Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 15/1 nk. 29-31
  • Andimaki litambwisi ya Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Andimaki litambwisi ya Nzambe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mobali ya sembo oyo akutanaki na mikakatano
  • Moto ya elimo
  • Bilikya ya Yosefe
  • Abatelaki, asungaki mpe alɛmbaki bango te
    Mekolá kondima na bango
  • Abatelaki bato ya libota na ye, akokisaki bamposa na bango, mpe alɛmbaki bango te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Maria akómi na zemi kasi abali naino te
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Mateya oyo tokoki kozwa na bandeko ya Yesu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 15/1 nk. 29-31

Andimaki litambwisi ya Nzambe

KANISÁ ete mwana moko ya kokoka apesameli yo ete óbatela ye mpe osengeli kobɔkɔla ye na lolenge lobongi. Oyo nde mosala monene! Lolenge nini moto ya kozanga kokoka akokaki kosala yango? Bobele na kolandáká litambwisi ya Nzambe mpe na kosaleláká yango kati na bomoi ya mokolo na mokolo.

Ezali yango nde likambo oyo Yosefe, tata mobɔkɔli ya Yesu asalaki. Na bokeseni na makambo malobami na ntina na Yosefe kati na mikanda oyo mipemami te, Biblia elobeli makambo mingi te na ntina na mokumba ya komikitisa oyo azalaki na yango na bomwana ya Yesu. Toyebi ete Yosefe mpe mwasi na ye Malia babɔkɔlaki Yesu, bana minei mosusu ya mibali, mpe bana basi lokola.​—Malako 6:3.

Yosefe azalaki mokitani ya Davidi, mokonzi ya Yisraele, na nzela ya Salomo. Azalaki mwana ya Yakobo mpe bokilo ya Heli. (Matai 1:16; Luka 3:23) Lokola azalaki mosáli na mabaya na engumba Nasalɛtɛ ya Galilai, Yosefe azalaki na bozwi mingi te. (Matai 13:55; Luka 2:4, 24; kokanisá na Levitike 12:8.) Kasi azalaki mozwi na elimo. (Masese 10:22) Ezalaki bongo mpamba te andimaki litambwisi ya Nzambe.

Kozanga ntembe, Yosefe azalaki Moyuda oyo azalaki na kosɔkɛma mpe na komikitisa, oyo azalaki na kondima epai na Nzambe mpe oyo azalaki na mposa ya kosala oyo ezalaki sembo. Mwa makambo moke matali bomoi na ye oyo ekomamaki kati na Makomami mamonisi ete azalaki ntango nyonso na botosi na mibeko ya Nzambe. Ezalaki bongo ezala na makambo oyo makomamaki kati na Mibeko to na oyo Yosefe ye moko azwaki na nzela ya baanzelu.

Mobali ya sembo oyo akutanaki na mikakatano

Moto oyo abangaka Nzambe asengeli kosala nini soki akutani na mokakatano moko monene? Ee, asengeli ‘kobwaka bozito na ye epai na Yehova’ mpe kolanda litambwisi ya Nzambe! (Nzembo 55:22) Ezali yango nde Yosefe asalaki. Wana akanaki kobala Malia, “naino ebalanaki bango tɛ, ajuami na jemi mpɔ na [elimo santu, NW].” Lokola Yosefe ‘azalaki moto na sembo mpe alingaki koyokisa ye nsɔ́ni te liboso na bato, akani kokabwana na ye na nkuku.’ Nsima wana Yosefe azalaki kokanisa makambo mingi, anzelu ya Yehova abimelaki ye kati na lilɔ́tɔ mpe alobaki ete: “Yosefe, mwana na Dawidi, banga kokamata Malia mwasi na yɔ tɛ. Jambi yango esili koya na ye ejali mpɔ na [elimo santu, NW]. Akobota mwana mobali mpe okobianga nkombo na ye Yesu, mpɔ ye akobikisa bato na ye na masumu na bango.” Wana elamukaki ye, Yosefe “asali lokola mwanje na [Yehova] alaki ye mpe akamati mwasi na ye. Kasi asangani na ye tɛ kino esili ye kobota mwana mobali; abiangi mpe ye nkombo Yesu.” (Matai 1:18-25) Yosefe andimaki litambwisi ya Nzambe.

Augusite Kaisala abimisaki mobeko ete bato bákende kokomisa nkombo na bamboka na bango. Na botosi nyonso, Yosefe mpe Malia bakendaki na Beteleme kati na Yudea. Kuna Malia abotaki Yesu mpe alalisaki ye na elielo na bibwɛlɛ, mpamba te esika ya kolala ezalaki te mpo na bango. Na butu wana, babateli na mpate oyo bayokaki nsango ya kobotama wana ya ntina monene oyo epesamaki na anzelu bakendaki kotala mwana. Soko mikolo 40 na nsima, Yosefe mpe Malia, na boyokani na Mibeko, bakendaki kolakisa Yesu na tempelo na Yelusaleme elongo na makabo. Bango nyonso mibale bakamwaki ntango bayokaki mobangé Simeona kobimisa maloba ya esakweli na ntina na makambo minene oyo Yesu asengeli kosala.​—Luka 2:1-33; kokanisá na Levitike 12:2-4, 6-8.

Atako Luka 2:39 ezali komonisa lokola ete Yosefe mpe Malia bakendaki na Nasalɛtɛ nsima na kolakisa Yesu na tempelo, mokapo oyo ezali nde eteni ya lisoló liyeisami mokuse. Emonani ete mwa ntango moke nsima na kolakisa Yesu na tempelo, banganga-minzoto oyo bautaki epai na Ebimelo na ntango bakendaki kotala Malia mpe Yesu na ndako moko na Beteleme. Lisalisi ya Nzambe lisalaki ete boyei wana emema liwa likoló ya Yesu te. Nsima wana bato na mayele bazongaki, anzelu ya Yehova abimelaki Yosefe na lilɔ́tɔ mpe ayebisaki ye ete: “Elode akani ete aluka mwana mpɔ na koboma ye.” Lokola na momeseno, Yosefe alandaki litambwisi ya Nzambe mpe amemaki libota na ye na Ezipito.​—Matai 2:1-14.

Nsima ya liwa ya Elode, anzelu moko abimelaki Yosefe na lilɔ́tɔ na Ezipito, mpe alobaki ete: “Tɛlɛma, kamata mwana mpe mama na ye mpe kɛnda na mokili na Yisalaele.” Wana eyokaki ye ete Alukelao, mwana ya Elode azalaki koyangela na esika ya tata na ye, Yosefe abangaki kozonga na Yudea. Kolandáká litambwisi oyo lipesamaki na Nzambe kati na lilɔ́tɔ, akendaki na etúká ya Galilai mpe afandaki na engumba Nasalɛtɛ.​—Matai 2:15-23.

Moto ya elimo

Yosefe asalaki na boye ete libota na ye litosa mibeko ya Nzambe mpe lileisama malamu na elimo. Mbula na mbula azalaki kokende elongo na libota na ye na elambo ya Elekeli na Yelusaleme. Na moko na mabaku yango, Yosefe mpe Malia bazalaki kozonga na Nasalɛtɛ mpe batambolaki ntáká molai longwa na Yelusaleme wana bayaki komona ete Yesu, oyo azalaki na mibu 12, azalaki elongo na bango te. Ezongaki bango na Yelusaleme, balukaki ye na likebi nyonso mpe na nsuka bakutaki ye na tempelo, koyokáká balakisi mpe kotunáká bango mituna.​—Luka 2:41-50.

Emonani ete Yosefe azalaki kotikela mwasi na ye nzela ya kosala makambo mosusu ye moko. Na ndakisa, ntango bazongaki na Yelusaleme mpe bakutaki Yesu kati na tempelo, ezalaki Malia nde alobaki na Yesu mpo na likambo yango. (Luka 2:48, 49) Wana ezalaki ye kokóla lokola “mwana na mosali na mabaya,” Yesu ateyamaki na makambo ya elimo. Lisusu, Yosefe alakisaki ye mosala ya mabaya, mpamba te Yesu abéngamaki “mosali na mabaya mpe mwana na Malia.” (Matai 13:55; Malako 6:3) Lelo oyo, baboti oyo babangaka Nzambe basengeli kosalela mabaku motindo wana mpo na kolakisa bana na bango, mingimingi kolakisáká bango na elimo.​—Baefese 6:4; 2 Timoté 1:5; 3:14-16.

Bilikya ya Yosefe

Makomami malobi likambo moko te na ntina na liwa ya Yosefe. Kasi ezali likambo ya ntina na koyeba ete Malako 6:3 ebéngaki Yesu ete “Mwana na Malia,” kasi mwana na Yosefe te. Yango emonisi ete na ntango yango Yosefe asilaki kokufa. Lisusu, soki Yosefe azalaki na bomoi kino na mobu 33 T.B., ekokaki kosalema te ete Yesu oyo abakisamaki na nzeté atika Malia na mabɔkɔ ya ntoma Yoane.​—Yoane 19:26, 27.

Na bongo, Yosefe akozala kati na bakufi oyo bakoyoka mongongo ya Mwana na moto mpe bakobima na nzela ya lisekwa. (Yoane 5:28, 29) Lokola ayekolaki bibongiseli oyo Yehova akamati mpo na bomoi ya seko, kozanga ntembe, Yosefe akosepela na kosalela yango mpe akozala na botosi epai na Mokonzi ya likoló, Yesu Klisto, ndenge alandaki litambwisi ya Nzambe esili koleka mibu 1 900.

[Elilingi na lokasa 31]

Yosefe ateyaki Yesu makambo ya elimo mpe alakisaki ye mosala ya mabaya

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto