Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 1/4 nk. 20-24
  • Bomoi ya esengo mpe ya mapamboli kati na mosala ya Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bomoi ya esengo mpe ya mapamboli kati na mosala ya Yehova
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpokwa oyo ebongolaki bomoi na ngai
  • Mosala na biso ya kosakola na bambula ya ebandeli
  • Mbongwana moko etye kondima na biso na komekama
  • Nabikisami na mpasi mbala mingi
  • Napesi lisungi kati na momekamo
  • Etumba esili​—mosala na biso ezali kokóba
  • Nzela na Jéhovah ezali lolenge na bomoi loleki malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Tozali na ekateli ya kosalela Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Tosalaki mosala na nsé ya libateli ya bolingo ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Koleka mbula 50 ya ‘kolekaleka’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 1/4 nk. 20-24

Bomoi ya esengo mpe ya mapamboli kati na mosala ya Yehova

LISOLÓ YA LEO KALLIO

Ezalaki na mobu 1914, mpe na mpokwa ya mokolo moko kitoko na eleko ya molungé, na mboka moko moke pene na Turku, engumba moko ya mokili ya Finlande. Na pwasa, kimya ebulunganisamaki na ntina na nsango ya etumba monene oyo eutaki kobima. Nokinoki, babalabála etondaki na bato bazalaki kotunana mpo na kobima ya makambo wana. Biso bana mike tobandaki komituna soki likambo nini elingaki kobima, mpo ete bakóló bazalaki na bilongi ya mawa. Nazalaki na mibu libwa, mpe nazali komikundola lisusu ete masano ya kimya ya bana mike ebongwanaki na masano ya bitumba.

ATAKO mokili ya Finlande emikɔtisaki te kati na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba (1914-1918), mboka ebebisamaki na etumba ya banamboka na mobu 1918. Basangani ya libota moko mpe baoyo bazalaki liboso baninga bakamataki bibundeli mpo na kobunda moko na mosusu mpo na bokeseni na ntina na makanisi ya politiki. Libota na biso ya bana mitano lizwaki mpasi mpo na koyinana wana. Tata na ngai, ye oyo azalaki na momeseno ya komonisa makanisi na ye polelepolele, akangamaki mpe bakatelaki ye etumbu ya mbula nsambo ya bolɔ́kɔ. Na nsima batikaki ye, kobanda ntango wana kolɔngɔ́nɔ́ na ye ya nzoto ebebaki.

Libota na biso linyokwamaki mpo na nzala mpe maladi na boumeli ya eleko wana ya mpasi. Bandeko na ngai misato ya basi bakufaki. Tata nkulutu na ngai, oyo azalaki kofanda na engumba Tampere, ayokaki nsango na ntina na mpasi na biso mpe abéngisaki tata mpe mama na ngai mpe biso bana mibale oyo totikalaki na bomoi mpo ete tokende kofanda elongo na ye.

Bambula mingi na nsima, wana tozalaki naino kofanda na Tampere, nakutanaki na elenge mwasi moko kitoko na nkombo Sylvi. Bomwana na ye ezalaki motindo moko na oyo ya ngai. Tata na ye akufaki na ntango ya etumba ya banamboka mpe na nsima, moninga moko ya penepene ya libota na bango, Kaarlo (Kalle) Vesanto, ye moto ya engumba Pori, akamataki ye mpe yaya na ye ya mwasi mpe mama na ye mpo na kofanda na ndako na ye. Alukelaki mama ya Sylvi mosala mpe akɔtisaki bilenge wana mibale ya basi na kelasi. Na nsima, Sylvi akendaki na Tampere mpo na koluka mosala, mpe ezali kuna nde tokutanaki.

Mpokwa oyo ebongolaki bomoi na ngai

Na mobu 1928, Sylvi akómaki mobandami na ngai, mpe mokolo moko tosalaki mobembo mpo na kokende na engumba Pori kotala Kalle Vesanto mpe libota na ye. Naino likambo moko te lisilá kozala na bopusi motindo oyo kati na bomoi na ngai. Kalle azalaki na bampunda oyo bakopotaka na momekano ya bampunda mpe ye moko azalaki mopoti na mpunda, kasi atikaki mosala wana. Ye mpe mwasi na ye bakómaki basakoli ya molende ya nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Búku Annuaire des Témoins de Jéhovah 1990 ezali kolobela lolenge nini azwaki bato na mosala mpo bákoma na efelo moko ya libándá ya ndako na ye oyo ezali na biteni ya likoló maloba oyo ete “Bamilió na bato bazali na bomoi sikawa bakokufa te.” Makomi yango makomamaki na bonene mpenza na boye ete ata kati na bingbunduka oyo bizali koleka nokinoki, bato bakokaki kotánga yango.

Na butu wana, ngai mpe Kalle tosololaki kino pene na kotana ya ntɔ́ngɔ́. Nazalaki kotuna ye ete: “Mpo na nini? Mpo na nini? Mpo na nini? ” mpe Kalle azalaki kolimbola. Nayekolaki mpenza makambo ya solo ya moboko ya Biblia na boumeli ya butu mobimba. Nazalaki kokoma mikapo oyo mizalaki kolimbola mateya ndenge na ndenge. Na nsima, na ntango nazongaki na ndako, nakamataki kayé moko mpe nakomaki mikapo wana nyonso na lolenge ezalaki mpenza. Lokola nayebaki naino Biblia malamu te, nazalaki kosalela kayé wana mpo na kopesa litatoli epai na bato kati na esika ya botongi ndako, epai kuna nazalaki kosala. Wana nazalaki kotóndola mateya ya mangomba ya lokuta, nazalaki ntango nyonso kozongela maloba ya Kalle: “Bosili mpenza kokosama, baninga!”

Kalle apesaki ngai adelesi ya ndako moko moke na engumba Tampere epai kuna Bayekoli ya Biblia soko 30 bazalaki kosala makita na bango. Kuna nazalaki kofanda na kongunzama na litúmu moko ya ndako pene na ekuke, na mopanzi ya Ndeko Andersson, nkolo ndako wana. Nazalaki te koyangana mbala na mbala na makita, kasi mabondeli masalisaki ngai mingi. Mokolo moko na ntango nakutanaki na mikakatano makasi na mosala, nabondelaki ete: “Ɛ Nzambe, soki osalisi ngai ete nalónga mikakatano oyo, nalaki yo ete nakobanda koyangana na makita nyonso.” Kasi makambo mabebaki lisusu mingi koleka. Mpe nayaki kososola ete natyelaki Yehova masɛngisi, na bongo nabongolaki libondeli na ngai na lolenge oyo: “Ata soki likambo nini likobima, nalaki ete nakoyangana na makita nyonso.” Nsima na yango, mikakatano na ngai mikitaki mpe nakómaki koyangana na makita mbala na mbala.​—1 Yoane 5:14.

Mosala na biso ya kosakola na bambula ya ebandeli

Na 1929, ngai mpe Sylvi tobalanaki, mpe na 1934 biso mibale tomonisaki elembo ya komipesa na biso epai na Yehova na kozwáká batisimo na mai. Na eleko wana, mosala na biso ezalaki kosɛnga komema fonó mpe bapaláki na bandako ya bato mpe kosɛnga bango na boboto nyonso soki tokoki koyokisa bango lisoló ya Biblia kozanga kofuta mbongo. Mbala mingi, bato bazalaki kokɔtisa biso kozanga kokakatana, mpe na nsima ya koyoka lisoló oyo etyamaki kati na paláki, bazalaki kosangana na lisoló mpe bazalaki kondima kozwa mwa ndambo ya mikanda.

Na ndingisa ya bakonzi ya Leta, tozalaki koyokisa bobele masoló yango moko ya Biblia na lisali ya bamasini oyo ekobakisaka nguya ya mongongo na bisika ya polele bibongisami malamu. Mpe kati na bamboka mikemike, tozalaki kokangisa ekóliseli-loláká (haut-parleur) likoló na nsambá ya ndako moko to na nsɔ́ngɛ́ ya mombonda ya likoló ya ndako. Mbala mosusu tozalaki koyokisa yango na pembeni ya libéké epai kuna bafandi ya engumba bazalaki koyangana ebele mpenza. Tozalaki komema bikoliseli-loláká, tozalaki kotya yango kati na masuwa mpe tozalaki konana malɛmbemalɛmbe pembenipembeni ya libongo. Na mikolo ya Eyenga tozalaki kosala mibembo na bísi mpo na kokende na bamboka mike ya mosika, tozalaki komema bamasini na biso ya motuya mingi oyo mikobakisaka nguya ya mongongo, tozalaki komema mpe mikanda mingi.

Mbongwana moko etye kondima na biso na komekama

Na 1938, nabandaki mosala ya ntango nyonso lokola mobongisi-nzela, kasi nakóbaki kosala lokola masɔ́. Na ebandeli ya eleko ya molungé oyo elandaki, nazwaki libyangi uta na biro ya filiale ya la Société mpo na kokóma mosaleli-motámboli oyo babéngi lelo ete mokɛngɛli ya zongazonga. Kozwa ekateli ya kondima libyangi wana ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te mpo ete nazalaki kosepela kosala elongo na lisangá na biso kati na engumba Tampere. Lisusu, tozalaki na ndako na biso moko; tozalaki na mwana moko ya mobali ya mibu motoba, Arto, ye azalaki pene mpo na kokɔta kelasi; mpe Sylvi azalaki kosepela na mosala na ye ya kotɛka na magazíni. Kasi na nsima ya kosolola elongo, nandimaki mokumba wana ya Bokonzi oyo eyaki kobakisamela ngai.​—Matai 6:33.

Na nsima, eleko mosusu ya mpasi ebandaki. Etumba ebandaki na Novɛ́mbɛ 30, 1939, na ntango mampinga ya Basovietiki bakotaki na Finlande. Etumba oyo ebéngamaki ete Etumba ya eleko ya mpiɔ, eumelaki kino na sanza ya Mársi 1940, na ntango Finlande endimaki kosala boyokani ya kimya. Emonanaki lokola ete ezingelo emikɔtisaki mpe na etumba, mpamba te yango ezalaki eleko ya mpiɔ makasi koleka bileko nyonso ya mpiɔ oyo nasilá komona. Nazalaki kotambola na nkinga longwa na lisangá moko kino lisangá mosusu wana telemomɛtɛlɛ ezalaki kokita kino na 30° C na nsé koleka malili ya filigó!

Na 1940, mosala ya Batatoli ya Yehova mopekisamaki na Finlande. Na nsima, ebele na bilenge Batatoli ya Yehova ya ekólo Finlande batyamaki na bolɔ́kɔ mpe batikaki bango kuna kati na ezalela ya mpasi makasi mpenza. Na esengo nyonso, nazalaki na likoki ya kosunga masangá na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, kobanda na 1939 kino na 1945. Yango ezalaki mbala mingi kosɛnga ete nazala mosika na Sylvi mpe Arto mpo na boumeli ya basanza mingi. Lisusu, nazalaki ntango nyonso kobanga noki te bakokanga ngai mpo ete nazalaki kosala mosala oyo mopekisamaki na mibeko ya Leta.

Lolenge na ngai esengelaki mpenza kokamwisa bato, wana ezalaki ngai kopusa nkinga oyo ememaki valísi moko, sakosi ya mikanda, mpe fonó mpe bapaláki. Moko na bantina mpo na yango nazalaki komema fonó ezali ete, soki mbala mosusu bakangaki ngai, nakokaki kopesa elembeteli ete nazalaki monɔ́ngi te soko mpe sodá-mopumbwi te oyo ayei konɔ́nga mpo na ba Russes. Bongo, nakokaki koloba ete soki nazalaki sodá-mopumbwi, mbɛlɛ bapaláki elingaki kobukana na ntango ya kopumbwa.

Nzokande mokolo mosusu, na ntango nazalaki kotala kartyé moko epai kuna likebisi lipesamaki na ntina na banɔ́ngi, libota moko ya Batatoli bakanisaki ete ngai mpe nazalaki monɔ́ngi. Nabetaki na ekuke na bango na butu wana ya eleko ya mpiɔ mpe babangaki mingi mpo na kofungolela ngai ekuke. Yango wana, nalekisaki butu yango kati ya ndako moko ya ebombelo, namizipaki kati na matiti bakausá mpo na komibomba na malili. Lobi na yango na ntɔ́ngɔ́, bayaki koyeba ngai malamu, mpe nasengeli mpenza koloba ete na mikolo nyonso oyo mitikalaki na boumeli ya boyei na ngai, basangani ya libota wana bamonisaki mpenza bizaleli malamu ya boyambi bapaya epai na ngai.

Na boumeli ya bambula oyo bitumba bizalaki kosalema, bobele ngai mpe Ndeko Johannes Koskinen nde tozalaki kosunga masangá na eteni ya katikati mpe na nɔ́rdi ya ekólo Finlande. Moko moko na biso azalaki na eteni moko monene ya mboka ya kotalela, pene na bakilomɛtɛlɛ 600 na molai. Tozalaki mpenza na masangá mingi ya kotala na boye ete tozalaki na likoki ya koumela bobele mikolo mibale to misato mpamba na lisangá moko na moko. Mbala mingi, bingbunduka bizalaki koya na ntango malamu te, mpe babísi ebandaki kozala mingi te mpe ezalaki kotonda na bato na boye ete kokóma na bisika tozalaki kokende, ebandaki kozala likambo ya kokamwa.

Nabikisami na mpasi mbala mingi

Mokolo moko, na ebandeli ya Etumba ya eleko ya mpiɔ, nakendeki na biro ya filiale na engumba Helsinki mpe nakamataki bakartɔ́ minei ya minene ya mikanda oyo epekisamaki mpo nakende na yango na engbunduka mpo na kokabola yango na masangá. Na ntango nakómaki na esika oyo engbunduka ekotelemaka na Riihimäki, losébá ya bampepo ya bitumba ebɛtaki. Basodá oyo bazalaki kati na engbunduka balataki bilamba na bango ya malili, mpe bayebisaki na basáli-mobembo ete babima nokinoki na engbunduka mpe bakende na elanga elonamá te oyo ezalaki na ngámbo mosusu ya esika engbunduka ekotelemaka.

Nasɛngaki na basodá ete bamema bakartɔ́ na ngai, nayebisaki bango ete ezalaki na ntina mingi. Bango nyonso minei bamemaki moto na moto kartɔ́ mokomoko, mpe tokimaki pene na bamɛtɛlɛ 200 likoló na elanga oyo ezipamaki na mamwé. Tomibwakaki na mabelé, mpe moto moko angangelaki ngai ete: “Ɛ, sivílí, keba koningana soko moke te! Soki babwáki-bombi bamoni ata mwa koningana moke, bakobwakela biso bombi.” Nazalaki na motema mɔ́tɔmɔ́tɔ ete nabalola elongi na ngai na bokɛngi nyonso mpo na kotala na likoló, epai natángaki mpepo 28!

Na pwasa, mabelé maninganaki mpo na babombi oyo ebwakamaki. Atako bombi ekweaki te na esika engbunduka ekotelemaka, kasi engbunduka oyo toyaki na yango ekwelaki bombi. Ezalaki nsɔ́mɔ na komona engbundaka oyo ebebisamaki mingi mpenza mpe bibende ya nzela ya engbunduka bingunzamakingunzamaki! Lobi na yango na ntɔ́ngɔ́ nakóbaki mobembo na ngai elongo na bakartɔ́ na ngai, mpe basodá bakóbaki mobembo na bango na engbunduka mosusu. Moko na bango akómaki Motatoli na nsima ya etumba, mpe ayebisaki ngai ete na nsima basodá balobaki na ntina na sivilí oyo akesanaki mpenza na basusu elongo na bakartɔ́ na ye.

Mwa moke na nsima, wana Ndeko Koskinen azalaki kosala mobembo mpo na kokende kotala lisangá moko ya moke na Rovaniemi epai na nɔ́rdi ya mokili ya Finlande, bakangaki ye liboso ete akita na engbunduka. Batyaki ye na bolɔ́kɔ, epai kuna banyokolaki ye makasi. Wana ekómaki ntango mpo na ngai ete nakende kosunga bobele lisangá wana, nazwaki bibongiseli mpo ete nakita na mwa esika moko engbunduka ekotelemaka na engumba Koivu. Kuna, Ndeko mwasi Helmi Pallari asalelaki ngai bibongiseli ete nakóba mobembo na ngai na wagó oyo ekokumbaka miliki. Boyei na ngai na lisangá ya Rovaniemi elekaki malamu. Nzokande, wana ezalaki ngai kotika lisangá yango, nakutanaki na mwa mikakatano.

Wana tozalaki na nzela mpo na kokende na esika engbunduka ekotelemaka, ngai mpe moninga na ngai tokutanaki na basodá mibale oyo bazalaki kosɛnga mikanda ya Leta epai na baleki-nzela nyonso. Nalobaki ete: “Kotala bango te. Talá bobele na liboso.” Tolekaki na katikati na bango lokola nde bazalaki wana te. Na nsima, babandaki kolanda biso. Atako bongo nalóngaki kokima bango na esika oyo engbunduka ekotelemaka katikati ya ebele ya bato mpe kopumbwa kati na engbunduka oyo ezalaki kotambola. Na mikolo wana, mikakatano mizalaki mingi kati na mosala ya mokɛngɛli-motámboli!

Mokolo moko bakangaki ngai mpe bamemaki ngai na biro ya Leta epai bakozwaka bato mpo na kokende na mosala ya sodá. Mokano ezalaki ete batinda ngai epai kuna etumba ezalaki kongala. Kasi telefone elelaki, mpe mokonzi ya basodá oyo asengelaki kotuna ngai mituna ayambaki yango. Nayokaki mongongo moko na telefone konganga ete: “Mpo na nini mpenza bozali kotya motó makasi na kotindáká bato ya maladi, baoyo babongi na kosala eloko moko te? Tosengeli bobele kozongisa bango. Tozali na mposa ya bato oyo babongi na mosala!” Ezalaki esengo mpo na ngai, mpamba te nazalaki na mokanda ya monganga oyo ezalaki koyebisa na ntina na maladi oyo nazalaki na yango. Ntango nalakisaki yango, batikaki ngai, mpe ezalaki na motindo wana nde nakóbaki mosala na ngai katikati na masangá!

Napesi lisungi kati na momekamo

Etumba ezalaki ntango nyonso kongala, mpe moninga na ngai Ahti Laeste akangamaki. Mwasi na ye abéngisaki ngai. Na ntango nakendeki epai na bango, namonaki mokanda moko kati na mikanda na ye ya Leta, mokanda oyo mopesamelaki ye na bapolisi ya etúká na bango, oyo mopesaki ye nzela ete ayokisa masoló matyami kati na bapaláki na bisika ya polele bibongisami malamu kati na engumba. Tokendaki na mokanda yango na esambiselo. Nsima wana basilisaki kotánga mokanda ya efundeli, napesaki mokanda yango epai na ndeko Laeste. Zuzi atindaki sodá aya na fonó mpe ebele ya bapaláki oyo ezalaki na masoló ya Biblia mpo ete bayangani na esambiselo bakoka koyoka yango. Nsima ya koyoka lisoló moko na moko, zuzi alobaki ete amonaki likambo moko ya mabe te kati na makambo nyonso malobamaki.

Bongo, Ahti, mwasi na ye, mpe ngai totindamaki ete tokende naino na nzela ya kati ya ndako mpo na kozela ekateli ya esambiselo. Kuna tozalaki kozela na motema likoló. Na nsuka, toyokaki mongongo moko koloba ete: “Mofundami, tosɛngi na yo okɔ́ta kati na ndako ya esambiselo.” Ndeko Laeste alóngaki! Mitema na biso mitondaki na botɔ́ndi mpo na Yehova wana tokóbaki mosala na biso; ndeko mobali mpe ndeko mwasi Laeste bakóbaki mosala na bango na lisangá na bango, ngai mpe nakóbaki oyo ya ngai kati na mosala ya mokɛngɛli.

Etumba esili​—mosala na biso ezali kokóba

Epekiseli oyo ezalaki likoló na mosala na biso elongolamaki na ntango etumba esilaki, mpe bandeko babimisamaki na bolɔ́kɔ. Na boumeli ya ebele ya bambula na ngai ya mosala, nasepeli mingi na mokumba oyo bandeko basi bakokisaki kati na mosala ya Bokonzi mpe na kosungáká mibali na bango. Mingi mpenza, nazali na botɔ́ndi mpo na elimo ya komipesa mpe lisungi ya Sylvi. Na lisalisi na yango, nazalaki na likoki ya kokóba mosala na ngai ya mokɛngɛli-motámboli na boumeli ya bambula 33 kozanga kokata mpe na nsima, nasalaki lokola mobongisi-nzela monene.

Ngai mpe Sylvi tolendisaki Arto ete abanda mosala ya babongisi-nzela na ntango asilisaki kelasi na ye, ayekola Lingelesi, mpe akɔta na Galadi, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower, na Etats-unis. Azwaki lipɔlɔ́mi na Galadi na 1953. Na nsima, abalaki Aeva, mpe bango mibale basangani kati na mitindo mikeseni ya mosala ya ntango nyonso; kati na yango mosala ya zongazonga, kosala na Betele, mpe mosala ya babongisi-nzela monene. Na 1988, bayaki na Tampere, na engumba oyo biso tozali kofanda, mpo na kosunga ngai mpe Sylvi, wana ezali bango kokóba mosala na bango lokola babongisi-nzela monene.

Ngai mpe Sylvi tosili kolekisa bomoi moko ya bozwi mpe ya mapamboli elongo na makambo mingi ya kala oyo mazali naino kati na bɔɔngɔ́ na biso mpo na kolendisa biso, atako nguya na biso esili sikawa kokita mingi. Ezali mpenza esengo mingi na kokanisa na ntina na bokóli oyo tosili komona. Na ntango nabandaki kotala masangá na 1939, ezalaki na basakoli ya Bokonzi 865 na Finlande, kasi sikawa bazali koleka 18 000!

Na ntango nabandaki mosala ya ntango nyonso na 1938, nayebaki te ete bambula 55 na nsima, nakolanda kosangana ntango nyonso kati na mosala yango. Atako bambula na biso ezali kopusana, tozali kokóba na nguya ya Yehova, kotaleláká bongo mbano na biso oyo elakami. Tozali kotya motema na maloba oyo ya mokomi na Nzembo: “Jambi [Yehova, NW] ajali malamu, boboto na ye ekosila tɛ; sɔlɔ na ye ekotikalaka na libota na libota.”​—Njembo 100:5.

[Elilingi na lokasa 21]

Leo mpe Sylvi Kallio bamonisaki elembo ya komipesa na bango epai na Yehova na 1934

[Elilingi na lokasa 21]

Fɔtɔ́ ya sika ya Leo mpe Sylvi awa ezali bango kobelema na mibu na bango 60 ya komipesa na mosala

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto