Batatoli ya Yehova kati na mokili—Suède
SUÈDE ezwami na eteni ya ɛsti ya Scandinavie, ndambo monene ya mabelé mazingami na mai monene, mpe ekei kino na oyo ebéngami Cercle arctique. Eyebani na mokili mobimba mpo na bazamba na yango kitoko, mpe mabeke na yango, mpe bangomba na yango, Suède ezali moko na mikili ya Mpótó oyo ezali na bato mingi te kasi bapalangani bipai na bipai ya mokili yango. Atako bongo, Batatoli ya Yehova balukaki mpe bamonaki bato oyo balingaka solo na mboka yango uta pene na nsuka ya mibu 1800. Tótalela ndakisa moko ya mikolo oyo.
Mwasi moko azalaki koyekola Biblia elongo na Batatoli, kasi mobali na ye azalaki kosepela na likambo yango te. Ayebisaki mwasi na ye ete atika koyekola, mpe mwasi yango atikaki. Mobali yango azalaki kosala na depó moko ya masanga. Mokolo mosusu mokumbi moko ya motuka ayaki na esika yango elongo na mwana moko ya moke ya mobali ya mibu zomi, mwana ya mwana na ye ya mwasi. Mokumbi motuka yango asɛngaki na mobali yango ete atalela ye elenge mobali wana ya mibu zomi na ntango ye azalaki kokɔtisa biloko na motuka. Bobele mpo na kobanda lisolo, mobali yango atunaki mwana wana soki likabo nini autaki kozwa kala mingi te mpo na bokundoli mokolo ya kobotama na ye. Mobali yango akamwaki na koyoka elenge mobali yango koyebisa ye ete ye mpe libota na ye bakumisaka mokolo ya kobotama te mpamba te bazali Batatoli ya Yehova. Elenge mobali yango ayebisaki ye lisusu ete bapesaka ye makabo na bileko mosusu ya mobu mpe amiyokaka te ete azangi eloko, mpamba te azali kati na libota moko ya esengo mpe oyo etondi na bolingo. Alobaki lisusu ete likabo moko te eleki yango na motuya.
Elenge mobali yango azalaki koya wana mbala mingi elongo na nkɔ́kɔ na ye. Mbala nyonso, moto yango azalaki kotuna elenge mobali yango mituna mingi, mpe akamwaki mingi na komona lolenge elenge mobali yango azalaki kopesa biyano ya sembo, mpe ya sikisiki kozanga kokakatana. Akamwaki lisusu na komona lolenge elenge mobali yango azalaki kosepela na bizaleli malamu. Mokolo moko na butu, nsima wana mobali yango alandaki emisió ya televizyó oyo elakisaki ezalela ya mpasi oyo ezali kati na mokili, ayaki komona ete asengelaki kotalela makambo ya elimo na mozindo mpenza. Abéngaki na telefone Motatoli oyo azalaki koyekola na mwasi na ye na kala mpe asɛngaki ye ete azonga. Nokinoki, moto yango abandaki koyekola Biblia elongo na Motatoli moko, mpe na nsima akólaki nokinoki. Azwaki batisimo na 10 Apríli, 1994. Sikawa mwasi na ye mpe asilá kozwa batisimo.
Bokoli ezali kosɛnga mosala ya botongi
Suède ezali efandelo ya bato mingi oyo bakimá bamboka na bango, mpe Batatoli ya Yehova ya Suède basili kozwa matomba malamu na kosakoláká epai na bato yango. Mosala esili kobota mbuma mingi na boye ete esɛngaki Bandako ya Bokonzi ya sika etongama mpo ete ekoka kosimba bokóli wana. Kobanda na 1986 kino 1993, batongaki Bandako ya Bokonzi 37 esalemi na tekiniki ya botongi na ntango mokuse, mpe bandako misusu 8 eyeisamaki minene mpe ezongisamaki ya sika. Bobele na 1994, Bandako mosusu nsambo ya Bokonzi etongamaki, mpe misato ezongisamaki sika.
Sikawa, masangá 65 mazali kozela lisungi mpo na kotonga Ndako ya Bokonzi ya sika to mpo na koyeisa monene to kozongisa oyo bazalaka na yango ete ekóma ya sika. Pene na basáli ya bolingo malamu 2 500 bazali kopesa lisungi kati na mosala wana ya botongi, mpe masangá mazali kosepela na lisungi na bango litondi na bolingo.
Eteni ya nɔ́rdi ya Suède, oyo ekeyi kino na Cercle arctique, ebéngamaka mbala mosusu ete mokili ya moi na midi ya butu. Babéngaka yango bongo mpamba te na boumeli ya eteni moko ya eleko ya molungé, kuna moi elalaka te. Nzokande, na Suède mobimba, pole ya solo ezali mpe kokóba sé kokóba kongɛnga makasi. Na lisalisi ya lipamboli ya Yehova, pole wana ya elimo ekozimisama soko moke te kasi ekokóba kongenga lisusu mpe lisusu.
[Etanda na lokasa 8]
MAKAMBO MATALI EKÓLO
Mbula ya mosala 1994
MOTUYA YA BASAKOLI: 24 246
BOKOKANISI: MOTATOLI 1 MPO NA BATO 362
MOTUYA YA BAYANGANI NA EKANISELI: 40 372
MWAYENE YA BABONGISI-NZELA: 2 509
MWAYENE YA BAYEKOLI YA BIBLIA: 11 306
MOTUYA YA BATISIMO: 850
MOTUYA YA MASANGÁ: 358
BIRO YA FILIALE: ARBOGA
[Elilingi na lokasa 9]
Biro ya filiale mpe Betele na Arboga
[Elilingi na lokasa 9]
Batatoli ya liboso na engumba Hjo basalelaki motuka oyo mpo na kosakola kati na etando ya 5 000 ya bakilomɛtɛlɛ zongazonga