Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 1/4 lok. 32
  • Mbula zomi ya kobimisama nzela moko!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mbula zomi ya kobimisama nzela moko!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 1/4 lok. 32

Mbula zomi ya kobimisama nzela moko!

WANA batunaki ye soki azalaki na maoki nini na ntango ebimeli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na lokótá Espagnol ebandaki kobimisama nzela moko na ebimeli ya Lingelesi esili sikawa koleka mibu zomi, ndeko mwasi moko molingami, mwana-mboka Espagne, ayanolaki ete: ‘Tokanisi ete ezali lipamboli, mpamba te tokoki koloba ete tokómaki na nivó moko na Lingelesi. Ntango nazali koloba Lingelesi, mbala nyonso nakanisaka na ntina na ebongiseli. Tobéngaka ebongiseli ete “Mama.” Tomiyokaka ete tozali penepene. Ezali kitoko. Ezali kokamwisa!’

Ndeko mwasi wana ya sembo amonisaki maoki ya batángi mingi oyo balobaka Lingelesi te. Na bambula eleki, masoló oyo mazalaki kobimisama na ebimeli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na lokótá Espagnol mazalaki kobimisama sanza motoba na nsima ya ebimeli ya Lingelesi. Ezalaki mpe bongo mpo na nkótá mosusu. Yango wana, mposa makasi ezalaki ya kobimisa masoló ya motindo moko wana nzela moko na nkótá mingi.

Na yango, kobanda na ebimeli ya Apríli 1, 1984, ebimeli ya lokótá Espagnol ezalaki ebimeli ya liboso ya kobimisama nzela moko na oyo ya Lingelesi. Nkótá misusu elandaki nokinoki na nsima. Na ebandeli ya mobu 1985, bibimeli ya nkótá 23 ebandaki kobimisama nzela moko. Wana babongoli bazalaki kozwama mpe kobongisama, bibimeli ya nkótá mingi mosusu eyaki kokóma kobimisama nzela moko.

Nimero oyo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ekokisi bambula zomi ya kobimisama nzela moko. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezali sikawa kobimisama na minoko 116, kati na yango 85 ezali kobimisama nzela moko. Elingi koloba mwayene ya 99,3% ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 16 100 000 ebimisami na ezipeli mpe masoló motindo moko. Mpo na baoyo bayanganaka poso na poso mpo na boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, koleka bato 95% bazali koyekola masoló motindo moko na ntango bobele moko.

Lamuká!, moninga ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, ebimisamaka nzela moko na nkótá 37 kati na nkótá 74. Búku Annuaire des Témoins de Jéhovah ebimisami na minoko 18. Mikanda mibimisami nzela moko mizali kosala ete libota ya Nzambe lizala “na elimo moko mpe na likanisi moko.”​—1 Bakolinti 1:10, NW.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto