Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 15/4 nk. 7-9
  • Esengo ezali na baoyo bamoni solo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Esengo ezali na baoyo bamoni solo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mateya ya solo ya Biblia epesaka esengo
  • Mitindá ya solo ya Biblia mizali kopesa esengo
  • Tosengeli kolóna esengo
  • Ntango molongani akosi yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • ‘Kobá kotambola na kati ya solo’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Pesaká na esengo mpenza!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Esengo—Ezaleli oyo eutaka epai ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 15/4 nk. 7-9

Esengo ezali na baoyo bamoni solo

MOBALI moko ya mboka Finlande amonaki búku Le divin plan des âges kati na ebombelo na ye ya milóna. Abandaki mbala moko kotánga yango, mpe nokinoki amilobelaki ete, ‘Oyo ezali solo; oyo ezali solo.’ Nsima ya kokita uta na ebombelo na ye ya milóna, ayebisaki mwasi na ye ete: “Namoni lingomba ya solo.”

Lolenge mobali wana amonaki solo ezali likambo oyo esalemaka mingi te, kasi Batatoli ya Yehova mingi bakoki komonisa mayoki motindo moko. Bango banso bakoki koyebisa yo esengo oyo komona solo ememaka. Masólo malandi mamonisi yango.

Mateya ya solo ya Biblia epesaka esengo

Margarita Königer akólaki na engumba Munich, na Allemagne, na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Bandako oyo ekweisameli bómbi mpe oyo ezali kozika ezalaki komonana mingi. Yaya na ye ya mobali akufaki na bitumba. Lokola azalaki kokɔta na mísa na lingomba ya Katolike, ayokaki mabondeli oyo esalemaki mpo na basodá ya Allemagne mpe mokonzi na bango, Hitler. Na nsima ya bitumba, apesamelaki mosolo mpo na kokende kotánga na eteyelo monene na Etats-Unis na lisalisi ya ebongiseli ya kosɔmbitinya bayekoli kati na mboka moko mpe mboka mosusu. Amonaki ete bato bazalaki komonisela ye boboto, na yango abandaki komituna soki eloko nini ezalaki kopusa bato na kozanga kotyelana motema mpe na koyinana na ntango ya bitumba, nzokande mposa oyo babotami na yango ezalaka nde ya kofanda na kimya. Na ntango azongaki na Munich, akutanaki na Batatoli ya Yehova, azwaki biyano na mituna na ye na lisalisi ya boyekoli ya Biblia elongo na bango. Alobi ete: “Bamonisaki ngai kati na Biblia ete nguya ya bilimu mabe ezali kosala mosala . . . Biblia ezali kobénga bango ‘bayangeli ya mokili,’ mpe ezali koloba solo ete Satana ‘azali kozimbisa mabelé mobimba oyo bato bafandi.’ . . . Na kotalela misala mabe ya mabota mpe ya bato, biyano na mituna wana ezali likambo libongi mpe ya kosepelisa!”​—Baefese 6:12; Emoniseli 12:9.

Margarita alobi lisusu ete: “Epesaki ngai esengo mingi ya koyeba bibongiseli oyo Nzambe akamati mpo na kosilisa bampasi ya bato awa na mabelé. Ekosalema te na lisalisi ya mayele to ya boyangeli ya bato, lokola bateyi ya mokili bamonisaki yango. Nzokande, Biblia ezali komonisa biso ete boyangeli ya sika ya makoló ekokamba makambo matali mabelé. . . . Yesu Klisto ateyaki bayekoli na ye ete bábondelaka boye: ‘Tiká ete bokonzi na yo eya.’ . . . Nakómaki komona ete bokonzi yango ezali boyangeli ya solo mpe ete bobele na nzela na yango nde kimya ya solosolo ekotyama kati na mokili mobimba.” Na boumeli ya bambula pene na 30, Margarita asili kosala mosala ya misionere na pene na mikili mitano ya Afrika​—alekisaki bambula 19 oyo euti koleka na kosakoláká solo epai na bato ya komikitisa oyo bazali na engumba Ouagadougou, na Burkina-Faso.

Ezalaki bongo bobele mpo na Margarita te. Bato mingi mpe bayanolaki malamu na ntango bamonaki ete bakonzi ya mangomba bazalaki na ngámbo moko mpe mosusu kati na bitumba, kobondeláká mpo na kozwa bolóngi. Bato ya mitema sembo bazali komona ete bandimbola ebongi oyo ezali kati na Biblia, ete Nzambe asanganaka te na bitumba oyo bato bazali kobimisa, kasi yango ezali kobima mpamba te “mokili mobimba ejali kolala na kati na oyo mabe.” Bato oyo bazali koluka solo bazali koyekola ete baklisto ya solo basengeli “kozala bato na mokili tɛ,” basengeli komikɔtisa te kati na makambo na yango. Koyebáká ete Batatoli ya Yehova bazali na etɛlɛmɛlo motindo oyo, bato wana oyo babandi kosepela na solo bazali kondimisama mpenza ete basili komona solo. Elikya mpe bosepeli na bango ezali kokóla wana bazali kokóma na boyebi mingi mpo na oyo etali ntina oyo Nzambe atiki nzela na mabe mpe lolenge nini, mosika te, akotya kimya mpe boyengebene awa na mabelé na nzela ya Bokonzi na ye.​—1 Yoane 5:19; Yoane 17:16; Matai 6:9, 10.

Mitindá ya solo ya Biblia mizali kopesa esengo

Daniel Rosero, ye mobotámá ya Equateur, azalaki kokanisa ete bomoi ezali na ntina te, na yango abandaki komela masanga mingi. Lingomba oyo ye azalaki kokende eteyaki ye ete asengelaki bobele kozela liwa na ye mpe kokende na lifelo ya mɔ́tɔ. Ayanolaki ete: “Nakokende kozika na mɔ́tɔ, na yango, bótika ngai námela!” Azalaki na libota ya bana mwambe kasi azalaki kokokisa bamposa na bango te, mpe azalaki ntango nyonso kobundisa Delia, mwasi na ye. Mbongwana monene ekɔtaki na bomoi na ye mokolo moko ya Lomingo na ntɔ́ngɔ́, wana Batatoli ya Yehova bayaki na ndako na bango mpe abandaki koyekola Biblia. Na mbala ya liboso oyo Daniel ayanganaki na liyangani ya zongazonga ya Batatoli ya Yehova, asosolaki ete asilaki komona solo. Alobi ete: “Kobongisama ya makambo ekamwisaki ngai mingi. Bato mingi bazalaki koyokana malamu. Okoki komona bolingo kati na ebele ya bato. Moto moko te azalaki komela likaya. Maloba ya bosɔtɔ ezalaki te. . . . Nazali komikundola ete nazalaki koloba na nsé ya motema ete: ‘Oyo ezali solo!’ Ezalaki bongo kobanga liwa to kobanga nsuka ya mokili te nde elamwisaki mayoki na ngai. Ezalaki nde bopɛto ya lisangá yango.”

Libota mobimba ya Rosero bakómaki Batatoli ya Yehova. Bomoi ya libota na bango mpe ezalela na bango ya makambo ya mosolo ekómaki malamu wana bazalaki kosalela mitindá ya Biblia. Delia Rosero alobi ete: “Mbongwana nyonso oyo esalemi kati na libota na ngai ezali mpo na solo ya Biblia. Ekoki mpenza kozala ete bana na ngai mbɛlɛ balingaki kozala na mpasi soki bayebaki liloba ya Nzambe te. Bango nyonso nsambo basili kozwa batisimo mpe bazali makasi na elimo. Mpo na ngai, solo elimboli bongo bomoi mpenza ya sika mpe bolamu ya sika.”

Esalemaki bongo bobele mpo na libota ya Rosero te. Bato mingi lelo babulunganisami mpo na mikakatano. Moko ya bantina ezali oyo ete mitindá ya bizaleli malamu oyo euti na Biblia ezali kotosama lisusu te lokola ezalaki kosalema liboso. Mangomba mingi balandi nzela yango, ezala mpo na ezaleli ya kotika nzela na makambo nyonso to mpo ete bakanisi ete wana ntango ezali kobongwana, mitindá ya kala mitali bizaleli malamu mizali mpe kosila ngala. Na yango, lokola basusu, libota ya Rosero ezangaki litambwisi liuti na Biblia. Nzokande, na ntango bato wana ya komikitisa bazali kokóma na boyebi ya likanisi ya Nzambe na ntina etali bizaleli malamu mpe bomoi ya libota, kozanga koumela, bazali kosalela makambo oyo bazali koyekola. Kati na masoló na bango, tozali komona matomba malamu ya kosala bongo.

Tosengeli kolóna esengo

Nzokande, yango elimboli te ete baklisto bazalaka bobele na esengo ntango nyonso. Na ntembe te, mikakatano oyo bato nyonso bakutanaka na yango, na ndakisa kozanga mosala, bokɔnɔ, mpe liwa, ekómelaka mpe baklisto. Baklisto basengeli ntango nyonso kobundisa bizaleli na bango ya kozanga kokoka mpe bolɛmbu na bango. Lisoló ya Biblia eyebisi ete Lota “ajalaki komitumola mpɔ na lofundo na bijaleli na bato kati na mobulu” na engumba Sodomo. Baklisto bakoki mpe kozala na mayoki motindo wana ntango bazali komona makambo ya mabe mazali kokóla.​—2 Pɛtɛlɔ 2:7, 8.

Nzokande, baoyo basili komona solo bazali na libaku malamu. Na ndakisa, mondimi oyo azali kolela moto moko oyo akufi ‘akoyoka mawa tɛ pelamɔkɔ bamosusu baoyo bajali na elikia tɛ.’ Mawa na ye ekozala te oyo ezangi nsuka. Ezali mpe bongo mpo na makambo mosusu. Moto oyo asili komona solo ayebi ete bampasi ya mikolo oyo ezali ya ntango moke. Elikya ezali kosalisa bango mpo ete bákoka koyika mpiko kati na mikakatano. Lolenge ya bomoi ya bokatikati ekosungaka mpe mingi.​—1 Batɛsalɔniki 4:13.

Paulo apesaki elendiseli oyo epai na baklisto, ete: “Bosepelaka ntango yɔnsɔ kati na nkolo. Najali koloba lisusu ete, Bosepelaka!” (Bafilipi 4:4) Yango emonisi ete atako biso banso tokoki kozwa esengo, ekoki mpe kosalema ete tózanga yango. Mitungisi ya ebongiseli ya biloko oyo esili konuna ekoki kozala epekiseli mpo na kozwa esengo. Lisusu, Biblia ezali koyebisa biso ete tosengeli kolóna esengo, moko na bambuma ya elimo santu ya Nzambe. (Bagalatia 5:22) Soki olandi ntango nyonso kozwa boyebi ya solo mpe komikundwela bozwi ya elimo oyo solo esili komemela yo mpe oyo ezali kokóba komemela yo, esengo na yo ekokita te. Ekokóma lisusu makasi wana ezali biso kobɛlɛma na ntango oyo Nzambe “akolongola mpisoli yɔnsɔ” na miso ya bato mpe na ntango oyo “kolela, konganga na mpasi” ekozala lisusu te.​—Emɔnisɛli 21:4.

[Bililingi na lokasa 8]

Bato mingi bakamwaka mpo na esengo mpe lolenge malamu ya kobongisa makambo oyo ezalaka na mayangani ya Batatoli ya Yehova

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto