Mituna ya Batángi
Ezaleli nini tosengeli komonisa wana batisimo ya boklisto ezali kopesama?
Oyo ezali motuna moko malamu, mpamba te atako mingi kati na batángi na biso basilá kozwa batisimo, yango etaleli mpe bango, ezala mpe baoyo balingi kozwa batisimo. Tiká tólobela liboso mpo na baoyo bazali kozwa batisimo na kozindisama mobimba kati na mai. Ezaleli nini basengeli kozala na yango?
Na Matai 28:19, 20, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete bákende kozalisa bayekoli, koteya mpe kobatisa bango. Amonisaki te ete batisimo ezali likambo moko ya kolamwisa mayoki, likambo oyo lipusami na esengo ya ntango mokuse. Ezali litambe moko ya ntina, lokola tozali komona yango na ndakisa ya Yesu. Luka 3:21 elobi ete: “Esilaki Yesu kobatisama, mpe ejalaki ye kobɔndɛla, Likolo ejipwaki.” Ee, na bosembo nyonso, Ndakisa na biso atalelaki batisimo na lisɛki te. Tokoki te kokanisa na ntina na ye ete nsima ya batisimo na ye amonisaki elembo moko ya bolóngi, na kotomboláká mabɔkɔ to na kongangáká mpo na komonisa bolóngi; nzokande kala mingi te basusu bautaki kosala bongo. Bobele na miso ya Yoane Mobatisi, Yesu amibalolaki epai na Tata na ye kati na libondeli.
Atako bongo, Biblia eyebisi te ete batisimo esengeli kozala ntango moko ya mawamawa to ya kozanga esengo, oyo ezali kosɛnga komonisa ezaleli moko oyo ekeseni mpenza to kozongela kotánga na motó mikapo, lokola mangomba mosusu ya boklisto ya nkombo mpamba masɛngaka yango lelo. Ee, kanisá makambo masalemaki na mokolo ya Pantekote, wana bamilió ya Bayuda mpe bato oyo babongwanaki na losambo ya Bayuda bakendaki kozwa batisimo ya boklisto. Basilaki koyekola Mibeko ya Nzambe mpe bakɔtaki kati na boyokani elongo na ye. Na yango basengelaki bobele koyekola mpe kondima Masiya, Yesu. Nsima ya kosala bongo, bakokaki kobatisama.
Misala 2:41 (NW) eyebisi ete: “Baoyo bayambaki liloba na ye na motema moko babatisamaki.” Libongoli ya Biblia ya Weymouth ezali kotángama boye: “Na yango, baoyo nyonso bayambaki liloba na ye na esengo nyonso babatisamaki.” Bazwaki esengo na nsango kitoko na ntina na Masiya, mpe kozanga ntembe esengo yango oyo eutaki na motema ekendaki kino na batisimo yango moko, batisimo oyo esalemaki liboso ya bato mingi oyo bazalaki na esengo ya kotala yango. Ata baanzelu na likoló bazalaki kotala mpe bazalaki kosepela. Tómikundola maloba oyo ya Yesu ete: “Nalobi na bino ete esɛngɔ ekojala bongo kati na banje na Njambe mpɔ na moto mɔkɔ na masumu oyo abongoli motema.”—Luka 15:10.
Ezali na makambo mingi kati na yango moko na moko na biso akoki komonisa bonene mpe esengo oyo esangani na batisimo. Kati na mangomba mosusu, baoyo bazali kozwa batisimo balataka bilamba ya mpɛmbɛ to ya mwindo. Ezali na lisɛngami motindo wana te oyo ezwi moboko kati na Makomami. Atako bongo, bilamba ya kosukola oyo ezali kokanga nzoto makasi to oyo ezali komonisa polele biteni ya nzoto ekoki kozala malamu soko moke te, ezala mpo na mibali to mpo na basi. Mpe lokola tolobelaki yango, nsima na kobima na mai, moklisto ya sika asengeli te kosala bilembo ya sikisiki to komonisa lokola nde asili kozwa bolóngi moko monene. Basangani mosusu ya libota ya boklisto bazali na esengo lokola moto ya sika azwi batisimo. Asengeli koyeba ete likambo wana ya komonisa kondima ezali bobele litambe ya ebandeli ya nzela molai ya bosembo mpo na kondimama epai Nzambe.—Matai 16:24.
Biso, baoyo tozali kotala ntango batisimo ezali kopesama liboso ya bato banso, tozali kokabola esengo ya libaku wana, mingimingi soki moto oyo azali kozwa batisimo azali moko kati na libota na biso to moto oyo toyekolaki Biblia elongo na ye. Nzokande, mpo na kozwa litomba na likambo wana, tosengeli kolanda lisukúlu na mobimba na yango elongo na bakandidá, koyoka bango koyanola na mituna oyo mikotunama epai na bango liboso ya bato banso mpe kosangana elongo na bango kati na libondeli. Na kosaláká bongo, tokomonisa makanisi malamu na ntina na batisimo; tokotalela yango lokola Nzambe atalelaka yango. Nsima ya batisimo, esengo na biso ekosɛnga te ete tósala botámboli ya komonisa bolóngi, kopesa liboke ya fololo, to kobongisa elambo mpo na lokumu ya ye oyo azwi batisimo. Kasi tokoki kokutana na ndeko na biso ya sika mobali to mwasi mpo na komonisa ye esengo na biso mpo na litambe monene oyo auti kosala mpe kotombela ye boyei malamu kati na libota na biso ya boklisto.
Na bongo, na mokuse biso banso, sangisá mpe baoyo bazali kozindisama na mai, tosengeli kotalela batisimo na lolenge lobongi na yango mpenza. Ezali ntango ya kolekisa ndelo na mayoki te, ya kosala elambo te to ya kosala masɛki te. Kasi ezali mpe ntango ya kozala mawamawa te to ya kozanga esengo te. Tokoki, na bosembo nyonso, kozala na esengo mpo ete bato ya sika basangani elongo na biso na nzela oyo ezali komema na bomoi ya seko. Mpe na esengo nyonso, tokoki kotombela boyei malamu epai na bandeko na biso ya sika mibali mpe basi.
[Elilingi na lokasa mobimba 31]