Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 1/8 nk. 21-26
  • Nazali kosala elongo na lisangá oyo ezali sé kokóla

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nazali kosala elongo na lisangá oyo ezali sé kokóla
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Na ebandeli
  • Bomoi ya sika kati na Betele
  • Kosala elongo na Ndeko Rutherford
  • Ntango ya mikakatano ya mosolo
  • Kosala na radio
  • Fɔnɔ́
  • Mosala ya esengo kati na elanga
  • Litambwisi ya Yehova
  • Bomoi ya malamu mpenza na mosala ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Betele ezali na mposa ya basali na bolingo malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Mayele oyo tosaleli​​—Ebele ya bato bayoki nsango malamu
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
  • Yango ekoki kozala mosala oyo ebongi na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 1/8 nk. 21-26

Nazali kosala elongo na lisangá oyo ezali sé kokóla

LISOLÓ YA ROBERT HATZFELD

Lelo oyo bato mingi mpenza bazali kofongola televizyo na bango na lisalisi ya eloko ebengami télécommande mpo na kolanda bansango oyo epesamaka na mpokwa na bililingi ya balangi mingi, kozanga kotalela yango lokola likambo moko ya kokamwa. Nzokande, ezali komonana lokola ete ezalaki bobele lobi loleki nde nazalaki elenge mobali ya mibu 12 oyo azali kokamwa liboso ya etando ya cinema, oyo kati na yango bazalaki komonisa elilingi monene koleka moto, mpe azalaki koloba!

BOKOKI kokanisa ete ezali mpenza likambo monene te. Kasi ezalaki mpenza lokola likamwisi ya sika mpo na ngai na eleko wana na 1915, na ebandeli ya kobima ya fílime oyo elakisaka kozanga koloba mpe bobele na balangi mpembe mpe ya moindo. Moto moko ya monene na mandefu abimaki na etando mpe alobaki: “Bililingi ya lisano-liteya ya bozalisi elakisami na I.B.S.A., Lisangani ya Bayekoli ya Biblia ya Mokili mobimba.” Na boumeli ya bangonga mibale oyo elandaki, lisoló ya Biblia lifungwanaki na miso na biso. Nsango na yango euti na makomami ezalaki polele mpe ya kobɔndisa. Nzokande, ezalaki fílime oyo etondi na bililingi ya langi ndenge na ndenge, oyo bininganaka te, mpe lolenge maloba mazalaki kolandana engebene bililingi yango esimbaki mpenza likebi na ngai.

Na ntango wana nayebaki yango naino te, kasi molende na ngai ya bolenge mpo na bokóli ya mayele ya mosala ezalaki ebandeli ya mosala ya bomoi mobimba kati na lisangá oyo ezali sé kokóla koleka masangá nyonso kati na mabelé.

Na ebandeli

Na mobu 1891, tata na ngai autaki na engumba Dillenburg, na Allemagne, mpo na kokende na esika bato bautá Allemagne bazalaki kofanda mingi, na Allegheny, kati na engumba Pennsylvanie, na Etats-Unis. Na nsima akutanaki na elenge mwasi moko na libota moko ya bato ya Allemagne, mpe babalanaki. Nabotamaki na Yúli 7, 1903, mpe nayekolaki koloba monoko ya Allemand mpe Lingelesi. Mwa moke yambo ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba oyo ebandaki na 1914, maladi ya ntólo oyo epalanganaki na eleko wana ebomaki baboti na ngai mpe etikaki ngai etiké. Nkɔ́kɔ na ngai ya mobali akufaki na maladi ya motema bobele pene na eleko wana.

Minna Boemer, tata-mwasi na ngai, ayambaki ngai na boboto nyonso kati na libota na ye. Alobaki ete: “Nazali na bana mitano. Nakoki mpe kozwa moko lisusu.” Atako nazangaki baboti na ngai, tata-mwasi na ngai Minna abatelaki ngai malamu.

Uta kala, tata-mwasi na ngai azalaki mosangani ya lisangá ya Allegheny ya Bayekoli ya Biblia (Lolenge batatoli ya Yehova bazalaki kobengama na eleko wana). Liboso ya 1909, Ndeko C. T. Russell, oyo azalaki prezidá ya la Société Watch Tower na eleko wana, azalaki mpe koyangana na lisangá wana. Tata-mwasi na ngai Minna azalaki kokumba ngai na makita. Atako libota na biso lizalaki kosala molende mingi te mpo na koyekola to koteya na eleko wana, kasi oyo nyonso tozalaki koyoka na makita, tozalaki kosakola yango na litatoli ya libaku malamu epai na bato oyo toyebaki.

Ezalaki na eleko wana nde “fílime-lisano-liteya” ekamwisaki ngai mingi. Lokola nazalaki komipesa mingi na misala ya mekaníki, mayele ya sika ya makambo matali fɔtɔ́ mpe kosangisa bililingi na maloba ebendaki likebi na ngai, bobele bongo fɔtɔ́ ya kokanga mbala moko. Komona kofongwama ya bafololo ezalaki likambo ya kitoko!

Na 1916, tookaki mawa mpo na liwa ya Ndeko Russell. Lokola tozalaki kofanda bobele na Allegheny, toyanganaki na molulu ya bokundi ebembe na ye na ndako monene oyo ebengami Carnegie Hall. Yango ezalaki ndako monene epai kuna Ndeko Russell asalaki masoló ya ntembe na E. L. Eaton na 1903. Nasilaki koyoka masoló na ntina na episkopo wana ya lingomba ya Methodiste oyo atyaki ntembe na C. T. Russell, masoló yango ya ntembe maumelaki mikolo motoba, azalaki na elikya ete akitisa lokumu ya Ndeko Russell mpo na oyo etali boyebi na ye ya Biblia. Nzokande, elobamaki ete, Russell ‘asopaki mai na lifelo mpo na kozimisa mɔ́tɔ.’ Sara Kaelin, mosaleli moko ya ntango nyonso oyo ayebanaki mingi na Pittsburgh, ayebanaki malamu na Russell mpe mwasi na ye. Na molulu ya bokundi ebembe amonaki Maria mwasi ya Russell kotya mwa bafololo likoló na sanduku elongo na maloba oyo: “Epai na mobali na ngai ya bolingo.” Atako ye Maria akabwanaki na mobali na ye mwa bambula liboso, azalaki ntango nyonso kotalela ye lokola mobali na ye.

Wana bambula ezalaki koleka, nazalaki na mabaku mingi ya kokóma na makoki kati na makambo matali tekiníki, oyo ezalaki ntina mpo na mosala na ngai na mikolo mizalaki koya. Nɔkɔ na ngai oyo azalaki kobatela ngai azalaki motongi bandako. Na ntango ya lói, azalaki kotika ngai kosala elongo na bato na ye oyo basalaka misala ya lontilíki kati na bandako ya kala, mpo na kolongola bisaleli ya gázi mpe kotya oyo ya lontilíki. Na 1918, bana kelasi ya eteyelo na biso batongaki mwa esaleli ebéngami radiotélégraphie. Tozalaki kokutana na mpokwa mpo na komimekisa na misala ya lontilíki mpe magnétisme. Na 1926, ngai mpe moninga na ngai tozwaki ekateli ya kokokisa mokano na biso ya bomwana​—kosala kati na masuwa mpe kotambola mokili mobimba. Tokotaki na Kompani ya radio na eteyelo ya Amerika mpo na kokóma basali na radiotélégraphie.

Bomoi ya sika kati na Betele

Eteyelo ya radio epai kuna tozalaki kokenda ezalaki na New York; na yango, nazalaki kokatisa ebale mpo na kokende na makita ya Bayekoli ya Biblia na Brooklyn, makita yango mazalaki kosalema na ndako moko monene oyo bazalaki kofutela, oyo ezalaki kala tempelo ya lingomba ya Francmaçon. Na ntango wana, ezalaki bobele na lisangá moko na engumba mobimba ya New York. Na ntango bandeko ya Betele (ndako ya biro monene ya bayekoli ya Biblia) bayokaki ete nazalaki kotánga mpo na kozwa lipolomi ya kosala mosala na ndako ya radio, balobaki ete: “Mpo na nini kokende na mai? Tozali na ndako ya radio awa mpe tozali na mposa ya mosáli.” Balendisaki ngai ete nákende na biro mpo ete basolola na ngai. Nayebaki eloko moko te mpo na oyo etali Betele, nayebaki bobele ete ezali ndako ya biro monene ya Bayekoli ya Biblia.

Bandeko batunaki ngai mituna mpe bapesaki ngai toli ete nasilisa kelasi, mpe nazwa lipɔlɔ́mi, mpe na nsima naya na Betele. Nsima ya kosilisa kelasi, na esika ya kokamata masuwa oyo ezalaki kokende na mai monene, nakangaki mwa ndambo ya biloko na ngai mpe nakamataki engbunduka ya nsé ya mabelé mpo na kokende na Betele. Atako namipesaki na Yehova mpe nazalaki kosangana kati na mosala ya kosakola uta bambula mingi, nayaki kozwa batisimo bobele na Dɛsɛmbɛ 1926, poso mibale nsima ya kokóma na ngai Betele. Likambo motindo oyo ezalaki kosalema mingi na eleko wana.

Na basangani 150, Betele etondaki mpenza na bato na eleko wana. Tozalaki kofanda bato minei na eteni mokomoko ya ndako. Nokinoki, nayaki koyebana na bango nyonso, mpo ete biso banso tozalaki kolya, kosala, mpe kolala esika moko kati na ndako moko ya monene, ya solo, biso banso tozalaki bobele na lisangá moko ya engumba New York. Betele ya sika esilaki na 1927 na balabála Columbia Heights 124, yango epesaki nzela ete tokoma kofanda bato mibale na eteni moko ya ndako.

Lisusu ndako ya sika ya binyateli efungwamaki na 1927, na 117 Adams Street. Napesaki lisungi mpo na komema biloko longwa na ndako ya kala na 55 Concord Street. Longola bisaleli ya radio, ndako yango ezalaki mpe na bibuteli, na bamasíni ya binyateli mikanda, na bamasíni ya kosukola bilamba, na bitumbelo ya biloko oyo epelaka na mafuta​—ngai nazalaki kosala na nyonso oyo esalelaka lontilíki.

Nzokande, Betele ezalaki te bobele ndako ya bonyati mikanda. Baoyo bazalaki kosala mpo na kobimisa búku nyonso, trakti nyonso, zulunalo nyonso, ezalaki bongo ebele ya basáleli ya komikitisa, baoyo balingá mosala. Mokano na bango ezalaki te ete báyebana mingi na mokili. Nzokande, mposa na bango ezalaki bobele ya kokokisa mosala ya Nkolo​—mpe makambo ya kosala ezalaki mingi!

Kosala elongo na Ndeko Rutherford

Nazwaki matomba mingi na libaku malamu ya kosala elongo na Joseph F. Rutherford, prezidá ya mibale ya la Société. Azalaki engambe mobali, na bolai ya mɛtɛlɛ 1, 88, azalaki monene mingimingi te, azalaki na nzoto ekembisami. Bilenge mingi na Betele bazalaki kobanga ye liboso ete báya koyeba ye malamu. Azalaki ntango nyonso kotanga, kobongisa masoló ya mikanda.

Ndeko Rutherford azalaki kosekisa. Bandeko mibale ya basi ya mibangé oyo bazalaki minzemba bazalaki na Betele uta na eleko ya Ndeko Russell. Bazalaki ntango nyonso na bilongi ya kokangama mpe bazalaki kokanisa ete ezali mabe koseka makasi ata soki likambo ya kosekisa ezalaki. Mbala mosusu, na ntango ya bolei na mesa, Ndeko Rutherford azalaki kobeta mwa lisoló oyo ekoki kosekisa bato banso, likambo yango ezalaki kopesa bandeko basi mibale wana nkanda. Nzokande, mbala mingi, azalaki mpe kosolola masoló ya Biblia.

Ndeko Rutherford azalaki molambi malamu mpe azalaki kolinga kolamba mpo na baninga. Mokolo moko, balámbi ya Betele batikaki mikuwa mikemike na ntango ya kokata nsoso. Akendeki noki na kúku mpe alakisaki bango lolenge malamu ya kokata nsoso. Azalaki kolinga mikuwa te!

Nabandaki kozala mingi elongo na Ndeko Rutherford na ndakisa na ndako ya radio, WBBR, to na biro na ye na Staten Island. Azalaki mpenza moto ya boboto mpe azalaki kosalela oyo azalaki koteya. Azalaki te komizela na bato mosusu ete básala makambo oyo ye moko nkutu akokaki te kosala yango. Na bokeseni na bato oyo bazali na mikumba minene kati na mangomba misusu mingi, Ndeko Rutherford azalaki na bomoto ya elimo mpe na bizaleli malamu koleka mpenza. Azalaki mpenza kobika mpo na Bokonzi ya Yehova.

Ntango ya mikakatano ya mosolo

Mwa bambula moke nsima ya kokóma na ngai na Betele, mokili ekɔtaki na eleko moko ya mpasi oyo ezalaki na bambula 1930. Bakompanyi ya kopesa mosolo ekweaki, mpe biloko bimataki ntalo. Mosala mokómaki mpasi, mosolo mozalaki mingi te. Betele ezalaki kotambola bobele na lisalisi ya mosolo mouti na makabo, mpe Yehova azalaki kosala ntango nyonso ete mwa mosolo mokoki mózala mpo na kokóba na yango mosala. Tozangaki bilei ata mbala moko te, ata soki tozalaki kozwa yango te na lolenge moto nyonso azalaki kolinga. Tozalaki kosala oyo ekoki na biso mpo na kosalela mosolo mingi te, mpe bandeko na libanda ya Betele bazalaki kosalisa biso na meko oyo makoki na bango ezalaki kopesa bango nzela.

Na 1932, Ndeko Robert Martin, mokɛngɛli ya sembo ya mosala na biso ya konyata mikanda akufaki. Nathan Knorr, ye oyo azalaki na mibu 27 aponamaki na esika na ye. Azalaki elenge mobali moko ya makoki mpenza. Nazali komikundola ete ata moto moko te akokaki kozala na nkaka ya kondima ye lokola mokɛngɛli ya mosala ya konyata mikanda. Bandeko mosusu ya sembo, kati na bango John Kurzen, George Kelly, Doug Galbraith, Ralph Leffler, mpe Ed Becker​—bango banso basálani ya sembo elongo na ngai⁠—​na bolingo nyonso, bapesaki makoki na bango ya kosala mosala mpe mayele na bango kati na mosala ya Bokonzi.​—Kokanisá na Esode 35:34, 35.

Kosala na radio

Lisangá na biso emipesaki mobimba mpo na kopalanganisama ya nsango malamu na kosalela mwango nyonso oyo emonani. Mokili mobimba mosengelaki koyoka nsango ya Bokonzi, kasi tozalaki bobele Batatoli moke. Na nsima ya etumba ya liboso ya mokili mobimba, mayele ya kosala baradio ezalaki naino na ebandeli na yango. Nzokande, bandeko oyo bayebaki kososola bamonaki ete mwango wana ya bopanzi nsango ezalaki oyo Yehova apesaki na eleko wana. Na yango, na 1923 babandaki kotonga ndako ya radio WBBR na Staten Island, moko na bakartyé ya engumba New York.

Na bantango mosusu, nabandaki kosala bobele ngai moko kati na ndako wana ya radio. Nazalaki kofanda kuna na Staten Island kasi nazalaki kosala ngonga misato na masuwa mpe engbunduka mpo na kokende na esika mikanda mizalaki konyatama na Brooklyn mpo na kosala mosala ya lontilíki to ya mekaníki. Mpo na kosala ete ndako na biso ya radio émikoka na yango moko na makambo nyonso, totyaki motɛ́lɛ oyo ekosalaka na mazúti mpe ekopesaka lontilíki. Na Staten Island, tozalaki mpe na mabulu na biso moko ya mai mpe elanga oyo ezalaki kobimisa bilei mpo na mwa ndambo ya bato oyo bazalaki kosala kuna, mpe mpo na libota ya Betele na Brooklyn.

Liboso ete lisungi mosusu ézwama, mikumba ya mosala kati na ndako ya radio ezalaki kopesa ngai nzela te ete náyangana mingi na makita mpe na mosala ya kosakola. Ntango ezalaki soko moke te mpo na mabyangi ya baninga to kosala mwa mobembo na wikende bobele kino na eleko ya bopemi ya mbula na mbula. Mokolo moko moto moko atunaki ngai ete: “Lokola manaka na yo ya mosala etondi na makambo mingi boye, okanisá naino te kolongwa Betele?” Na bosembo nyonso, nayanolaki ete: “Te.” Ezalaki libaku malamu mpe esengo kofanda mpe kosala elongo na ebele ya bandeko mibali mpe basi oyo bamipesi. Mpe mosala ya kosala mozalaki kozanga te, mikano ya sika mitali mosala mizalaki mpe kozanga te.

Tozalaki kobimisa mpe kobeta masano-mateya kitoko kati na radio. Lokola bamasíni ya kobomba mingongo mazalaki te, tosengelaki kokanisa kosala myángo na biso moko. Tosalaki masíni moko oyo ekokaki kozongela kobimisa makelele ya mopepe moke mpe lokito ya mopepe makasi. Makelele ya biteni ya mposo ya kokóti ezalaki kobetama na mabaya mpo na kobimisa makelele lokola oyo ya kotambola ya mpunda kati na balabála etongami na mabanga. Lisano-liteya nyonso oyo tozalaki kosala ezalaki kobenda likebi. Mpe bato bazalaki koyoka yango. Na eleko wana, kominanola ezalaki mingi te, bato mingi bazalaki kofanda mpe kolanda radio na likebi nyonso.

Na bambula 1920 mpe na ebandeli ya 1930, la Société ekotisaki likambo moko monene kati na lisoló ya makambo matali mwángo ya bopanzi nsango, mbala na mbala, azalaki kosangisa motuya moleki monene ya bandako ya radio ekeseni na nzela ya nsinga mpo ete nyonso wana eyokisa pologalami moko nzela moko. Na yango, nsango ya Bokonzi ekómelaki ebele ya bato na mokili mobimba.

Fɔnɔ́

Na katikati ya bambula 1930 mpe na ebandeli ya bambula 1940, tolengelaki mpe tosalaki bafɔnɔ́, mpe bisaleli mosusu ya kobimisa lolaká. Na lisalisi ya masíni moko ya sikisiki, tozalaki kobamba badísike ya mafuta ya nzoi oyo ezali moselu lokola etando ya talatála mpo na kobimisa badísike mosusu. Na nsima, tozalaki kotala dísike moko moko na likebi nyonso na microscope mpo na koyeba soki ezali mpenza malamu. Soki ezalaki na mbeba, mosala ya kokɔtisa maloba esengelaki kozongelama lisusu mpe esengelaki mpe kosala mosusu. Na nsima, tozalaki kotinda yango na kompanyi moko oyo ekosalaka mosala ya kokɔtisa lolaká, oyo ezalaki kobimisa bafɔnɔ́ mpe badísike.

Likambo moko ya kitoko oyo nazali lisusu komikundola malamu na ntina na yango ezali bongo lisoló oyo Ndeko Rutherford asalaki na 1933, oyo ezalaki na motó ya likambo “Bopusi ya mobu mosanto likoló na kimya mpe bokóli.” Pápa asakolaki yango ete ezalaki “mobu mosanto,” na lisalisi ya radio mpe fɔnɔ́, totondolaki yango ete ezalaki likanisi ya bozoba mpe tomonisaki ete yango ekobimisa likambo moko te ya bosantu. Nkutu, na nsima, Hitler azwaki bokonzi na mbula wana na lisungi ya Lingomba ya Katoliko; na yango, bilikya nyonso ya kimya bisilaki.

Na Etats-Unis, ebongiseli oyo ebengami Action catholique esalemaki mpo na kokokisa mikano ya lingomba. Bazalaki kokotisa bato na bango kati na lisangani ya bakambi ya bazulunalo oyo eyebanaki mingi, mpe na babimisi ya babúku. Bazalaki komikotisa na makambo ya politiki mpe bazalaki kokana kobebisa ndako nyonso ya radio oyo ezali koyokisa masoló na biso ya Biblia. Batatoli mingi babetamaki na bituluku ya bato ya Action catholique, mingimingi pene na etúká New Jersey. Bantango yango ezalaki ya maoki mingi!

Mosala ya esengo kati na elanga

Na katikati ya bambula 1950, milɔngɔ́ ya basakoli oyo bazalaki sé kokóla, bazalaki kokende kokutana na bato mingi na bandako na bango mpenza. Yango ebimisaki matomba mingi koleka radio, mpo na oyo etali kosalisa bato na kosimba ntina ya solo ya Biblia. Na yango, na 1957 ekateli ezwamaki ete WBBR etekama mpe tosalela makoki na biso mpo na kokólisa mosala ya misionere na mikili mosusu.

Na 1955, batindaki ngai na lisangá ya Bedford na Brooklyn, epai kuna nazalaki kotambwisa mbala na mbala boyekoli ya Linɔngi ya Mosɛnzɛli. La Société atindaki ngai lisusu lokola molobi oyo akotambolaka na nɔ́rdi ya New York, na Pennsylvanie, na Connecticut, mpe na New Jersey. Na ntango natindamaki na lisangá ya Bedford namilobelaki ete: ‘Nazali na mibu koleka 50. Nakoki kosangana na makasi oyo ekoki na ngai kati na mosala ya elanga sikawa. Mbala mosusu, na nsima, nakobela mokongo mpe nakozwa lisusu litomba na yango te.’

Nsima ya kosala na boumeli ya bambula oyo nyonso kati na mosala ya tekiníki mpo na kopanza nsango ya Bokonzi na lisalisi ya radio, ezalaki esengo monene mpo na ngai mpo na kolona mpe komwangisa mai likoló na mboto ya solo ya Biblia epai na bato. Nazalaki mpenza kosepela kosala elongo na lisangá. Bandeko mibali mpe bandeko basi mingi bazwaki ngai kati na mabota na bango, nazalaki komioka mpenza malamu kofanda elongo na bango. Bana mike, oyo sikawa bakóli bazali kino lelo kobenga ngai nkɔkɔ. Na boumeli ya mibu 30, tozalaki kolekisa bantango kitoko elongo na bango kati na mosala ya kosakola, kino na ntango oyo nayaki kozwa mpasi na makolo oyo esalaki ete nákoka lisusu komata esikalié te to kosala mobembo na engbunduka te. Na 1985, natindamaki na lisangá ya Brooklyn Heights, oyo eyanganaka kati na Betele.

Wana lisangá ya Yehova ezalaki kokóla mingi, nazalaki na libaku malamu ya komona mapamboli ya Yehova kati na bateritware ya mikili ya bapaya wana ezalaki ngai koyangana na mayangani minene ya Batatoli ya Yehova na mikili ya mosika. Na nsuka, natambolaki mokili mobimba! Na ebandeli ya bambula 1950, biso basáli na Betele mingi tokendeki kotala Londres, Paris, Rome, Nuremberg, mpe Copenhague. Tozalaki kosala mibembo na bampepo oyo esalelamaki kala lokola mpepo ya bobwaki bɔmbi, na masuwa, mpe na engbunduka. Ya solo, tomonaki bisika mingi ya kitoko; kasi, na ntembe te, biloko bilekaki kitoko na oyo nyonso tomonaki ezalaki bongo ebele ya bandeko na biso ya esengo mpe ya boboto oyo bazalaki koyamba biso. Na bambula oyo elandaki nsima ememaki biso na kosala mibembo na Orient, na Europe de l’Ouest lisusu, mpe kala mingi te na Europe de l’Est. Mayangani kitoko na Pologne, na Allemagne, mpe na Tchécoslovaquie ezalaki mpenza esengo. Oyo nde lolenge libota na biso ya teokrasi ezali kokóla kobanda na mbala ya liboso oyo nakómaki mosangani na yango!

Litambwisi ya Yehova

Liboso, emonanaki lokola ete lisangá ezalaki kotambola malembemalembe mpe na nsima ekómaki kotambola na lombangu. Na ntango tozalaki kosala myango ya sika, bisaleli mike mpo na kokokisa mosala ya kopesa litatoli, nani akokaki koyeba bokóli monene oyo? Totambolaki kati na kondima, na kolandáká litambwisi ya Yehova.

Lisangá oyo ezali sé kokóla ebangaka te kosalela bisaleli ya sika ya tekiníki oyo ezalaki, to kosala oyo ya sika mpo na kokokisa mosala na elanga ya mokili mobimba. Kati na myángo oyo esalelamaki mpo na kotombola mosala ya Bokonzi, tokoki kotanga: mwángo ya koteya ndako na ndako, kosalela bosangisami ya bandako ya radio na nzela ya nsinga, kopesa litatoli na fɔnɔ́, mpe pologalami ya kotambwisa boyekoli ya Biblia kati na bandako ya bato. Kosalema ya myángo na biso moko mpo na misala ya konyata mikanda na mikolo ya ebandeli mpe sikawa kosalela ordinatere mpe bonyati mikanda na bamasíni ya offset na minoko mingi ezali likambo moke te. Galadi (Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower), Eteyelo ya mosala ya teokrasi, mpe kosalema ya mayangani, nyonso wana esili kokokisa mosala monene mpo na kopesa nkembo epai na Yehova mpe Mwana na ye. Ezalaki mpenza libaku malamu mpo na ngai komona mpe kosangana na makambo oyo nyonso.

Nandimisami ete lisangá ya Yehova oyo ezali awa na mabelé etambwisami malamu na elimo na ye mpo na koyeba nini esengeli kosalema mpe ndenge nini yango esengeli kosalema. Lisangá na ye kati na mɔlɔngɔ́ mobimba, oyo ezali komonana mpe oyo ezali komonana te, ezali kosala kati na bomoko.

Naokaki mawa soko moke te lokola natikaki mikano na ngai wana nazalaki elenge mobali, mpo na kosala mibembo kati na mai monene. Ee, makambo kitoko mpe ya ntina mingi mazali nde kosalema awa kati na lisangá ya Yehova! Na yango, mobembo na ngai na nzela ya kokende na ‘ebyangeli na likoló’ etondi na esengo mpe mapamboli mingi, mingi mpenza mpe mawa ezali soko moke te.​—Bafilipi 3:13, 14.

Mbala na mbala, nayebisaka bilenge ete bámikundola 1914​—elingi koloba Njembo 19:14, oyo elobaka ete: “Tika ete maloba na monoko na ngai mpe makanisi na motema na ngai mandimama liboso na yɔ, Ɛ [Yehova], nguya na ngai mpe mosikoli na ngai.” Tolingi kosepelisa Yehova na makambo manso mpe kosambela lokola Davidi asalaki yango: “Ɛ, [Yehova] yebisa ngai banzela na yɔ; mɔnisa ngai bilekelo na yɔ. Tambolisa ngai kati na sɔlɔ na yɔ mpe lakisa ngai, jambi yɔ ojali Njambe na kobika na ngai, najali kotalela yɔ mokɔlɔ mobimba.” (Njembo 25:4, 5) Maloba wana mazali na ndimbola mingi mpenza. Komikundola yango ekoki kosalisa biso na koumela kati na nzela ya malamu, kotambola na nzela ya solo elongo na lisangá ya Yehova oyo ezali sé kokóla.

[Elilingi na lokasa 23]

Ndeko Rutherford azalaki kosepela kolamba bilei mpo na baninga na ye

[Elilingi na lokasa 25]

Robert Hatzfeld, wana ezalaki ye kosala na ndako ya radio WBBR

[Elilingi na lokasa 26]

Fɔtɔ́ ya sika ya Ndeko Hatzfeld

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto