Tóyekola kozwa bosepeli kati na kobanga Yehova
“Yaká, bino bana, bóyoka ngai; kobanga Yehova ezali yango nakolakisa bino.”—NZEMBO 34:11, NW.
1. Lolenge nini bobangi ekosilisama na Bokonzi ya Nzambe, kasi yango elimboli ete lolenge nyonso ya bobangi ekolongolama?
BIPAI binso, bato bazali na mposa ya kosikwama na bobangi—bobangi na ntina na mobulu, bobangi na ntina na kozanga mosala, bobangi na ntina na bokɔnɔ makasi. Ntango kosikwama wana ekokóma likambo ya solo na nsé ya Bokonzi ya Nzambe, ekozala mpenza mokolo monene! (Yisaya 33:24; 65:21-23; Mika 4:4) Nzokande, bobangi nyonso ekolongwa na ntango wana te, tokoluka mpe te kolongola bobangi nyonso kati na bomoi na biso ya sikawa. Ezali na bobangi oyo ezali malamu mpe na bobangi oyo ezali mabe.
2. (a) Bobangi oyo wapi ezali mabe, mpe oyo wapi ezali malamu? (b) Bobangi Nzambe ezali nini, mpe lolenge nini mikapo mitángami mimonisi yango?
2 Bobangi ekoki kozala ngɛ́ngɛ kati na makanisi, ekoki kobebisa makoki oyo moto azali na yango mpo na kokanisa malamu. Ekoki kobebisa mpiko mpe kolongola elikya. Bobangi motindo wana ekoki komonana epai na moto oyo azali na likámá ya konyokwama na nzoto epai na monguna moko. (Yilimia 51:30) Ekoki komonana epai na moto oyo azali kokanisa ete kondimama epai na bato mosusu oyo bazali na bopusi makasi ezali na ntina mingi mpenza koleka. (Masese 29:25) Kasi ezali lisusu na bobangi oyo ezali ya malamu, oyo ezali kopekisa biso na kosala makambo oyo mazangi mayele, makambo oyo makoki kosala biso moko mabe. Bobangi Nzambe esangisi lisusu makambo mingi koleka. Ezali bongo bobangi Yehova, limemya mozindo litondi na bobangi mpo na ye, bakisá mpe nsɔ́mɔ ya malamu ya koboya kosala makambo oyo asepelaka na yango te. (Nzembo 89:7) Bobangi wana ya kopɛngola koboyama na Nzambe euti na botɔ́ndi oyo tozali na yango mpo na motema-boboto mpe bolamu na ye. (Nzembo 5:7; Hosea 3:5) Esangisi lisusu likambo ya koyeba ete Yehova azali Mosambisi Monene mpe Mozwi-na-Nguya-Nyonso, oyo azali na lotómo ya kopesa etumbu, ata mpe liwa, epai na baoyo nyonso bazali koboya kotosa ye.—Baloma 14:10-12.
3. Lolenge nini kobanga Yehova ekeseni na oyo ya banzambe mosusu ya bapakano?
3 Bobangi Nzambe ezalaka malamu, kasi epesaka mawa te. Epusaka moto na kozala ngwi mpo na oyo ezali sembo, kasi endimaka te kosala oyo ezali mabe. Ekokani te na bobangi oyo Bagreke ya kala bazalaki na yango mpo na nzambe na bango Phobos, oyo alobelami ete azalaki nzambe moko mabe oyo azalaki kobangisa. Ekokani mpe te na bobangi oyo Bahindu bazalaka na yango mpo na nzambe-mwasi Kali, oyo na bantango mosusu amonisamaki lokola mosopi na makila, oyo azalaki kosalela bibembe, banyoka, mpe mikuwa ya mitó ya bato lokola bikembiseli. Bobangi Nzambe ebendaka bato, kasi ekimisaka bango te. Ekangisami elongo na bolingo mpe na botɔ́ndi. Na yango, bobangi Nzambe ezali kobɛlɛmisa biso epai na Yehova.—Deteronome 10:12, 13; Nzembo 2:11.
Mpo na nini bamoko bazali na yango kasi basusu bazali na yango te
4. Lokola ntoma Paulo amonisaki yango, ezalela ya bato ekómi lolenge nini, mpe makambo nini mamonisi yango?
4 Bato nyonso bapusami te na ezaleli wana ya bobangi Nzambe. Na Baloma 3:9-18, ntoma Paulo alobeli lolenge nini bato babungisaki ezaleli ya kokoka oyo ezalaki na ebandeli. Nsima na koloba ete bato banso bazali na nsé ya lisumu, Paulo atángi maloba mazali na Nzembo, na kolobáká ete: “Moyɛngɛbɛni ajali tɛ, ata mɔkɔ tɛ.” (Talá Nzembo 14:1.) Na nsima, alobeli likambo moko na moko na kotángáká makambo yango, na ndakisa bopotu oyo bato bazali na yango mpo na koluka Nzambe, kozanga boboto, maloba na bango ya kozimbisa, kotuka, mpe kosopa makila. Oyo nde elobeli ya sikisiki mpo na komonisa mokili ya lelo! Ntalo monene ya bato bazali kosepela na Nzambe te mpe na mikano na ye te. Boboto ya lokuta emonisamaka mbala mingi na mabaku oyo mamonisi ete litomba likoki kozwama mpo na yango. Lokuta mpe maloba ya mbindo ezali komonana mingi. Kosopa makila elobelami mingi bobele na bipanzeli ya nsango te, kasi lisusu kati na makambo matali kominanola. Nini ezali ntina ya ezalela motindo wana? Ezali solo ete biso banso tozali bakitani ya mosumuki Adama, kasi wana bato bandimi ete makambo oyo malobelami na ntoma Paulo mázala lolenge na bango ya bomoi, tokoloba ete likambo mosusu ezali nsima na yango. Molɔngɔ́ 18 elimboli likambo yango, na kolobáká ete: “Nsɔmɔ na kobanga Njambe ejali liboso na miso na bango tɛ.”—Talá Nzembo 36:1.
5. Mpo na nini bato mosusu bazali na bobangi Nzambe, nzokande basusu bazali na yango te?
5 Atako bongo, mpo na nini ezali kosalema ete bamoko bazali na bobangi Nzambe, nzokande basusu bazali na yango te? Na elobeli ya pɛtɛɛ, ezali mpo ete bamoko bazali kolóna yango, kasi basusu bazali kolóna yango te. Moto moko te kati na biso abotamaki na ezaleli yango, kasi biso banso tozali na likoki ya kolóna yango. Bobangi Nzambe ezali likambo oyo tosengeli koyekola yango. Na bongo, mpo ete ezala nguya oyo ezali na bopusi likoló na bomoi na biso, tosengeli kolóna yango.
Libyangami moko ya kolendisa
6. Nani azali kopesa biso libyangami oyo ezwami na Nzembo 34:11, mpe lolenge nini mokapo wana emonisi ete bobangi Nzambe esengeli koyekolama?
6 Libyangami moko ya kolendisa mpo na koyekola kobanga Yehova epesameli biso na Nzembo 34. Ezali loyembo ya Davidi. Mpe Davidi azalaki elilingi ya nani? Azalaki elilingi ya Nkolo Yesu Klisto. Esakweli oyo ntoma Yoane asalelaki yango mpo na Yesu ekomami na molɔngɔ́ 20 ya loyembo wana. (Yoane 19:36) Na mikolo na biso, ezali Yesu nde azali kopesa libyangami likokani na oyo ezali na molɔngɔ́ 11 (NW): “Yaká, bino bana, bóyoka ngai; kobanga Yehova ezali yango nakolakisa bino.” Yango emonisi polele ete bobangi Nzambe ezali likambo oyo ekoki koyekolama, mpe Yesu Klisto azali moto oyo abongisami malamu mpo na koteya biso. Mpo na nini ezali bongo?
7. Mpo na nini Yesu azali moto oyo abongi ete tótalela mpo na koyekola bobangi Nzambe?
7 Yesu Klisto ayebi ntina ya kozala na ezaleli ya bobangi Nzambe. Baɛbɛlɛ 5:7 elobi mpo na ye ete: “Na mikɔlɔ na bomɔi na ye, atombolaki mabɔndɛli mpe malɔmbɔ na konganga makasi mpe na mpisoli epai na ye oyo ayebi kobikisa ye na kufa mpe ayokami mpɔ na [ezaleli na ye ya bobangi Nzambe, NW].” Ezaleli motindo wana ya bobangi Nzambe ezali oyo Yesu Klisto amonisaki ata liboso ete akufa likoló na nzeté ya mpasi. Omikundolá ete, na Masese mokapo 8, Mwana na Nzambe alobelami ete azali mayele. Mpe na Masese 9:10 (NW) elobami epai na biso ete: “Kobanga Yehova ezali ebandeli ya mayele.” Na yango, ezaleli wana ya bobangi Nzambe ezalaki eteni ya ntina ya bomoto ya Mwana na Nzambe liboso ete aya awa na mabelé.
8. Na Yisaya 11:2, 3, nini tozali koyekola na ntina na kobanga Yehova?
8 Lisusu, mpo na oyo etali Yesu lokola Mokonzi Masiya, Yisaya 11:2, 3 (NW) elobi ete: “Likoló na ye elimo na Yehova ekofanda, elimo na mayele mpe na bososoli, elimo na toli mpe na nguya, elimo na boyebi mpe na kobanga Yehova; mpe akozala na bosepeli kati na kobanga Yehova.” Oyo nde maloba kitoko! Kobanga Yehova ezali likambo ya mawa te. Ezali nde likambo malamu mpe oyo ezali kolendisa. Ezali ezaleli oyo ekozala esika nyonso oyo Klisto akoyangela lokola Mokonzi. Azali koyangela uta sikawa, mpe epai na baoyo nyonso bazali koyanganisama lokola bayangelami na ye, azali kopesa bango malako kati na kobanga Yehova. Lolenge nini?
9. Lolenge nini Yesu Klisto azali koteya biso ezaleli ya kobanga Yehova, mpe alingi ete tóyekola nini na ntina na yango?
9 Na nzela ya makita ya lisangá, mayangani ya mike mpe ya minene, Yesu, lokola Motó na lisangá mpe Mokonzi Masiya, azali kosalisa biso na kososola polele soki bobangi Nzambe ezali mpenza nini mpe mpo na nini ezali na litomba. Na yango azali kosala makasi mpo na kokɔtisa kati na biso botɔ́ndi mpo na yango na boye ete tóyekola kozwa bosepeli kati na kobanga Yehova lokola ye.
Okosala milende?
10. Ntango toyangani na makita ya boklisto, tosengeli kosala nini soki tolingi kososola kobanga Yehova?
10 Ya solo, kosuka bobele na kotánga Biblia to na koyangana na makita kati na Ndako ya Bokonzi ezali ndanga te oyo ekomonisa ete tozali na bobangi Nzambe. Tótala oyo tosengeli kosala soki tolingi mpenza kososola kobanga Yehova. Masese 2:1-5 (NW) elobi ete: “Mwana na ngai soko okozwa maloba na ngai mpe okobatela malamu mibeko na ngai kati na yo, ete osembola litoi na yo epai na bwanya mpe ete otya motema na yo koluka bososoli; ee soko okolela mpo na mayele mpe soko okonganga mpo na bososoli soko okoluka yango lokola palata, mpe okolukaluka yango lokola na biloko ya motuya bibombami, boye okososola kobanga Yehova mpe okozwa mpenza boyebi ya Nzambe.” Na yango, ntango toyangani na makita, tosengeli kotya likebi na makambo oyo malobelami, kosala milende mpo na kokanga makanisi ya ntina mpe komikundola yango, komanyola likoló na lolenge oyo tozali kokanisa na ntina na Yehova ekozala na bopusi likoló na ezaleli na biso epai na toli oyo epesami—ee, tófungola mitema na biso. Na bongo tokososola kobanga Yehova.
11. Mpo na kolóna bobangi Nzambe, nini tosengeli kosala na molende nyonso mpe mbala na mbala?
11 Nzembo 86:11 (NW) ebendi likebi na biso na likambo mosusu ya ntina, oyo ete libondeli. Mokomi na Nzembo abondelaki ete: “Ɛ Yehova, lakisá ngai nzela na yo. Nakotambola kati na solo na yo. Pesá ngai motema moko mpo na kobanga nkombo na yo.” Yehova andimaki libondeli wana; mpamba te akomisaki yango kati na Biblia. Mpo na kolóna ezaleli ya bobangi Nzambe, tosengeli mpe kobondela Yehova mpo na kozwa lisalisi na ye, mpe tokozwa litomba na kobondeláká na molende nyonso mpe mbala na mbala.—Luka 18:1-8.
Ezali mpe kotalela motema na yo
12. Mpo na nini tosengeli mpenza kotya likebi mingi likoló na motema, mpe yango esangisi makambo nini?
12 Ezali na likambo mosusu oyo tosengeli kosimba na Nzembo 86:11. Mokomi na Nzembo asɛngaki te ete boyebi na ye ya kobanga Nzambe esuka bobele na makanisi. Alobeli motema na ye. Kolóna bobangi Nzambe etaleli mpe motema ya elilingi, oyo ezali kosɛnga mpenza likebi mingi mpamba te yango ezali komonisa bomoto ya kati lokola ezali komonisama na misala na biso nyonso kati na bomoi mpe esangisi makanisi na biso, bizaleli na biso, bamposa na biso, mabanzo na biso mpe mikano na biso.
13. (a) Nini ekoki komonisa ete motema ya moto moko ekabwani? (b) Lokola tozali kolóna bobangi Nzambe, mokano nini tosengeli kosala makasi na kolanda?
13 Biblia ezali kokebisa biso ete motema ya moto ekoki kokabwana. Ekoki kozala mokosi. (Nzembo 12:2; Yilimia 17:9) Ekoki kopusa biso na kosala misala malamu—kokende na makita ya lisangá mpe kosangana na mosala ya kosakola—kasi ekoki mpe kotinda biso na kolinga makambo mosusu ya lolenge ya bomoi ya mokili. Yango ekoki kopekisa biso ete tómipesa te na molimo na biso mobimba mpo na kokólisa matomba ya Bokonzi. Na bongo motema ya bokosi, ekoki komeka kozimbisa biso na kokanisa ete tozali kosala lokola bato mingi mosusu basalaka. To mbala mosusu, na eteyelo to na esika ya mosala, motema ekoki kopusama na kobanga bato. Na yango, kati na bisika motindo wana, tokoki kokakatana mpo na komimonisa ete tozali Batatoli ya Yehova mpe tokoki ata kosala makambo oyo mabongi te mpo na baklisto. Kasi na nsima, lisosoli na biso ekobanda kotungisa biso. Biso tolingi kozala bongo te. Na yango, lokola mokomi na Nzembo, tozali kobondela Yehova ete: “Pesá ngai motema moko mpo na kobanga nkombo na yo.” Tolingi ete bomoto mobimba ya kati, lokola yango ezali komonisama na misala na biso nyonso kati na bomoi, epesa elembeteli ete tozali ‘kobanga Nzambe ya solo mpe tozali kolanda mibeko na ye.’—Mosakoli 12:13.
14, 15. (a) Wana asakolaki kozongisama ya Yisraele longwa na boombo na Babilone, eloko nini Yehova alakaki kopesa epai na libota na ye? (b) Yehova asalaki nini mpo na kokɔtisa ezaleli ya kobanga Nzambe kati na mitema ya basaleli na ye? (c) Mpo na nini Yisraele epesaki banzela ya Yehova mokɔngɔ?
14 Yehova alakaki ete akopesa epai na basaleli na ye motema oyo ezali kobanga Nzambe. Lokola tozali kotánga yango kati na Yilimia 32:37-39, asakolaki kozongisama ya Yisraele mpe alobaki ete: “Nakoyeisa bango lisusu na esika oyo mpe nakofandisa bango na kimia, mpe bango bakojala bato na ngai mpe ngai nakojala Njambe na bango. Nakopɛsa bango motema mɔkɔ mpe njela mɔkɔ ete [bábanga, NW] ngai libela mpɔ na malamu na bango mpenja mpe na bana na bango nsima na bango.” Na molɔngɔ́ 40, elaka yango ya Nzambe elobelami lisusu makasi: “Nakotia [bobangi, NW] na ngai kati na mitema na bango ete balongwa na ngai tɛ.” Na mobu 537 L.T.B., Yehova azongisaki bango na Yelusaleme lokola alakaki yango. Kasi ezali boni mpo na eteni mosusu etikali ya elaka oyo apesaki—oyo ete asengelaki kopesa bango ‘motema moko mpo ete bábanga ye libela’? Mpo na nini libota ya kala ya Yisraele lipesaki Yehova mokɔngɔ nsima wana azongisaki bango longwa na Babilone, na boye ete tempelo na bango ebebisamaki na mobu 70 T.B., kozanga ete etongama lisusu?
15 Yehova azalaki mpenza na mabe moko te kati na likambo yango. Ya solo, Yehova akamataki mpenza bibongiseli mpo na kokɔtisa ezaleli ya kobanga Nzambe kati na mitema ya basaleli na ye. Na motema mawa oyo amonisaki mpo na kosikola bango longwa na Babilone mpe kozongisa bango na mokili na bango, apesaki bango bantina mingi ya kopesa ye limemya mozindo. Nzambe amonisaki yango makasi na nzela ya makebisi, batoli, mpamela oyo epesamaki na nzela ya basakoli Hagai, Zekalia mpe Malaki; na nzela ya Ezela oyo atindamaki epai na bango lokola moteyi; na nzela ya Moyangeli Nehemia; mpe na nzela ya Mwana mpenza ya Nzambe. Na bantango mosusu, libota yango lizalaki koyoka makebisi. Bamonisaki yango na ntango batongaki lisusu tempelo ya Yehova wana balendisamaki na Hagai mpe Zekalia mpe na ntango balongolaki basi na bango ya bapaya na mikolo ya Ezela. (Ezela 5:1, 2; 10:1-4) Kasi mbala mingi, bazalaki kotosa te. Balandaki ntango nyonso kotya likebi te; bakóbaki te na ezaleli ya kondima batoli; balandaki te kofungola mitema na bango. Bayisraele balónaki bobangi nzambe te, mpe yango ezalaki te nguya oyo ekokaki kozala na bopusi likoló na bomoi na bango.—Malaki 1:6; Matai 15:7, 8.
16. Kati na mitema ya banani Yehova asili kokɔtisa ezaleli ya bobangi Nzambe?
16 Nzokande, elaka ya Yehova ya kokɔtisa ezaleli ya bobangi Nzambe kati na mitema ya basaleli na ye ekokisamaki mpenza. Asalaki kondimana ya sika elongo na Yisraele ya elimo, baklisto oyo, liboso na bango atyaki elikya ya bomoi na likoló. (Yilimia 31:33; Bagalatia 6:16) Na mobu 1919, Nzambe asikolaki bango longwa na boombo ya Babilone Monene, lisangá ya mokili mobimba ya mangomba ya lokuta. Kati na mitema na bango akɔtisaki mpenza bobangi na ye. Yango epesaki matomba mingi epai na bango mpe epai na “ebele monene,” oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko awa na mabelé lokola bayangelami ya Bokonzi. (Yilimia 32:39; Emoniseli 7:9) Kobanga Yehova ezali mpe kati na mitema na bango.
Lolenge ezaleli ya bobangi Nzambe ekɔtaka kati na mitema na biso
17. Lolenge nini Yehova atyaki bobangi Nzambe kati na mitema na biso?
17 Lolenge nini Yehova akɔtisaki ezaleli wana ya bobangi Nzambe kati na mitema na biso? Na nzela ya elimo na ye. Mpe eloko nini tozali na yango oyo euti na elimo santu? Biblia, Liloba lipemami ya Nzambe. (2 Timoté 3:16, 17) Na nzela ya makambo oyo asalaki na ntango ya kala, na nzela ya boyokani na ye elongo na basaleli na ye ya eleko na biso mpo na kokokisama ya Liloba na ye ya esakweli, mpe na nzela ya bisakweli ya makambo oyo mazali koya, Yehova azali kopesa moboko kitoko mpo ete biso banso tókólisa ezaleli ya bobangi Nzambe.—Yosua 24:2-15; Baebele 10:30, 31.
18, 19. Lolenge nini mayangani ya mike mpe ya minene, mpe makita ya lisangá ezali kosalisa biso na kolóna bobangi Nzambe?
18 Lokola emonisami na Dutɛlɔnɔmɛ 4:10, maloba oyo Yehova ayebisaki na Mose, ezali mpenza na ntina: “Yanganisa bato yango epai na ngai ete nayokisa bango maloba na ngai na ntina ete bayekola kobanga ngai mikɔlɔ yɔnsɔ ikotikala bango na nse, mpe ete balakisa bana na bango boye.” Bobele bongo lelo oyo, Yehova asili kokamata bibongiseli mingi mpo na kosalisa basaleli na ye ete bábanga ye. Na mayangani ya mike mpe ya minene mpe na makita ya lisangá, tolobelaka bilembeteli ya motema-boboto mpe ya bolamu ya Yehova. Ezali yango nde tozalaki kosala na ntango tozalaki koyekola búku Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. Lolenge nini boyekoli wana ezalaki na bopusi likoló na yo mpe likoló na ezaleli na yo epai na Yehova? Lokola omonaki bizaleli bikeseni ya bomoto ya kokamwa ya Tata na biso ya likoló, oyo emonisamaki epai na Mwana na ye, yango elendisaki mposa na yo ya kosala soko moke te makambo oyo mazangi kosepelisa Nzambe, boye te?—Bakolose 1:15.
19 Na makita na biso, tozali lisusu koyekola masoló oyo mazali komonisa lolenge Yehova abikisaki basaleli na ye na ntango ya kala. (2 Samwele 7:23) Na koyekoláká mokanda ya Biblia oyo ete Emoniseli na lisalisi ya búku Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi!, tozali koyekola makambo na ntina na bimonaneli ya bisakweli oyo bisili kokokisama na ekeke oyo ya ntuku mibale mpe na ntina na makambo mosusu ya nsɔ́mɔ oyo malingi kobima. Na kotalela misala nyonso wana ya Nzambe, Njembo 66:5 elobi ete: “Yaka komɔna misala na Njambe; asali makambo na kokamwa epai na bana na bato.” Ee, soki totaleli yango malamumalamu, misala wana ya kokamwa ya Nzambe ekokɔtisa kati na mitema na biso ezaleli ya kobanga Yehova, limemya mozindo. Na bongo, tokoki komona lolenge Yehova Nzambe akokisi elaka na ye oyo ete: “Nakotia [bobangi, NW] na ngai kati na mitema na bino ete bolongwa na ngai tɛ.”—Yilimia 32:40.
20. Mpo ete bobangi Nzambe ekɔtisama malamu kati na mitema na biso, nini esɛngami epai na biso?
20 Nzokande, ezali solo ete, ezaleli ya bobangi Nzambe eyaka yango moko te kati na mitema na biso kozanga ete tósala milende. Matomba na yango mayaka yango moko na pwasa te. Yehova azali kosala oyo esengeli na ye. Biso mpe tosengeli kosala oyo esengeli na biso na kolónáká bobangi Nzambe. (Deteronome 5:29) Bayisraele ya mosuni basalaki yango te. Kasi, na kotyáká motema epai na Yehova, Yisraele ya elimo mpe baninga na bango bazali kozwa matomba mingi oyo epesamaka epai na baoyo bazali kobanga Nzambe. Tokotalela bamoko na matomba yango kati na lisoló oyo ekolanda.
Okoyanola lolenge nini?
◻ Bobangi Nzambe ezali nini?
◻ Lolenge nini toteyami mpo na kozwa bosepeli kati na kobanga Yehova?
◻ Mpo na kozala na ezaleli ya bobangi Nzambe, milende nini esɛngami epai na biso?
◻ Mpo na nini kozwa bobangi Nzambe etaleli biteni nyonso ya motema na biso ya elilingi?
[Bililingi na lokasa 12, 13]
Mpo na kososola kobanga Yehova, esengeli koyekola ntango nyonso