Bayekoli bazwi mapolomi na Galadi—Bazali na mposa makasi ya kopalanganisa nsango malamu
“EZALI eleko eleki kitoko oyo tokoki kokanisa mpo na yango.” Wana ezali maloba Anders mpe Amalia Groth balobaki mpo na kobongisama na bango lokola bamisionɛrɛ. Bamonisaki bongo mayoki ya bayekoli 48 oyo bazwaki mapolomi na kelasi ya 97 ya Galadi, eteyelo ya la Société Watchtower na kobakisáká ete: “Kobongisama oyo tozwi na Galadi epesi biso mɔ́tɔ mpe tosili komilengela, na yango tozali na mposa makasi ya kokende na bateritware na biso ya sika.”
Tokoki kokabola esengo yango elongo na bango na koyokáká makambo oyo bayekoli balobaki na ntina na ebongiseli oyo esalemaki na mokolo ya kopesa mapolomi; liboso ya bato 6420 oyo basanganaki na Sɛtɛ́mbɛ 4, 1994, mpo na likambo yango.
David Abel mpe mwasi na ye Kelli, balobi ete: “Theodore Jaracz, moko kati na Lisangani ya Mikóló-bakambi afungolaki ebongiseli na kolobáká likoló na motó ya likambo ‘Bateyami na Yehova.’ Tokobosana soko moke te maloba oyo Ndeko Jaracz alobaki, ete: ‘Tosengeli koyeba ete tozali mpenza moke liboso na Yehova,’ mpe amonisaki likanisi yango kati na liteya ya nguya oyo ezwami kati na Yobo mokapo 38 mpe mokapo 39. Ndeko Jaracz alobaki ete atako tosili kokólisa boyebi na biso ya Biblia na nzela ya eteyelo ya Galadi, nzokande toyebi eyano na makambo manso te. Tosengeli kokóba koyekola Liloba ya Nzambe.”
Toyoka sikawa Christian mpe Angèle Coffy, bango balobi ete: “Tosepelaki mingi na lisoló ya Max Larson likoló na motó ya likambo ‘Mobɔkɔ malamu ezali na motuya nini?’ Tosepelaki na lolenge akokanisaki biso na ndako oyo ezali na mposa ya mibɔkɔ mozindo na mabelé ya makasi mpo na kotikala ngwi na ntango ya koningana ya mabelé. Koyekola na etingya nyonso ekosalisa biso na kokólisa boyokani ya penepene mpenza elongo na Nzambe mpe tókoki kopika kondima na biso likoló na boyebi mozindo mpo ete tótelema ngwi na ntango ya mpasi.”
Gary mpe Lynn Elefers bamonisaki ete: “Lisoló ya Milton Henschel, prezidá ya eteyelo, likoló na motó ya likambo ‘Bilanga bisili kotela mpo na kobuka’ ekotikala libela na bɔɔngɔ na biso. Mokapo ya mobɔkɔ ezalaki bongo Yoane 4:35-38, mpe alobelaki mingimingi libaku malamu oyo tozali na yango ya kokɔta na elanga oyo basáli mosusu basilaki kolóna. Likanisi wana ekopusa biso na kosala mosala na koyebáká motuya na yango.” Kondimáká likambo yango, Jan mpe Sirpa Vaahtola balobaki ete: “Ndeko Henschel alamwisaki makanisi na biso likoló na mosala ya kobuka mbuma oyo ezali naino liboso na biso na kopesáká biso lapólo ya nsuka oyo eutaki na bamboka ya Baltes. Bokóli ya 51 % esalemaki na Estonie, 106 % na Lettonie mpe ya 51 % na Lituanie. Oyo nde esengo! Kuna bandeko bazali kosɛnga Nkolo ete átinda basáli mingi lisusu. Biso tozalaki mpenza na esengo ya koyoka yango, mpamba te totindami na Estonie!”
Kevin na Evelyn Cortina bamikundwelaki ete: “Joel Adams akóbaki na lisoló oyo ezalaki na motó ya likambo ‘Tyá motema epai na Yehova.’ Apesaki biso toli oyo ete tókanisa te ete na bantango mosusu tokoki kotya motema epai na Yehova mpe na bantango mosusu tokoki komityela motema. Na bateritware epai kuna tokokende tokokutana na mikakatano—kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto, bilei, lokótá, mimeseno, bongo na bongo. Nyonso wana ezali kosɛnga ete tótya motema epai na Yehova.”
Na nsima, Gerrit Lösch, moko kati na Lisangani ya Mikóló-bakambi, alobelaki lisoló oyo ezalaki na motó ya likambo “Tólanda komonisa motema mawa ya Yehova.” Alen mpe Ann Marie Gokavi bayebisi boye: “Alobaki ete motema mawa oyo tomonisaka epai na baninga na biso bamisionɛrɛ mpe epai na bato oyo tozali komemela bango nsango malamu ezali elembo ya bokóli na biso ya boklisto. Kokende na bateritware na bamboka mopaya esɛngaka kozala na elimo ya komipesa, kasi soki motema mawa ezali te, na bongo komipesa na biso ekozala na ntina te.” (Matai 9:13) Peter mpe Fleur Hupston babakisaki ete: “Ndeko Lösch alobaki ete tosengeli mpe komonisa motema mawa epai na bandeko na biso mibali mpe basi, na kozanga kotalela makambo mikemike, na bongo tokotalela mabunga ete ezali sé makambo mike na esika ya koyeisa yango minene.”
Mickey mpe Sherry Minsky bamikundweli ete: “Na nsima, Jack Redford moko na balakisi ya Galadi asalaki lisoló oyo ezalaki na motó ya likambo ‘Okoki kobomba mpamela?’ Amonisaki ete mpo na lolendo, ekozala mpasi ete moto ándima mpamela mpe soki tozokisamaka mpambampamba toli ekozala na litomba moko te mpo na biso. Na nsima apesaki mwa makanisi ya ntina, mpo na oyo etali kondima mpamela, na boyokani na Bileli 3:27-31.” Charles mpe Joan Held babakisi ete: “Mbala mingi, toyebaka bolembu na biso te; na yango, tosengeli kotalela mpamela lokola nzela oyo ezali kosunga biso ete tóyeba yango. Mpamela to toli oyo euti epai na Yehova ezali elembo ya bolingo na ye mpo na biso.”
Kenneth mpe Lisbeth Ardkäll balobaki ete: “Molakisi mosusu ya Galadi, Ulysses Glass, alobaki likoló na motó ya likambo ‘Bozwa bwanya ya solo oyo ezali komema na bomoi.’ Atunaki ete: ‘Lolenge nini bokosalela makambo oyo bosili koyekola?’ Na nsima apesaki lisese moko oyo ezwami na Masese 30:24-26 na ntina na nyama oyo ebéngami daman mpe lolenge oyo Yehova asalaki yango mpo ete ekoka kobika. Nzokande, biso tobotamaka na bwanya te; tosengeli bongo kosala makasi mpo na kokóma na bwanya. Yehova apesi biso nyonso oyo tosengeli na yango mpo ete tókoka kokóma na bwanya. Soki tokotikala bobele pene na Yehova mpe pene na moko na mosusu kati na bolingo, tokosala mosala malamu mingi.”
Lisoló ya mobɔkɔ
Jay mpe Gwen Abraczinskas bayebisaki ete: “Ndeko Karl F. Klein, moko kati na Lisangani ya Mikóló-bakambi, atalelaki Nzembo 19 na esengo nyonso elongo na biso kati na lisoló na ye ‘Pauni oyo eleki pauni nyonso.’ Alobelaki mingi botɔ́ndi mozindo oyo mokomi na Nzembo Davidi azalaki na yango mpo na Yehova mpe mposa makasi oyo azalaki na yango mpo na Liloba ya Nzambe.” Keith mpe Donna Hornback balobaki ete: “Ndeko Klein akabolaki Nzembo yango na biteni misato. “Eteni 1 (molɔngɔ́ 1 kino 6) ezali komonisa botɔndi oyo Davidi azalaki na yango mpo na bozalisi ya Nzambe, eteni 2 (molɔngɔ́ 7 kino 10) ezalaki komonisa motuya monene oyo azalaki kopesa na mibeko ya Nzambe, mpe eteni 3 (molɔngɔ́ 11 kino 14) ezali kokundwela biso ete, na ndakisa ya Davidi, tosengeli kolinga kozala ntango nyonso na boyokani malamu elongo na Yehova.”
David Raylene mpe Long bamonisaki ete: “Tosimbaki ntina ya likambo oyo ete kobanga Yehova ezali na motuya mingi soki tolingi kopɛngola mabe.” Kobanga wana ezali kopusa biso na kosala oyo ezali pɛto na miso na ye. Frank mpe Vibeke Madsen babakisaki ete: “Maloba ya Ndeko Klein na ntina na matomba ya malako ya Yehova, ya mibeko na ye mpe mitinda na ye ezali kolobela na mokuse makambo nyonso oyo toyekolaki na Galadi. Yango epusaki biso lisusu makasi ete tóleka kondima Liloba ya Nzambe na mikolo mizali koya mpe kotalela yango lokola sanduku etondi na pauni ya motuya mingi.”
Na nsima ya lisoló ya mobɔkɔ, bayekoli bazwaki mapolomi na bango, mpe bayebisaki bango bateritware bipai kuna batindamaki. Nsima ya kopema moke mpo na kolia mwa bilei ya pepele, bato banso bazongaki mpo na eteni ya nsima ya nzangá. Bayekoli bazwi mapolomi basanganaki na koyanola na mituna na boyekoli mokuse ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.
Bob mpe Shannon Lakatos bamikundwelaki ete: “Na nsima ekómaki ntango mpo na ebongiseli ya bayekoli oyo ezalaki na motó ya likambo ‘Babongisami mpo na kokóma Basakoli ya Bokonzi kati na mabelé mobimba.’ Eteni ya liboso ya ebongiseli yango ezalaki bongo koyebisama ya makambo oyo bayekoli bakutanaki na yango na mosala ya kosakola na boumeli ya kelasi ya sanza mitano. Elobelaki mingimingi lolenge ya kosalela mituna na mayele nyonso kati na mosala na biso ya kosakola. Eteni moko ya kotuna bandeko mituna emonisaki mwa mitindo ya malamu mpo na kolónga mikakatano mpe mbongwana ya makambo ya bomoi kati na mosala ya misionɛrɛ. Kolakisama ya bafilme misato oyo bilili na yango eninganaka te elakisaki makambo ya Costa Rica, Inde, mpe Malawi, epesaki biso likanisi na ntina na lisangá ya Yehova na mokili mobimba.”
Jesse mpe Michelle Duncan bayebisi ete: “Na nsima balakisaki lisano-liteya, Tózala bato ya teokrasi, tóbwaka bizaleli ya mokili, yango emonisaki bopusi mabe oyo bazalani na biso ya penepene oyo bazali na elimo ya lipandá mpe bazali na bizaleli ya mokili bakoki kozala na yango likoló na biso.” Wenzel mpe Kelly Koula babakisaki ete: “Emonisaki ntina oyo baklisto bazali na yango ya koyeba ete batoli mpe malako ya teokrasi ezali na ntina mingi mpe ekopesaka matomba.”
Nzembo ya nsuka mpe libondeli esukisaki ebongiseli wana ya esengo. Mayoki ya bayekoli bazwi mapolomi, oyo bazalaki na motema likoló mpo na kokende na bateritware na bango na mikili 18, emonisamaki malamu na moloba oyo Tommi mpe Jael Kauko balobaki na ntango ya kopesa mbote ya nsuka, ete: “Tozali na mposa makasi ya kokende na bateritware na biso mpe kosalela makambo oyo touti koyekola. Tosili kozwa makambo mingi mpenza—sikawa ekómi ngala na biso mpo na kopesa.”
[Elilingi na lokasa 26]
Eteyelo ya 97 ya Galadi, ya la Société Watchtower
Na bankombo oyo ezali awa na nsé, milɔngɔ́ mitángami kobanda na liboso kino na nsima mpe kobanda na lobɔkɔ ya mobali kino na lobɔkɔ ya mwasi.
(1) J. Hong; D. Hong; A. Groth; E. Cortina; S. Lakatos; D. Hornback; L. Acevedo; A. Coffy. (2) L. Elfers; A. Gokavi; L. Ardkäll; G. Abraczinskas; K. Knott; T. Lizer; K. Abel; D. Abel. (3) M. Duncan; A. Gokavi; J. Held; F. Hupston; B. Lakatos; R. Long; S. Minsky; E. Acevedo. (4) K. Ardkäll; J. Kauko; S. Vaahtola; K. Cortina; N. Carson; M. Minsky; G. Lizer; K. Koula. (5) J. Duncan; J. Abraczinskas; J. Vaahtola; F. Madsen; V. Madsen; D. Long; C. Carson; G. Elfers. (6) T. Kauko; P. Hupston; C. Held; A. Groth; K. Hornback; W. Koula; D. Knott; C. Coffy.