Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 15/3 lok. 32
  • Biblia moko ezali na motuya boni?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biblia moko ezali na motuya boni?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 15/3 lok. 32

Biblia moko ezali na motuya boni?

KALA mingi te, Bibliotɛkɛ monene ya Grande-Bretagne endimaki kobimisa badolare 1600000 mpo na kosomba kopi moko mpamba ya Makomami ya Greke ya boklisto na Lingelesi oyo ebongolamaki na William Tyndale. Ebimisamaki esili koleka mibu 468, yango ezali kopi bobele moko ya mobimba ya ebimeli ya liboso ya Biblia ya Tyndale, oyo ebikaki na milende makasi oyo esalemaki mpo na kolimwisa yango. Biblia wana etyamaki na esika oyo bakoki komona yango na Londres.

Biblia ya Tyndale esombamaki na eteyelo monene ebéngami Bristol Baptist College na Angleterre, esika yango ebatelamaki kobanda 1784. Dr. Roger Hayden, mokambi-molandi ya komité ya eteyelo monene yango, alobaki ete: “Oyo ezali mokanda ya ekólo mobimba, ya kokólisa mayele mpe ya boklisto oyo ezali na ntina mingi mpe tolingaki ete bato mingi bákoka kosalela yango, lokola tobatelaki yango kati na bibombelo ya malamu.”

Na boumeli ya bikeke mingi Biblia ezalaki komonana mingi bobele na Latin mpe bobele bakonzi ya mangomba mpe mwa ndambo ya bato na mayele nde bakokaki kotánga yango. Lokola John Wycliffe oyo azalaki liboso na ye, Tyndale alingaki kopalanganisa Biblia oyo moto nyonso akokaki kotánga mpe kokanga ntina. Mokolo mosusu alobaki na mokonzi moko ya lingomba oyo azalaki kotɛmɛla ye ete: ‘Soki Nzambe akobatela bomoi na ngai lisusu ntango molai, nakosala ete elenge mobali mosáli-bilanga ayeba Makomami koleka yo.’

Ezalaki mosala moko ya likámá mpenza, mpamba te bakonzi ya mangomba bazalaki kotɛmɛla makasi milende nyonso ya kopalanganisa Makomami epai na bato nyonso. Mpo na yango, Tyndale akimaki Angleterre mpo na kokende na Allemagne. Kuna abongolaki “Tɛstamá ya Sika” longwa na Greke ya ebandeli. Bakopi 3000 enyatamaki mpe ekɔtisamaki na Angleterre na kobombama. Episkɔ́pɔ ya Londres asombaki kopi nyonso oyo akokaki komona mpe atumbaki yango na libándá ya ndakonzambe oyo ebéngami Saint-Paul. Na nsima, Tyndale akangamaki, asambisamaki, mpe akweisamaki ete azalaki mopɛngwi. Na 1536 babomaki ye mpe batumbaki ye likoló na nzeté. Ezali likambo ya kokamwa ete Biblia oyo bakonzi ya mangomba bayinaki yango makasi ezali lelo oyo na motuya mingi mpenza!

Batatoli ya Yehova bazali kosala milende makasi mpo na kopesa boyebi ya sikisiki ya Biblia epai na baoyo bazali koluka yango. Longola konyata mpe kokabola mabongoli mosusu, basili kobimisa longwa na nkótá ya ebandeli libongoli ya Biblia mobimba oyo ezali mpenza ya sikisiki mpe ya pɛtɛɛ mpo na kotánga. Na 1995 koleka 74000000 ya bakopi ya Les Saintes Écritures ​— Traduction du monde nouveau esili kobimisama na nkótá 12. Ya solo, motuya mpenza ya Biblia nyonso ezali bongo nsango na yango oyo ekopesaka bato bomoi.

[Elilingi na lokasa 32]

William Tyndale

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Euti na elilingi moko ya kala ya Bibliothèque Nationale

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto