Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 15/5 lok. 31
  • Nsango malamu uta na Malawi!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nsango malamu uta na Malawi!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 15/5 lok. 31

Nsango malamu uta na Malawi!

NA MOKOLO ya Novɛ́mbɛ 15, 1993, Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania ekomamaki na mikanda engebene mibeko ya Leta ya Malawi, mboka oyo ezali mpenza na Súdi-Ɛ́sti ya Afrika. Yango epesaki na Batatoli ya Yehova likoki ya kondimama na mibeko ya Leta mpe bonsomi ya kosakola solo ya Biblia epai na bato ya Malawi.

Na mobu 1948, biro ya filiale ya la Société Watch Tower etyamaki na Malawi mpo na kotambwisa mosala ya Batatoli ya Yehova na mboka wana. Na Yanuáli 8, 1957, la Société Watch Tower ekomisamaki na mikanda kuna mpo na mbala ya liboso. Na boumeli ya mibu mingi, motuya ya Batatoli ya Yehova ekólaki nokinoki mpenza. Kasi minyoko ya makasi mibandaki na 1964. Mpo na nini?

Mpo na botosi na bango epai na Nzambe, Batatoli ya Yehova bamikɔtisaka na makambo ya politiki te. (Yoane 17:16) Ezali polele ete, bato mosusu basosolaki malamu te etelemelo wana ya Makomami mpe batalelaki Batatoli na libungá nyonso lokola lingomba moko ya makambo makasimakasi mpe ya batomboki. Na yango, bato mosusu bakanisaki ete bazali na lotómo ya konyokola baklisto wana ya kimya. Batatoli mingi balongolamaki na misala, babetamaki mpe basambwisamaki na mitindo mikeseni. Basusu bayikaki mpiko na mpasi ya kokabwana na makasi nyonso na bana na bango.

Na mobu 1972, koleka 30 000 ya Batatoli mpe bato oyo bazalaki koyekola na bango Biblia bakimaki mboka yango mpo na kobikisa bomoi na bango. Bankóto mingi bafandaki lokola bapaya na Mozambique, mboka ya penepene, kati na bakáa ya bato bakimá mboka na bango. Kasi na 1975, bato wana bakimá mboka na bango bazongisamaki na Malawi, epai bakutanaki lisusu na minyoko. Mingi batindamaki na bakáa ya bakangami. Kati na yikiyiki nyonso wana, la Société Watch Tower elongolamaki na molɔngɔ́ ya masangá oyo mandimamaki na mibeko, na Malawi. Kobanda wana Batatoli ya Yehova mpe bibongiseli oyo bisungaka misala na bango engebene mibeko ya Leta bapekisamaki na mboka yango.

Atako bakutanaki na minyoko nyonso wana, Batatoli batombokaki te. Basalaki mobulu te soko mpe botomboki te mpo na kotɛmɛla bayangeli. Na esika ya kosala bongo, bakokisaki nde kati na libondeli, mokumba na bango ya boklisto oyo etali kokumisa mpe komemya bayangeli “bakonzi baleki liboso.” (Baloma 13:1-7; 1 Timoté 2:1, 2) Batatoli basimbaki mpe mitindá mitombwami ya etamboli ya boklisto oyo mizali kati na Biblia, mpe na yango, balandaki kopesa ndakisa eleki malamu mpo na oyo etali etamboli.

Kati na bonsomi na bango oyo bauti kozwa, Batatoli ya Yehova na Malawi bazali na ekateli makasi ya kolanda kosakola na molende nyonso solo ya Biblia, “na eleko malamu.”​—2 Timoté 4:2.

[Elilingi na lokasa 31]

M. G. Henschel elongo na libota ya Betele ya Malawi na bambula 1960

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto