Ezaleli ya motema pɛtɛɛ—Mpo na nini emonanaka mingi te?
EMILIO azalaki na mibu koleka 60.a Ayaki na Oahu mpo na kokokisa mokumba moko ya mawa—kokunda mwana na ye ya mokólo ya mobali. Wana azalaki kotambola na balabála moko ya kimya mpe kosolola elongo na baninga mosusu, motuka moko oyo ezalaki koya na lombango makasi na kozonga nsima eningisaki Emilio. Etikalaki mpenza moke ete motuka yango etuta ye, mpe mpo na nkanda mpe kozanga motema pɛtɛɛ, Emilio angangelaki mokumbi-motuka mpe abetaki lobɔkɔ na ye na motuka yango. Na nsima koswana ebimaki. Emonisi lokola ete mokumbi motuka atindikaki Emilio, oyo akweaki mpe atutaki motó na nzela ebongisami na simá makasi. Mwa mikolo moke na nsima, Emilio akufaki mpo na mpota oyo azokaki na motó. Oyo nde likambo ya mawa!
Tozali kobika kati na mokili oyo ezaleli ya motema pɛtɛɛ ezali komonana mingi te. Bakumbi mituka bazali sé kokumba na lombango oyo eleki ndelo. Basusu batikaka ntaka mokuse kati na molɔngɔ́—kolanda na pembeni mpenza—mituka oyo ezali kotambola na lombango oyo elongobani. Nzokande basusu bazali kokimakima longwa na nzela moko kino na nzela mosusu mpo ete bakoki te kokanga motema mpo na kozala nsima ya motuka mosusu. Kati na ndako, basangani ya libota bakoki kosilika mpe kotomboka makasi. Ata mpe baklisto mosusu bakoki kobulunganisama na koleka ndelo mpo na mabunga ya bandeko na bango ya elimo.
Mpo na nini ezaleli ya motema pɛtɛɛ emonanaka mingi te? Ezalaka bobele bongo uta kala? Mpo na nini na eleko na biso ezali mpasi mpo na komonisa ezaleli ya motema pɛtɛɛ?
Bandakisa ya kozanga motema pɛtɛɛ
Biblia ezali koyebisa biso na ntina na mwasi moko oyo azelaki te mpo na kotuna mobali na ye liboso ya kokamata ekateli moko monene. Nkombo na ye ezalaki bongo Eva. Mbala mosusu ekoki mpe kozala mpo na kozanga motema pɛtɛɛ, nde alyaki mbuma oyo epekisamaki, liboso ya Adama. (Genese 3:1-6) Ezalaki boni mpo na mobali na ye? Ekoki kozala ete ye mpe azangaki ezaleli ya motema pɛtɛɛ na kolandáká Eva mpo na kosala lisumu kozanga kotuna liboso Tata na ye ya likoló, Yehova, mpo na kozwa lisungi to litambwisi. Lokoso na bango, mbala mosusu, elongo na ezaleli na bango ya kozanga motema pɛtɛɛ oyo ememaki bango na kosala lisumu, ebimisaki mbuma mabe mpo na biso banso. Uta epai na bango tozwaki mpe libula oyo ete mposa ya kosala masumu, kati na yango mpe lolendo mpe kozanga motema pɛtɛɛ.—Baloma 5:12.
Bambula soko 2 500 nsima ya lisumu ya baboti na biso ya liboso, libota liponami ya Nzambe, Yisraele, emonisaki kozanga kondima ya makasi, mpe ya ntango molai mpe kozanga motema pɛtɛɛ. Atako Yehova asikolaki bango na boombo na Ezipito na lolenge ya kokamwa, nokinoki “babosanaki misala na ye” mpe “bazilaki toli na ye soko moke te.” (Nzembo 106:7-14) Bazalaki mbala na mbala kokwea na mabunga minene mpamba te bazangaki motema pɛtɛɛ. Basalaki mwana ngombe ya wolo mpe basambelaki yango; baimaimaki mpo na ebongiseli ya biloko ya mosuni ya mana, oyo Yehova apesaki bango, mpe mingi na bango batombokelaki nkutu Mose, momonisi oyo aponamaki na Yehova. Ya solo, kozanga motema pɛtɛɛ ememelaki bango mawa mpe likámá.
Saulo, moto oyo azalaki mokonzi ya liboso ya Yisraele, abungisaki libaku mpo na bana na ye ya kozala bakitani na ye na kiti ya bokonzi. Mpo na nini? Mpamba te azelaki mosakoli Samwele te, ye oyo asengelaki kopesa mbeka mpo na Yehova. Kobanga bato epusaki Saulo na kopesa mbeka liboso ete Samwele aya. Kanisá naino mayoki oyo akokaki kozala na yango na ntango oyo Samwele abimaki bobele na nsima wana Saulo autaki kosilisa molulu yango! Soki azelaki lisusu ata mwa miniti moke!—1 Samwele 13:6-14.
Soki ata Eva azelaki Adama na esika ya kokamata mbuma wana nokinoki! Soki ata Bayisraele bamikundolaki ete bázela toli ya Yehova! Ee, mbɛlɛ ezaleli ya motema pɛtɛɛ elingaki kosalisa bango mpo na kopɛngola mawa mpe mpasi mpo na bango mpe mpo na biso.
Bantina ya kozanga motema pɛtɛɛ
Biblia ezali kosalisa biso na kokanga ntina ya liboso oyo epusaka na kozanga kokanga motema lelo oyo. Mokanda ya mibale ya Timoté mokapo 3 ezali koloba na ntina na eleko na biso ete tozali kobika kati na “ntango ya mpasi.” Ezali koloba ete bato bakozala “balingi na bango moko, bato na lofundo, bato na ngambo . . . bazangi komipekisa, bato na yauli, bayini na malamu.” (Molɔngɔ́ 2, 3, NW) Ezaleli wana ya lokoso mpe ya moimi ezali na bopusi kati na mitema mpe makanisi ya bato mingi, kosaláká ete bato nyonso, ata mpe baklisto ya solo, bazala na mokakatano mpo na komonisa ezaleli ya motema pɛtɛɛ. Na ntango tomonaka bato ya mokili oyo bazali kotambwisa mituka na lombango mingi to kokata biso na molɔngɔ́ to kofinga biso, ezaleli na biso ya motema pɛtɛɛ ekoki komekama makasi. Tokoki kopusama ete tomekola bango to kozongisela bango mabe, komikitisáká bongo na lolenge ya moimi mpe lolendo na bango.
Mbala mosusu makanisi na biso moko ya mabe nde esalaka ete tobungisa ezaleli ya motema pɛtɛɛ. Talá lolenge oyo Mokonzi Salomo amonisaki bokangami oyo ezali kati na kozala moto na motema mɔ́tomɔ́tɔ, makanisi mabe mpe kozanga motema pɛtɛɛ, nkanda: “[Ye oyo azali na motema pɛtɛɛ, NW] aleki oyo na [elimo, NW] ya lolendo. Yoka nkanda noki na [elimo, NW] na yo te, zambi nkanda ekoumela na motema na bazoba.” (Mosakoli 7:8, 9) Soki tokamati ntango ya koyeba bozindo mpenza ya likambo liboso ya koyanola na yango, tokoki mpenza kozala na bososoli mingi, na boboto mingi, mpe na motema pɛtɛɛ mingi epai na basusu. Epai mosusu, elimo ya enzombo, ya moimi ekoki kosala ete tozala na makanisi mokuse, kozanga motema pɛtɛɛ, nkanda makasi, lokola Bayisraele ya koimaima, ya lolendo oyo batungisaki Mose.—Mituya 20:2-5, 10.
Ntina mosusu oyo esali ete ezaleli ya motema pɛtɛɛ ezanga lisusu mingi kati na mokili ezali bongo ezalela ya kozanga elikya, oyo euti na komitangola na Yehova. Davidi amonisaki mposa oyo moto azali na yango ya kotya elikya epai na Yehova: “Molimo na ngai ekozala na kimya bobele epai na Nzambe; mpo ete elikya na ngai ezali epai na ye.” (Nzembo 62:5) Bato mingi oyo bayebi Yehova te bazali na makanisi mokuse, makanisi mabe, na yango bazali kokanga libaku nyonso ya esengo mpe litomba oyo bakoki kozwa liboso ete ntango na bango ekoka. Na ndakisa ya tata na bango ya elimo, Satana Zabolo, mingimingi, bamibanzabanzaka te mpo na lolenge oyo misala na bango ekoki kopesa basusu mpasi.—Yoane 8:44; 1 Yoane 5:19.
Ezali likambo ya kokamwa te ete ezaleli ya motema pɛtɛɛ ezali komonana mingi te lelo oyo. Ebongiseli ya biloko mabe mpe oyo ya moyimi, nzambe na yango Satana, mpe bamposa ya masumu ya nzoto na biso oyo ebebá ezali kosala ete ezala mpasi mpo na moto nyonso, ata epai na baoyo bazali sembo, ete bázala na motema pɛtɛɛ. Nzokande, Biblia ezali kolendisa biso ete “tomonisa motema pɛtɛɛ,” mingimingi na kotalela kokokisama ya mikano ya Nzambe. (Yakobo 5:8, NW) Mpo na nini motema pɛtɛɛ ezali na ntina mingi? Mbano nini yango ekoki kopesa biso?
Motema pɛtɛɛ—Mpo na nini ezali na ntina mingi
“Bango mpe basalaka, bobele baoyo batɛlɛmaka mpe bazelaka.” Wana ezali maloba ya mokomi na ntoki moko ya Angleterre, John Milton, oyo alobaki yango esili koleka bambula nkámá misato kati na loyembo na ye oyo ezalaki na motó ya likambo “Kati na mikolo na ye ya bokufi miso.” Na ebandeli ya loyembo yango, amonisaki mawa mpe mitungisi na ye mpamba te azalaki komiyoka ete akoki te kosalela Nzambe na makoki na ye nyonso mpo ete akómaki mokufi-miso na ntango azalaki na mibu 40. Kasi lokola maloba ya nsuka ya loyembo yango oyo ezongelami awa na likoló, ayaki kososola ete moto akoki kosalela Nzambe na koyikeláká bolózi mpiko na motema pɛtɛɛ nyonso mpe na kolukáká na kimya nyonso mabaku malamu ya mosala. Milton amonaki motuya ya kotya elikya epai na Nzambe na motema pɛtɛɛ nyonso.
Ntalo eleki monene kati na biso tozali miso ya malamu, kasi biso banso tozali na bisika makoki na biso esuki, oyo ekoki kosala ete tóyoka nkanda to totungisama. Lolenge nini tokoki kolóna mpe komonisa motema pɛtɛɛ?
Bandakisa ya kolendisa
Biblia ezali kopesa biso bandakisa mingi ya kitoko na ntina etali motema pɛtɛɛ. Motema pɛtɛɛ ya Yehova ezali kopesa bamilió ya bato nzela ete bákoka kozwa bomoi ya seko. (2 Petelo 3:9, 15) Kati na libyangi na ye ya boboto ete tókamata ekanganeli na ye mpe “tozwa kopema na milimo na [biso],” Yesu amonisaki na lolenge ya kokoka ezaleli monene ya motema pɛtɛɛ ya Tata na ye. (Matai 11:28-30) Komanyoláká na ntina na bandakisa ya Yehova mpe Yesu ekoki kosalisa biso na kokóma lisusu na motema pɛtɛɛ mingi.
Moto moko oyo amonanaki lokola ete azalaki na ntina malamu ya kozala na nkanda, to ya kozongisa mabe na mabe ezalaki bongo Yozefe mwana ya Yakobo. Bandeko na ye basalelaki ye makambo na bokesene mpenza, bayangaki mwango mpo na koboma ye, mpe na nsuka batekisaki ye na boombo. Kati na Ezipito, atako mosala malamu, ya sembo oyo azalaki kosala epai na Potifala, Yozefe afundamaki na efundeli ya lokuta mpe atyamaki na boloko. Ayikaki mpiko na malózi nyonso wana na motema pɛtɛɛ nyonso, ekoki mpenza kozala ete asosolaki ete mimekano motindo wana ekokaki kosala ete mikano ya Yehova mikokisama. (Genese 45:5) Lokola akolisaki kondima mpe elikya epai na Yehova, bakisa mpe komikitisa mpe bososoli, Yozefe akokaki komonisa motema pɛtɛɛ ata kati na makambo ya komekama ya mpasi mpenza.
Lisungi mosusu ya ntina mingi ezali bongo elimo santu ya Yehova. Na ndakisa, soki tosilikaka nokinoki mpe tozalaka na maloba ya mabe, tokoki kosɛnga elimo santu ya Yehova mpo ete tokoka kolona bambuma na yango. Komanyoláká likoló na bambuma nyonso wana, na ndakisa motema molai, komipekisa, ekosalisa biso na komona lolenge nini ezali na bokangami elongo na motema pɛtɛɛ.—Bagalatia 5:22, 23.
Mbano ya kozala na motema pɛtɛɛ
Kozala na motema pɛtɛɛ ekoki komemela biso matomba mingi. Eyeisaka makasi bomoto na biso mpe ebatelaka biso ete tósala te makambo ya kozanga bokɛngi mpe ya bolɛma. Nani kati na biso asala naino te mabunga ya kopesa basusu mpasi mpo ete toyanolaki nokinoki na ezalela ya makambo ya mpasi to ya kotungisa? Ekoki kozala mbala mosusu ete tolobaki makambo ya mabe to tozangaki komonisa bizaleli malamu. Ekoki kozala mbala mosusu ete totikaki nzela ete likambo moko ya moke elongo na molingami na biso ekóma kowelana monene. Na nsima ya nkanda makasi, mawa, mpe mpasi, ekoki kozala ete tokanisaki na mawa nyonso ete, ‘Soki ata nazelaki mwa moke.’ Komonisa motema pɛtɛɛ ekoki kobatela biso na lolenge nyonso ya mawa. Bobele likambo moko wana ezali kopesa biso kimya, kozanga kobulunganisama, mpe bosepeli.—Bafilipi 4:5-7.
Kozala na motema pɛtɛɛ ekoki kosalisa biso mpe na kozala na motema ya kokita mpe ya elikya. Yango ekoki kopesa biso nzela ya kozala na kolɔngɔnɔ́ malamu na nzoto, na maoki, mpe na elimo. (Masese 14:30) Soki epekisami te, nkanda makasi ekoki mpenza kobulunganisa mayoki mpe kopesa bokono na nzoto mpe liwa. Epai mosusu, soki tozali na motema pɛtɛɛ, tokoki kozwa lisusu makanisi malamu mingi epai na basusu, mingimingi epai na bandeko na biso ya elimo mpe basangani ya libota na biso. Na bongo tokopusama ete tózala na limemya mpe na ezaleli ya kosunga basusu na esika ya kosilika mpe kotóngatónga. Na bongo, basusu bakozala na mokakatano te mpe bakozala na esengo ya kozala elongo na biso.
Mingimingi, baklisto kati na lisangá ya boklisto basengeli komonisa motema pɛtɛɛ. Na bantango mosusu, baninga na bango baklisto bayaka koyebisa bango mikakatano minene. Ekoki kozala ete bato wana ya motema sembo babulunganisami, batungisami to banyokwami na makanisi, wana ekoki mpe kozala ete bankulutu bango moko balɛmbi to likebi na bango ebendami mingi bobele na makambo na bango moko to na mikakatano ya mabota na bango. Nzokande, ezali mpenza malamu ete bankulutu bamonisa motema pɛtɛɛ kati na makambo ya mpasi boye! Na motindo yango, bakoki koteya na “bopolo” mpe ‘kosalela etongá na boboto nyonso.’ (2 Timoté 2:24, 25; Misala 20:28, 29) Bomoi na bango ya motuya mingi ezali na likámá. Bankulutu ya boboto, ya bolingo, mpe ya motema pɛtɛɛ bazali mpenza lipamboli kati na lisangá.
Batata ya mabota basengeli kosalela mabota na bango na motema pɛtɛɛ nyonso, na bososoli mpe na boboto. Basengeli mpe komizela mpe kolendisa basangani nyonso ya libota ete bámonisa bizaleli motindo wana. (Matai 7:12) Yango ekosalisa mpenza mingi ete bolingo mpe kimya ezala kati na ndako.
Komonisa motema pɛtɛɛ kati na mosala ya kosakola ekosalisa baministre baklisto ete bazwa mpenza esengo kati na mosala oyo. Bakozala na likoki ya koyika mpiko soki bato bazali koyoka bango te to soki bakutani na botɛmɛli. Na esika ya koswana na balobani oyo basiliki, baministre oyo bazali na motema pɛtɛɛ bakokoka kopesa eyano ya bopolo mpe bakokende na boboto nyonso, na kozwáká bongo kimya mpe esengo. (Matai 10:12, 13) Lisusu, na ntango baklisto bazali kosalela moto moko na moko na motema pɛtɛɛ mpe na boboto, bato oyo bakokani na bampate bakobendama na nsango ya Bokonzi. Yehova azali kopambola milende oyo mizali kosalema na motema pɛtɛɛ nyonso kati na mokili mobimba, wana ebele ya bankóto ya bato ya komikitisa bazali koya mbula na mbula kati na lisangá litondi na bolingo ya Yehova.
Ya solo, komonisa motema pɛtɛɛ ekomemela biso matomba malamu. Tokopɛngola makámá mpe mikakatano mingi oyo ebimaka mpo na kosala makambo na kozanga kokitisa motema to na kozanga kopekisa lolemo na biso. Tokozala na esengo mingi koleka, na motema ya kokita, mpe tokoki kozala mpenza na esengo. Tokozwa esengo monene mpe kimya kati na mosala na biso ya kosakola, kati na lisangá, mpe kati na ndako. Kasi oyo eleki ntina, tokozala na boyokani ya penepene elongo na Nzambe. Yango wana, tiká ete tozela Yehova. Tómonisa motema pɛtɛɛ!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Nkombo oyo ebongolamaki.
[Bililingi na lokasa 10]
Omonisaka motema pɛtɛɛ kati na bomoi ya mokolo na mokolo?