Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 15/11 nk. 8-9
  • Batatoli ya Yehova kati na mokili: Pologne

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Batatoli ya Yehova kati na mokili: Pologne
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Na molende nyonso bazali kotɔndɔla mateya ya lokuta
  • ‘Na mbuma na bango’
  • Batatoli ya Yehova kati na mokili​—Thailande
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Batatoli ya Yehova kati na mokili na Philippines
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Batatoli ya Yehova kati na mokili​—Inde
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 15/11 nk. 8-9

Batatoli ya Yehova kati na mokili: Pologne

NA EBANDELI ya eleko ya mpiɔ ya mobu 1989, biyangeli ya communisme ebandaki kopanzana uta na etúká ya Baltique kino na mai monene ebéngami Mer Noire. Wana efelo ebéngami Rideau de Fer ezalaki kokweisama, bikólo mingi ya Mpótó ya Ɛ́sti ekómaki koluka bonsomi na yango moko ya kotambwisa makambo. Kati na bikólo yango tozali kokuta Pologne, mboka oyo etondi na bankéka, na bisika patatálu, mpe na bangomba milai.a

Bafandi ya mboka Pologne basalaka mosala mingi, mpe ekólo Pologne esili kobimisa bato ya mayele mingi na ntɔ́ki mpe na siansi oyo bayebani na mokili mobimba. Nzokande, likambo lileki ntina, ezali sikawa na limpinga monene ya basakoli ya nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe.

Na molende nyonso bazali kotɔndɔla mateya ya lokuta

Na Pologne, ezali na bato mingi oyo bazali na mposa ya koyekola solo ya Biblia. Kasi basusu bapekisamaka na bandeko na bango ya mosuni to na baninga ya mpembeni. Na ndakisa, zingazinga ya engumba Wrocław, mwasi moko oyo amonisaki bosepeli akataki boyekoli na ye ya Biblia elongo na Batatoli ya Yehova na ntina na bopusi ya libota mpe ya baninga na ye. Nzokande, mwana na ye ya mwasi atángaki molɔngɔ́ ya masoló na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ezalaki kotɔndɔla mangomba ya lokuta. Masoló yango malamwisaki bosepeli ya elenge mwasi wana mpo na solo.

Nsima ya sanza motoba ya boyekoli ya Biblia, elenge mwasi wana azwaki ekateli ya kokata boyokani nyonso elongo na mangomba ya lokuta. Akendeki kokutana na sángó ya lingomba na bango mpo na koyebisa ye ekateli na ye. Sángó alobaki na ye akoma boye: “Ngai, K​—​— P​—​—, natiki Lingomba ya Katolike.”

Mokolo ya lomingo oyo elandaki, maloba wana matángamaki na ndako-nzambe. Nkɔ́kɔ-mobali ya elenge mwasi yango alɛmbaki nzoto, mpe nkɔ́kɔ-mwasi na ye abandaki kolela. Nzokande, basangani mosusu ya lingomba bakamwaki mingi mpe balobaki ete: “Boye, ezali na moto moko oyo amonisi mpenza molende ya koloba ete lingomba na biso lizali na lokuta mingi.” Elenge mwasi wana asili sikawa kozwa batisimo lokola ndeko mwasi ya elimo mpe asili kobanda boyekoli ya Biblia elongo na bato nsambo kati na mboka na bango.

‘Na mbuma na bango’

Zulunalo Kujawy i Pomorze oyo ebimbaka pɔ́sɔ na pɔ́sɔ ebimisaki lisoló “Bokoyeba bango na mbuma na bango.” Kati na eteni moko, lisoló yango lilobaki ete basambeli ya boklisto ya nkombo mpamba “batalelaka mpenza na ntina mingi te mitindá ya mangomba oyo bandimaki. Bakeseni mpenza na Batatoli ya Yehova, baoyo bamitambwisaka engebene mateya na bango, mpe bateyaka oyo Biblia ezali kosɛnga.”

Nsima ya kolobela bokeseni oyo ezali kati na Batatoli mpe baklisto ya nkombo mpamba, lisoló elandaki koloba ete: “Mbala mingi baklisto ya nkombo mpamba bayebaka te, mpe mingi mpenza basalelaka te, mateya mpe mitindá minene ya kondima na bango. . . . Na ezaleli na bango, Batatoli ya Yehova bamonisaka bomoko kati na mateya mpe misala na bango, komonisáká bongo ete bazali ‘basakoli ya lokuta te,’ kasi, bakoki koyebana na mbuma na bango. ‘Bakojua mbuma na miwiti epai na njube, sɔkɔ mbuma na misuke epai na matiti mpamba?’ (Matai 7:15-20).”

Mwasi moko akomelaki zulunalo Przyjaciółka oyo ebimaka pɔ́sɔ na pɔ́sɔ, amilelaki ete mwana na ye ya mobali atiki Lingomba ya Katolike mpe akómi Motatoli ya Yehova. Mokambi ya zulunalo apesaki toli nini? “Soki mwana na yo ya mobali akómi kosangana elongo na Batatoli ya Yehova, ayekoli mpe ayambi mateya ya lingomba na bango, ezali ekateli ya ye moko, oyo tosengeli koyeba mpe komemya yango. . . . Lingomba wana lizalaka na makambo kitoko mpo na oyo etali boyokani ya bato, lokola bomoko mpe bokangami makasi oyo bazalaka na yango, ezaleli ya kolongobana mpe botosi mozindo ya malako oyo mazali kotambwisa bato, mpe na nsuka makoki na bango ya kotambola na boyokani na mateya na bango ya solo, kosaleláká mitindá oyo bazali kosakola. Wana ezali bizaleli bibongi ya motuya mingi.”

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na kozwa bandimbola mosusu, talá Calendrier des Témoins de Jéhovah 1994.

[Etanda na lokasa 9]

MAKAMBO MATALI EKÓLO WANA

Mobu ya mosala 1993

MOTUYA NYONSO YA BASAKOLI: 113 551

BOKOKANISI: Motatoli 1 mpo na bato 339

MOTUYA YA BAYANGANI NA EKANISELI: 235 642

MWAYENE YA BABONGISI-NZELA: 7 961

MWAYENE YA BOYEKOLI YA BIBLIA: 79 131

MOTUYA YA BABATISAMI: 8 164

MOTUYA YA MASANGÁ: 1 397

FILIALE: Nadarzyn

[Elilingi na lokasa 9]

Biro ya filiale na Lodz na 1948

[Elilingi na lokasa 9]

Kopesa nsango na mabaya, Yúli 1948, na Ɛ́sti ya Prusse ya kala

[Elilingi na lokasa 9]

Basangani ntuku nsambo na mibale ya Betele ya Pologne, Yanuáli 1993

[Elilingi na lokasa 9]

Biro ya sika ya filiale na Nadarzyn

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto