Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 15/1 nk. 21-22
  • Babongisi-nzela bazali kopesa mpe bazali kozwa bolamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Babongisi-nzela bazali kopesa mpe bazali kozwa bolamu
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini basusu bazali kosala mosala ya mobongisi-nzela?
  • Basusu mpe bakoki kopesa lisungi na bango
  • Kangama na ekateli na yo
  • Bisengo mpe mapamboli mingi
  • Mapamboli ya mosala ya Mobongisi-nzela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mosala ya mobongisi-nzela: ezali mpo na yo?
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • “Okoki kozala mobongisi-nzela ya malamu!”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Mosala ya mobongisi-nzela ekómisaka makasi boyokani na biso na Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 15/1 nk. 21-22

Babongisi-nzela bazali kopesa mpe bazali kozwa bolamu

MOKLISTO mwasi moko oyo akómisaki mosala ya mobongisi-nzela​—mosala ya kosakola Bokonzi ntango nyonso​—lokola mosala ya bomoi na ye, alobaki ete: “Eloko moko te ekokani na bisengo oyo moto azali kooka na ntango azali kosalisa bato mpo na koyeba Yehova mpe solo na ye.” Misala boni mizali kopesa bosepeli motindo oyo?

Mosala ya mobongisi-nzela ezali mosala moko kitoko oyo mozali kopesa litambwisi malamu kati na bomoi. Nini ezali kopusa moto moko na kopona nzela wana? Nini ezali kopesa nzela na kolendendela kati na mosala yango ntango molai mpo na kozwa mapamboli na yango?

Makambo mibale mazali na ntina. Ya liboso esengeli ete ezalela ya makambo na biso ezala malamu. Ya solo, ezalela ya makambo ya baklisto mingi ezali kopesa bango nzela ete basala mosala yango. Bizaleli malamu ya elimo mpe lolenge ya kokanisa ezali mpe na ntina. Ya solo, ezala ete bazali babongisi-nzela to te, baklisto nyonso bakoki kolóna bizaleli ya boklisto.

Mpo na nini basusu bazali kosala mosala ya mobongisi-nzela?

Nini ezali masengami oyo esengeli kokokisa mpo na kozala mobongisi-nzela ya molende? Esengeli mpenza kozala mosakoli malamu. Babongisi-nzela basengeli kozala na makoki ya kolakisa nsango malamu, ya kozongela bato oyo basepelaki mpe kotambwisa boyekoli ya Biblia na ndako. Mobongisi-nzela oyo azangi makoki akoki mpenza kolemba kati na motema na ye. Kasi nyonso esuki bobele wana te.

Na bongo, nyonso oyo etali losambo na biso, kati na yango mosala ya mobongisi-nzela, ezali kotalela boyokani na biso elongo na Yehova mpe ebongiseli na ye. Rado, elenge moko mobongisi-nzela, ayebisaki ete: “Ezali na eloko moko te ya kosepelisa koleka, mpo na elenge moklisto, bobele kokanisa na ntina na Yehova mpe kotambola kati na solo.” Ya solo, mpo na bilenge, mosala na mobongisi-nzela ezali moko na lolenge kitoko ya komonisa bolingo na bango mpo na Yehova mpe bozindo ya boyokani na bango elongo na ye.​—Mosakoli 12:1.

Boyebi mpe bokangi ntina ezali na motuya mingi. (Bafilipi 1:9-11) Ya solo, bizaleli wana bizali kotonga bomoi na biso ya elimo. Boyekoli na yo moko ya Biblia mbala na mbala ezali na ntina mpo na kopengola bolembu kati na elimo, mpe mpo na kobatela esengo mpe elikya. Ya solo, boyebi oyo tozali kozwa esengeli te bobele komema bopusi likoló na elimo na biso, kasi esengeli lisusu likoló na motema na biso. (Masese 2:2) Na bongo, longola boyekoli na biso moko ya Biblia, esengeli na biso kopesa ntango na mabondeli mpe bomanyoli, mpo ete boyebi oyo bozwami bosimba motema na biso. Na bongo, soki ezalela na biso epesi nzela, tokozala na mposa ya kokóma babongisi-nzela.​—Kokanisá na Esdrase 7:10.

Mosala ya mobongisi-nzela mozali mpe kosenga komipesa. Elenge mobali moko na nkombo Ron azalaki na mikano mpo na kokoma mobongisi-nzela. Azalaki bobele kozela ete makambo na ye mabonga mpo na kokokisa mikano na ye. Azalaki mpenza kolinga mosala moko oyo mokopesa ye nzela ete azala bobele mobongisi-nzela te, kasi lisusu oyo ekosalisa ye na kosomba mwa biloko ya motuya mingi. Asololaki likambo yango na ndeko mwasi moko oyo ateli; eyano ya ndeko mwasi wana ekamwisaki ye, ete: “Yehova apambolaka misala, kasi bilaká te.” Ron andimaki mosala moko ya lifuti moke, nde epesaki ye nzela ete azala mobongisi-nzela. Na kosaleláká batoli oyo ezwami na Matai 6:25-34, likoki ezali ya kozala na bomoi malamu na mwa lifuti ya moke.

Mposa ya kolanda batoli malamu na komikitisa nyonso ekoki mpenza kosalisa mpo na kobanda mosala ya mobongisi-nzela. Uta ntango ayebaki solo, Hanna alonaki mposa ya kozala mobongisi-nzela. Liboso alóngaki te mpo na kokokisa mokano wana, mpamba te asengelaki kobatela naino bana na ye mpe, na nsima, amikotisaki kati na mombongo. Koyokáká batoli malamu ya bankulutu na bokengi, atikaki mosala na ye oyo mozalaki kopesa ye mosolo mingi mpe abandaki mosala ya mobongisi-nzela. Sikawa, Hanna azali na esengo mingi mpo na kosalisa bato mosusu na komipesa na Yehova mpe kolendisa baklisto oyo batiká mosala ya kosakola.

Botɔ́ndi mpo na bolamu oyo solo ememelaki biso ekoki kopusa biso na kozala babongisi-nzela. Tókamata ndakisa ya mwasi moko oyo anyokwamaki mingi kati na makanisi, oyo libota na ye lizalaki kobeba. Makambo na ye mabongwanaki mpenza na ntango ayebaki solo ya Liloba na Nzambe mpe wana asalelaki yango kati na bomoi na ye. Kosimbamáká na bolamu oyo solo ememelaki ye, asukisaki ete lolenge malamu ya komonisa botɔ́ndi na ye ezali ya kozala mobongisi-nzela mpe komema lisalisi na ye epai na basusu. Ezali yango nde asalaki, mpe lelo oyo, Yehova apamboli ye na kopesáká ye ebele na boyekoli ya Biblia mpe bomoi moko ya esengo kati na libota.

Basusu mpe bakoki kopesa lisungi na bango

Mbala mingi babongisi-nzela balendisaka bato oyo bazali na mposa ya kobanda mosala yango. Rado, oyo tosilaki kolobela liboso, azalaki na mbula motoba na ntango baboti na ye bayekolaki Biblia elongo na babongisi-nzela mibale. Azalaki elenge mpenza nde azalaki kobima elongo na basakoli wana ya ntango nyonso kati na mosala ya kosakola. Na mibu 17, Rado ye moko akómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza (pionnier permanent). Elenge mobali mosusu, Arno, abɔkwamaki kati na libota moko ya boklisto, kasi alembaki kati na elimo. Na nsima, asalaki milende mpo na kozongela makasi na ye ya elimo. Alobi sikawa ete: “Babongisi-nzela balendisaki ngai mingi. Nazalaki kosangana na bango mingimingi na ntango tozalaki kozwa bopemi na kelasi; mbala mosusu, ezalaki kokómela ngai ete nalekisa ngonga 60 na sanza kati na mosala ya kosakola. Nsima na yango, ezalaki na ngai lisusu mpasi te mpo na kosala litambe mpe kokoma mobongisi-nzela ya sanza na sanza [ngonga 90 ya mosala na kosakola na sanza].” Bilenge wana bamanyolaki mpe bazwaki litomba ya maloba ya 1 Bakolinti 7:29-31, epai kuna Paulo apesi toli ya koboya kosalela mokili na koleka.

Nkaká ekozala te mpo ete elimo ya mosala na mobongisi-nzela elónama kati na libota moko soki matomba ya elimo ezali kozwa esika ya liboso mpe soki baboti bazali kolendisa bana na bango ete babanda mosala ya ntango nyonso. Ezali kati na makambo motindo wana nde Philo akólaki. Amonisi ete: “Mbala mingi bazalaki kopesa ngai toli ete nalanda bakelasi na ngai, ete nakanisa na ntina na mosala ya bomoi na ngai mobimba. Atako bongo, baboti na ngai basalisaki ngai ete nasala liponi moko ya bwanya mingi. Balimbolaki ngai ete soki nalingi mpenza kobongisa bomoi na ngai ya mikolo mizali koya, nasengeli liboso kolóna boyokani malamu elongo na Yehova.”

Mwasi moko na nkombo Thamar andimi mpe ete ndakisa mpe milende ya baboti na ye epusaki ye ete akoma mobongisi-nzela. Alobi ete: “Nayebi lisusu te soki na ntango nini nabandaki kozwa makanisi ya elimo mpo na bomoi na ngai, kasi nayebi ete nabotamaki na yango te. Ndakisa ya baboti na ngai baoyo bazalaki kosangana mbala na mbala kati na mosala ya kosakola mpe koyangana na makita, mpe bolingo na bango mozindo mpo na solo, esalisaki ngai mingi mpo na kokolisa elimo na ngai.”

Kangama na ekateli na yo

Ntango okómi mobongisi-nzela, esengeli otikala sembo na ekateli wana ya bwanya mpo na kozwa matomba na yango. Mpo na likambo yango, tokoki kopesa batoli mingi ya kitoko. Na ndakisa, babongisi-nzela bazali kosala malamu na koyekola lolenge ya kosalela ntango na bango mpo na kozwa litomba na yango. Nzokande, oyo eleki ntina, ezali boyokani oyo moklisto azali na yango elongo na Yehova mpe ebongiseli na ye.

Boyokani yango ezali kotalela mabondeli na biso. Cor ayebisi ete: “Na ntango nayebaki solo, nazalaki mpenza na mposa ete nakóma mobongisi-nzela.” Kasi, tata na ye alingaki ete asilisa naino boyékoli na ye na Eteyelo ya likoló ya mosala na bilanga. Na nsima, Cor abandaki mosala na ye ya mobongisi-nzela. Mikolo mingi na nsima, abalaki, mpe mwasi na ye abandaki mosala ya mobongisi-nzela. Na ntango azwaki zemi, amitunaki soki asengelaki kokata mosala na ye. Ayebisi: “Mbala mingi nazalaki kobondela Yehova mpo na koyebisa ye mposa na ngai mozindo ya kokóba mosala na ngai ya mobongisi-nzela.” Cor asukaki na kozwa mosala moko oyo mopesaki ye nzela na kozala mobongisi-nzela wana ezalaki ye kobɔkɔla bana na ye.

Soki tozali kosepela na biloko ya ntina, ekozala na biso pɛpɛlɛ mpo na koumela kati na mosala ya mobongisi-nzela. Ntoma Paulo akomaki ete: “Ejaleli na bino ejanga mposa na mosɔlɔ; bosepela na bilɔkɔ bijali na bino. Jambi ye alobaki ete: ‘Nakotika yɔ sɔkɔ mokɛ tɛ, nakosabola yɔ mpe tɛ! ’” (Baɛbɛlɛ 13:5) Harry mpe Irène basepelaki na nyonso oyo bazalaki na yango mpe bakokaki kokóba kosala lokola babongisi-nzela. Atako akufá miso, Irène azali mobongisi-nzela uta mibu mwambe; alobi ete: “Tosila naino te komitungisa na ntina na ezalela na biso mpo na oyo etali misolo. Tozali kosɛnzɛla ete tomizwela banyongo mpambampamba te. Tozalaka ntango nyonso kotánga motuya. Bomoi na biso ezali na mindondó te, kasi ya esengo mingi, mpe topambolami mingi mpenza.”

Bisengo mpe mapamboli mingi

Kokanisáká na ntina na mibu libwa alekisi kati na mosala ya mobongisi-nzela, Thamar ayebisi ete: “Tozali mpenza komiyoka pene na Yehova, lokola soki nde asimbi biso mpenza na lobɔkɔ.” (Njembo 73:23) Ayebisi mpe mwa mimekamo: “Kozanga kokoka na ngai moko mpe oyo ya basusu ezalaki kosilikisa ngai mbala na mbala. Lisusu, ntango nazalaki kosakola na nse ya mbula mpe kati na malili, nazalaki kokanisa na ntina na bandeko mibali mpe bandeko basi oyo baponaki bomoi ya lokumu to ya bozwi, mpe ezalaki kokómela ngai ete nalula bango. Kasi, kati na motema na ngai mpenza, nazalaki kotombela te ete názala na esika na bango. Longola mosala ya mobongisi-nzela, eloko nini mosusu ekokaki kopesa ngai bisengo mingi boye, bosepeli na elimo mpe mapamboli? ” Okopesa motuya na bisengo mpe na mapamboli ya motindo wana?

Babongisi-nzela bazali na likoki ya kosalisa bato mingi na koyeba solo ya Biblia, mpamba te bazali kolekisa ntango mingi kati na mosala ya boklisto. Harry mpe Irène, oyo touti kolobela na mwa liboso, balobi ete: “Ebongiseli ya Yehova ezali kopesa mabaku kitoko, kasi kosalisa moto moko oyo asepeli na masoló ya Biblia kala mingi te mpo na kokóla kino kokóma mosaleli na Yehova ezali libaku lileki nyonso na kitoko.”

Mobongisi-nzela moko ayebisaki likanisi oyo na bosembo nyonso ete: “Kati na likambo na ngai, nasili komona bosolo ya Masese 10:22, oyo elobi ete: ‘Mapamboli na [Yehova] ikoyeisa bojui, akobakisa mawa na yango te.’ Mokapo oyo mosili kokokana mbala na mbala epai na ngai na boumeli ya mibu oyo nazali kosalela Yehova.”

Baboti, bolónoka mposa ya kozala babongisi-nzela kati na mitema ya bana na bino? Babongisi-nzela, bosalaka makasi mpo na kopesa mposa wana epai na basusu? Bankulutu, bopesaka lisungi na bino epai na babongisi-nzela ya lisangá na bino mpe bosalisaka basakoli ete balóna elimo yango? Tozali kotombela ete motuya monene ya basaleli na Yehova báluka kozwa mapamboli wana mingi mpe babanda mosala ya mobongisi-nzela.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto