Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 15/4 nk. 21-26
  • Bazali kolongola ezipeli likoló ya Alaska, ndelo ya nsuka ya mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bazali kolongola ezipeli likoló ya Alaska, ndelo ya nsuka ya mokili
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Mbongwana moko ya mpasi
  • Milende ya liboso mpo na kopesa litatoli
  • Lisalisi oyo tomizelaki na yango te
  • Kokita na bisanga Aléoutiennes
  • Bosepeli ebandi kokóla
  • Kokatisa ndelo
  • Ezali mpenza na ntina?
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 15/4 nk. 21-26

Bazali kolongola ezipeli likoló ya Alaska, ndelo ya nsuka ya mokili

EKOKI sikawa mikolo mibale, biso minei totondani kati na elalelo moko moke ya engumba Nome, oyo eyebani mingi na Alaska mpo na ebele ya balukiluki. Na 1898 balukiluki koleka 40 000 bayaki wana koluka eloko bobele moko​—wolo! Nzokande, biso tozali koluka bozwi ya lolenge mosusu.

Sikawa, mposa na biso etali “biloko kitoko” oyo bikoki kozala na bamboka etangolami ya Gambell mpe Savoogna na esanga ya Saint Lawrence, bakilomɛtɛlɛ 300 na Wɛ́sti esika mai monene Béring ekabwani. (Hagai 2:7) Kuna, ba Inuit bazali kolónga kotambola na mai ya ngalási ya mbú oyo ebéngami Arctique mpe bazali kosala bokila ya ba baleines pene na bandelo ya oyo ebéngamaki kala Union Soviétique. Kasi kokwea ya mbula mpɛmbɛ mpe ezipeli makasi ya londende moindo epekisaki biso kotambola. Mpepo na biso esengelaki kotikala wana na nsé.

Wana tozalaki kozela, nakanisaki na makambo mauti kosalema na mwa bambula oyo eleki mpe natɔ́ndaki Yehova mpo na mapamboli na ye likoló na mosala ya kotatola kati na bitúká oyo bizali na bato mingi te. Na Alaska​—oyo bato mosusu bazali kobénga yango ndelo ya nsuka ya mokili​—ezali na baímboka 60 000 baoyo bazali kofanda na bituluku koleka 150 na mokili wana ya mosika mpenza, bapalangani kati na etando ya ba kilomètres carrés soko 1 600 000 na mabelé makauki epai kuna ata nzela moko te ekangisi yango. Na lisalisi ya mpepo ya la Société Watch Tower, tosili kokóma na moko kati na misato ya bamboka wana etangwi, komemeláká bango nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe.​—Matai 24:14.

Mpo na kokóma na bamboka wana ya mosika, mbala mingi esengeli ete mpepo ekita mwa moke na nsé na kolekáká kati na mapata mpe na londende oyo mbala mosusu ezipaka mboka na boumeli ya mikolo mingi. Nsima na kokita ya mpepo, ezali naino na londende mosusu oyo esengeli kokatisa yango. Lokola ezipeli, ezali kozipa makanisi mpe mitema ya bato wana ya boboto mpe ya kimya.​—Kokanisá na 2 Bakolinti 3:15, 16.

Mbongwana moko ya mpasi

Zámba ya Alaska efandami na ba Inuit, na ba Aléoutes, mpe na ba Indiens. Moko na moko na bikólo yango ezali na bonkɔ́kɔ mpe bizaleli oyo yango esangolaki. Mpo na kobika na eleko ya mpiɔ ya Arctique, bayekolaki kobatela mpe kosalela biloko oyo bazalaki kozwa na mabelé ya mboka wana na nzela ya bokila, ya kolɔ́ba mbisi, mpe ya koboma ba baleines.

Bopusi ya bapaya ekómaki epai na bango na katikati ya ekeke ya 18. Batekisi ya mposo ya nyama ya mboka Russie bakutaki bato oyo balataki mposo ya nyama mpe bazalaki kolumba nsolo ya mafuta ya phoque, mbisi oyo ezalaki kofanda te kati na ba igloos, kasi kati na bandako ya pɔtɔpɔ́tɔ oyo nsambá na yango ezali na matiti mpe bikɔtelo na yango na nsé ya mabelé. Epai na bato wana ya bopɔlɔ mpe ya mbinga, bato ya mombongo bamemaki mikakatano minene, bákisa mimeseno ya sika mpe bokɔnɔ ya sika, oyo ebomaki ntalo monene ya basangani ya bitúlúká mosusu. Masanga mpe eumelaki te kokóma likámá mpo na bato yango. Nkita ya sika esalaki mbongwana epai na bato na motindo boye ete biloko bazalaki kozwa mpo ete mabota na bango ekoka kobikela, ekómaki kotɛkama mpo na kozwa mbongo. Kino lelo, basusu bazali kokanisa ete ezalaki mbongwana moko ya mpasi.

Ntango bamisionere ya Boklisto ya nkombo mpamba bakómaki, mbongwana ya motindo mosusu etyamaki likoló na bafandi ya Alaska. Wana bamoko batikaki mimeseno na lingomba na bango ya bonkɔ́kɔ na kokakatana nyonso​—losambo ya bilimu ya mopepe, ya ngalási, ya ngombolo, ya mpóngo mpe bongo na bongo​—basusu bakólisaki bosangisi ya makanisi ya mangomba, oyo ebimisaki “mobulungano.” Mbala mingi makambo wana nyonso mabimisaki kokanisela mabe mpe kozanga kotyela bapaya motema. Mopaya ayambamaki ntango nyonso malamu te kati na bamboka mosusu.

Na yango, mpo na biso, ntembe monene ezali ya komema nsango malamu epai na bafandi oyo bazali bipai na bipai kati na ndelo yango monene. Lolenge nini tokoki komonisela bango ete bazali na ntina moko te ya kokanisela biso mabe? Tokoki kosala nini mpo na kolongola ezipeli likoló na bango?

Milende ya liboso mpo na kopesa litatoli

Na ebandeli ya bambula 1960, mwa ndambo ya Batatoli ya Alaska bayikelaki mikakatano ya bileko mabe mpiko​—mipepe ya mpiɔ makasi, malili ya makasi, mbula mpɛmbɛ​—mpe bapumbwaki na mpepo na bango moko oyo ezalaki kotambola na motɛ́lɛ bobele moko, mpo na kokende kosakola na bamboka oyo epalangani na nɔ́rdi. Na nsima, emonanaki ete Batatoli wana ya mpiko bazalaki mpenza kotya bomoi na bango na likámá monene. Kobeba ya motɛ́lɛ elingaki mpenza komema na liwa. Ata soki bakokaki kokita malamu, balingaki kozala mosika mingi mpo na kozwa lisalisi, kati na mpiɔ makasi mpe na kozanga makoki ya kosala mobembo. Kobika ekokaki kotalela bobele bilei mpe esika ya komibomba, oyo ezalaki mpenza komonana mingi te. Na esengo nyonso, likambo moko ya mabe esalemaki te, kasi ebongaki kokanga miso likoló na likámá motindo yango te. Mpo na yango, biro ya filiale ya la Société Watch Tower na Alaska elendisaki bandeko te kati na lolenge wana ya mosala ya kosakola.

Mpo na kokólisa nokinoki mosala ya kosakola, bandeko ya sembo na masangá ya Fairbanks mpe ya North Pole basalaki milende mingi kati na bamboka ya minene, lokola Nome, Barrow, mpe Kotzebue, epai bakompanyi ya mpepo ememaka biloko mpe bato. Bazali kosalela mosolo na bango mpenza mpo na kosala mibembo na bitúká wana, mosika koleka bakilomɛtɛlɛ 700 kino na nɔ́rdi mpe na wɛ́sti. Mwa ndambo na bandeko baumelaki basanza mingi na Nome mpo na kotambwisa boyekoli ya Biblia elongo na bato oyo basepelaki. Na Barrow, ndako moko efutelamaki mpo na kozala ebombamelo na ntango malili ekokómaka na nsé ya 45°C. Na boumeli ya mibu mingi, baoyo bazali kotya motema na etindá ya Yesu ya kosakola nsango malamu kino na nsuka ya mabelé, babimisaki mosolo koleka badolare 15 000​—Malako 13:10.

Lisalisi oyo tomizelaki na yango te

Bolukiluki ya mwango ya kokutana na bituluku oyo bitangwi mosika elandanaki, mpe Yehova afungolaki nzela. Mpepo ya motɛ́lɛ mibale ekómaki kosalelama mpo na komema bato​—eloko oyo ebongaki mpenza mpo na kokatisa na kimya nyonso molɔngɔ́ ya bangomba ya Alaska. Ezali na bangomba mingi na Alaska oyo nsɔ́ngɛ́ na yango eleki bamɛtɛlɛ 4 200 mpe nsɔ́ngɛ́ ya Ngomba McKinley (Denali) ezali na bamɛtɛlɛ 6 194 likoló na nivo ya mai monene.

Na nsuka, mpepo yango ekómaki. Kanisá mawa oyo tozalaki na yango ntango mpepo oyo enzuluká, egugá, ya langilangi ekitaki na libándá ya mpepo. Ekokaki solo kosalelama? Tokokaki kokabela yango bomoi ya bandeko na biso? Lisusu, lobɔkɔ na Yehova ezalaki mokuse te. Na nsé ya litambwisi ya bamekanisiɛ́ ya mayele, bandeko koleka 200 balekisaki bankóto mingi ya bangonga na bolingo na bango mpenza mpo na kozongisa mpepo yango mobimba ya sika.

Oyo nde nsaí na kotala! Wana epumbwaki na makoló ya Alaska, ezalaki kongɛnga lokola mpepo ya sika, elongo na nimero ya kokomisama 710WT na nsima na yango! Lokola nsambo mpe zomi esalelami nyonso mibale kati na Biblia mpo na kolimbola kokoka, ekoki kozala ete 710 ekamatamaki mpo na komonisa ntina ya lisungi oyo ebongiseli ya Yehova esili kopesa mpo na kolongola ezipeli na mitema mikangisami kati na molili.

Kokita na bisanga Aléoutiennes

Uta tozwaki mpepo, tosili kosala bakilomɛtɛlɛ 80 000 na mokili mokauki, komemáká nsango malamu ya Bokonzi mpe mikanda mikolimbolaka Biblia na bamboka mike 54. Ntáká yango ekokani na kokatisa mboka Etats-Unis mbala 19!

Mbala misato, tokitaki kino na bisanga Aléoutiennes oyo ezali na ntáká ya bakilomɛtɛlɛɛ1 600, oyo ekaboli Mai monene Pacifique mpe Mai monene Béring. Bisanga koleka 200 bizangi nzeté, oyo bisali molɔngɔ́ ya bangomba yango bifandami bobele na ba Aléoutes te, kasi lisusu na bankóto ya bandeke ya mai monene, bingondo oyo mitó na yango ezangi nsála, mpe na bandeke ebéngami oies empereurs, oyo ezali na mitó mpɛmbɛ lokola mbula mpɛmbɛ mpe na nsála oyo ezali na milɔngɔ́ moindo mpe mpɛmbɛ.

Nzokande, kitoko na etúká yango ezangi makámá te. Wana tozalaki kopumbwa likoló na mai monene, tozalaki komona mbongé kotombwana bamɛtɛlɛ 3 kino bakilomɛtɛlɛ 5 likoló na mai ya ngalási oyo esalaki mfulumfulu, mpiɔ makasi na boye ete ata na eleko ya molungé moto akoki kobika kati na yango bobele miniti 10 kino miniti 15. Soki apusami na kokita na makasi, mokumbi-mpepo asengeli kopona bobele kati na esanga ya ngombangomba mpe mabangámabangá to mai monene wana ekobomaka. Tozali mpenza na botɔ́ndi mpo na bandeko na biso ya makoki mingi, bamekanisiɛ́ (babongisi manzanza mpe motɛ́lɛ ya mpepo), baoyo bazali komipesa na bolingo na bango moko mpo na kobatela mpepo wana ete ezala mpenza malamu!

Na boumeli ya moko na mibembo, tozalaki kokende na Dutch Harbor mpe na Unalaska, mboka ya balɔbi mbisi. Etúká yango eyebani malamu mpo na mipepe makasi oyo epepaka na bakilomɛtɛlɛ 130 kino bakilomɛtɛlɛ 190 na ngonga moko. Na esengo nyonso, mokolo yango mozalaki malamu, atako bongo mopepe mozalaki na nguya ya kopesa biso mpasi mbala na mbala. Oyo nde likambo ya kokamwa ntango libándá ya mpepo emonanaki​—ezalaki bobele eteni ekatami na mobanzi ya ngomba ya mabangámabangá. Na ngámbo moko ya libándá ya mpepo ezalaki bobele mabangá mpe na ngámbo mosusu, mai ya ngalási ya mai monene Béring! Ntango mpepo ekitaki na mabelé, nzela ezalaki maimai. Mbula ebetaka kuna koleka mikolo 200 kati na mobu moko.

Oyo nde esengo ya kosolola na ntina na Liloba mpe mokano na Nzambe elongo na bafandi ya esika wana! Mibangé mingi bamonisaki bosepeli na bango mpo na elikya ya mokili oyo mozangi bitumba. Bazali naino kokanisa ntango oyo ba Japonais babwakaki bombi na Dutch Harbor na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Tokoki mpenza te kobosana mibembo ya kopesa litatoli motindo wana.

Bosepeli ebandi kokóla

Ntango tolukaki koyeba kobakisama ya molungé, tomonaki mwa bokóli moke ya molungé. Yango ekundwelaki ngai mosala na biso na bisika bitangwi. Tosili komona mwa bosepeli kokóla kati na mitema na bato, malɛmbɛmalɛmbɛ, kasi kozanga kotika.

Esengelaki ntango molai mpo na kolónga ezipeli ya kokanisela mabe mpe kozanga kosepela oyo bato bazalaki na yango mpo na bapaya. Na ebandeli ya milende na biso, ezalaki kokóma mbala mingi ete bakonzi ya mangomba ya bamboka báya kokutana na mpepo, mpo na koyeba ntina ya boyei na biso, mpe kosɛnga na kozanga bonkondé nyonso ete tókenda. Ya solo, boyambi motindo yango bozalaki kol mbisa mingi. Kasi tomikundolaki toli na Yesu na Matai 10:16 ete: “Bojala nde na mayɛlɛ lokola banyoka mpe na bopɔlɔ lokola bibenga.” Bongo tozongaki lisusu na mpepo etondi na ba salades, na batomati, na ba cantaloups ya sika, mpe na biloko mosusu oyo ezwamaka mingi te na mboka yango. Bafandi oyo na ebandeli bazalaki batɛmɛli, bakómaki sikawa kosepela mingi na komona mpepo na biso komema biloko wana.

Wana ndeko moko azalaki kosala na “ebombelo na biloko,” kosɔmbitinya makabo na biloko bikómi sika, bandeko mosusu mingi bakendeki ndako na ndako, mpo na koyebisa na bato na mboka boyei ya biloko oyo biuti kokóma na mpepo. Na bikuke, bazalaki mpe kotuna: “Eh, ekoki kozala ete bino mpe botángaka Biblia? Nayebi ete okosepela na mokanda oyo ya boyekoli oyo ezali komonisa ete Nzambe alakeli biso Paladiso.” Nani akoki koboya lipesi motindo yango? Moto nyonso asepelaki na bilei ya mosuni mpe ya elimo. Boyambi bozalaki malamu, tokabolaki mikanda mingi, mpe bato mosusu basepelaki lokola.

Kokatisa ndelo

Na ngámbo ya teritware ya Yukon, lisangá ya Whitehorse etindelaki biso libyangi ya “Moto na Makɛdɔnia” ya “koleka” na Canada mpo na kotala bisika oyo bileki mosika na teritware ya Nɔ́rdi-Wɛ́sti. (Misala 16:9) Biso mitano tomataki na mpepo mpo na kokende na Tuktoyaktuk, engumba moke pene na esika mai monene Beaufort makɔti na mabelé na MacKenzie, na nɔ́rdi ya oyo ebéngami Cercle polaire arctique.

Ntango tokómaki, tobandaki komituna ete, ‘Babéngaka nkombo oyo ya sika lolenge nini?’

Elenge mobali moko ayanolaki na komungamunga ete: “Tuk.”

Tokamwaki ete, “Mpo na nini tokanisaki mpo na yango te?”

Tokamwaki mpenza na komona ete bafandi ya Tuktoyaktuk bameseni mingi na Makomami. Lokola mbano na yango, tosalaki masoló ya boninga elongo na bato mingi, mpe tokabolaki mikanda mingi. Ndeko mobali, elenge mobongisi-nzela moko, asalaki lisoló moko kitoko elongo na nkolo ndako moko.

Nkolo na ndako yango alobaki ete: “Ngai nazali Moto ya Lingomba Anglican!”

Ndeko na biso mobongisi-nzela atunaki ye ete: “Oyebi ete Lingomba Anglican lindimaka kosangisa nzoto mibali na mibali?”

Mobali yango alobaki na kokakatana nyonso ete: “Ezali bongo solo?” “Soki ezali bongo, nazali lisusu mosangani na yango te.” Ya solo, motema na ye mofungwamaki na nsango malamu ya Biblia.​—Baefese 1:18.

Mobangé moko akamwaki na komona molende na biso ya koluka kokóma na bandako nyonso ya etúká yango. Lokola na momeseno, esengelaki ete tósala mosala na biso nyonso na kotamboláká na makolo. Mbala mingi tozalaki kosala mobembo ya kilomɛtɛlɛ moko to koleka na makolo uta libándá ya mpepo kino na mboka. Bongo, mpo na kokóma na bandako nyonso, esɛngaki ete tótambola na banzela ya mabangámabangá to ya pɔtɔpɔ́tɔ. Mobali yango adefisaki biso motuka moke na ye, mpe yango ezalaki mpenza lipamboli! Kokatisa ndelo ya ekólo mpe koleka na teritware ya Canada mpo na kopesa lisalisi ezalaki libaku moko kitoko.

Ezali mpenza na ntina?

Wana ntango ezalaki mabe mpe topekisami kobima to tozelisami mingi liboso ya kobima, lokola tozali sikawa, to wana mokolo molai ya kosakola emonani ete epesi mbuma moko te bobele kozanga bosepeli to botɛmɛli na bato, tomitunaka soki esengeli mpenza kolekisa ntango nyonso, nguya mpe mosolo nyonso oyo. Tokoki kokanisa na ntina na bato oyo bamonisaki mposa mpe balakaki ete bakokomela biso mikanda, kasi basalaki yango te. Bongo tomikundolaka ete ezalaka momeseno ya bafandi mingi ya bamboka yango te na kokoma mikanda, mpe tokoki komikosa na kotalela ezaleli ya boninga oyo bazalaka na yango lokola bosepeli mpo na nsango ya Biblia. Ntango mosusu ezali mpasi komeka bolóngi na biso.

Makanisi wana nyonso ya kozanga kolónga mazali kolimwa soki tokanisi matomba malamu oyo basakoli mosusu ya nsango malamu bazwaki. Na ndakisa, Motatoli moko ya mwasi ya Fairbanks asakolaki na mboka Barrow mosika epai na nɔ́rdi. Akutanaki na elenge mwasi moko oyo azalaki kotánga na eteyelo monene ya Californie. Ndeko na biso ya mwasi akólisaki mposa mpe atikaki te kolendisa elenge mwasi yango na nzela na mikanda wana ezongaki ye na eteyelo monene. Lelo oyo, elenge mwasi yango asili kozwa batisimo mpe azali na esengo ya kosalela Yehova.

Nazalaki naino kokanisa wana moto abetaki na ekuke na ngai, yango ezalaki elembeteli mosusu oyo emonisaki ete nyonso oyo nazalaki kosala ezali na ntina. Kuna na ekɔteli, ezali Elmer, oyo azalaki Motatoli bobele moko ya Inuk, oyo amipesá mpe azwá batisimo na Nome.

Atunaki ete: “Soki bolingi kobima, nakoki kokende elongo na bino?” Lokola azalaka ye moko na ntáká ya bakilomɛtɛlɛ 800 ya lisangá oyo lizali penepene, alingaka kobima na mosala ya kosakola elongo na bandeko na ye wana ezali ye na libaku ya kosala yango.

Kongála ya moi ebandi koleka kati na mapata, mpe toyebi ete mosika te tokozala na pole oyo ekopesa nzela mpo na kokende. Wana Elmer azali komata na mpepo, tosepeli na komona elongi na ye oyo ezali na nsai mpe na esengo. Wana ezalaki mokolo ya ntina mpo na Elmer. Azali kokende elongo na biso esika oyo tokosakola nsango malamu epai na bato ya ekólo na ye moko, ba Inuit, kosanganáká elongo na biso, wana tozali komeka kolongola ezipeli likoló na mitema na baoyo bazali kobika na ndelo ya nsuka ya mokili.​—Euti na moko na batángi na biso.

[Karte na lokasa 23]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

1. Gambell

2. Savoonga

3. Nome

4. Kotzebue

5. Barrow

6. Tuktoyaktuk

7. Fairbanks

8. Anchorage

9. Unalaska

10. Dutch Harbor

[Elilingi na lokasa 24]

Mpo na kokóma na bituluku bitangwi, mbala mingi esengeli kokatisa moko na milɔngɔ́ ya bangomba ya Alaska

[Elilingi na lokasa 25]

Betty Haws, Sophie Mezak, mpe Carrie Teeples bango banso basali koleka mibu 30 kati na mosala ya ntango nyonso

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto