Mokili moko kitoko—Ezali bobele ndɔ́tɔ?
SOKI ozalaki mondimi ya lingomba Mazdéisme, lokola mosakoli Zoroastre ya ekólo Iran ateyaki yango, mbɛlɛ olingaki kozela mokolo oyo mabelé makozongela bonzengá na yango ya ebandeli. Soki ozalaki na Grèce ya ntango na kala, mbala mosusu olingaki kooka mposa makasi ya kokóma na Bisanga ya Bisengo mingi to olingaki kooka mposa ya komona kozongisama ya eleko kitoko oyo mokomi ya ntɔ́ki, Hésiode, alobelaki na ekeke ya mwambe L.T.B. Mbala mosusu Guaraní, moto moko ya Inde, na súdi ya Amerika azali naino koluka Mokili-Mozangi-Mabe. Lokola ozali kobika na eleko na biso, mbala mosusu ozali na elikya ete mokili mokobonga na nzela na mateya ya politiki to na kokangáká ntina ya ezingelo na mikolo na biso oyo.
Eleko kitoko, Bisanga ya Bisengo, Mokili-Mozangi-Mabe—wana ezali mwa ndambo ya bankombo oyo esalelami mpo na kolimbola mposa bobele moko, elikya ya komona mokili moko ya kitoko.
Mokili oyo, mokili na biso, mozali mpenza esika ya malamu te. Bokóli ya mobulu, kobomana ya bandeko bango na bango kati na bitumba ya mabe lokola emonaná naino te, koboma bato, kozanga komibanzabanza na bampasi ya basusu, bobólá mpe nzala, kozanga mosala mpe kozanga bomoko, mikakatano ya ezingelo, bokɔnɔ bozangi nkisi oyo ezali konyokola bamilió ya bato—molɔngɔ́ ya mikakatano ya ntango na biso emonani lokola ete mozali na ndelo te. Ntango akanisaki na ntina ya bitumba oyo bizali kosalema sikawa, mopanzi-nsango moko ya ekólo Italie alobaki ete: “Motuna oyo mozali kobima yango moko kati na makanisi mozali ya koyeba soki koyinana ezali te liyoki oyo lileki makasi na ntango na biso.” Wana ozali kotalela ezalela yango, okanisi ete ezali likambo ya mayele kooka mposa ya eleko mosusu, oyo eleki malamu? To okanisi ete mposa motindo yango ezali bobele makanisi mpamba, ndɔ́tɔ oyo ekokokisama soko moke te? Tozali nde kobika kati na mokili oyo moleki bileko nyonso mosusu na malamu?
Wana ezali bobele mabánzo ya ntango na biso te. Na boumeli ya bikeke mingi, bato bazalaki kolɔ́tɔ mokili oyo kati na yango boyokani, boyengebene, bozwi mingi mpe bolingo ekozala kuna. Wana mibu mizali koleka, bafilozofe mosusu babimisaki makanisi na bango na ntina na bikólo bisengeli, mikili ya kitoko. Kasi, na mawa nyonso, bakokaki te kolimbola lolenge nini yango ekokaki kosalema.
Molɔngɔ́ wana ya ndɔ́tɔ oyo eumeli bikeke mingi, ya makanisi mpamba, mpe ya mposa ya bato mpo na mokili moko kitoko, ekoki bongo koteya biso?
[Elilingi na lokasa 3]
Oyo ezali mokili moleki mikili nyonso na kitoko?