Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 1/1 nk. 10-19
  • Libota na Boyengebene

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Libota na Boyengebene
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Libota libotami
  • Motuya ya sika ya basakoli
  • “Bosalaka boye”
  • “Totika koyangana elɔngɔ mɔkɔ tɛ”
  • “Ojala na etingia”
  • Batelá bosembo kino nsuka
  • Tózala bato ya molende na oyo ezali malamu!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 1/1 nk. 10-19

Libota na Boyengebene

“Jipola bikuke ete libota na boyɛngɛbɛnɛ mpe na kobatela kondimana baingela.”​—YISAYA 26:2.

1. Mpo na nini maloba ya Yisaya na ntina na “libota na boyengebene” ekoki kokamwisa?

LELO oyo, mabota mazali na mitindo mikeseni. Mosusu ezali ya demokrasi, mosusu eyangelami na mikonzi oyo basimbi bokonzi nyonso na mabɔkɔ na bango moko. Mosusu ezali ya bozwi, mosusu ya bobólá. Kasi likambo oyo esangisi mabota nyonso wana ezali oyo ete: Nyonso esangani na mokili oyo Satana azali nzambe na yango. (2 Bakolinti 4:4) Na kotalela likambo yango, maloba ya Yisaya makoki kokamwisa bato, mpamba te alobi ete: “Jipola bikuke ete libota na boyɛngɛbɛnɛ mpe na kobatela kondimana baingela.” (Yisaya 26:2) Libota ya boyengebene? Ee, libota moko ya boyengebene lizali, mpamba te esakweli elobeli kozala na yango na mikolo na biso. Ndenge nini moto akoki koyeba libota wana likeseni na mabota nyonso mosusu?

2. “Libota na boyengebene” ezali libota nini? Lolenge nini toyebi yango?

2 Kati na lolenge oyo Biblia New World Translation ezali kobongola Yisaya 26:2, elobelami na ntina na libota yango ete ezali “kobatela etamboli ya sembo.” Biblia King James Version (na pembeni) ebongoli molɔngɔ́ yango boye, “libota na boyengebene oyo ebatelaka solo.” Mabongoli nyonso mibale wana mabongi mpenza. Ya solo, ezali pɛtɛɛ mpo na koyeba libota ya boyengebene mpamba te ezali libota bobele moko oyo, awa na mabelé, ezali kotosa Klisto Mokonzi, mpe esangani te na mokili oyo ya Satana. (Yoane 17:16) Lokola ezali bongo, basangani na yango bayebani na lolenge na bango ya ‘kobatela etamboli malamu na bango kati na mabota.’ Bazali kolanda lolenge ya bomoi oyo ezali kokumisa Nzambe. (1 Petelo 2:12) Lisusu, epai nyonso oyo bazwami kati na mokili, bazali basangani kati na “lisangá ya Nzambe ya bomoi, likonzi mpe etɛmiseli ya solo.” (1 Timoté 3:15, NW) Lokola bazali etɛmiseli ya solo, basili kobwaka bafilozofi nyonso oyo eteyami na boklisto ya nkombo mpamba, mpe bazali na ‘mposa makasi ya komela miliki ebebisami te oyo ezali bongo kati na liloba’​—Biblia, Liloba ya Nzambe. (1 Petelo 2:2, NW) Lisusu, na molende nyonso bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi epai “na bato yɔnsɔ na nse na Likolo.” (Bakɔlɔsɛ 1:23) Na ntembe te, libota yango lisalemi na batikali ya “Yisraele ya Nzambe,” lisangá ya baklisto bapakolami, boye te? Ezali mpenza bongo.​—Bagalatia 6:16.

Libota libotami

3. Lobelá lolenge nini “libota na boyengebene” ebotamaki.

3 Ntango nini “libota na boyengebene” libotamaki? Ebandeli na yango esakolamaki kati na mokanda ya Yisaya. Na Yisaya 66:7, 8, tozali kotánga ete: “Naino [Siona] ajalaki na mpasi tɛ abotaki; naino mpasi na ye ekomelaki ye tɛ abimisaki mwana mobali. . . . Siona ajuaki mpasi na kobota [mpe] abotaki bana na ye.” Likambo ya kokamwa, Siona, lisangá ya Nzambe oyo ezali na likoló, esengelaki kobota “mwana mobali” liboso ya koyoka mpasi. Na mobu 1914, Bokonzi ya Masiya ebotamaki na makoló. (Emoniseli 12:5) Nsima na yango, wana mabota mingi bamikɔtisaki na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, mpe baklisto bapakolami bazwaki bolózi mpe minyoko. Na nsuka, na mobu 1919, libota ya elimo, “mwana mobali,” ebotamaki awa na mabelé. Na bongo Siona ‘ebotaki bana na ye’​—bapakolami ya “libota ya boyengebene” wana ya sika​— mpe bango babongisamaki mpo na mosala ya kotatola oyo esengelaki kokóla sé kokóla.​—Matai 24:3, 7, 8, 14; 1 Petelo 2:9.

4. Mpo na nini libota na boyengebene ya Nzambe esengeli kobunda mpo na kobatela bosembo?

4 Uta ebandeli na yango, libota yango lizali kokutana na komekama makasi na ntina na bosembo na yango. Mpo na nini? Ntango Bokonzi ya likoló ebotamaki, Satana mpe bademó na ye babwakamaki longwa na likoló kino awa na mabelé. Mongongo moko makasi elobaki ete: “Sasaipi lobiko, na nguya, na Bokonji na Njambe na biso, na bokonji na Klisto na ye, esili koya; mpɔ ete mofundi na bandeko na biso, oyo akofundaka bango na liboso na Njambe butu na moi, asili kobwakama. Bango baleki ye jambi na makila na Mwana na Mpate, mpe na maloba na litatoli na bango, mpe balingaki bomɔi na bango tɛ, ata kino kufa.” Satana azalaki na nkanda makasi lokola makambo mabongwanaki “mpe akei kobuna etumba na bango batikalaki na libota na [mwasi], baoyo batosaki malako na Njambe mpe bajalaki na matatoli na Yesu.” Liboso na kobundisama oyo ebimisamaki na Satana, baklisto bapakolami batɛlɛmaki ngwi. Kino lelo oyo, basangani ya molende ya libota na boyengebene ya Nzambe bazali komonisa kondima na makila na Yesu oyo mapesamaki mpo na lisiko mpe bazali kolanda kopesa Yehova likoki ya koyanola na motumoli monene na kobateláká bosembo “ata liboso na kufa.”​—Emɔnisɛli 12:1, 5, 9-12, 17; Masese 27:11.

5. Ezaleli nini kitoko ezali kosalisa Batatoli ya mikolo na biso na kobatela bosembo?

5 Na mobu 1919, wana litatoli oyo ezali kopesama na mikolo na biso na ntina na Bokonzi ya Nzambe ebandaki, Bayekoli ya Biblia, nkombo oyo Batatoli ya Yehova bayebanaki na ntango wana, motuya na bango ezalaki moke kasi bazalaki makasi kati na kondima. Bakómaki moboko ya ‘mboka na nguya, oyo lobiko ezali mapango na yango mpe bizingelo na yango.’ Elikya na bango ezalaki epai na “Yah Yehova [oyo] azali Libanga likoumela seko.” (Yisaya 26:1, 3, 4) Lokola Mose na ntango ya kala, bayambolaki ete: “Nakosakola nkombo na [Yehova]. [Bópesa lokumu epai na Nzambe na biso, NW.] Ye Libanga, mosala na ye ebɔngi; mpɔ ete njela na ye yɔnsɔ boyɛngɛbɛnɛ. Njambe na sembo mpe na mabe tɛ, ye moyɛngɛbɛni mpe mosembwi.”​—Dutɛlɔnɔmɛ 32:3, 4.

6. Na nzela nini Yehova asili kopambola libota na ye na mikolo oyo ya nsuka?

6 Uta ntango wana, bikuke mpo na kokɔta na ebongiseli ya Bokonzi ya Nzambe efungwamaki, bato ya liboso na koyanganisama ezalaki bongo batikali kati na baklisto bapakolami 144 000 mpe sikawa ebele monene ya “bampate mosusu” basangani elongo na bango mpo na kosakola makambo oyo Bokonzi na Yehova ekosala. (Yoane 10:16) Na yango, ekoki ete esakolama na esengo nyonso: “Osili kofulukisa libota, Ɛ [Yehova], osili kofulukisa libota, okɛmbisami; okomisi yango mosika kino nsuka yɔnsɔ na mokili.” (Yisaya 26:15) Ntango tozali lelo kotalela elanga na mokili mobimba, tozali komona lolenge maloba wana mazali mpenza solo! Na nguya ya elimo santu, litatoli na ntina na Bokonzi ya Klisto oyo ezali koya esili kopesama “kino na nsuka na mokili.” (Misala 1:8) Bonene ya bokóli wana ekoki komonana na Lapólo ya Mosala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba na mobu 1994, kobanda na lokasa 12 kino na lokasa 15.

Motuya ya sika ya basakoli

7, 8. (a) Elembeteli nini emonisi ete libota na Nzambe basili ‘kofungola molai basinga na hema na bango’? (b) Na kotalela Lapólo ya Mbula ya Mosala 1994, bisika nini omoni ete ‘ndelo na bango esili kopalangana’ na lolenge ya kokamwa?

7 Tótalela bamoko na makambo ya lapólo yango. Motuya ya sika ya basakoli ya Bokonzi kati na elanga ekómaki 5 914 094! Oyo nde likambo ya kosepelisa na komona koyanganisama, oyo ezali sé kokóba, ya “ebele monɛnɛ . . . bauti na mabota yɔnsɔ, na mikili yɔnsɔ, na [bikólo] yɔnsɔ, na minɔkɔ yɔnsɔ; batɛlɛmi liboso na kiti na bokonji mpe liboso na Mwana na Mpate. Balati bilamba mpɛmbɛ”! Ee, bango mpe bamimonisaki ete bazali babateli na bosembo. “Basukoli bilamba na bango, mpe bayeisi yango mpɛmbɛ na makila na Mwana na Mpate,” kotángamáká bongo bato na sembo na ntina na kondima na bango kati na mbeka na lisiko ya Yesu.​—Emɔnisɛli 7:9, 14.

8 Mingimingi kobanda 1919, etinda epesamaki na lisangá ya Yehova ete: “Fulisa na monɛnɛ esika na hema na yɔ, tika ete bilamba na efandelo na yɔ bisembolama; omiboya tɛ, yeisa nkamba na yɔ molai mpe kembisa na makasi nsɛtɛ na yɔ.” (Yisaya 54:2) Mpo na kokokisa etinda yango, mosala ya kosakola ezali kokende sé liboso, ata na Yukon, mboka oyo ezipami na ngalasa, oyo ezali na nsuka ya Alaska, epai etuluku moko ya babongisi-nzela bazali koyika mpiko na malili makasi oyo ekómaka 45° C kino 50° C na nsé ya zéro na boumeli ya bapɔ́sɔ mingi. Na bambula oyo euti koleka kala mingi te, bibele mingi bayaki kati na libota ya boyengebene ya Yehova. Bikuke bifungwamaki mingi mpo na koyamba bato oyo bautaki na mikili ya Azia oyo babimi longwa na boklisto ya nkombo mpamba, na bamboka oyo ezalaki bisika makasi ya Communisme, na mikili mingi ya Afrika, mpe na mikili oyo lingomba ya Katolike ezali na bopusi makasi, lokola na Italie, na Espagne, na Portugal, mpe na Amerika ya Súdi. Bato oyo basili kotika bamboka na bango mpo na kokende kofanda na bamboka mosusu basili kokóma elanga ya sika. Na ndakisa, na Angleterre, Batatoli bazali kokokisa bamposa ya bituluku 13 ya bato oyo balobaka nkótá mosusu.

“Bosalaka boye”

9. (a) Motuya ya bayangani na Ekaniseli ya mobu 1994 emonisi nini? (b) Tángá mwa mikili epai kuna motuya na bayangani na Ekaniseli emataki?

9 Likambo mosusu ya kosepelisa kati na lapólo ya nsuka ya mbula ezali bongo motuya ya bayangani na Ekaniseli. Mwa moke liboso na kufa na ye, Yesu abandisaki Ekaniseli ya liwa na ye mpe alobaki na bayekoli na ye ete: “Bosalaka boye mpɔ na ekaniseli na ngai.” (1 Bakɔlinti 11:24) Na mobu 1994, ezalaki likambo ya kosepelisa na komona bato 12 288 917​—koleka mbala mibale motuya ya basakoli ya molende​—bayanganaki mpo na kotosa etinda wana, ezala baoyo balyaka limpa to baoyo balyaka yango te. Na mikili misusu, motuya ya bato oyo bayanganaki na Ekaniseli elekaki mosika motuya ya basakoli. Basakoli 4 049 na Estonie, na Latvie, mpe na Lithuanie basepelaki na kozwa bayangani 12 876 na Ekaniseli, koleka mbala misato motuya ya basakoli nyonso. Mpe na Benin, bato 16 786 oyo bayanganaki na Ekaniseli balekaki pene na mbala mitano motuya ya basakoli nyonso. Lisangá moko oyo ezali na basakoli 45 eyanganisaki bato 831 na Ekaniseli!

10. (a) Mokumba nini motuya monene wana ya bayangani na Ekaniseli etye likoló na biso? (b) Lobelá makambo oyo makoki komonana ntango moto oyo ayanganaki na Ekaniseli azwi mpenza lisalisi.

10 Batatoli ya Yehova bazali na esengo lokola bato mingi oyo bazali komonisa bosepeli, basanganaki elongo na bango na libaku oyo ya malamu. Sikawa balingi kosalisa bato yango mpo ete bákola kati na bososoli na bango mpe bolingo na bango mpo na solo. Basusu bakoki koyanola lokola Alla, mofandi moko ya mboka Russie, asalaki. Alla azalaki koyekola elongo na ndeko mwasi moko mobongisi-nzela monene kasi azalaki kosala bokóli mingi te, na bongo boyekoli na bango ekatamaki. Atako bongo, Alla andimaki libyangami ya koyangana na Ekaniseli. Likita wana, oyo ezalaka na ndimbola moko monene, esalaki bopusi makasi likoló na ye. Wana azongaki na ndako na ye, abwakaki bikeko na ye nyonso mpe abondelaki Yehova mpo ete asalisa ye. Mikolo mibale na nsima, ndeko mwasi mobongisi-nzela akendeki kotala Alla mpo na koyeba makambo nini masepelisaki ye na Ekaniseli. Lisoló moko esalemaki mpe ebotaki mbuma. Alla azongelaki boyekoli na ye. Mosika te, abandaki kobima na mosala ya kosakola. Likambo oyo emonisi ntina ya kokende kotala bato oyo bayanganaka na Ekaniseli. Mingi bakoki koyanola lokola Alla asalaki yango.

“Totika koyangana elɔngɔ mɔkɔ tɛ”

11-13. (a) Etamboli ya sembo ya libota na boyengebene esangisi nini? (b) Mpo na nini baklisto ya solo basengeli koyangana na makita?

11 Ekaniseli ezali likita lileki monene kati na manáka ya Batatoli ya Yehova, kasi ezali sé yango likita bobele moko te. Pɔ́sɔ na pɔ́sɔ Batatoli ya Yehova bayanganaka mpo na kotosa maloba ya ntoma Paulo ete: “Totala ete topɛsana simbisi mɔkɔ na mɔkɔ mpɔ na kolinganaka mpe kosalaka misala malamu. Totika koyangana elɔngɔ mɔkɔ tɛ, kasi topɛsana toli. Tosala bongo na koleka, awa emɔni bino ete mokɔlɔ yango ejali kobɛlɛma.” (Baɛbɛlɛ 10:24, 25) Baoyo bazali koyangana na makita yango bazali kosangana elongo na libota na boyengebene ya Yehova oyo eyebani na etamboli na yango ya sembo. Etamboli ya sembo esangisi koyangana na bosembo nyonso na makita.

12 Yango ezali komonana polele na Philippines, epai mwayene ya bato nyonso oyo bayanganaka na makita na mokolo ya lomingo ezali 125% na kotalela motuya ya basakoli. Ezali mpe komonana polele epai na etuluku moko ya Batatoli mpe bato oyo bazali komonisa bosepeli na mboka Argentine. Bazali kofanda na bakilomɛtɛlɛ soko 20 longwa na Ndako ya Bokonzi. Atako bongo, mokɛngɛli ya zongazonga ayebisi ete moko te kati na bango azangisaka makita, longola bobele soki bazali na bokɔnɔ. Batambolaka na boumeli ya ngonga minei na mituka mikobendamaka na bampunda to likoló na bampunda, mpe na boumeli ya eleko ya mpiɔ bazongaka epai na bango na nsé ya molili ya butu.

13 Lokola nsuka ya ebongiseli oyo ezali kobɛlɛma, bomoi ezali kokóma mpasi koleka, mikakatano mizali sé kobakisama, mpe koyangana pɔ́sɔ na pɔ́sɔ na makita ekoki kozala ntembe monene. Kasi, na makambo motindo wana, tozali mpenza na mposa ya bilei ya elimo mpe boninga ya mɔ́tɔ oyo ekoki kozwama bobele na nzela ya makita.

“Ojala na etingia”

14. Mpo na nini Batatoli ya Yehova bazali na etingia na ntina na mosala na bango, mpe matomba nini mazali komonisa yango?

14 Na mbula eleki, Lingomba ya Katolike, na Italie, elobelaki mosala ya Batatoli ya Yehova ete ezali “bopalanganisi mateya na lolenge ya mobulu.” Nzokande, likambo ya mobulu ezali te kati na mosala oyo Batatoli bazali kosala. Na esika ete ezala bongo, mosala na bango ezali nde elembo ya bolingo mozindo mpo na bazalani na bango. Ezali lisusu elembo ya botosi na bango na maloba ya Paulo oyo ete: “Osakola liloba, ojala na etingia na bilaka malamu mpe na bilaka malamu tɛ.” (2 Timoté 4:2) Etingia ezali kopusa Batatoli ya Yehova na kozala na molende kati na mosala na bango, lokola yango emonisami na ngonga 1 096 065 354 oyo balekisaki na 1994 na kosakwela bazalani na bango, na kosala bozongeli ya sika, mpe batambwisaki pɔ́sɔ na pɔ́sɔ boyekoli ya Biblia 4 701 357. Mingi bazwaki likoki ya kosangana na mosala ya babongisi-nzela, yango emonisi ete elimo ya mosala ya babongisi-nzela ezali kopela mpe ezali kobota mbuma. Mwayene ya babongisi-nzela 636 202 na mokili mobimba emonisi yango.

15, 16. (a) Lolenge nini bilenge mpe mibangé bamonisaki elimo ya mosala ya babongisi-nzela? (b) Na kotalela mboka moko na moko kati na Lapólo ya Mbula ya Mosala 1994, epai wapi ozali komona motuya moleki monene ya babongisi-nzela?

15 Kati na babongi-nzela wana tozali kokuta bilenge mingi. Basusu kati na Etats-Unis bazali sikawa kosala lokola babongisi-nzela ya sanza na sanza wana ezali bango na eteyelo ya katikati, baninga na bango ya kelasi nde bazali teritware na bango. Bilenge wana bamoni ete kozala mobongisi-nzela ezali mwango malamu mpo na komibatela na bilangwiseli, na makambo ya mbindo, mpe na mobulu oyo ezali komonana na biteyelo mingi ya mboka wana. Bilenge mosusu mingi bamityeli mosala ya mobongisi-nzela lokola mokano na bango ntango bakosilisa kelasi. Irina, na mboka Ukraine, azalaki mobongisi-nzela mosungi na boumeli ya ntango nyonso oyo alekisaki na eteyelo ya katikati, na mokano ya komilɛngɛla mpo na mosala ya mobongisi-nzela nsima na kozwa lipɔlɔ́mi. Ntango asilisaki kelasi, libota na ye balakaki ye ete bakosalisa ye na makambo matali mbongo mpo ete ye azala momonisi ya libota na bango kati na mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Mpo na oyo etali nkita, makambo mazalaka pɛtɛɛ te na Ukraine. Kasi Irina alobi ete: “Nayebi ete nazali kosala mosala oyo elimboli bomoi bobele mpo na ngai moko te, kasi mpe mpo na baoyo nazali kosakwela bango.” Ezali likambo ya kosepelisa mpenza na komona ete bilenge mingi lelo bazali na makanisi lokola ya Irina. Ezali nde na nzela mosusu ya malamu koleka mpo na bango na ‘kokanisa Mozalisi na bango Monene na mikolo ya bolenge na bango’?​—Mosakoli 12:1.

16 Ndambo monene ya babongisi-nzela bazali mibangé. Moko na bango alobi ete na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, tata na ye mpe ndeko na ye ya mobali babomamaki wana ezalaki bango kobunda kati na etumba, mpe bobele na ntango yango mama na ye mpe ndeko na ye ya mwasi babɛtamaki masasi na lopango epai bafandisaki bango. Na nsima, mwana na ye ya mobali akufaki. Sikawa, lokola asili kokóma mobangé mpe nguya na ye ebandi kokita mpe wana azali konyokwama na kolɔngɔ́nɔ́ mabe ya nzoto, Yehova asili kopesa ye, kati na lisangá ya boklisto, libota moko monene koleka oyo ye abungisaki. Mpe azali kozwa esengo na kosalisáká basusu lokola mobongisi-nzela ya sanza na sanza.

17, 18. Lolenge nini moko na moko na biso, azala mobongisi-nzela to mobongisi-nzela te, akoki komonisa elimo ya mosala ya babongisi-nzela?

17 Ya solo, ezali moto nyonso te nde azali na likoki ya kozala mobongisi-nzela. Yehova andimaka ndambo na zomi (dîme) na biso mobimba, biloko bileki malamu oyo tokoki kopesa, ata nini ezali boike na yango engebene ezalela ya moko na moko na biso. (Malaki 3:10) Ya solo, biso nyonso tokoki kolóna elimo oyo ezali na babongisi-nzela wana ya molende mpe kosala oyo ekoki na biso mpo na kopesa mabɔkɔ na kosakolama ya nsango malamu.

18 Na ndakisa, na Australie, mokolo mwa 16 Apríli ezalaki mokolo ya ntina oyo ebongisamaki mpo na kopesa litatoli na balabála. Esimbamaki malamu na basakoli mpe babongisi-nzela, lokola yango emonisamaki na motuya ya sika ya basakoli 58 780 na sanza yango. Lisusu, bazulunalo 90 000 ebakisamaki likoló na motuya ya bazulunalo oyo ekabolamaki na mbula eleki sé na sanza moko wana. Na boumeli ya mokolo wana ya ntina, ndeko mwasi moko azalaki kotikela mobali moko bazulunalo, mpe wana azalaki kokoma nkombo ya mobali yango mpe adresi na ye mpo na kolandela mposa oyo amonisaki, ndeko mwasi ayaki koyeba ete bazalaki bandeko! Mobali yango azalaki mwana ya mama nkulutu ya ndeko mwasi mpe bango mibale bamonanaki te na boumeli ya mbula 30. Ya solo, libaku oyo epesaki mpenza nzela na bozongeli moko ya esengo!

Batelá bosembo kino nsuka

19. Mpo na nini ezali likambo ya ntina ete libota na boyengebene na Yehova elanda kobatela bosembo kino nsuka?

19 Ezali likambo na ntina ete bato nyonso kati na libota na boyengebene ya Nzambe bábatela bosembo lokola mokili ya Satana molingi kokóma na nsuka na yango. Mosika te, libota na bulɛɛ ya Yehova likoyoka libyangami oyo ete: “Yaka bato na ngai, ingela na biteni na ndako na yɔ, kanga bikuke nsima na yɔ; omibomba ntango mwa mokɛ kino nkanda esili koleka.” Na ntembe te, mokili oyo etondi na nyongo ya makila ekosambisama na Nzambe. “Jambi tala, [Yehova] ajali kobima na esika na ye, mpɔ na kopɛsa bafandi na mokili etumbu mpɔ na mabe na bango; mpe mokili ekojipola makila masopani likolo na yango, ekobomba lisusu babomami na yango tɛ.” (Yisaya 26:20, 21) Tiká ete moko na moko kati na biso atɛlɛma ngwi lokola moklisto oyo azali kobatela bosembo elongo na libota na boyengebene ya Yehova. Na bongo, tokosepela kozala na bomoi ya seko na mabelé to na likoló na nsé ya Bokonzi ya Klisto.

Ozali komikundola?

◻ Ntango nini “libota na boyengebene” ebotamaki?

◻ Mpo na nini libota na Nzambe esengeli koyika mpiko na boumeli ya mikolo oyo ya nsuka?

◻ Nini emonisami na kotalela motuya monene ya basakoli mpe ya bangonga oyo elekisamaki na mosala ya kosakola, lokola elakisami na Lapólo ya Mobu ya Mosala 1994?

◻ Mpo na nini koyangana na makita ezali na ntina monene wana mokili oyo ezali kobɛlɛma na nsuka na yango?

◻ Mpo na nini baoyo nyonso basangani na libota na boyengebene ya Nzambe basengeli kobatela bosembo?

[Etanda na lokasa 12-15]

LAPOLO YA BATATOLI YA YEHOVA NA MOKILI MOBIMBA MPO NA MBULA YA MOSALA 1994

(Talá na zulunalo oyo ebimisamaki)

[Elilingi na lokasa 18]

Babateli ya bosembo kati na libota ya boyengebene ya Yehova bakozwa bomoi ya seko kati na ezalela ya kokoka

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto