Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 15/7 nk. 8-9
  • Batatoli ya Yehova kati na mokili​—Brésil

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Batatoli ya Yehova kati na mokili​—Brésil
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kosakola epai mposa ezali monene
  • Kokabola mikanda mikolimbolaka Biblia
  • Kotya Motema Epai Na Yehova Esungaki Ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Kolendendela ememaka na bokóli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Jehovah apambolaki ekateli na ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 15/7 nk. 8-9

Batatoli ya Yehova kati na mokili​—Brésil

BRÉSIL ezali mboka moko monene na mitindo mikeseni. Ezala mpo na bonene na yango to mpo na motángo ya bafándi na yango, ezali mboka ya mitano kati na mokili. Yango ekamati pɛnɛpɛnɛ na katikati ya etando ya mabelé mobimba na Amerika ya Súdi mpe ezali mboka ya bato mingi koleka baoyo nyonso bafandi na bamboka mosusu ya eteni wana ya mokili. Brésil ezali mpe na zamba eleki monene kati na mokili mobimba. Ezali Kati na zamba wana nde ebale oyo eleki nguya na mabelé mobimba ezali koleka​—Amazone.

Brésil ezali mpe monene na ndimbola mosusu. Motángo ya basakoli na yango ya nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe ezali kobɛlɛma na 400000, mpe na mobu moleki bato koleka 1000000 bayanganaki na Ekaniseli ya liwa ya Klisto. Na yango mokili wana mokeseni mpenza mpo na oyo etali mosala ya kosakola Bokonzi. Makambo mosusu oyo mauti kosalema mazali komonisa yango.

Kosakola epai mposa ezali monene

Antonio mpe mwasi na ye bazwaki ekateli monene ya kotika bandeko na bango mpe mosala moko ya lifuti ya malongá na São Paulo mpo na kokende kosala esika mposa ya basakoli ya Bokonzi ezalaki monene na etúká ya Minas Gerais. Teritware na bango esangisaki mpe kartyé ya basáli ya kompanyi moko ya sukali. Mokolo ya liboso oyo bapesaki litatoli kuna, babandaki boyekoli ya Biblia libwa. Liboso ete bákokisa basanza 18, bazalaki kotambwisa boyekoli ya Biblia koleka 40!

Liboso, makita mazalaki kosalema kati na esika ya kompanyi. Nzokande, basakoli wana ya sika balingaki komona Ndako ya Bokonzi ya solosolo. Na yango, bafutelaki bísi moko mpo na komema bato 75 kino na lisangá oyo lizalaki pɛnɛpɛnɛ na bango. Na nsima ezalaki bongo liyangani ya etúká; bayekoli ya Biblia ya sika 45 bayanganaki mpe bayanolaki na mituna oyo batunaki bango. Zomi na mitano kati na bango bazwaki batisimo na libaku yango. Ya solo, balelaki na esengo!

Bobɛlɛ kompanyi wana ya bísi esalelamaki mpo na mibémbo ya lolenge wana, mpe bakonzi basɛngaki ete bandeko báfuta mosolo moke. Mpo na komonisa botɔ́ndi, Antonio apesaki nkolo kompanyi mokanda moko ya boyekoli ya Biblia. Andimaki kobanda boyekoli ya Biblia bobɛlɛ na mpokwa yango mpe azwaki batisimo nsima ya basanza mingi ya boyekoli na molende. Na ebandeli, mwasi na ye azalaki kotɛmɛla boyekoli yango, kasi nsima ya mwa ntango, abongolaki ezaleli na ye. Lelo oyo ye mpe azali Motatoli ya Yehova oyo asili kozwa batisimo.

Na Febwáli 1992 lisangá moko ya basakoli 22 ebotamaki. Na 1994 motángo wana mokólaki kino 42, elongo na babongisi-nzela ya sanza na sanza 4, to basakoli ya ntango nyonso ya nsango malamu. Lokola mbano, Antonio asukisi ete: “Ngai mpe mwasi na ngai tosili komona ete soki ‘tomeki Yehova,’ lokola Malaki 3:10 ezali koloba yango, ye ‘akosopela biso lipamboli kino esika ekozanga mpo na yango.’”

Kokabola mikanda mikolimbolaka Biblia

Mbala mosusu moko na bantina mpo na yango mosala ya kosakola ezali kokóla mingi na Brésil ezali ete Batatoli bazali kolakisa mikanda mikolimbolaka biblia na mabaku nyonso. Na ndakisa, lisangá moko ekomelaki biro ya la Société Watch Tower mpo na kosɛnga bakopi 250 ya búku Mituna bilenge bazali kotuna​—Biyano bibongi. Mpo na nini basɛngaki motángo monene bongo?

Nkomá yango eyebisaki ete: ‘Moko na biteyelo ya engumba ezwaki ekateli ya kosalela búku yango lokola mateya ya kolakisa kati na moko ya bakelasi na yango. Ekateli ya bakambi ya eteyelo yango eutaki na litatoli ya libaku malamu oyo epesamaki na baboti ya bayekoli oyo bazali Batatoli ya Yehova mpe na moko kati na bakambi ya eteyelo yango. Tiká ete Yehova akóba kopambola basaleli na ye wana ezali bango kopesa mateya kitoko na nzela ya búku wana.’ Ee, tiká mpe ete Yehova akóba kopambola bokóli kitoko ya mosala ya kosakola Bokonzi kati na mboka monene Brésil.

[Etanda na lokasa 8]

MAKAMBO MATALI EKÓLO

Mobu ya mosala 1994

MOTUYA NYONSO YA BASAKOLI: 385099

BOKOKANISI: Motatoli 1 mpo na bato 404

MOTUYA YA BAYANGANI NA EKANISELI: 1018210

MWAYENE YA BABONGISI-NZELA: 38348

MWAYENE YA BOYEKOLI YA BIBLIA: 461343

MOTUYA YA BABATISAMI: 24634

MOTUYA YA MASANGÁ: 5928

FILIALE: CESÁRIO LANGE

[Elilingi na lokasa 9]

Motuka ya ekóliseli-loláká oyo ezalaki kosalelama na São Paulo pɛnɛ na 1940

[Elilingi na lokasa 9]

Litatoli kati na jardin botanique na Rio de Janeiro

[Maloba na elilingi ya lokasa 9]

Biro ya filiale na Cesário Lange

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto