“Batatoli ya Yehova babatelaki ngai!”
NA BOUMELI ya mikolo oyo ya nsuka, mingi basili komonisa ete bazali “bato mabe, bayini na malamu.” (2 Timoté 3:1, 3, NW) Isaac, mosáli moko ya bolingo malamu na biro ya filiale ya la Société Watch Tower na Afrika ya Wɛ́sti, amonaki bosolo ya likambo yango. Alobi ete:
“Na Yanuáli 1992, nazalaki kosala mobembo na nzela moko oyo ezalaka mpenza na bato te kati na taxi elongo na bato mosusu mitano. Nabandaki lisoló elongo na mwasi moko monzemba oyo afandaki pene na ngai, mpe azwaki na esengo nyonso mwa búku oyo nalakisaki ye.
“Na pwasa, na ngonga ya minei nsima ya nzangá, motuka moko ya sika oyo ezangi paláki ekataki liboso na biso, mpe motuka na biso etelemaki mbala moko. Mibali misato ya mbinga, bango banso na mindóki na mabɔkɔ bapumbwaki longwa na motuka mosusu wana mpe bafungolaki na makasi nyonso bikuke ya motuka na biso. Moko na bango angangaki ete, ‘Bino nyonso, na nsé.’
“Moko na mibali yango abɔtɔlaki ngai sakosi na ngai ya mikanda. Ntango amonaki ete ezalaki bobele na mikanda mikolimbolaka Biblia, abwakaki yango mosika. Kotalisáká ngai mondóki, atunaki ete, ‘Eloko nini mosusu ozali na yango?’ Napesaki ye nokinoki mbongo oyo ezalaki na pɔtɔmɔní na ngai. Atunaki ete, ‘Yango nyonso oyo?’ Nayebisaki na ye ete nazali Motatoli ya Yehova mpe Batatoli ya Yehova balobaka lokuta te. Abɔtɔlaki ngai pɔtɔmɔní na ngai, amonaki kaláti na ngai ya Watch Tower mpe alobaki ete, ‘Ok, Watchtower. Telemá kuna.’
“Na nsima abalukaki epai na mwasi oyo nasololaki na ye kati na taxi. Mwasi yango alongolaki nokinoki pauni na ye ya nkingo mpe apesaki ye mbongo oyo ezalaki na pɔtɔmɔní na ye. Ntango moyibi yango amonaki mwa búku na mabɔkɔ na ye oyo mazalaki kolɛ́nga, akanisaki ete tozalaki elongo, mpe alakisaki ye na mosapi ete atelema esika moko na ngai.
“Na ntango wana, miyibi misusu oyo bazalaki na mindóki babetaki baninga na biso ya mobembo mabe mpenza. Babetaki mokumbi motuka mpe mobali mosusu oyo azalaki kosala mobembo elongo na biso mpe bayibaki biloko na bango. Moko na miyibi asimbaki pauni ya nkingo ya mwasi mosusu. Ntango amekaki koboya, babetaki ye mabe na kolosi ya mondóki na motó mpe na ntólo kino akufaki. Babimisaki mwasi ya misato na motuka mpe babetaki ye masasi na ntólo. Na mawa nyonso, ye mpe akufaki. Bobele ngai elongo na elenge mwasi wana nde tobetamaki ata moke te.
“Na nsima, ntango mokumbi motuka moko oyo azalaki koleka amemaki biso, mwasi yango oyo azalaki na nsɔ́mɔ atikaki te koloba ete, ‘Batatoli ya Yehova babatelaki ngai!’”