Yehova akobikisa mabelé
LIBANDA moko ya mpepo oyo ezwami na moko na bisanga Maldives ekangamaka mokolo na mokolo na boumeli ya bangonga mingi. Mpo na nini? Mpamba te, mbonge etondisaka etando ya libanda ya mpepo na mai, yango ekómaka likámá mpo ete mpepo ekita wana. Bamoko ya banganga-mayele ya siansi bazali kobanga noki nivo ya mai monene ya bisanga ya Maldives ekomata kino pene na mɛtɛlɛ moko na ekeke oyo ezali koya. Atako motango oyo ezali komonana lokola ete ezali monene te, kasi komata motindo wana ekoki kolimwisa bamboka nsambo oyo ezwami kati na bisanga wana. Ya solo, engebene zulunalo UN Chronicle, komata na bamɛtɛlɛ mibale ekoki kokunda etuluku mobimba oyo esangisi bisanga 1 200!
Eloko nini ematisaka nivo ya mai monene? Engebene ebongiseli ya O.N.U. oyo ekotalelaka makambo ya ezingelo, kobebisama ya mopepe ya mabelé na nzela ya oyo ebéngami “effet de serre” ezali kosala ete na mikili ya molunge mai monene emata, ngalasa enyangwisama, mpe na bongo nivo ya mai monene ezali komata. Institut Panos, oyo ezwami na engumba Londres elobi ete kobebisama ya mopepe “ekoki kozala ete ebandisaki likámá moko oyo ezali koya malɛmbɛmalɛmbɛ kati na mokili mobimba, oyo ezali kobongola bandelo mpenza oyo ekaboli mabelé mpe mai monene.”
Likambo oyo ete mabelé mobimba ezali kokóma mɔ́tɔ ezali naino kobimisa masoló ya ntembe kati na banganga-mayele ya siansi. Nzokande, tokoki kondimisama ete mikakatano na ntina etali ezingelo ekopekisa mokano ya Nzambe te. Biblia elobi ete: “[mabelé, NW] etongami na makasi mpe ekotelengana tɛ.” (1 Ntango 16:30) Yehova azali na bokonzi likoló na ezingelo ya mabelé, mpe tokoki kosepela ete mosika te, akobikisa mabelé mpe bato kati na libebi.—Nzembo 24:1, 2; 135:6; 2 Petelo 3:13.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 31]
Emekoli fɔtɔ́ ya NASA