Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 1/8 nk. 20-24
  • Libula na biso ya bozwi ya elimo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Libula na biso ya bozwi ya elimo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bomwana ya tata na ngai
  • Na Afrika ya Ɛ́sti
  • Tobokwami na bolingo ya boklisto
  • Sembo kino nsuka
  • Baboti na biso bateyaki biso kolinga Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Libula ya boklisto oyo ekomonanaka mingi te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Nalandaki matambe ya baboti na ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Nakosala nini soki tata to mama na ngai azali maladi?
    Mituna oyo bilenge batunaka
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 1/8 nk. 20-24

Libula na biso ya bozwi ya elimo

LISOLÓ YA PHILLIP F. SMITH

“Mwinda moko mopelisami oyo mokongɛnga kati na Afrika ya molili tuu.” Tozalaki mpenza na esengo ya kotánga maloba oyo na lokasa 75 ya Annuaire des Témoins de Jéhovah 1992! Ezali nkɔ́kɔ na biso ya mobali, Frank W. Smith, nde akomaki maloba wana na 1931, kati na nkomá oyo atindelaki ndeko Joseph F. Rutherford, oyo azalaki prezidá ya la Société Watch Tower na ntango wana. Nkɔ́kɔ na ngai akomaki mpo na kopesa lapólo ya mobembo moko ya mosala ya kosakola oyo ye mpe leki na ye ya mobali basalaki.

BÚKU Annuaire 1992 eyebisaki ete: “Gray Smith mpe yaya na ye ya mobali Frank, baministre babongisi-nzela mibale ya molende oyo bautaki na Cape Town [Afrika ya Súdi] bakendeki na Afrika ya Ɛ́sti oyo ezalaki na mabɔ́kɔ ya Grande-Bretagne, mpo na kotala soki makoki ya kopalanganisa nsango malamu ezali kuna. Bakamataki motuka moko, De Soto, oyo babongolaki yango esika ya kolala, bakɔtisaki yango kati na masúwa elongo na bakartó 40 ya babúku, mpe bakendeki na Mombassa, libóngo ya mai monene na Kenya.”

Kati na nkomá oyo atindelaki ndeko Rutherford, nkɔ́kɔ na ngai alobelaki mobembo oyo basalaki kobanda na Mombassa kino na Nairobi, mboka-mokonzi ya Kenya: “Tosalaki mobembo moko eleki nsɔ́mɔ oyo nasalá naino te na motuka. Tosalaki mikolo minei, kotambola mokolo mobimba, mpo na kosala mobembo ya bakilomɛtɛlɛ 580 . . . Na kilomɛtɛlɛ moko nsima na mosusu nasengelaki kokita na pau mpo na kopanza bangomba ya zélo, kozipa mabulu, lisusu mpo na kokata matiti minene mpe banzeté mpo na kobongisa nzela ya pɔtɔpɔ́tɔ ete bapinɛ́ eleka malamu.”

Nsima wana bakómaki na Nairobi, Frank mpe Gray basalaki na boumeli ya mikolo 21 mpo na kokabola mikanda na bango mikolimbolaka Biblia. Nkɔ́kɔ akomaki ete, “Engebene makambo oyo tozali koyoka, mosala yango mokɔtisi yikiyiki kati na bato ya Nairobi oyo bamipesaka na makambo matali losambo.” Na nsima, nkɔ́kɔ ayokaki mposa makasi ya kozonga na mboka na ye epai ya mwana na ye ya mobali ya mibu mibale, Donovan, mpe mwasi na ye Phyllis, oyo akómaki pene ya kobota mwana na bango ya mibale, tata na biso, Frank. Nkɔ́kɔ akɔtaki na masúwa ya liboso oyo amonaki na Mombassa, kasi akufaki na malaria liboso ete akóma na mboka na ye.

Wana ngai, yaya na ngai ya mwasi, mpe leki na ngai ya mobali tozalaki komanyola likoló na lisoló wana ya Annuaire, tokanisaki tata molingami na biso. Na Máí 1991, bobele mwa basanza liboso ya kozwa Annuaire 1992, autaki kokufa mpo na mokakatano ya lipasó na motema. Atako atikalaki komona tata na ye te, kasi azalaki mpe na bolingo mozindo mpo na Yehova, lolenge moko na tata na ye. Nkɔ́kɔ alingaki mpenza kozala na esengo ya koyeba ete mibu 28 na nsima, na 1959, mwana na ye ya mobali alingaki kolanda lokolo na ye, lokola ministre moklisto na Afrika ya Ɛ́sti!

Bomwana ya tata na ngai

Tata na biso abotamaki na mokolo ya 20 Yulí 1931, na Cape Town, sanza mibale nsima ya liwa ya tata na ye, oyo azwaki mpe nkombo na ye. Uta bomwana, tata amonisaki bolingo na ye mpo na Yehova. Na ntango azalaki bobele na mibu libwa, azalaki kotɛlɛma na esika monene ya Cape Town epai bingbunduka bitɛlɛmaka, kopesáká litatoli na lisalisi ya lisoló likomami na libaya, wana baninga na ye ya kelasi bazali kotyola ye. Ntango akómaki na mibu 11, amonisaki elembo ya komipesa na ye epai na Yehova na nzela ya batisimo ya mai. Na bantango mosusu tata azalaki kopesamela mokumba ya kopesa litatoli na balabála mobimba bobele ye moko. Na ntango akómaki na mibu 18, azalaki kotambwisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na etuluku moko ya bandeko basi baklisto mibangé na kartyé moko ya Cape Town.

Na 1954 la Société Watch Tower eyebisaki ete mayangani ya mikili mingi masengelaki kosalema na Mpótó na mbula oyo elandaki. Tata azalaki na mposa makasi ya kokende kuna, kasi azalaki na mosolo mokoki te mpo na kokende kuna longwa na Cape Town. Na yango, asalaki kontrá mpo na kosala na boumeli ya sanza misato lokola chimiste kati na kompanyi moko ya kotimola cuivre na Rhodésie du Nord (oyo ekómá lelo Zambie). Bisika bolukiluki ya makɛ́lɛ ezalaki kosalema ezalaki bongo na zamba ya Afrika.

Tata ayebaki ete ezalaki na Batatoli mingi ya Afrika na Rhodésie du Nord, na yango na ntango akómaki kuna alukaki bango mpe ayebaki esika bazalaki kosala makita na bango. Atako akokaki te koloba lokóta ya mboka wana, nzokande azalaki pene na bango mpe azalaki koyangana pɔ́sɔ na pɔ́sɔ na makita ya lisangá ya Batatoli ya Yehova, oyo ezalaki na esika ya kotimola makɛ́lɛ. Mindele oyo bazali kosala na esika ya kotimola makɛ́lɛ bazalaki na ezaleli ya koponapona mposo mpe bazalaki komonisa yango na kofingáká bato ya Afrika mbala na mbala. Nzokande, tata, azalaki ntango nyonso na boboto.

Wana akokisaki sanza misato, mosáli moko Moafrikɛ́, oyo azalaki Motatoli te, ayaki epai na tata mpe atunaki ye ete: “Oyebi soki tobéngaka yo nani?” Moto yango asekaki mwa moke mpe alobaki ete: “Tobéngaka yo Bwana [Mobali kitoko] Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.”

Na 1955, tata akokaki kokende koyangana na mayangani “Bokonzi oyo elóngi” na Mpótó. Epai kuna akutanaki na Mary Zahariou, oyo akómaki mwasi na ye na mbula oyo elandaki. Nsima ya libala na bango, bafandaki na Parma, na etúká ya Ohio, na Etats-Unis.

Na Afrika ya Ɛ́sti

Na boumeli ya liyangani moko ya etúká na Etats-Unis, libyangi moko lipesamaki epai na bayangani mpo na kokende kosala epai kuna mposa ezali mingi. Baboti na biso bazwaki ekateli ya kokende na Afrika ya Ɛ́sti. Basalaki mpenza bobele oyo la Société Watch Tower eyebisaki. Babombaki mosolo mokoki mpo na kosomba tikɛ́ ya bozongi soki ekokaki kosalema ete tata azwa mosala te, mpamba te bobele baoyo bazalaki na mikanda oyo mipesaka ndingisa ya kosala mosala nde bazalaki kopesamela nzela ya kofanda na teritware yango.

Nsima ya kozwa passeports, visas, mpe mangwelé, na Yulí 1959, tata mpe mama basalaki mobembo na masúwa moko ya mombongo longwa na engumba New York kino na Mombassa kolekáká na nzela ya Cape Town. Mobembo yango ekamataki bango pɔ́sɔ minei. Na Mombassa bayambamaki na esengo mpenza na libóngo na bandeko baklisto oyo bakendeki kuna liboso na bango mpo na kosala epai mposa ezali mingi. Na ntango bakómaki na Nairobi, tata akutaki nkomá moko ezali kozela ye. Ezalaki eyano na lisɛngi na ye ya kosala lokola chimiste na Departemá ya kosala bolukiluki ya makɛ́lɛ na Entebbe, Ouganda. Tata mpe mama bakamataki engbunduka mpo na kokende na Kampala, na Ouganda, epai kuna butunaki tata mwa mituna mpe bazwaki ye na mosala. Na ntango yango, ezalaki bobele na Motatoli moko kati na teritware ya Entebbe na Kampala, George Kadu.

Boyangeli ya mindele na mboka wana efutelaki tata kelasi mpo ete akoka koyekola lokóta ya mboka yango, Luganda. Asepelaki mingi, mpamba te akanaki koyekola yango mpo ete akoka kosala malamu mosala ya kosakola. Na nsima, tata asungaki nkutu na kobongolama ya mwa búku “Nsango malamu oyo na Bokonzi” na lokóta Luganda.

Tata azalaki kobanga te mpo na kosakola epai na basusu. Azalaki kosolola na mindele nyonso kati na departemá na ye, mpe azalaki kosangana mbala na mbala na mosala ya kosakola epai na bana mboka Ouganda. Apesaki litatoli epai na Moafrikɛ́ mokonzi ya makambo matali bosembo na Ouganda. Moto yango asukaki te bobele na koyoka nsango ya Bokonzi, kasi abyangisaki mpe tata mpe mama ete balya elongo na ye.

Ndeko na ngai ya mwasi, Anthe, abotamaki na 1960, mpe ngai nabotamaki na 1965. Libota na biso emesanaki mingi na bandeko mibali mpe bandeko basi kati na lisangá ya moke, kasi oyo ezalaki kokóla, kati na mboka-mokonzi Kampala. Lokola tozalaki bobele biso moko Batatoli ya Yehova oyo bazalaki mindele pene na Entebbe, tozalaki kokutana na makambo mingi ya kosepelisa. Mokolo moko, moninga moko ya tata alekaki na Entebbe kozanga kokanela mpe alukaki kokutana na tata. Amonaki ye bobele na ntango atunaki ete: “Boyebi babalani mibale ya mindele oyo bazali Batatoli ya Yehova?” Moto yango akambaki ye mbala moko na ndako ya tata mpe mama.

Tokutanaki mpe na makambo ya mpasi, lokola kozala na esika oyo ekabolami na bituluku mibale ya babundi oyo batombokaki. Na ntango mosusu basodá ya boyangeli bazalaki kobeta masasi epai na moto nyonso oyo azalaki mosangani ya ekólo moko boye. Butu na moi masasi mazalaki kobɛtama kozanga kotika. Lokola bapekisaki bato kobima libandá kobanda 6:00 ya mpokwa kino na 6:00 ya ntɔ́ngɔ́, makita mazalaki kosalema na ndako ya baboti na ngai na Entebbe.

Na nsima, na ntango epekiseli wana elongolamaki, tata akumbaki biso na motuka na Kampala mpo na boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Sodá moko alakisaki biso mondoki, atɛlɛmisaki motuka na biso, mpe atunaki biso soki tozalaki kokende wapi. Ngai nazalaki bobele mwana moke, mpe Anthe azalaki na mibu mitano. Na ntango tata ayebisaki ye na malembe nyonso, kolakisáká sodá yango ba Biblia na biso mpe babúku na biso, alekisaki biso.

Na 1967, nsima ya mibu soko mwambe na Ouganda, baboti na biso bazwaki ekateli ya kozonga na Etats-Unis mpo na mikakatano ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto mpe mikumba ya libota. Tokómaki basangani ya lisangá ya Canfield, na Ohio, epai kuna tata asalaki lokola nkulutu. Kuna, baboti na ngai bakólisaki bolingo mpo na bandeko, lolenge moko lokola balingaki lisangá moke ya Kampala.

Tobokwami na bolingo ya boklisto

Na 1971, ndeko na ngai ya mobali, David, abotamaki. Wana tozalaki kokóla, tobokwamaki kati na ndako oyo etondi na bolingo mpe esengo. Na ntembe te, yango eutaki na bolingo oyo baboti na biso bazalaki na yango moko epai na mosusu.

Na ntango tozalaki bilenge, tata azalaki ntango nyonso kotángela biso masoló ya Biblia na ntango ya kolala, azalaki kobondela, mpe na nsima, kozanga ete mama ayeba, azalaki kopesa biso bonbon elingami na nkasa ya ngɛlingɛli ya wolo. Tozalaki ntango nyonso koyekola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na biso elongo kati na libota, ata soki tozalaki wapi. Wana tozalaki na mobembo ya lói na libota, mokolo moko toyekolaki na ngomba moko mpe mokolo mosusu toyekolaki wana tozalaki kotala mai na monana. Tata azalaki mbala mingi koloba ete wana ezali moko na makambo ya esengo mingi oyo etikalaki na bɔɔngɔ́ na ye. Azalaki koloba ete azalaki koyoka mawa mpo na baoyo bazangaka esengo monene oyo boyekoli ya libota ekoki kopesa.

Mpo na oyo etali komonisa bolingo mpo na Yehova, tata azalaki koteya na kopesáká ndakisa. Na ntango nyonso oyo zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! ezalaki koya to ntango oyo tozalaki kozwa mokanda mosusu ya la Société Watchtower, tata azalaki kotánga yango nyonso. Toyekolaki epai na ye ete solo ya Biblia esengeli kotalelama na liseki te kasi tosengeli kotalela yango lokola eloko ya motuya mpe ya ntina mingi. Moko na biloko ya motuya mingi oyo tozali na yango ezali nde Bible à références ya tata. Lokasa moko na moko etondaki na makambo oyo azalaki koyanganisa kati na boyekoli na ye. Sikawa na ntango totángaka makambo oyo azalaki kokoma pembenipembeni ya nkasa ya Biblia, tokoki mpenza koyoka ye azali koteya mpe kopesa biso batoli.

Sembo kino nsuka

Na mokolo ya 16 Máí 1991, wana azalaki kati na mosala ya kosakola, tata azwaki mpasi makasi na motema. Mwa bapɔ́sɔ na nsima, basalaki ye lipaso na motema, yango emonanaki ete esalemaki malamu. Nzokande, na butu ya mokolo oyo elandaki lipaso, babéngaki biso na telefone na Lopitalo. Tata azalaki kobimisa makila mingi, mpe minganga batungisamaki mingi mpenza. Amemamaki na ndako ya lipaso mbala mibale na butu wana mpo na komeka kokanga makila ete ebima mingi te, kasi nyonso wana ezalaki bobele mpamba. Makila ya tata mazalaki kokangama te.

Na mokolo molandaki, wana kolɔngɔ́nɔ́ ya tata ezalaki kobeba nokinoki; liboso, minganga basololaki na mama na pembeni mpe na nsima basololaki na leki na ngai ya mobali mpo na kopusa bango bandima ete tata azongisama makila. Nzokande, tata asilaki liboso koyebisa minganga ete akondima kozongisama makila te ata soki ezalela na ye ekómi lolenge nini. Ayebisaki bango bantina ezwami na Makomami mpo na yango aboyi makila, kasi alobaki ete alingaki kondima nkisi mosusu oyo esalemi na makila te.​—Levitike 17:13, 14; Misala 15:28, 29.

Koyina makasi ya basáli mingi na lopitalo ebimisaki matáta mingi kati na ICU (esika ya kopesa lisungi ya nokinoki epai na baoyo bazali na bokɔnɔ makasi mpenza). Yango, bakisá mpe kolɔngɔ́nɔ́ ya tata oyo ezalaki kobeba sé kobeba, na bantango mosusu ezalaki komonana lokola ete tokokoka te koyikela yango mpiko. Tozalaki kobondela Yehova ete asalisa biso mpe tomekaki lisusu kosalela batoli kitoko oyo tosilaki kozwa. Na yango, ntango tozalaki kokende na ICU, tozalaki ntango nyonso kolata malamu mpe kozala na botosi epai na basáli na lopitalo. Totalelaki ezalela ya tata na likebi nyonso na kotunáká mituna ya ntina, mpe tozalaki kotonda mosangani nyonso ya lopitalo oyo azalaki kati na baoyo bazalaki kosalisa tata.

Basáli na lopitalo bazangaki te komona milende na biso. Mwa mikolo na nsima, ezalela ya kozanga koyokana ekómaki ezalela ya boboto. Balifulumé oyo basalisaki tata bazalaki ntango nyonso kotalela ezalela ya kolɔngɔ́nɔ́ na ye atako bapesamelaki lisusu te mokumba ya kosalisa ye. Nkutu, monganga oyo azalaki na makambo makasi epai na biso azongisaki motema nsima na boye ete atunaki mama soki lolenge nini azalaki kokoka koyika mpiko. Lisangá na biso mpe bandeko ya mosuni basungaki biso na bolingo nyonso. Batindelaki biso bilei mpe bakálati ya kobondisa, mpe bazalaki kosambela mpo na biso.

Na mawa nyonso, lisungi ya minganga lisalaki tata eloko te. Akufaki mikolo zomi nsima ya lipaso na ye ya liboso. Tozali na mawa makasi mpo na tata. Na bantango mosusu, mayoki ya kobungisa eloko etungisaka biso. Na esengo nyonso, Nzambe na biso alakaki ete “akomema mikumba na biso mokolo na mokolo,” mpe toyekolaki kotya motema na biso epai na ye koleka liboso.​—Nzembo 68:19.

Biso banso tozali na ekateli makasi ete tokolanda mpe kosalela Yehova na bosembo nyonso mpo ete tokoka kozala na esengo ya komona tata kati na mokili ya sika.​—Malako 5:41, 42; Yoane 5:28; Misala 24:15.

[Elilingi na lokasa 21]

Frank Smith elongo na mama na ye, Phyllis, na Cape Town

[Elilingi na lokasa 22]

Tata mpe mama na ntango babalanaki

[Elilingi na lokasa 23]

Mpo na batisimo ya liboso oyo esalemaki na Entebbe, bandeko bafutelaki pisíni ya mokonzi moko Moafrikɛ́

[Elilingi na lokasa 23]

Lolenge ya kopesa mbote engebene momeseno ya kuna

[Elilingi na lokasa 24]

Tata mpe mama, mwa moke liboso ete tata akufa

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto