Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 15/4 nk. 3-4
  • Litambwisi ya bato lizangi nde kolónga?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Litambwisi ya bato lizangi nde kolónga?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Masolo mosusu
  • Epai wapi okoki kozwa litambwisi libongi na kotyela motema?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Milende mpo na kosilisa bobola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Biyano na mituna ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Lukáká litambwisi ya Nzambe na makambo nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 15/4 nk. 3-4

Litambwisi ya bato lizangi nde kolónga?

NANI azalisaki biloko binso? Soki eyano na yo ezali ete “Nzambe,” boye ozali na molɔngɔ́ na bamilió ya bato oyo bazali kondimela Mozalisi, Nzambe ya Biblia.

Nzokande, bato mingi oyo bandimelaka Nzambe bazali na mokakatano mpo na kondima ete azali mpenza kosala eloko mpo na kosilisa mikakatano ya bato. Ebongi mpenza kokanisa ete Nzambe asili kokamata bibongiseli mpo na kosunga bato? Bato mingi bazali komona te elembeteli moko ya solo oyo endimisi yango.

Na boumeli ya bankóto na bambula, bato basili komeka ebele na myango ya komisunga bango moko, kozanga kotalela Nzambe. Kasi bato basili kolónga kobongisa makambo? To mikakatano mizali nde bobele kobakisama mpe mizali sé kokóma mpasi mingi mpo na kosilisa yango? Lolenge nini moto azali kosala liboso na mikakatano minene ya mikolo na biso?

Moto moko ya bwanya amonisaki yango polele ete: “Uta bokóli ya bamasini ebandaki, mikili ya bozwi misalelaki bozwi ya mabelé na lolenge mabe mpenza, na motindo mobongi te ya kosala biloko mpe ya kosalela yango, kobebisáká bongo ezingelo mobimba, wana bazali kopesa mikili ya bobólá mpasi.”

Moto azali bobele kolanda kobebisa mabelé. Zulunalo Clarín ya mboka Argentine emonisaki ete: “Na eteni ya mibale ya ekeke oyo, lokoso na makambo ya nkita, kozanga bokɛngi mpe bopotu ememaki makámá minene oyo mabomaki bobele ebele na bato te, kasi lisusu oyo ebebisaki ezingelo, mbala mingi na meko oyo eleki monene.”

Lelo oyo bobólá ya nsɔ́mɔ emonani mpenza lokola eteni ya bomoi ya bato na ntango na biso. Ata mikili oyo mibéngami ete ya bozwi mizali konyokwama na bozito monene ya bobólá. Engebene zulunalo The Globe and Mail ya Toronto, na mboka Canada, ekanisami ete “moto moko kati na misato na Canada, akokutana na bobólá wana azali naino na mbula na ye ya kosala mosala.” Zulunalo yango elandisi ete “kokwea ya mabota nde ezali moko na bantina minene ya bobólá, mpe ezalela yango esili kokóla mingi na bambula oyo euti koleka.”

Kosalela bilangwiseli ezali elembo mosusu ya mokili oyo mosili kobeba. Bato bakoki kosala nini na ntina na yango? Ya solo, bobele makambo moke. Bamilió ya bato bazali kozwa libebi kati na nzoto, na makanisi mpe na bizaleli, libebi oyo liuti na esaleli mabe ya bilangwiseli. Mpe mokakatano yango mozali kopalangana lokola mɔ́tɔ mokozikisaka zámba.

Emonani lokola ete bato ya siansi bazali kolónga te na etumba ya kosilisa bokɔnɔ. Ya solo, zébi ya mikolo na biso esili kolónga mwa ndambo ya bitumba. Nzokande, myango misusu ya siansi misili kokɔtisa likámá na mitindo ya bamikrobe oyo ekokufaka na nkisi te.

Biyangeli ya bato bikoki te kopekisa bokóli monene ya konyatama ya ntómo ya bato. Na ndakisa, atako ebele ya bilaká mpe mibeko mingi esalemaki mpo na kopekisa boombo, ekanisami ete, na mokili mobimba, koleka bato milió monkámá bazali kosala mosala lokola nde bazalaki kati na boombo mpenza.

Kasi mpo na nini litambwisi ya moto lilóngi te? Tiká tótalela mwa makambo oyo mapesi yango nzela. Litambwisi ya moto liuti na bato​—bato oyo bazali mpenza na bandelo. Mayele oyo bazwi na boumeli ya bomoi na bango masuki na mwa mimeseno mpe na bisika bafandi. Boyebi na bango bozali mpe na ndelo. Litambwisi nyonso oyo bakoki kopesa ezali komonisa bandelo wana. Lokola ntoma Paulo alobaki yango, “bato yɔnsɔ babungi mpe bajangi nkɛmbɔ na Njambe.”​—Baloma 3:23.

Ya solo, mingi na mikakatano oyo ebele na bato bazali na yango miuti mpenzampenza to mpe mbala mosusu na kozanga kotalela litambwisi ya Nzambe. Bongo, litambwisi lolenge yango likoki kozwama epai wapi? Lolenge nini Nzambe azali kokamba biso lelo oyo? Lisoló oyo lilandi likopesa biyano na mituna wana.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto