Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 15/10 lok. 32
  • ‘Boyoka mawa tɛ pelamɔkɔ bamosusu’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Boyoka mawa tɛ pelamɔkɔ bamosusu’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 15/10 lok. 32

‘Boyoka mawa tɛ pelamɔkɔ bamosusu’

OSILÁ komona lolenge fololo engumbamaka nsima ya mopepe makasi? Na lolenge moko to mosusu ezali likambo ya mawa. Ya solo, mbula makasi ekimisaka ebele na nyama mpe bato​—bikelamu makasi koleka bafololo nyonso​—mpo na koluka ebombamelo. Nzokande, fololo etɛlɛmaka wana, epikami na misisa, ekimaka te mbula to mopepe nyonso ya makasi. Sikawa, yango wana ebebi te, engumbami kasi ebukani te, komonisáká nguya oyo ekoki te komonana kati na lolenge na yango oyo emonani ete ezali pɛtɛpɛtɛ. Wana ozali kokamwa na ntina na yango, okoki komituna soki ekozongela lisusu makasi na yango mpe soki motó na yango oyo ya kitoko ekotombwama lisusu likoló.

Ezali mpenza bongo mpo na bato. Na mikolo oyo ya mpasi, tozali kokutana na mipepe ya lolenge nyonso. Mikakatano ya nkita, konyokwama na makanisi, kolɔngɔ́nɔ́ mabe, kobungisa balingami kati na kufa​—mpasi wana ekwelaka biso nyonso na ntango moko to na ntango mosusu, mpe mbala mosusu tozali na makoki te ya kopɛngola yango na motindo ya fololo oyo ekoki te komipikola mpo na koluka ebombamelo. Ezali likambo ya kokamwa na komona bato oyo bamonanaka ete bazali makasi te, komonisa nguya monene mpe kotɛmɛla mpasi ya motindo yango. Lolenge nini bakokaka kosala yango? Mbala mingi likambo ya ntina ezalaka bongo kondima. Yakobo, oyo abotamaki mama moko na Yesu Klisto akomaki ete: “Boyebi ete komekama na kondima na bino ekoyeisa mpiko.”​—Yakobo 1:3.

Likambo mosusu ya ntina ezali nde elikya. Na ndakisa, wana molingami na bango akufi, elikya ekoki kobongola makambo mingi epai na baoyo batikali na bomoi. Ntoma Paulo akomaki epai na baklisto ya Tesaloniki ete: “Tolingi tɛ ete bojanga koyeba makambo na bango basili kolala ete boyoka mawa tɛ pelamɔkɔ bamosusu baoyo bajali na elikia tɛ.” (1 Batɛsalɔniki 4:13) Atako baklisto baokaka solo mawa na ntina na kufa, nzokande bokeseni ezalaka. Bazali na boyebi ya solo na ntina na ezalela ya bakufi mpe na ntina na elikya ya lisekwa.​—Yoane 5:28, 29; Misala 24:15.

Boyebi wana ezali kopesa bango elikya. Mpe elikya yango, ekokitisa mokemoke mpasi na bango. Esalisaka bango na koyika mpiko, mpe na makambo mingi. Na nsima, lokola fololo nsima ya mbula ya mopepe makasi, bakotombola mitó nsima ya mpasi na bango mpe bakozwa lisusu esengo mpe bosepeli kati na bomoi.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto