Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 1/1 nk. 24-26
  • “Longwa na minɔkɔ na bana”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Longwa na minɔkɔ na bana”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Etamboli malamu epesaka litatoli
  • Bilenge Batatoli oyo bazali kobota mbuma
  • Mpiko ya bilenge ezali kopesa litatoli ya malamu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 1/1 nk. 24-26

“Longwa na minɔkɔ na bana”

NTANGO Samwele azalaki elenge, akangamaki makasi na mitinda ya sembo atako bana ya Nganga Monene Elia bazalaki na etamboli mabe. (1 Samwele 2:22; 3:1) Na mikolo ya Elisa, elenge mwasi moko ya Yisraele oyo azalaki moombo na Sulia apesaki litatoli moko ya mpiko epai na nkolo na ye ya mwasi. (2 Mikonzi 5:2-4) Ntango Yesu azalaki na mibu 12, alobaki na mpiko nyonso epai na balakisi ya Yisraele, kotunáká bango mituna mpe azalaki kopesa biyano oyo bikamwisaki baoyo bazalaki koyoka ye. (Luka 2:46-48) Na boumeli nyonso ya lisoló ya bato, basambeli ya Yehova oyo bazali bilenge bazali kosalela ye na bosembo nyonso.

Bilenge ya lelo bazali komonisa elimo ya sembo motindo wana, boye te? Ee, ezali bongo! Balapólo oyo euti na babiro ya ba filiales ya la Société Watch Tower emonisi ete bilenge mingi mpenza oyo bazali bandimi “bazali komipesa na bolingo nyonso” kati na mosala ya Yehova. (Nzembo 110:3, NW) Matomba kitoko ya milende na bango ezali kolendisa baklisto nyonso, bilenge mpe mibangé, na “kotika te kosala oyo ezali malamu.”​—Bagalatia 6:9, NW.

Ndakisa kitoko ezali bongo Ayumi, elenge mwasi ya mboka Japon oyo akómaki mosakoli wana azalaki na mibu motoba mpe amityelaki mokano ya kopesa litatoli epai na moto nyonso kati na kelasi na bango. Azwaki ndingisa ya kotya mikanda mingi kati na bibliotɛkɛ oyo ezalaki na kelasi, komibongisáká ye moko mpo na koyanola na mituna nyonso oyo baninga na ye ya kelasi bakokaki kotuna. Pene na baninga na ye nyonso ya kelasi mpe molakisi na bango bamesanaki na mikanda yango. Na boumeli ya bambula motoba oyo alekisaki na eteyelo ya ebandeli, Ayumi atambwisaki boyekoli ya Biblia 13. Azwaki batisimo wana azalaki na kelasi ya minei, mpe moko na baninga na ye oyo ayekolaki na ye azwaki batisimo wana azalaki na kelasi ya motoba. Lisusu, mama mpe bayaya mibale ya basi ya moyekoli wana ya Biblia bakómaki mpe koyekola Biblia mpe bazwaki batisimo.

Etamboli malamu epesaka litatoli

“Bojala na bijaleli na bino malamu kati na bapakano,” ezali wana maloba ya ntoma Petelo, mpe bilenge baklisto bazali kokamata etinda wana na motuya. (1 Pɛtɛlɔ 2:12) Lokola litomba, etamboli malamu na bango mbala mingi epesaka litatoli kitoko. Na Cameroun, mboka moko ya Afrika, mobali moko ayaki mpo na mbala ya mibale na makita ya lisangá ya Batatoli ya Yehova mpe afandaki mpembeni ya mwana mwasi moko ya moke. Ntango molobi asɛngaki na bayangani ete báluka mokapo moko kati na Biblia, mobali wana amonaki ete mwana moke wana ya mwasi azalaki kozwa nokinoki mokapo yango kati na Biblia na ye mpe azalaki kolanda botángi na likebi nyonso. Ezaleli ya elenge mwasi wana ekamwisaki ye mingi, na boye ete na nsuka ya makita, akendaki epai na molobi mpe alobaki ete: “Mwana moke oyo ya mwasi apesi ngai mposa ya koyekola Biblia elongo na yo.”

Na Afrika ya Súdi ezali na eteyelo moko epai kuna bayekoli 25 bazali bana ya Batatoli ya Yehova. Etamboli malamu na bango epesaki mpenza lokumu mpo na Batatoli ya Yehova. Molakisi moko ya mwasi alobaki na moboti moko oyo azali Motatoli ya Yehova ete azali koyeba te lolenge Batatoli bazali kosala mpo na kobongisa bana na bango malamu koleka, mingimingi mpo ete lingomba na ye moko emonisaki ete ekoki te mpo na kosalisa bilenge. Molakisi moko ya sika ayaki kotángisa na eteyelo wana mpe nokinoki amonaki etamboli malamu ya bana ya Batatoli. Atunaki moko kati na bilenge mibali oyo bazalaki Batatoli ete ayebisa ye soki asengelaki kosala nini mpo ete ye mpe akóma Motatoli ya Yehova. Alimbwelaki ye ete asengeli koyekola Biblia, mpe akamataki bibongiseli mpo ete baboti na ye bákokisa mposa ya molakisi yango.

Na Costa Rica, Rigoberto ayebaki solo ntango baninga na ye mibale ya kelasi basalelaki Biblia mpo na koyanola na mituna na ye na ntina na Bosato, molimo, mpe lifelo ya mɔ́tɔ. Makambo bazalaki koloba ezalaki na bopusi malamu likoló na ye, bobele te mpo na makoki na bango ya kosalela Makomami, kasi lisusu mpamba te etamboli na bango ya kitoko koleka ekesenaki mpenza na makambo oyo azalaki komona na mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba. Atako libota ezali kotɛmɛla ye, Rigoberto azali kosala bokóli malamu kati na boyekoli na ye ya Biblia.

Na Espagne Batatoli ya Yehova mibale​—moko kati na bango azalaki na mibu libwa​—bakendaki kotala mobali moko na nkombo Onofre. Ntango Motatoli ya mokóló azalaki koloba, Motatoli ya elenge azalaki kolanda kati na Makomami mpe azalaki kolobela mikapo misusu ya Biblia na motó. Onofre akamwaki mingi. Azwaki ekateli ya koyekola Biblia na esika oyo elenge mobali wana ayekolaki kosalela Makomami malamu koleka. Na yango, na ntɔ́ngɔ́ ya mokolo ya Lomingo oyo elandaki, akendaki na Ndako ya Bokonzi. Asengelaki kozela na libándá kino nsima na midi, ntango Batatoli bayaki na makita na bango. Kobanda wana, asalaki bokóli malamu mpe kala mingi te autaki komonisa komipesa na ye na kozwáká batisimo na mai.

Bilenge Batatoli oyo bazali kobota mbuma

Ee, Yehova azali kosalela bilenge mpe mikóló mpo na kokutana na bato oyo bazali na motema ya bopɔlɔ. Yango emonisamaki mingi na likambo moko lisalemaki na Hongrie. Kuna, lífulumɛ́ ya lopitalo moko amonaki ete ntango bato bazalaki koya mpo na kotala elenge moko ya mibu zomi oyo azalaki kobɛla, bazalaki komemela ye mikanda ya kotánga mpe bilei. Lokola likambo yango ebendaki likebi na ye, amitunaki mpo na koyeba soki mikanda yango ezali ya motindo nini mpo ete ekoka mpenza kosepelisa elenge mwasi motindo wana mpe amonaki ete ezalaki Biblia. Lífulumɛ́ asololaki na ye mpe na nsima alobaki ete: “Uta na ebandeli, azalaki mpenza koteya ngai.” Ntango elenge mwasi yango abimaki na lopitalo, apesaki lífulumɛ́ libyangami mpo na kosangana na liyangani moko, kasi lífulumɛ́ andimaki yango te. Nzokande, na nsima, andimaki koyangana na Liyangani ya Etúká “Monɔkɔ na Pɛto.” Mosika te, abandaki koyekola Biblia, mpe mbula moko na nsima azwaki batisimo​—nyonso oyo mpo ete elenge mwasi asalelaki ntango oyo alekisaki na lopitalo na kotángáká mikanda mikolimbolaka Biblia.

Na San Salvador, Ana Ruth, azalaki na kelasi ya mibale kati na eteyelo ya katikati. Azalaki na momeseno ya kotika mikanda mikolimbolaka Biblia likoló ya mesa na ye mpo ete basusu bátánga yango soki balingi. Komonáká ete mikanda mizalaki kobunga mpe komonana lisusu nsima ya mwa ntango, Ana Ruth ayaki koyeba ete ezalaki Evelyn, moninga moko ya kelasi, nde azalaki kotánga yango. Nsima ya mwa ntango, Evelyn andimaki boyekoli mpe abandaki koyangana na makita ya lisangá. Na nsuka, azwaki batisimo, mpe sikawa azali kosala lokola mobongisi-nzela mosungi ya ntango nyonso. Ana Ruth azali mobongisi-nzela ya sanza na sanza.

Na Panama ndeko mwasi moko abandaki koyekola Biblia elongo na mwasi moko, oyo mobali na ye abandaki kotɛmɛla solo na boye ete boyekoli ezalaki pene na kokatama. Nzokande, mokemoke ezaleli ya mobali wana ebandaki kobongwana. Mwa mikolo na nsima, yaya na ye ya mobali, oyo azalaki Motatoli, ayaki kosɛnga ye ete akenda kotyela ye ngonga ya kokebisa kati na ndako na ye. Wana ezalaki ye kotya yango, mwana mwasi ya ndeko na ye azongaki na ndako komonanáká ete azalaki na mawa. Atunaki ye soki likambo nini lizalaki kotungisa ye, mpe mwana yango alobaki ete ye mpe yaya na ye ya mwasi bakendaki kotambwisa boyekoli ya Biblia, kasi bakutaki moto yango na ndako te, na bongo, azwaki eloko ya kosala te mpo na Yehova na mokolo wana. Papa leki na ye alobaki ete: “Mpo na nini te koteya ngai? Boye okosala eloko mpo na Yehova.” Mwana mwasi wana apotaki na esengo nyonso mpo na kokamata Biblia na ye mpe boyekoli ebandaki.

Mama na ye (sɛmɛ́ki ya mobali wana) azalaki koyoka. Akanisaki ete makambo nyonso mazalaki bobele lokola lisano, kasi mbala nyonso oyo mobali wana azalaki kokende na ndako na bango azalaki koluka mwana mwasi wana mpo na koyekola Biblia. Ntango mama ya mwana yango amonaki ete sɛmɛ́ki na ye azalaki kozwa makambo yango na lisɛki te mpe azalaki na mwa mituna ya makasi, azwaki ekateli ya kotambwisa boyekoli yango ye moko elongo na mwana na ye ya mwasi. Abandaki koyekola mbala mibale na pɔ́sɔ moko mpe akólaki nokinoki. Na nsuka, amonisaki bokóli kino amipesaki mpe azwaki batisimo elongo na mwasi na ye na liyangani​—na ntina na ezaleli kitoko ya mwana mwasi ya ndeko na ye.

Mpiko ya bilenge ezali kopesa litatoli ya malamu

Biblia elobi ete: “Zalá na mpiko mpe tiká ete motema na yo ezala makasi. Ee, likyá epai na Yehova.” (Nzembo 27:14, NW) Maloba oyo mataleli basaleli nyonso ya Nzambe, bilenge mpe mikóló basalelaki yango na boumeli ya mbula eleki. Na Australie, wana elenge mwasi moko ya mibu mitano abandaki kotánga na eteyelo moko ya sika, mama na ye akendaki kokutana na molakisi mpo na kolimbwela ye bindimeli ya Batatoli ya Yehova. Molakisi alobaki ete: “Nasilá koyeba bindimeli na bino. Mwana na yo alimbwelaki ngai makambo nyonso.” Elenge wana azalaki na nsɔ́ni te ete azanga kolimbola ye moko bindimeli na ye epai na molakisi.

Andrea, oyo azali na mibu mitano, na mboka Roumanie mpe amonisaki mpiko. Ntango mama na ye atikaki lingomba Orthodoxe mpo na kokóma Motatoli, bazalani na ye bazalaki koboya koyoka ye. Mokolo moko, na Boyekoli ya Mokanda oyo esalemaka na lisangá, Andrea ayokaki Mokɛngɛli ya mosala ya kosakola kolobela mposa ya kosakola epai na baninga na biso ya pembeni. Akanisaki mingi na ntina na likambo yango, mpe na nsima wana ezongaki ye na ndako, alobaki na mama na ye ete: “Mama ntango yo okobima mpo na kokende na mosala, ngai nakolamuka, nakotya mikanda kati na sakosi na ngai lokola yo osalaka mpe nakobondela Yehova mpo ete asalisa ngai ete naloba na ntina na solo epai na baninga na biso ya pembeni.”

Na mokolo elandaki, Andrea asalaki lokola alakaki. Na nsima, mpo na komonisa mpiko na ye, abɛtaki na ngonga ya ndako ya moninga na bango ya mpembeni. Ntango mozalani yango ayanolaki, elenge mwasi alobaki ete: “Nayebi ete uta mama na ngai akóma Motatoli, bolingaka ye lisusu te. Amekaki kosolola na bino mbala mingi, kasi bolingaka koyoka ye te. Yango etungisaka ye mingi, kasi nalingi bóyeba ete tólingaka bino.” Na nsima, Andrea apesaki litatoli moko malamu. Mokolo moko, akabolaki babúku motoba, bazulunalo motoba, mwa babúku minei, mpe batrakte minei. Uta ntango wana, abimaka mbala na mbala kati na mosala ya kosakola.

Na Rwanda bandeko na biso basengelaki mpenza komonisa mpiko monene kati na bitumba makasi oyo bizali kuna. Na libaku moko, libota moko ya Batatoli batyamaki na ndako epai basodá bamibongisaki mpo na koboma bango. Libota esɛngaki nzela mpo ete bábondela liboso. Bapesaki bango nzela, mpe bango nyonso bazalaki kobondela na nsé ya motema, longola bobele Deborah. Engebene nsango oyo epesamaki, Deborah abondelaki na mongongo makasi ete: “Yehova, pɔ́sɔ oyo ngai mpe papa tokabolaki bazulunalo mitano. Lolenge nini tokokoka kozongela bato wana mpo na koteya bango solo oyo ekobikisa bomoi na bango? Lisusu, sikawa motindo nini nakokóma mosakoli? Nalingaki kozwa batisimo mpo ete nakoka kosalela yo.” Nsima na koyoka libondeli yango, sodá moko alobaki ete: “Tokoki koboma bino te na ntina na elenge mwasi oyo.” Deborah ayanolaki ete: “Matɔ́ndi mingi.” Libota ebikisamaki.

Wana Yesu akɔtaki na lokumu nyonso kati na Yelusaleme pene na nsuka ya bomoi na ye awa na mabelé, ayambamaki na bato mingi, bibele oyo bazalaki na esengo. Bilenge mpe mikóló bazalaki kati na bibele yango. Engebene lisoló yango, bilenge mibali “bangangi kati na Tempelo ete, Osana epai na Mwana na Dawidi!” Ntango banganga-kapita mpe bakomeli bamonisaki ete basepelaki na likambo yango te, Yesu azongisaki ete: “Botangi naino tɛ ete, Longwa na minɔkɔ na bana mpe baoyo bakonungaka mabɛlɛ, obimisi lisanjoli na malamu yɔnsɔ?”​—Matai 21:15, 16.

Ezali likambo ya kosepelisa na komona ete, ata lelo, maloba wana ya Yesu mazali solo, boye te? “Longwa na minɔkɔ na bana mpe baoyo bakonungaka”​—mpe tokoki, kobakisa bilenge mibali mpe basi​—Yehova asili kobimisa lisanzoli. Ya solo, mpo na oyo etali kosanzola Yehova, ezali na mbula te oyo esili kokatama mpo na yango.​—Yoele 2:28, 29.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto