Kobakisama kati na Lisangani ya Mikóló-Bakambi
MPO na kobakisa motángo ya basáli kati na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova, kobanda na Yúli 1, 1994 mosangani mosusu moko auti kobakisama na bankulutu 11 oyo bazali kosala sikawa. Mosangani yango ya sika ezali bongo Gerrit Lösch.
Ndeko Lösch abandaki mosala ya ntango nyonso na Novɛ́mbɛ 1, 1961, mpe azwaki lipɔlɔ́mi na kelasi ya 41 ya Galadi, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower. Asalaki mosala ya zongazonga mpe ya etúká na Autriche kobanda na 1963 kino na 1976. Abalaki na 1967, mpe na nsima, ye na mwasi ye, Merete, basalaki na boumeli ya mibu 14 lokola basangani ya libota ya Betele ya Autriche, na engumba Vienne. Esili koleka mbula minei, batindamaki na biro monene na Brooklyn, New York, epai kuna Ndeko Lösch azalaki kosala kati Biro ya bokambi misala mpe lokola mosungi na Komité ya mosala ya kosakola. Lokola ayebi malamu teritware ya mikili ya Mpótó mpe na boyebi na ye na nkótá Allemand, Lingelesi, Roumain, mpe Italien, akopesa lisungi monene na mosala ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi.