Batatoli ya Yehova kati na mokili—Porto Rico
KATIKATI ya mai monene la Mer des Antilles mpe Océan Atlantique, ezali na esanga Porto Rico, oyo ezwami na esika ya molungé. Christophe Colomb akómisaki yango teritware ya ekólo Espagne na 1493 mpe abéngaki yango San Juan Bautista na nkombo ya Yoane Mobatisi. Kobanda kala, engumba monene na yango ebéngamaki Porto Rico, to “Libongo ya bozwi.” Na nsima, nkombo oyo ekómaki kosalelama mpo na esanga mobimba, nzokande engumba na yango ekómaki kobéngama San Juan.
Na makambo mingi, Porto Rico ezalaki mpenza libongo ya bozwi. Ebele ya wolo ezalaki kotindama longwa wana uta ebandeli ya boyangeli ya Espagne. Lelo oyo esanga yango ezali koteka na mikili misusu nkokó, kafé, makemba, malala, atako bakompanyi mpe baizine nde ezali liziba monene ya nkita ya mboka yango na mikolo na biso. Nzokande, Porto Rico ezali mpe libongo ya bozwi mingi na ndimbola mosusu oyo ezali na ntina mingi koleka.
Nsango malamu na ntina na Bokonzi ya Nzambe ebandaki kosakolama awa na ba mbula 1930. Lelo oyo, ezali na basakoli ya Bokonzi koleka 25 000 na Porto Rico. Na 1993 motuya ya basáli ya filiale ya la Société Watch Tower ebakisamaki longwa na 23 kino koleka 100. Bobakisami wana ezalaki na ntina mpo ete filiale ekoka kotalela malamumalamu bobongoli ya mikanda mikolimbolaka Biblia na lokótá ya espagnol, kobongisáká mikanda motindo wana mpo na bato 350 000 000 oyo balobaka lokótá ya espagnol kati na mokili mobimba.
Elanga ya sika
Biro ya filiale eyebisi ete: “Elanga ya sika esili kofungwama na Porto Rico mpamba te tozali kosala milende mingi mpo na komema nsango malamu epai na bimimi. Ndeko mwasi moko ayebisi likambo oyo lilandi: ‘Nazalaki kosakola epai na bimimi mpe nakómaki epai na mwasi moko oyo azalaki na bana mibale. Ntango asosolaki ete nazali Motatoli, nokinoki aboyaki koyamba ngai mpo ete mobali na ye, oyo azali mpe emimi, azalaki kolinga Batatoli ya Yehova te.
“‘Mwa basanza na nsima mwasi yango akendeki kotala moninga na ye moko oyo azalaki koyekola Biblia elongo na Batatoli. Asanganaki na boyekoli yango mpe asepelaki mingi. Nazongaki lisusu kotala ye, mpe ayebisaki lisusu ete mobali na ye alingaka Batatoli te. Nzokande, azalaki na mposa ya kososola Biblia mpe asilaki kolɛmba na lingomba na ye mpamba te bazalaki koteya eloko moko ya malonga te. Tobandaki boyekoli kati na trakte. Mokolo mosusu ayebisaki ngai ete nazonga na Mwapɔ́sɔ́ mpo ete mobali na ye akozala wana. Natunaki ye ete: “Kasi ye alingaka biso te, boye te?” Ayanolaki ete: “Alingi koyeba makambo oyo Batatoli ya Yehova bateyaka.”
“‘Na mokolo ya nsima bango nyonso mibale bayaki kobɛta na ekuke na ngai! Nabyangaki bango na makita na biso oyo ebongisamaki mpo na bimimi, mpamba te mobali azalaki na mituna mingi. Akómaki kuna liboso na ngai mpe kobanda mokolo wana azangisaka makita te. Azali sikawa kosakola epai na bimimi mosusu, asili koyangana na liyangani, mpe azali kozela na motema likoló mokolo ya batisimo na ye.’”
Biro ya filiale elobi lisusu ete: “Na liyangani na biso ya etúká ya mbula oyo, makambo nyonso oyo mazalaki na manáka mapesamaki na elobeli ya bilembo, yango wana bimimi mingi bazalaki kati na bayangani elongo na mabota na bango. Ntango ya maoki makasi ezalaki na lisukúlu ya nsuka ntango molobi alobelaki mosala oyo mozali kosalema kati na bimimi mpe alobaki ete bimimi 70 bazalaki wana na liyangani. Bayangani babɛtaki mabɔkɔ makasi, kasi, lokola molobi amonisaki yango, bimimi bayokaki yango te. Kosengáká bongo na bimimi ete bátala bayangani, molobi azongelaki motuna oyo ete, ‘Bozali na esengo ya kosangana awa elongo na bandeko na bino bimimi?’ mpe asɛngaki na bayangani ete babɛta mabɔkɔ na koningisáká mabɔkɔ nyonso mibale. Ezalaki esengo monene na komona bandeko mibali mpe basi 11 000 kobɛta mabɔkɔ na koningisáká mabɔkɔ na bango. Bandeko na biso mibali mpe basi bimimi batondaki na esengo mpe baokaki ete bazalaki eteni ya bondeko monene. Mingi balelaki na esengo.”
Lokola Batatoli ya Yehova bazali kosangana na kobuka mbuma na Porto Rico, ya solo esanga yango ekozala ntango nyonso libongo ya bozwi mingi. “Bampate” ya Nzambe, oyo azali kobénga bango “mabonja kitoko ya mabota,” bakolanda kokɔta mpo ete ndako ya Yehova etonda na nkembo.—Yoane 10:16; Hagai 2:7.
[Etanda na lokasa 9]
COUNTRY PROFILE
1994 Service Year
PEAK NUMBER WITNESSING: 25,428
RATIO: 1 Witness to 139
MEMORIAL ATTENDANCE: 60,252
AVERAGE PIONEER PUBLISHERS: 2,329
AVERAGE BIBLE STUDIES: 19,012
NUMBER BAPTIZED: 919
NUMBER OF CONGREGATIONS: 312
BRANCH OFFICE: GUAYNABO