Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 15/4 lok. 32
  • Traduction Du Monde Nouveau ekamwisi moto moko ya mayele

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Traduction Du Monde Nouveau ekamwisi moto moko ya mayele
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 15/4 lok. 32

Traduction Du Monde Nouveau ekamwisi moto moko ya mayele

ENGEBENE Dr. Rijkel ten Kate, moto moko ya mayele oyo ayekolaka Greke ya kala, mabongoli ya Biblia na lokótá Néerlandais mabongolaki maloba mosusu malamu te. Na ndakisa, na Luka mokapo 2, tozali kokuta maloba misato makeseni ya Greke (breʹphos, pai·diʹon, mpe pais) oyo masalelami mpo na kolobela kolandana ya bileko ya bokóli na Yesu. Liloba moko na moko lizali na ndimbola na yango. Nzokande, kati na Biblia mingi, maloba mibale to nyonso misato mabongolami bobele “mwana.” Wapi libongoli na yango oyo libongi mpenza?

Dr. ten Kate alimboli ete na molɔngɔ́ 12 liloba ya Greke breʹphos elimboli “mwana oyo abotami sika, to ɛlɛzi.” pai·diʹon, oyo esalelami na molɔngɔ́ 27, elimboli “mwana moke ya mobali to mwana,” mpe pais, oyo ezwami na molɔngɔ́ 43, esengelaki kobongolama ete “mwana mobali.” Dr. ten Kate akomaki kati na ebimeli ya Mársi 1993 ya zulunalo Bijbel en Wetenschap (Biblia mpe Siansi) ete: “Ndenge nayebeli, libongoli moko te ya Néerlandais lisili kobongola yango na lolenge lobongi, elingi koloba, na boyokani mpenza na makomi ya ebandeli.”

Na nsima, balakisaki na Dr. ten Kate Les Saintes Écritures — Traduction du monde nouveau, oyo ezali na minɔkɔ 12, kati na yango Néerlandais. Mayoki na ye ezalaki nini? Alobaki ete: “Nakamwi mingi, ete ezali mpenza na Biblia ya Néerlandais oyo kati na yango lolenge ya kosalela maloba misato ya Greke breʹphos, pai·diʹon, mpe pais etalelamaki malamu.” Traduction du monde nouveau ebongolaki mikapo wana na boyokani na makomi ya Greke ya ebandeli? Dr. ten Kate ayanoli ete: “Eyokani mpenza na yango.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto