Omekami mpo na oyo etali kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto?
La Société Watch Tower epesaka te mitinda to bikateli epai na moto moko na moko mpo na oyo etali nkisi to motindo ya koyeba bokɔnɔ. Nzokande, soki mitindo misusu mizali na makambo oyo makoki kobetelama ntembe na kotalela malako ya Biblia, tosengeli kokeba mpo na yango. Mpe na nsima, moto na moto akososola makambo oyo yango ezali kosɛnga mpo na kozwa ekateli soki akosala nini.
Bandeko ya bolingo: nazali na mposa ya likanisi na bino mpo na likambo oyo. [Mwasi moko oyo asalisaka bato ya maladi], emonani lokola nde azali mpenza kosalisa malamu, kasi lolenge na ye ya kosalisa natyelaka yango ntembe. . . . Na nzela ya ekizamɛ́ akoyebisa mokakatano oyo moto azali na yango. Na nsima, mpo na koyeba motindo to doze ya nkisi oyo akosalela, atyaka molangi moko ya nkisi likoló na loposo mpembeni ya enama moko ya nzoto. Akomeka kokitisa lobɔkɔ lotombwami ya moto ya maladi. Motindo ya nkisi to doze na yango ekoyebana na lisalisi ya makasi oyo asengeli na yango mpo na kokitisa lobɔkɔ wana. Ekanisami ete, na motindo ya kurá, ba “électrons” ekoutaka longwa na nkisi, koleka na ezipeli ya molangi kino na eteni moko ya nzoto, koyeisáká yango makasi. Yango ezali motindo moko na oyo babéngaka ete “radiesthésie”?
NKOMÁ oyo euti na Oregon, na Etats-Unis, ezali kotalela lolenge oyo basusu basalaka mpo na koyeba bamposa oyo ezali na boyokani na makambo matali kolya, komeka makambo matali mayoki, kotala makoki ya kosimba makambo na bɔɔngɔ́, mpe kosilisa mikakatano ya bomoi ya mokolo na mokolo. Atako bato mingi bazali kosalela yango, ntembe ya ye oyo atindaki nkomá oyo ezali na ntina?
Tokoki koluka kozwa kolɔngɔ́nɔ́ ata soki yango esɛngi nini?
Uta kala, bato bazali koluka koyeba mpo na nini bazwaka bokɔnɔ mpe lolenge nini kozongela kolɔngɔ́nɔ́. Bayisraele bazalaki na litomba mpamba te bayebaki ete bazalaki bato ya masumu, mpe bazalaki na mibeko miutaki na Nzambe oyo ezalaki kosalisa bango na kopɛngola kozwa bokɔnɔ to kopalanganisa makɔnɔ makeseni. (Levitike 5:2; 11:39, 40; 13:1-4; 15:4-12; Deteronome 23:12-14) Nzokande, basaleli ya Nzambe bazalaki mpe koluka lisalisi epai na minganga ya eleko na bango.—Yisaya 1:6; 38:21; Malako 2:17; 5:25, 26; Luka 10:34; Bakolose 4:14.
Oyo nde bokeseni na bato ya Babilone mpe ya Ezipito ya kala! “Minganga” na bango bazalaki na bankisi oyo esalemi na biloko oyo bizalisami na Nzambe; nzokande, mingi kati na ‘myango na bango ya kobikisa’ ekoki lelo kobéngama ete bisálásala. Mokanda moko ya makomi ya kala ya Ezipito ezali koloba na ntina na monganga moko oyo azalaki kosalisa bakufi miso na nkisi esalemi na miso ya ngulu, na antimoine, na pilipili mpe mafuta ya nzói. Biloko wana nyonso bisangisami esika moko bizalaki kotyama na litoi ya moto oyo azali na bokɔnɔ! Litatoli moko ya kala elobi ete nkisi yango ezalaki “malamu mpenza.” Ekoki kozala ete lolenge na yango ya kokamwisa esalaki ete ebenda bato mingi koleka.
Bato ya Babilone mpe ya Ezipito bazalaki mbala mingi kobénga nguya ya bilimu mabe.a Nganga-nkisi akokaki kosɛnga epai na mobɛ́li ete akoka kopema na madusu ya zolo ya mpate, kokanisáká ete nguya moko ekoki kouta epai na mobɛ́li mpe kokende kati na ekelamu mosusu mpe kobimisa likambo moko. Mpate azalaki kobomama, mpe bazalaki kokanisa ete libalé na yango ekokaki komonisa bokɔnɔ ya mobɛ́li to makambo matali mikolo na ye mizali koya.—Yisaya 47:1, 9-13; Ezekiele 21:21.
Ya solo, minganga ya Yisraele oyo bazalaki na bobángi Nzambe bazalaki kosalela te misala ya bilimu mabe. Na mayele nyonso, Nzambe apesaki etinda oyo ete: “Moto akojuama kati na bino tɛ . . . moto na jonga, to moto na kotala miɔtɔ mpɔ na kosakola liboso, to moto na kosala nkisi . . . Mpɔ ete bato yɔnsɔ na kosala makambo oyo bajali mbindo na miso na [Yehova].” (Dutɛlɔnɔmɛ 18:10-12; Levitike 19:26; 20:27) Ezali mpe bongo mpo na baklisto basaleli ya Nzambe lelo oyo. Ebongi kozala na bokɛngi.
Na bambula oyo euti koleka bato batyaki likebi na bango likoló na myango ya koyeba bokɔnɔ mpe nkisi oyo eyebani na minganga mingi te. Wana ezali likambo litali ekateli ya moto na moto. (Matai 7:1; kokanisá na Baloma 14:3, 4.) Ya solo, ekozala mawa soki moklisto moko atye lobanzo na ye mingi na makambo ya ntembe na ntina na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto na boye ete abebisi mosala na ye ya kosakola, oyo ezali nzela bobele moko ya solosolo mpo na kobikisa bato. (1 Timoté 4:16) Biblia ezali koloba te ete kati na mokili ya sika maladi ekosilisama mpe tokozongela kolɔngɔ́nɔ́ ya kokoka na nzela ya makambo ya minganga, kosalela matiti, lolenge ya bilei, to mibeko makasi na ntina na makambo matali bilei mpe konyolisa nzoto. Kobikisama ya solosolo ekoya nde na nzela ya bolimbisi ya lisumu likoló na mbeka ya lisiko ya Yesu. —Yisaya 33:24; Emoniseli 22:1, 2.
Nguya nini ezalaka kati na yango?
Moklisto asengeli kotalela nini wana azali kokamata ekateli na ye moko na ntina etali lolenge ya komeka nguya ya misisa ya nzoto oyo elobelami na nkomá oyo ezwami na ebandeli ya lisoló oyo?
Lolenge mosusu ya komeka nguya to lolenge oyo misisa ya nzoto ekosalaka eyebani na minganga nyonso, mpe bobele bato moke nde bakoki kobeta ntembe mpo na motuya na yango ya solo. Na ndakisa, bokɔnɔ ya búkábuka ekoki kolɛmbisa misisa, mpe kosalisa yango ekoki kosɛnga kosalela oyo babéngi kinesiologie—“boyekoli misisa mpe misala na yango.” Lolenge wana ya kinesiologie esalelamaka mpe mpo na bato oyo babɛ́laka bosénzoi (apoplexie). Bato mingi bakoki koyeba mwango wana ya kobikisa.
Kasi ezali boni mpo na lolenge ya komeka nguya ya misisa oyo elobelami na nkomá oyo ezwami na ebandeli ya lisoló oyo? Lolenge oyo ya “kinesiologie” esalelami mpo na koluka koyeba soki lolenge mosusu ya bilei, matiti, to vitamini ekoki kosalisa moto to ekoki kopesa ye mpasi. Mingimingi, esalelamaka boye, moto akotombola lobɔkɔ na ye, monganga akokitisa yango mpo na komeka nguya ya misisa. Na nsima, mobɛ́li akotya eloko moko ya kolya to eloko mosusu kati na monɔkɔ na ye, na libumu na ye, to na lobɔkɔ na ye. Na nsima, misisa ya lobɔkɔ ekomekama lisusu. Elobami ete soki amonisi mposa ya eloko ya kolya, ekomonana ete lobɔkɔ na ye ekozala makasi; soki ezali mabe mpo na ye, misisa na ye mikozala ya kolɛmba.b
Basusu oyo bamekaki yango bandimi ete ezali kobikisa mpe ete matomba oyo yango ezali kobimisa ezali mpo na nguya oyo ezalaki na kati ya nzoto. Bazali koloba ete ezali na makambo mingi oyo siansi ya mikolo oyo ekoki kolimbola te, kasi yango ezali kosalema to mpe ekoki komonana. Na yango, bazali koloba ete esengeli kozala na banzela ya nguya to kokutana ya banguya mpe biloko, ata soki minganga basili naino te kondima to komona yango.
Nzokande, búku Applied Kinesiology elobi ete: “Na bantango mosusu [babúku] ezali koteya ete biloko ya ngɛngɛ, na ndakisa oyo ezalaka kati na bavitami to na matiti, motuya na yango eyebanaka na kosimbáká yango na lobɔkɔ mpe na komekáká misisa. Ezali na elembeteli moko te oyo emonani ete ebongi kondimela lolenge wana ya kosala. . . . Bindimeli ya monganga na ntina na motuya ya eloko moko oyo ekoleisaka nzoto ekoki kozala makasi na boye ete makanisi ya ye oyo azali komeka nguya ya misisa ezali kokutana na koyeba makambo na ntina na mwango ya komeka.” “Mosálisi ekizamɛ́ oyo ameseni malamu te akoki kosala ete misisa ya moto emonana lokola ete ezali motau to makasi engebene ekateli na ye moko bobele na kobongoláká . . . komeka moke mpenza.”
Bókeba!
Nzokande, lolenge mosusu ya komeka nguya ya misisa ekosukaka bobele boye te. Tótalela naino oyo ebéngami “test de substitution.” Yango ekoki kozala malamu epai na mobangé to mwana moke oyo azali na makasi te mpo ete akoka kotalelama. Ntango eloko moko esimbi nzoto ya mwana moke, monganga akotalela eloko oyo bakitanyaki na esika ya lobɔkɔ. Yango esalelamaki epai na banyama oyo babokolaka; eloko oyo ekitanyaki na esika ya lobɔkɔ ekomekama wana mobɛ́li azali kopemisa lobɔkɔ na ye likoló na mbwa, lolenge ya mbwa oyo ekobatelaka mpate na Allemagne, to likoló na nyama mosusu oyo azali na bokɔnɔ.
Biso tokoki te kozwa bisukiseli likoló na makambo oyo, kasi tokoki komituna ete: ‘Nguya ya nzoto ezalaka na nsima ya makambo oyo?’ Bato ya siansi basilá komonisa bilembeteli ya kozala ya ba rayons cosmiques, micro-ondes, mpe mitindo mikeseni ya radiation électromagnétique. Nzokande, bikelamu nyonso, ata bana to banyama oyo babokolaka na ndako, bazalaka na nguya oyo ekoki kobima to kobimisa likambo oyo ekoki kopesa nzela na komeka nguya epai na moto mosusu? Bato ya Babilone bazalaki kokanisa ete nguya ekoki kobima mpe kosimba mpate. Okoki komituna ete, ‘Nandimi ete likambo motindo wana ekoki kobima epai na bato to banyama lelo oyo? To likambo yango ekoki nde kozala na ndimbola mosusu?’
Babíkisi mosusu balobaka ete bamekaka “nguya” ya moto na biloko lokola bibende to pendule. Balobaka ete yango ekopusaka “esika ya nguya” ya mobíkisi na kokutana na oyo ya mobɛ́li. Moto moko, ye oyo azalaki monganga kala mpe mokomi, azalaki kala kosala bolukiluki ya makambo ya siansi, mbala mosusu akoyebaka maladi na kosaleláká pendule. Alobi mpe ete akoki komona “esika ya nguya ya moto” to engɛngɛli oyo ekozingaka bato. Alobi ete azali na “makoki ya komona biloko ya kati” mpo na kotala kati na nzoto mpo na komona kanser, ba cellules ya makila, to mikrobe, mpe komona makambo ya kala.c
Lokola elobamaki liboso, komeka nguya na lisalisi ya bokasi ya lobɔkɔ esalemi mpo na komeka mayoki. Búku moko oyo ekabolami mingi elobaki ete: “Soki olingi mpe kosalela mwa komeka moko moke ya mayoki na mbala moko, tuná na mongongo makasi ete ‘Ozali na nkaká,’ mpe zongelá lisusu emekaneli. Yango ekoki na bantango mosusu kolɛmbisa lobɔkɔ soki eloko ya kolya oyo ezali komekama ezali na litomba te epai na mobɛ́li.” Basusu basalelaka komeka ya lolenge wana “mpo na koyeba mbula ya kobotama oyo mpasi ya sikisiki ya nzoto, ya mayoki to ya elimo” ebimaki. Esalemaka mpe mpo na kozwa bikateli na ntina na makambo ya mokolo na mokolo.
Ekoki kozala mpenza ete, bato mingi oyo basalaka komeka wana ya misisa (kinesiologie) bakoloba ete mosala na bango ekeseni na oyo euti kolobelama, ete misala ya bilimu mabe ezalaka na kati te, to mpe basalelaka komeka mayoki te. Nzokande, oyo basalaka ezwi moboko na yango na endimeli oyo ete nguya oyo ezalaka kati na moto nyonso ekoki komekama na lolenge ya kokamwisa to bobele na bato oyo balobaka ete bazali na nguya oyo ekeseni mpenza?
Baklisto batalelaka makambo motindo oyo na lisɛki te. Nzambe apesaki toli oyo epai na Yisraele ete: “Sanza ya sika mpe sabata mpe kobyanga koyangana—nayini banganga-nkisi elongo na koyangana monene.” (Yisaya 1:13, NW) Na ntango libota wana lipɛngwaki, bazalaki kosalela ‘bonganga-nkisi mpo na kosakola mpe bazalaki koluka bilembo mpo na kosakola.’ (2 Mikonzi 17:17; 2 Ntango 33:1-6) Ntembe ezali te ete bazalaki koluka koyeba makambo na nzela na bikelakela, mpe na nsima balobaki ‘na nzela na mají.’—Zekalia 10:2.
Lolenge mosusu ya komeka misisa ekoki kozala na yango mabe te, ekoki kopesa mpasi te epai na mobɛ́li to mobikisi. Nzokande, emonani polele ete mosusu ekoki kozala na lolenge ya mají; na ndakisa, komona na kati, bingɛngɛli ya kokamwisa oyo bizingaka bato, mpe kosalela pendule. Baklisto basengeli te kosalela nguya ya mají. Basengeli soko moke te komeka makambo motindo oyo, mpamba te bazali na mposa te ya koyeba makambo mozindo ya Satana. (Emoniseli 2:24) Ezali na bantina malamu ya kozala na bokɛngi likoló na likambo nyonso oyo emonani lokola ete ezali na boyokani na misala ya bilimu mabe, oyo Nzambe azali kokweisa.—Bagalatia 5:19-21.
Makambo oyo monganga azali kosala ezali mokumba na ye, mpe mposa na biso ezali te ya kotalatala mpe kosambisa maloba to myango ya kosalisa ya moko na moko. Ata soki okanisi ete mosusu kati na misala yango ekɔtisaka nguya ya mají, ezali polele ete mingi oyo bamekaki yango basalaki yango na kozanga koyeba, kozanga likanisi ya komikɔtisa na misala ya bilimu mabe. Ekoki kozala ete ezalaki bobele komonisa mposa makasi oyo bazalaki na yango ya kozala na nzoto kolɔngɔ́nɔ́. Nzokande, basusu oyo basili komikɔtisa na misala motindo wana bazwaki ekateli na nsima ete ata soki bakoki kooka malamu na nzoto, nzokande likámá ya komikɔtisa na misala ya bilimu mabe eleki monene.
Lisusu, moto na moto asengeli kozwa ekateli mpo na oyo etali makambo ya bomoi na ye moko. Nzokande, baklisto basengeli komikundola toli oyo ya Nzambe: “Moto na joba ayambi maloba yɔnsɔ, nde moto na mayɛlɛ akotala malamu na njela ekokɛnda ye.” (Masese 14:15) Ezali mpe bongo mpo na makambo oyo malobamaka na ntina kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto.
Satana azali na mposa makasi ya kolongola likebi ya basaleli ya Nzambe na losambo ya solo. Zábolo akosepela soki akolónga kosala bongo na kopusáká baklisto ete básepela na makambo mosusu. Akoki mpe kosepela soki bakómi kolinga biloko oyo bizali komonana lokola ete bizali na makambo ya kokamwisa to mpe ezali na mají mpenza, oyo ekoki komema bango kino losambo ya bilimu mabe.—1 Petelo 5:8.
Atako baklisto bazali na nsé ya Mibeko ya Mose te, kasi likanisi ya Yehova na ntina na misala oyo ezalaka na boyokani na bilimu mabe ebongwani te. Lokola elobelamaki liboso, Nzambe ayebisaki Bayisraele ete “moto na jonga, to moto na kotala miɔtɔ mpɔ na kosakola liboso, to moto na kosala nkisi mpɔ na kosakola liboso, to nganga na nkisi” asengelaki kozwama kati na bango te. “Bato yɔnsɔ na kosala makambo oyo bajali mbindo na miso na [Yehova] . . . Okojala sembo liboso na [Yehova].”—Dutɛlɔnɔmɛ 18:10-13.
Na yango, ezali mpenza likambo ya mayele mpo na baklisto kobatela “molato mobimba na etumba na Njambe . . . Jambi tojali kobunana na . . . [bilimu, NW] mabe kati na Likolo”!—Baɛfɛsɛ 6:11, 12.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bato mingi bazali kino lelo kokende epai na ba shamans, banganga-nkisi, to bato mosusu ya motindo wana oyo bakosalisaka babɛ́li. Shaman azali “nganga oyo asalelaka mají mpo na kobikisa babɛ́li, komona makambo mabombami, mpe kotambwisa makambo.” Nganga-nkisi, to shaman, akoki kosangisa matiti na misala ya bilimu mabe (kobyangáká banguya ya kokamwisa). Moklisto oyo azali na bokɛngi mpe azali sembo akokima komikɔtisa na misala ya bilimu mabe, ata soki yango emonani lokola ete ezali kobikisa.—2 Bakolinti 2:11; Emoniseli 2:24; 21:8; 22:15.
b Oyo ezali bobele lolenge yango esalemaka mingimingi, kasi lolenge na yango ya kotalela ekoki kobongwana. Na ndakisa, bakoki kosɛnga na moto oyo azali kosalisama ete ákutanisa mosapi ya monene na oyo ya mibale, mpe monganga akomeka kofungola yango.
c Mwasi yango akomi ete: “Lolenge nini makambo oyo ezali komonana lokola ete ezali ya bikamwiseli ekoki kosalema? . . . Mwango oyo ngai nasalelaka ezali bongo kotyela mabɔkɔ, kobikisa na lisalisi ya kondima to kobikisa na elimo. Ezali mwango ya kokamwa te, ezali pɛtɛɛ . . . Moto nyonso azali na esika ya nguya to engɛngɛli oyo ezali kozinga ye mpe ekoyebisaka makambo matali nzoto. Esika wana ya nguya ezali na bokangami makasi na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto. . . . Likoki makasi ya kososola lolenge ya ‘emoneli’ kati na yango ozali kotala elilingi moko na kozanga kosalela likoki ya komona lolenge bato bamonaka. Ezali makanisi mpamba te. Ntango mosusu babéngaka yango komona na bozindo.”