Mpo na nini mokili ekómi nsɔ́mɔ?
NANI alingaka kozala kati na nsɔ́mɔ? Moto nyonso oyo azali na bomoi mwa malamu alingaka kobatelama, kozanga likámá mpo na bomoi na ye mpe biloko na ye. Na yango, mingi bakimaka bisika oyo ezali na mobulu mozali mingi. Nzokande, bantina ya kobanga ezali bipai binso.
Makámá oyo mauti na bibundeli mpe masini ya nikleere oyo epesaka lotiliki mazali kobimisa nsɔ́mɔ ete bato nyonso bakobomama. Bokóli monene ya mobulu ezali kolendisa nsɔ́mɔ. Mingi bazali kobanga ete SIDA ekokóma bokɔnɔ bokopalanganaka oyo boleki koboma bato na ekeke oyo. Kobebisama ya ezingelo ezali kati na bantina oyo ezali kopesa nsɔ́mɔ. Bantina wana oyo ezali kopesa nsɔ́mɔ ezali na ndimbola ya sikisiki? Mpe tokoki solo kolikya kozala na bomoi kati na mokili oyo mozangi nsɔ́mɔ motindo yango?
Ndimbola ya nsɔ́mɔ oyo ezali na mokili mobimba
Nsɔ́mɔ oyo epalangani mingi na mikolo na biso ezali na ndimbola na boyokani na makambo oyo Biblia esakolaki. Kati na bisakweli na ye na ntina na mikolo ya nsuka, Yesu Klisto atángaki makambo oyo malingaki kozala ntina ya bobangi. Alobaki ete: “Libota mɔkɔ ekotɛlɛmɛla libota mosusu mpe bokonji mɔkɔ ekotɛlɛmɛla bokonji mosusu; njala mpe koningana na mokili ikojala na esika na esika.” Yesu alobelaki mpe “kobakisama ya ezaleli ya kotyola mibeko.” Uta mobu 1914, bitumba ya motindo oyo esalemaki naino liboso te, nzala, koningana ya mabelé, mpe ezaleli ya kotyola mibeko esili komema nsɔ́mɔ monene mpe kufa.—Matai 24:7-14.
Ata bizaleli ya bato bizali kokólisa nsɔ́mɔ na mikolo na biso. Na 2 Timoté 3:1-4 (NW), tozali kotánga maloba ya esakweli ya Paulo ete: “Na mikolo ya nsuka ntango ya mpasi ekozala. Mpamba te, bato bakozala balingi na bango moko, balingi na mosolo, bato na lofundo, bato na ngambo, batuki, bato bazangi botosi epai na baboti, bato bazangi matɔ́ndi, bato bazangi sembo, bato bazangi bolingo ya motema, bato bazangi boboto, batɔngi, bato bazangi komipekisa, bato na yauli, bayini na malamu, basúli, bato na mitó makasi, bato bavimbi na lolendo, balingi na bisengo koleka na esika ya kozala balingi na Nzambe, bazali na lolenge ya kosambela, kasi bazali koangana nguya na yango” Mpo ete tozingelami na bato ya motindo yango na mikolo oyo ya nsuka, ntembe ezali te ete nsɔ́mɔ ezali mpenza mingi!
Oyo ezali kozela mokili
Yesu akokanisaki eleko oyo na mikolo ya nsuka ya mokili oyo ezalaki na ntango ya Noa. Na ntembe te, nsɔ́mɔ ezalaki monene, mpamba te lisoló ya Biblia lilobi ete: “Mokili ejalaki mabe na miso na Njambe; mokili etondaki na yauli.” Na yango, “Njambe alobaki na Noa ete, ‘Nasili kokana kosilisa bato yɔnsɔ, mpɔ ete mokili etondi na yauli mpɔ na bango.’” (Genese 6:11, 13) Mokili wana mabe mozalaki mpenza na mobulu mingi na boye ete Nzambe abebisaki yango na Mpela ya mokili mobimba. Nzokande, mpo na bolingo na ye, Yehova Nzambe abikisaki moyengebene Noa mpe libota na ye.—2 Petelo 2:5.
Na yango, mokili ya mobulu ya mikolo na biso mosengeli komizela na nini? Nzambe ayini mobulu nyonso oyo emonisi kozanga limemya mpo na bolamu ya basusu. Yango ezali polele kati na maloba oyo ya mokomi na Nzembo: “[Yehova] akomeka moyɛngɛbɛni mpe moto mabe, molimo na ye ayini ye oyo alingi mobulu.” (Njembo 11:5) Yehova abebisaki mokili ya mobulu na mikolo ya Noa. Na yango, tosengeli komizela ete Nzambe abebisa mokili oyo motondi na mobulu oyo ezali kopesa nsɔ́mɔ, boye te?
Ntoma Petelo apemamaki na Nzambe mpo na kolobela kozala ya Klisto mpe kosakola mpasi mpo na mokili oyo ya mabe. Akomaki ete: “Na mikɔlɔ na nsuka basɛki bakoya mpe bakosɛka, bakotambola pelamɔkɔ na mposa mabe na bango mpenja, bakoloba ete, ‘Wapi elaka na [kozala, NW] na ye? Jambi longwa na ntango na kufa na bankɔkɔ, makambo yɔnsɔ maumeli bobɛlɛ bongo lokola ejalaki yango na ebandeli.’” Petelo asalelaki bongo liloba “makolo” mpo na komonisa ebongiseli ya boyangeli ezangi kokoka oyo ezali koyangela bato mpe liloba “mabelé” mpo na bato bazangi sembo. Alobaki ete, “Mpɔ ete balingi kobosana ete [makoló, NW] ejalaki kalakala mpe [mabelé, NW] ebimaki na mai, etɛlɛmi na mai mpɔ na Liloba na Njambe. Mpe mpɔ na mai yango, mokili na ntango yango ejindaki mpe ebomamaki. Mpɔ na Liloba na ye, [makoló mpe mabelé, NW] na ntango oyo ebombami ete ijika; ijali kobatelama kino mokɔlɔ na kosambisama mpe na koboma bato bakotiolaka Njambe.”—2 Petelo 3:3-7.
Bobele bongo, Paulo amonisaki ete Klisto mpe baanzelu na ye ya nguya basengelaki kopesa “bato mabe etumbu, baoyo bayebi Njambe tɛ, mpe bajangi kotosa Nsango Malamu na Nkolo na biso Yesu. Bakojua lifuti na kobeba na seko.” (2 Batɛsalɔniki 1:6-9) Búku ya nsuka ya Biblia ezali kolobela koyanganisama ya mabota mpo na “etumba na mokɔlɔ yango monɛnɛ na Njambe Mojui-na-Nguya-Yɔnsɔ” mpe ezali kondimisa biso ete Yehova “akobebisa babebisi na [mabelé, NW].”—Emɔnisɛli 11:18; 16:14-16.
Ntango ya esengo, kasi ya nsɔ́mɔ te
Na esika ya kozala na bobangi na ntina na oyo Biblia ezali kosakola mpo na mokili oyo, bato ya bosembo bazali na ntina ya kozala na esengo. Yehova akobebisa mosika te mokili oyo mabe, kasi yango ekosalema mpo na bolamu ya baoyo balingi boyengebene. Nini ekolanda nsima wana Nzambe akoboma ebongiseli ya biloko mabe oyo? Ebongiseli ya sika etambwisami na Bokonzi ya Nzambe, oyo ezali na likoló, oyo Yesu ateyaki bayekoli na ye ete bábondelaka mpo na yango! Alobaki ete: “Bino bobɔndɛla boye ete, ‘Tata na biso oyo ajali na Likolo, Nkombo na yɔ ejala mosanto, Tika Bokonji na yɔ eya, tika mokano na yɔ esalama na nse pelamɔkɔ na Likolo.’” (Matai 6:9, 10) Mbongwana nini ekozala ntango mokano ya Nzambe ekosalema na mabelé?
Bitumba mpe nsɔ́mɔ na yango ekosila. Njembo 46:9 elobi ete: “Ye [Yehova Nzambe] akosukisa bitumba kino nsuka na mokili; akobukabuka litimbo mpe akokatakata likɔnga, akojikisa mpe makalo kati na mɔtɔ.” Na ntango yango “bakofanda mpe na nse, moto na moto na nse na miwiti na ye mpe na njete na ye na mosuke, moto mɔkɔ akobangisa bango tɛ.”—Mika 4:4.
Maladi mabe oyo ebomaka ekobangisa lisusu te mpe ekoboma lisusu bato te. Elaká na Nzambe elobi ete: “Mofandi mɔkɔ akoloba tɛ ete, ‘Ngai najali na malali.’” (Yisaya 33:24) Oyo nde ntina ya bosepeli!
Bobangi na ntina na koboma bato mpe mobulu ekozala makambo ya kala. Njembo 37:10, 11 epesi elaká oyo ete: “Nsima na mwa ntango mokɛ moto na mabe akojala lisusu tɛ; okotala esika na ye, nde akomɔnana tɛ. Nde bato na [kosɔkɛma, NW] bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimia na sɔlɔ.”
Lolenge nini nsɔ́mɔ ya mikolo na biso oyo ekotika esika na kimya mpe kobatelama? Na nzela ya boyangeli moko ya sembo—Bokonzi ya Nzambe. Na ntina na mikolo na biso, Danyele 2:44 eyebisi ete: “Mpe na mikɔlɔ na mikonji yango Njambe na lola akotɛmisa bokonji bokobebisama sɔkɔ mokɛ tɛ, mpe bokonji yango ekopɛsama na bato mosusu tɛ; ekobuka mpe ekosilisa makonji oyo yɔnsɔ, mpe ekotikala lobiko na lobiko.” Mokonzi oyo atyami na Yehova, Yesu Klisto, ‘akozala na bokonzi kino Nzambe akotya bayini na ye na nsé na makolo na ye.’ (1 Bakolinti 15:25) Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Yesu ekokokisa mokano ya ebandeli ya Nzambe ya kokómisa mabelé mobimba paladiso oyo ekofandama libela na bato ya esengo.—Luka 23:43; Emoniseli 20:6; 21:1-5.
Na mabelé wana oyo ebongwani Paladiso, ekozala bobele na kobanga moko ya malamu. Ekozala “kobanga ya Yehova.” (Masese 1:7, NW) Ya solo, tosengeli komonisa kobanga wana uta sikawa, mpamba te yango ezali limemya ya mozindo mpe nsɔ́mɔ oyo esangani na kolenga ya kozanga kosepelisa Yehova mpamba te tozali na botɔ́ndi mpo na motema-boboto mpe malamu na ye. Kobanga wana ezali kosɛnga kotya elikya mobimba epai na Yehova mpe kotosa ye na bosembo nyonso.—Nzembo 2:11; 115:11.
Makambo ya nsɔ́mɔ mazali komonisa ntango oyo ete ezali mikolo ya nsuka. Nzokande, soki tolingi Nzambe, tokosepela na esika ya kozala na nsɔ́mɔ. Bisakweli ya Biblia bizali komonisa ete etikali moke Nzambe akotya nsuka na mokili oyo. Mokili ya sika ya sembo oyo Yehova alakaki ekokitana yango. (2 Petelo 3:13) Ya solo, mosika te mokili moko oyo mozangi kobanga ya mabe ekozala na nsé ya Bokonzi.
[Etanda ya lokasa 6]
NGUYA YA KOPI MOKO MPAMBA
TOMASZ, elenge mobali moko ya mboka Pologne, akómaki na kwokoso mpo na mibeko ya mboka na ye oyo esalaki ete akima. Na boumeli ya sanza motoba atambokaki na mikili mikeseni ya Mpótó, kolaláká na hema mpe kosaláká misala mikeseni. Na ntango yango, motuna moko mozalaki ntango nyonso kati na makanisi na ye: Ntina ya bomoi mozali nini?
Motuna ya Tomasz mozwaki eyano ntango bapesaki ye kopi moko ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na lokótá ya polonais. Atángaki yango mbala na mbala mpe asosolaki ete zulunalo wana ezalaki na solo oyo ye azalaki koluka. Tomasz asalaki mobembo ya bakilomɛtɛlɛ 200 mpo na kokóma na biro ya filiale ya la Société Watch Tower na Selters/Taunus, na allemagne. Ekómaki ye na Mwamoko na mpokwa, asimbaki Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na ye na mabɔkɔ mpe alobaki ete: “Nalingi ete moto moko akoka kolimbwela ngai malamu makambo oyo mazali kati na zulunalo oyo. Nasengeli kosala nini?”
Na mpokwa wana, Batatoli ya Yehova mibale basololaki na Tomasz likoló na ntina ya bomoi, na kosaleláká Biblia lokola moboko ya lisoló na bango. Na mposa monene ya koyekola makambo mingi, Tomasz azongaki na biro ya filiale mokolo na mokolo na pɔsɔ wana, koyekola Biblia mpe búku Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis.
Tomasz azwaki ekateli ya kozonga na Pologne, atako akokaki kokutana na mikakatano kuna. Yango wana, na mokolo ya mitano, bobele mikolo minei nsima ya kokóma na biro ya filiale na Selters, Tomasz alongwaki mpo na kozonga na mboka na ye. Abandaki nokinoki koyekola Biblia elongo na Batatoli ya Yehova na Pologne. Tomasz akólaki nokinoki mpe abandaki na molende nyonso kolobela bato mosusu na ntina na oyo ye azalaki koyekola. Na Ɔkɔtɔ́bɛ 1993, bobele sanza minei nsima wana akendeki na Selters, azwaki batisimo lokola Motatoli ya Yehova.
Bobele kopi moko mpamba ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli esalisaki elenge mobali wana na kokanga ntina ya bomoi!
[Elilingi na lokasa 7]
Na nsé ya Bokonzi ya Yesu Klisto, mokili ekozala lisusu nsɔ́mɔ soko moke te