kati na bana 15, oyo bazali na mibu 13 kino 33, libota mobimba bazali kokóba kosalela Yehova. Na ntango lisoló oyo likomamaki, bana mwambe basilaki kozwa batisimo, mpe misato kati na bango bazalaki kati na mosala ya ntango nyonso, lokola babongisi-nzela ya sanza na sanza. Misato mosusu bazali kosala lokola babongisi-nzela basungi na bantango mosusu. Kati na baoyo bazali bilenge na libota ezali na basakoli minei oyo bazwi naino batisimo te. Lisusu, bankɔ́kɔ minei, atako bazali naino bana mike mpenza, bazali koyekola Biblia mpe bazali koyangana na makita ya boklisto na lisangá ya Batatoli ya Yehova ya Colombo Nord.

Ezalaki na 1978 nde Annamma ayokaki nsango ya Bokonzi mpo na mbala ya liboso na ntango andimaki kozwa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli moko. Boyekoli ya Biblia ebandaki, mpe nsima ya kosilisa mokanda ya boyekoli ya Biblia, Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko, Annamma apesaki bomoi na ye epai na Yehova Nzambe mpe azwaki batisimo, atikaki bongo ndakisa ya liboso mpo na basangani mingi ya libota na ye.

Motindo moko na Korneye mokonzi ya basodá, Annamma azalaki na ebongiseli malamu kati na libota na ye. Annamma alobaki ete: “Tosengelaki komilɛngɛla mpo na makita mpe mayangani ya boklisto​—bakisá mpe kelasi. Tozalaki na mokakatano mpo na oyo etali bilamba, kasi na lisalisi ya Yehova tozalaki na likoki ya kosona bilamba mpo na liyangani moko na moko. Libota mobimba lizalaki koya na liyangani na bilamba kitoko mpe toleisamaka malamu​—na mwa koseka na elongi.”

Bana bazali na mayoki ya bolingo wana bazali komikundola na ntina na ebongiseli malamu ya libota na bango. Mpo na kosalisa libota mobimba ete báyangana na makita ya boklisto, bana ya mikóló bazalaki kopesamela mikumba minene. Na ndakisa, Mangala azalaki kosukola bilamba, mpe Winnifreda azalaki kongoma yango. Winnifreda, ye oyo azalaki mpe kosunga baleki na ye mpo na kolatisa bango bilamba, alobi ete: “Moko na moko azalaki komonana kitoko wana ezalaki ye kobima na ndako.”

Makambo ya elimo mpe mabongisamaki malamu. Mwana ya mwasi Pushpam, ye oyo azali sikawa mobongisi-nzela ya sanza na sanza, amikundoli ete: “Mikolo nyonso, libota na biso lizalaki kosepela na kotánga Biblia mpe kotalela mokapo ya mokolo na mokolo elongo.” Annamma alobaki lisusu ete: “Mwana moko na moko azalaki na Biblia na ye, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, mpe mikanda mosusu. Nayokaka na likebi biyano na bango nyonso kati na makita. Soki esengeli, nalandelaka na ndako na kolendisáká bango mpe kosemboláká bango. Na butu tozalaki kosangana elongo mpo na kosukisa mokolo na libondeli kati na libota.”

Bana ya mikóló bazali lisungi ya ntina mingi mpo na Annamma na ntina etali kopesa kolakisama ya elimo mpo na basangani nyonso ya libota. Nzokande, atako bazali na makambo mingi ya kosala, yango epekisaka te mposa na bango ya koyebisa nsango ya bokonzi epai na basusu. Bango nyonso, basangani nyonso ya libota bazali kotambwisa boyekoli ya Biblia 57 epai na bato ya zingazinga na bango. Bokilo na bango Rajan alobi ete: “Libota litambwisaka boyekoli ya Biblia ya bokóli mpenza. Mwasi na ngai Pushpam, asilá kozwa libaku malamu ya komona moko na bayekoli na ye kopesa bomoi na ye epai na Yehova.”

Ebimisaki yikiyiki monene na Kotahena, ntango libota monene wana elongwaki na Lingomba ya Katolike ya Loma. Atako sángó ye moko ayaki te kotala libota wana mpo na koluka koyeba ntina nini balongwaki na lingomba, asɛngaki na basangani mosusu ya lingomba básala bolukiluki. Yango ememaki bango na masoló mingi, mingimingi na ntina na liteya ya Bosato. Annamma azalaki ntango nyonso kotya motema epai na Yehova mpe Biblia mpo na kolóngisa kondima na ye. Mokapo oyo azalaki kosalela mingi na masoló wana ezalaki bongo Yoane 17:3.

Libota wana ya Sinnappa emonisi polele ete ebongiseli malamu mpe kosala ntango nyonso milende ekoki kopesa matomba malamu. Na milende na bango, etuluku moko ya sika ya basakoli ya Bokonzi ezali kokóla, nyonso wana mpo na kopesa masanzoli epai na Yehova.

Botɛmɛli esangisi mabota kati na losambo ya solo

Libota ya Ratnam ezali na ntáká ya mwa bakilomɛtɛlɛ na nsé na nzela euti epai na ba Sinnappa, na Narhenpitya, zone mosusu ya engumba Colombo. Bango mpe bazalaki liboso kati na Lingomba ya Katolike ya Loma. Na 1982, Batatoli oyo bazalaki kati na mosala ya kosakola ndako na ndako bakutanaki na Balendran, mobali ya mwana mwasi ya liboso, Fatima. Boyekoli ya Biblia ebandaki elongo na libota mobimba. Mosika te bana na bango misato babandaki kotuna nkɔ́kɔ na bango ya mwasi Ignasiamal na ntina na nkombo ya Nzambe. Na ntango bana yango bapesaki eyano ete “Yehova,” balamwisaki mposa ya nkɔ́kɔ na bango ya mwasi, mpe babandaki koyekola Biblia elongo na ye. Na nsima, bana na ye mibale ya basi, Jeevakala mpe Stella, bakómaki mpe koyekola, mpe na 1988 bango nyonso misato bazwaki batisimo.

Na ntango yango, Balendran mpe Fatima bayebisaki solo epai na ndeko mosusu ya Fatima ya mwasi, Mallika, mpe mobali na ye, Yoganathan. Na 1987 babalani yango mibale bazwaki batisimo, mpe bakɔtisaki mokemoke bolingo ya Yehova epai na bana na bango mibale. Pushpa, ndeko mosusu ya Fatima ya mwasi, alandaki na nsima. Amonisaki komipesa na ye mpe azwaki batisimo na 1990. Na ntango bakendeki na Tokyo, mobali na ye, Eka, azalaki koyangana na lisangá moko ya lokótá ya Lingelesi, mpe Pushpa asungaki mwana na bango ya moke ya mobali, Alfred, ete akóla na nzela ya Yehova.

Kino sikawa, bana minei kati na bana zomi na libota ya Ratnam bakamataki etɛlɛmɛlo na bango mpo na losambo ya solo. Na esengo nyonso, misato mosusu bazali kokóla malamu kati na boyekoli na bango moko ya Biblia. Kati na bankɔ́kɔ 11 ya mike, mwana moko ya mwasi, Pradeepa, asili kozwa batisimo. Nsambo mosusu ya mike bazali mokolo na mokolo koteyama na lisali ya boyekoli ya Biblia kati na libota. Na nyonso, boyekoli ya Biblia 24 ezali kotambwisama elongo na bato oyo basepelaki kati na kartyé na bango.

Nyonso oyo eyaki kozanga nkaká te. Na ebandeli, botɛmɛli kati na libota ezalaki. Tata na bango, Muthupillai, mpe bayaya na bango ya mibali bazalaki kotɛmɛla makasi mosangani nyonso ya libota na bango oyo akokende na makita na Ndako ya Bokonzi to kobima na mosala ya kosakola. Atako botɛmɛli yango ezalaki mbala mosusu kosalema mpo na komibanzabanza na ntina na libateli ya moto na moto, Muthupillai alobi lisusu ete: “Namipesaki mobimba na kosambela ‘basantu’ mpe nandimaki te ete libota na ngai litika lingomba ya Katolike.” Nzokande sikawa, andimi ete bazali kosambela Nzambe ya solo mpamba te azali komona matomba oyo kondima na bango ememi kati na libota na ye.

Na ndakisa, mokolo mosusu nkolo ya lopango epai bazalaki kofutela, ye oyo azalaki mosangani ya lingomba ya Bouddhisme, asalelaki bikelákela mpo na kobengana bango na lopango. Ayaki mokolo moko na butu mpe atyaki “bikelákela” bisalemi na mbuma ya citron zingazinga na ndako na bango. Baninga ya pembeni oyo bazalaka na ezaleli ya biyambayamba babangaki, bango nyonso bazalaki komizela ete makambo ya mpasi ekwela libota ya Ratnam. Nzokande, na ntango Ignasiamal amonaki yango, ye mpe bana na ye balongolaki mbuma yango kozanga kobanga to kolɛngalɛnga​—mpe likambo moko te ekómelaki bango. Ezaleli na bango ya kozanga kobanga epesaki litatoli monene kati na kartyé, yango esalaki ete bato bámemya bango mingi. Stella abandaki boyekoli mibale ya Biblia na bandako ya zingazinga. Kolendisamáká na likambo yango, bokilo na bango ya mwasi Nazeera andimaki mpe koyekola Biblia.

Na kotaláká mapamboli mingi oyo eyelaki libota na ye, Ignasiamal alobi ete: “Nazali na esengo mingi ya komona bokóli ya elimo kati na libota. Tosili kopambolama na Yehova mpamba te botɛmɛli bolɛmbi, mpe bomoko ya libota na biso eyei lisusu makasi.”

Mabota wana minene mazali mpenza lipamboli. Babakisi mingongo na bango esika moko na oyo ya mabota ya mike, mabota oyo mazali bobele na moboti moko, mpe baklisto minzemba oyo bazali kosala makasi mpo na kokólisa nokinoki mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi kati na “mboka kitoko,” lokola ndimbola ya nkombo Sri Lanka emonisi yango. Elongo na baninga na bango baklisto kati na mokili mobimba, Batatoli ya Sri Lanka bazali kozela na esengo nyonso kozongisama ya Paladiso, oyo tokoki kobosana yango te uta sikawa wana tozali komona mabóngo mpe bangomba ya mboka kitoko Sri Lanka.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Libulu monene oyo ezali kuna etalelami bongo lokola litambé ya Adam, Bouddha, Siva, mpe “Santu” Thomas, mokomoko engebene masapo ya lingomba ya Islam, Bouddhisme, Hindouisme, mpe masapo ya mangomba ya bonkɔ́kɔ.

[Bililingi na lokasa 24, 25]

Bato mingi na Sri Lanka bazali koyanola na mosala ya kosakola mpe ya koteya ya boklisto

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto