Tozali kotika te!
“TOZALI KOTIKA TE” ezali maloba oyo okoyoka wana okei kotala ndako moko oyo ekeseni na mosusu nyonso na Tokyo, na mboka Japon. Libota moko oyo lisangisi mibali mpe basi 22, baoyo bazali na mwayene ya mibu ya kobotama 70, lizali kofanda na ndako yango. Eloko oyo esangisi bango ezali bikanganeli ya makila te kasi mokano moko oyo banso bazali na yango—mosala ya misionere. Wana ezali bango kolendendela kati na mosala ya kosakola ntango nyonso, basili bango banso kokokisa motángo mobimba ya mibu 1026 ya mosala! Basangani misato oyo baleki basusu nyonso na mbula babotamaki na 1910. Nsambo kati na bango babandaki mosala ya ntango nyonso wana bazalaki naino bilenge. Basusu libwa basili komona bokóli ya mosala ya kosakola Bokonzi na Japon uta na ebandeli na yango nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba.—Yisaya 60:22.
Nzokande, ndako wana ya kala ya biro ya filiale ya Watch Tower oyo ezali na ba étages motoba ezali esika ya kolendisa, mingimingi na ntina na elimo, yango ezali lobanzo ya liboso, ya bamisionere oyo bazali kofanda wana. Atako ntalo monene kati na bango bazali na bipekiseli ya nzoto na ntina na kolɔngɔ́nɔ́ mabe ya nzoto na bango, moko te kati na basodá wana ya elimo azali pene ya kotika mosala. Batatoli ya Japon basili koyeisa ndako yango mobimba ya sika mpo na bango, elongo na Ndako moko ya Bokonzi oyo ezali na nsé na yango mpe etómbola moko mpo na komema bato na likoló to kokitisa bango.
Nini ezali kopesa bango esengo
Lokola basili kolekisa mibu mingi na esika na bango ya mosala, bamisionere wana bazali kooka ete yango ezali mboka na bango. Moko na basangani ya libota yango, kati na baoyo baleki basusu na mbula ya kobotama, alobaki ete: “Ntango nazongaki na Australie mpo na liyangani ya etúká na eleko ya molungé ya mbula oyo euti koleka, nsima ya pɔ́sɔ mibale, naokaki nokinoki mposa ya kozonga na mboka!” Bazali na bolingo mingi mpo na bato oyo bazali kosalisa mpe basili kokólisa bolingo ya motema mpo na bato yango. Bamisionere yango nyonso bazali kosepela mingi na nkomá mpe telefone ya bandeko oyo ezali kokundwela bango misala kitoko ya mikolo oyo misili koleka.
Yango ezali mbuma ya mosala makasi kati na mosala ya kosakola. Lokola bapusamaki na bolingo mpo na Yehova, bamisionere wana basakolaki Liloba ya Nzambe nokinoki kati na ezalela ya makambo makeseni. (Kokanisá na 2 Timoté 4:2.) Ndeko mwasi Vera MacKay, oyo asili koumela mibu 37 na Japon alobi ete: “Tomiyekolisaki biso moko ete tózala na esengo mpamba te tozali kosalela Yehova. Ata soki moto moko te ayei na ekuke mpo na koyoka biso, tozali wana mpo na kotatola na ntina na Yehova.”
Kati na bamisionere yango, zomi na mibale bazali minzemba, kasi bazali na esengo lokola bazali na likoki ya kosalela Nkolo kozanga ete likebi na bango lipɛngwisama na makambo mosusu. (1 Bakolinti 7:35) Gladys Gregory, oyo asili kolekisa mibu 43 lokola misionere, azali moko kati na bango. Alobi ete: “Mpo ete nakoka kozala na bonsomi mingi mpo na mosala ya Yehova, namikɔtisaki na mosala ya mobongisi-nzela, na nsima nakendaki na Galadi, Eteyelo ya Biblia ya Watchtower], mpe bongo nakendaki na mosala ya misionere. Atako nakataki ndai moko te mpo na yango, nazali monzemba, mpe lokola baninga mosusu, nazali na mawa soko moke te mpo na yango.”
Pene mpo na kosembola makanisi
Atako bato mosusu bakómaka makambo makasi wana bazali konuna, bamisionere bazali ntango nyonso pene mpo na kosembola makanisi na bango. Lois Dyer, Molly Heron, elongo na Lena mpe Margrit Winteler bazalaki kofanda na ndako moko moke ya bamisionere na kartyé moko kitoko ya Tokyo. Baumelaki kuna koleka mibu 20 mpe basilaki komesana mingi na bato ya esika yango. Kati na teritware na bango, bandeko basi mibale oyo bazali bandeko ya mosuni na nkombo Winteler, bazalaki na bato 40 oyo bango bazalaki kotikela bazunalo, mpe Molly elongo na Lois bazalaki na bato 74. Na nsima, la Société asɛngaki ete bákende kofanda na ndako ya ba étages motoba oyo ezali na ntéi ya engumba Tokyo. Lena alobi ete: “Na ebandeli nalɛmbaki nzoto mpe nasepelaki te.” Nzokande, lokola na momeseno, bamesanaki na teritware na bango ya sika. Bazali kooka lolenge nini sikawa? Lena ayanoli ete: “Tozali na esengo mingi. Sikawa, bandeko mibali mibale ya Betele bazali awa mpo na kolambela biso biloko mpe kosukola ndako. Tobatelami mpenza malamu.” Bango banso bandimi makanisi ya Lois, oyo alobaki ete: “Libateli ya bolingo oyo lisangá ya Yehova lizali kopesa na biso lizali kosalisa biso na kolendendela.”
Norrine Thompson mpe amiyokanisaki na ezalela ya makambo ya sika. Alobi ete: “Na boumeli ya mibu 15, nazalaki na libaku kitoko ya kokenda elongo na mobali na ngai [bazali babotami ya Nouvelle-Zélande] na mosala ya mokɛngɛli ya etúká na ntango oyo Japon mobimba ezalaki bobele etúká moko.” Nzokande, kolɔngɔ́nɔ́ ya mobali na ye ebebaki, mpe asengelaki kolónga komekama eleki makasi ya bomoi na ye—kufa ya mobali na ye, esili sikawa koleka mibu 18. Alobi ete: “Na eleko wana, eloko oyo esalisaki ngai ete nakóba na mosala ya misionere ezalaki bolingo oyo bandeko ya Japon mobimba bamoniselaki ngai, elongo na mabondeli mpe komipesa mingi na mosala.”
Kotɛlɛma ngwi liboso na mikakatano ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto
Albert Pastor, mokambi ndako ya bamisionere alobi ete: “Ntalo monene na bango bazali na lolenge moko to mosusu ya mikakatano ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto, kasi bazali na esengo, mpe mposa na bango ya kosala mosala nde ezali ezaleli moko ya kokamwa.” Mpo na kobatela bamisionere, monganga moko mpe mwasi na ye, oyo azali lífulumɛ́, bapesamelaki mokumba ya koyaka na ndako ya bamisionere.
Mokolo moko, esili koleka mibu misato, kozanga ete amizela na yango, Elsie Tanigawa, oyo azwaki lipɔlɔmi na kelasi ya mbala na 11 ya Eteyelo ya Galadi, akokaki lisusu te komona na liso na ye ya mwasi. Sanza minei na nsima, liso na ye ya mobali mpe ebebaki. Elsie alobi ete: “Na bantango mosusu nalɛmbaka mwa moke nzoto mpo ete nakoki lisusu te kosala lokola nazalaki kosala liboso. Kasi na nzela ya bibongiseli nyonso ya boboto oyo la Société asili kotyela biso mpe na lisungi ya bolingo ya moninga na ngai ya mosala mpe ya basusu, nazali ntango nyonso kozwa esengo kati na mosala ya Yehova.”
Shinichi Tohara mpe mwasi na ye, Masako, baoyo bazalaki na Galadi na kelasi moko elongo na Elsie, basili kokutana na komekama mingi na ntina na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto na boumeli ya mibu mingi. Mpo na Shinichi, molobi ya makoki mingi, ezali mokakatano monene ete akoki lisusu te komona makomi na ye mpamba te miso na ye masili kolɛmba mingi. Atako basalaki ye lipasó ya minene mpe ya mike na bambula oyo euti koleka, miso na ye mazali kongɛnga na esengo wana azali kolobela na ntina na moyekoli ya Biblia ya mibu 90, oyo ye azali kosalisa sikawa.
Atako bazali na “monjube kati na njoto,” bamisionere wana bazali kotalela bolɛmbu na bango lokola ntoma Paulo, oyo alobaki ete: “Mpɔ wana ejali ngai na bolɛmbu, bongo najali na nguya.” (2 Bakɔlinti 12:7-10) Mpe bazali solo na nguya! Bazali pene mpo na losambo ya ntɔ́ngɔ́ mokolo na mokolo na ngonga ya nsambo. Nsima ya bilei ya ntɔ́ngɔ́, baoyo bazali na makasi bazali kobima mpo na mosala ya kosakola na ntɔ́ngɔ́.
Richard mpe Myrtle Shiroma bazali kati na baoyo babimaka ntango nyonso na mosala ya kosakola. Myrtle azwaki bokɔnɔ ya mansɛ́lɛ ntango abelaki mpasi ya misisa ya bɔɔngɔ́ na 1978, kasi akendaki elongo na mobali na ye kati na mosala ya mokɛngɛli-motámboli kino na Novɛ́mbɛ 1987. Sikawa Richard, oyo azali na mibu 70, azali kosalisa Myrtle na makambo nyonso. Alamukaka na ngonga ya mitano ya ntɔ́ngɔ́, alongolaka ye na mbeto, asukolaka ye, alatisaka ye bilamba, akosalela ye monzele na ye, akoleisaka ye na lútu. Na nsima, abimisaka ye libándá likoló na velo ya baandikapé, na ntɔ́ngɔ́ nyonso mpo na kokende na mosala ya kosakola, kokendáká ndako na ndako na boumeli ya ngonga moko mpe na nsima, kopesáká litatoli na bisika ya kozela bísi. Myrtle akokaka lisusu koloba te, kasi maloba ya nsuka oyo abimisaki mazalaki Dendo, dendo, liloba ya lokótá Japonais oyo elimboli “Kosakola, kosakola.”
Mwana na bango ya mwasi, Sandra Sumida, asilaki kokɔta na ndako ya bamisionere mpo na kosalisa bango. Sandra auti mpe kokufela mobali na ye molingami, oyo abelaki bokɔnɔ ya motema. Sandra azali na botɔ́ndi mpo na bibongiseli ya boboto oyo la Société Watch Tower akamataki na kozongisáká ye na Japon longwa na Guam, epai asalaki lokola misionere elongo na mobali na ye. Alobi ete: “Nazalaki ntango nyonso kooka ete nazalaki kosangana mingi te na mosala ya kosalisa baboti na ngai mpo ete nazalaki na Guam. Ndeko na ngai ya mwasi, Joanne, nde azalaki kobatela bango na ndako oyo. Na yango, ntango libaku lipesamelaki ngai, nasepelaki na yango. Kooka ete bazali na mposa na ngai awa esalisaki ngai lokola nkísi nsima ya kufa ya mobali na ngai.”
Mposa ya kolanda ntango nyonso
Atako bamisionere bazali kooka bopusi ya bobangé, baboyi kosundola elimo na bango ya misionere. (Nzembo 90:10; Baloma 5:12) Jerry mpe Yoshi Toma, baoyo bazalaki kati na bato ya liboso oyo bazwaki mapɔlɔ́mi na Galadi mpe bayaki na Japon, bakendaka naino kosakola na esika ya mombongo ya Shibuya, víli kati na Tokyo. Yoshi alobi ete: “Na 1949, ntango tokɔtaki na ndako oyo ezalaki na ba étages mibale oyo ezalaki awa, tozalaki kokenda mobéngá na mobéngá. Sikawa Tokyo esili kobongwana engumba monene mpenza. Tosili konuna mpe tokoki lisusu kosala mingi te lokola tozalaki kosala liboso. Kasi wana ezali biso kouta na mosala ya kosakola, tookaka ete tolendisami.”
Lillian Samson azali misionere na Japon uta mibu 40 mpe azali kosepela mingi na mosala na ye. “Sikawa nazali kosalisa mwasi moko mobangé ya mibu 80, oyo azalaki koyekola elongo na moninga na ngai ya mosala, Adeline Nako, oyo asili kozonga na Hawaii mpo na kobatela mama na ye oyo azali na bokɔnɔ. Kala mingi te, mwasi yango auti kokóma mosakoli ya Bokonzi nsima ya kolónga mikakatano ya kosambela bankɔ́kɔ. Akendaki na tempelo koyebisa mwasi ya sángó ete, ‘Nasili kobongwana na losambo ya boklisto!’” Na esengo motindo oyo na bomoi na ye, Lillian ayokaka mawa te ete, wana ezalaki ye na mibu 19, atikaki mosala na ye ya mosuni mpo na kokóma mobongisi-nzela.
Ruth Ulrich mpe Martha Hess, oyo bazali baninga kati na mosala ya misionere uta mibu 45, bazali kofanda na ndako oyo ya bamisionere uta mibu 35. Basili bango moko komesana malamu kati na teritware. Mokɛngɛli moko ya zongazonga atunaki Martha ete: “Nakoki kodefa elongi na yo mpo na kokende ndako na ndako?” Bato bayebi elongi ya Martha mpe bazali koluka bazulunalo, nzokande mokɛngɛli ya zongazonga azalaki na mpasi mpo na kobanda masoló elongo na bato.
Mwasi moko oyo azalaki kozwa bazulunalo epai na Ruth akokaki kotánga yango te mpo na kolɔngɔ́nɔ́ mabe ya nzoto. Atako bongo, mwasi yango akóbaki kozwa bazulunalo mpe azwaki nkutu búku oyo ekangisami malamu L’Humanité à la recherche de Dieu. Ruth amitunaki soki asengelaki kokóba komemela ye bazulunalo mpamba te emonanaki lokola ete moto ya kotánga yango azalaki te. Na nsima, mokolo moko mobali ya mwasi yango abɛlɛmaki penepene na Ruth elongo na búku L’Humanité, mpe alobaki ete: “Oyo ezali búku moko kitoko mingi! Nasili kotánga yango mobimba mbala mibale.” Ruth abandaki boyekoli ya Biblia elongo na ye mpe mwasi na ye.
Ndako wana ya bamisionere yango moko ezali kobenda likebi ya bato. Na mpokwa moko, elenge mobali moko ayaki na ndako mpe alobaki ete: “Nakangi ntina ete soki nayei awa, nakoki kozwa lisalisi mpo na koyekola Biblia.” Boyekoli ya Biblia ebandaki elongo na ye. Lokola azalaki molambi na lɛstolá ya ba Chinois, azalaki kosala elongo na mwasi moko oyo asilaki kobimisama na lisangá esili koleka mibu mingi. Bazulunalo oyo mosakoli moko atikaki ntango asakolaki na lɛstolá wana ekómaki kati na kúku. Elenge molambi asepelaki na yango mpe abandaki kotuna Motatoli wana ya kala mituna. Lokola akokaki te koyanola na yango, mwasi yango ayebisaki na elenge mobali ete akende na ndako ya bamisionere. Sikawa azali mosaleli ya misala mpe mobongisi-nzela. Na nsima, mwasi oyo abimisamaki na lisangá azongisamaki, mpe na nsima akómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza.
Bamisionere nyonso oyo bazali na ndako wana bazali na botɔ́ndi mpo na oyo Yehova asili kosala mpo na bango. Bauti na Australie, na Canada, na Hawaii, na Suisse mpe na Etats-Unis, mpe 11 bakɔtaki kelasi ya mbala ya 11 to bakelasi ya liboso ya Galadi, Eteyelo mpo na kobongisa bamisionere. Basili komona bokóli ya mosala ya Bokonzi na Japon mpe bazali na maoki motindo moko na Mokonzi Davidi, oyo alobaki ete: “Najalaki elɛngɛ mpe nakomi mobange, nde naino namɔni moyɛngɛbɛni tɛ oyo atikami, to mwana na ye oyo akolɔmbaka kwanga.” (Njembo 37:25) Mpo na komonisa botɔ́ndi mpo na libateli ya bolingo ya Nzambe, bamisionere yango bazali na ekateli makasi ya kotika mosala te kasi ya kokóba kosalela Yehova.