Mituna ya Batángi
Na elobeli ya sikisiki, bokeseni ezali nde kati na maloba oyo ya Biblia “bampate mosusu” mpe “ebele monene”?
Bokeseni ezali, atako tosengeli te komitungisa mingi koleka na ntina na lolenge ya kosalela maloba oyo to kobulungana soki moto moko asaleli liloba moko na esika na mosusu.
Ntalo monene ya baklisto basili komesana mingi na mikapo epai kuna tozali kokuta maloba wana. Moko na yango ezali bongo Yoane 10:16. Kuna Yesu alobaki ete: “Najali mpe na bampate mosusu baoyo bajali na lopango oyo tɛ, ekoki na ngai kokamba mpe bango mpe bakoyoka mongongo na ngai mpe bakojala etɔnga mɔkɔ mpe na mobateli mɔkɔ.” Liloba mosusu, “ebele monene,” ezwami na Emɔnisɛli 7:9. Tozali kotánga ete: “Na nsima na makambo oyo natalaki, mpe namɔni ebele monɛnɛ, oyo moto tɛ akoki kotanga motuya na bango; bauti na mabota yɔnsɔ, na mikili yɔnsɔ, na [bikólo] yɔnsɔ, na minɔkɔ yɔnsɔ; batɛlɛmi liboso na kiti na bokonji mpe liboso na Mwana na Mpate. Balati bilamba mpɛmbɛ, mpe basimbi bitape na mbila na mabɔkɔ na bango.”
Tótalela liboso Yoane 10:16. Bampate yango bazali banani? Ekozala malamu tómikundola ete bayekoli nyonso ya sembo ya Yesu babyangami bampate. Na Luka 12:32, abyangaki bayekoli na ye oyo basengeli kokende na likoló ete “etɔnga mokɛ.” Etongá ya nini? Ya bampate. “Bampate” ya “etɔnga mokɛ” bakosangana na Bokonzi ya likoló. Nzokande, ezali na basusu, baoyo bazali na elikya mosusu, bango mpe Yesu azali kotalela bango lokola bampate.
Tokoki komona yango na Yoane mokapo 10. Nsima ya kolobela na ntina na bampate lokola bantoma na ye oyo ye alingaki kobyanga mpo na bomoi na likoló, Yesu abakisaki na molɔngɔ́ 16 ete: “Najali mpe na bampate mosusu baoyo bajali na lopango oyo tɛ, ekoki na ngai kokamba mpe bango.” Uta kala, Batatoli ya Yehova basili kososola ete na molɔngɔ́ oyo Yesu azalaki kolobela bato oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabelé. Bato mingi ya sembo oyo bazalaki na bomoi liboso na ntango ya boklisto, lokola Abalayama, Sala, Noa mpe Malaki, bazalaki na bilikya wana. Na yango, tokoki na elónga nyonso kotánga bango kati na “bampate mosusu” ya Yoane 10:16. Na boumeli ya Mbula Nkóto, batatoli wana ya sembo oyo bazalaki na bomoi liboso na ntango ya boklisto bakosekwa mpe bakoyekola makambo na ntina na Klisto Yesu mpe bakondimela ye, bakokóma bongo “bampate mosusu” ya Mobateli aleki Malamu.
Toyebi mpe ete kobanda libyangi ya kelasi ya likoló esukaki, bamilió ya bato basili kokóma baklisto ya solo. Bango mpe babongi ete bábéngama “bampate mosusu,” mpamba te bazali basangani ya “etɔnga mokɛ” te. Nzokande, bampate mosusu bazali lelo oyo kozela na motema likoló kozala na bomoi kati na paladiso.
Sikawa, tokoki koloba nini na ntina na “ebele monene” oyo elobelami na Emɔnisɛli 7:9? Talá na molɔngɔ́ 13 mpe motuna, “Bajali banani, mpe bauti wapi?” Tozwi eyano na Emɔnisɛli 7:14: “Bajali baoyo babimi na monyɔkɔ monɛnɛ.” Na yango “ebele monene” esangisi baoyo nyonso babimi, to babiki, na bolózi monene. Lokola molɔngɔ́ 17 elobi yango, ‘bakokambama epai na mito na mai na bomɔi’ awa na mabelé.
Nzokande, lokola tokoki kososola yango, baoyo bakobika na bolózi monene oyo esili kobɛlɛma basengeli liboso kosukola bilamba na bango kati na makila ya Mwana na Mpate, kokómáká bongo basambeli ya solo. Na yango, atako Emɔnisɛli 7:9 elobeli ebele monene wana nsima ya bolózi monene, tokoki kosalela liloba “ebele monene” mpo na kolobela baoyo nyonso bazali na elikya ya kofanda na mabelé, baoyo bazali sikawa kosalela Yehova mosala ya bulɛɛ, liboso ete bolózi monene ebanda ntango mabota makobundisa mangomba ya lokuta.
Na mokuse, tokoki komikundola ete “bampate mosusu” ezali liloba oyo lizali na ndimbola monene, oyo esangisi basaleli nyonso ya Nzambe oyo bazali na elikya ya kofanda libela awa na mabelé. Esangisi etuluku ya bato oyo bakokani lelo na bampate oyo bazali koyanganisama lokola “ebele monene” na elikya ya kobika na bolózi monene oyo esili kobɛlɛma. Ntalo monene ya baklisto ya sembo oyo bazali lelo na bomoi bazali kati na “bampate mosusu,” bazali mpe basangani ya “ebele monene.”
Ezali na ntina kozongela yango, atako ebongi kosalela malamu bandimbola wana ya sikisiki, ezali na ntina te ete moklisto amitungisa koleka ndelo na ntina na maloba wana—oyo ekoki kobéngama makambo makasi na ntina na maloba. Paulo akebisaki basusu oyo basilaki “kovimba na lolɛndɔ” mpe bazalaki “kowelana na ntina na maloba.” (1 Timɔtɛ 6:4) Soki biso moko tozali na makoki ya kokesenisa ndimbola ya maloba, ezali malamu. Nzokande, tosengeli te, na maloba to kati na motema, kotyola bato mosusu oyo mbala mosusu bayebi malamu te kosalela maloba ya Biblia na lolenge ya sikisiki.