Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 15/9 nk. 8-9
  • Batatoli ya Yehova kati na mokili: Nigeria

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Batatoli ya Yehova kati na mokili: Nigeria
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bilenge bazali kosala mosala ya mobongisi-nzela
  • Video mpe Ndako ya Bokonzi
  • Témoins de Jéhovah ezali Nkombo ezali mpe Lisangá
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Bakasɛti video oyo ezali kopesa litatoli
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Babongisi-nzela bazali kopesa mpe bazali kozwa bolamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 15/9 nk. 8-9

Batatoli ya Yehova kati na mokili: Nigeria

NIGERIA ezwami na libunu, esika Afrika ya Wɛ́sti ebandi. Ezwami na Golfe de Guinée, ezali na nɔ́rdi ya nzela ya moi mpe ezali na bafandi koleka bamilió 88.a

Na boumeli ya bambula mibale ya mosala oyo euti koleka, filiale ya la Société Watch Tower etyaki likebi mingi likoló na bilenge. Bolukiluki moko oyo esalemaki kati na masangá ya Batatoli ya Yehova emonisaki ete 80% ya bana oyo babandaki mosala ya kosakola na Nigeria na 1992 bazalaki na mibu ya kobotama katikati na 10 mpe 20. Mpo na baoyo bazwaki batisimo na mbula wana, 63% ya bana bazalaki na mibu wana ya kobotama.

Bilenge bazali kosala mosala ya mobongisi-nzela

Bilenge mingi bazali kobanda mosala ya ntango nyonso lokola babongisi-nzela. Mobongisi-nzela moko na nkombo Hannah alobi ete: “Ntango nakómaki pene ya kosilisa kelasi, nakendeki kotala baoyo bakɔtaki na Eteyelo ya mosala ya babongisi-nzela epai kuna nakutanaki na bandeko basi mibale mibangé. Namilobelaki ngai moko ete: ‘Soki bango mibale bakoki kozala babongisi-nzela, mpo na nini ngai te?’

“Na yango, ntango nasilisaki kelasi nakómaki mobongisi-nzela. Sanza misato na nsima, nakutanaki na Josephine, elenge mwasi moko ya mibu 26, oyo azalaki mosambeli ya juju. Alobaki ete: ‘Bino Batatoli ya Yehova bozali bato mabe. Bokumisaka Eyenga ya Mbótama te mpe bosalelaka bikelakela te.’ Nayanolaki ete soki apesi ngai nzela ete nayekola Biblia elongo na ye, akoyeba mpo na nini tosalelaka makambo wana te. Asɛngaki ngai ete nazongela ye. Nokinoki, abandaki koyangana na makita mpe asalaki mbongwana mingi kati na bomoi na ye. Azwaki batisimo na sanza ya Desɛ́mbɛ 1990. Kobanda na sanza ya Augústo 1991, Josephine akómaki mobongisi-nzela. Na ntango akɔtaki na Eteyelo ya mosala ya babongisi-nzela na mbula eleki, alakisaki ngai epai ya baninga na ye ya kelasi lokola mama na ye ya elimo!”

Video mpe Ndako ya Bokonzi

Moko na bafilime video ya la Société esalisaki lisangá moko ya moke ete bázwa mabelé mpo na kotónga ndako ya Bokonzi. Wana ezalaki bango koluka mabelé, bandeko mibali minei bakendeki epai ya Onojie, nkolo-mabelé ya etúká wana. Alakisaki bango eteni ya mabelé mpo na motuya ya badolare 1 025. Lisangá lizalaki te na makoki ya kopesa mbongo wana, mpo ete basakoli bazalaki bobele 17 mpo na kopesa lisungi ya mosolo mpo na likambo wana. Onojie alobaki ete asengelaki kokanisa lisusu mpo na esika mosusu.

Mwa basanza na nsima, moko na bankulutu ya lisangá akendeki na ndako ya Onojie. Libota ya Onojie bazalaki kotala kaseti video ya mokolo oyo akómaki mokonzi. Nkulutu wana alobaki ete: “Nazali na kaseti video moko oyo nalingi ete bótala yango. Nkombo na yango Les Témoins de Jéhovah: un nom, une organisation (Batatoli ya Yehova​—Ezali nkombo, ezali mpe Lisangá).

Na nsima, nkulutu wana atunaki Onojie soki akanisaki nini na ntina na kaseti video wana. Onojie alobaki ete: “Natalaki filime yango mbala mitano.” Nkulutu yango akundwelaki Onojie Bandako ya Bokonzi oyo amonaki kati na video mpe alimbwelaki ye ete lisangá ya mboka wana elingaki kotónga ndako motindo wana. Na nsima, nkulutu yango atunaki soki lisangá ekokaki kosomba eteni ya mabelé oyo ezalaki pembeni ya lopango moke oyo bazalaka na yango uta kala. Onojie ayanolaki ete: “Lobi na butu, nsima ya kotala video, nakanisaki na ntina na likambo yango.” Na nsima, amekaki bonene ya bamɛtɛlɛ motoba ya mabelé oyo ezalaki pembeni ya lopango ya lisangá. Alobaki ete: “Bokoki kozwa eteni oyo. Na bolai, bokoki kozwa ndenge bolingi. Bóbongisa mikanda, bongo ngai nakotya mabɔkɔ.”

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba makambo mosusu, talá Calendrier des Témoins de Jéhovah 1994.

[Etanda ya lokasa 9]

MAKAMBO MATALI EKÓLO WANA

Mbula ya mosala 1993

MOTUYA NYONSO YA BASAKOLI: 174 582

BOKOKANISI: Motatoli 1 mpo na bato 507

MOTUYA YA BAYANGANI NA EKANISELI: 473 245

MWAYENE YA BABONGISI-NZELA: 19 777

MWAYENE YA BOYEKOLI YA BIBLIA: 242 028

MOTUYA YA BABATISAMI: 8 888

MOTUYA YA MASANGÁ: 3 289

FILIALE: BENIN CITY, EDO STATE

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto