Bazali kosakola na mboka mike na mokili ya Espagne
YESU KLISTO alekaki “kati na mboka minene mpe mboka mike, mpe alakisi mpe atamboli na Yelusaleme.” (Luka 13:22) Mpo na kokokisa mosala wana, Yesu mpe bayekoli na ye basakolaki bobele “na mboka minene” te kasi lisusu “na mboka mike.” Na ntembe te, elingaki mpenza kozala petee mpo na bango kotya likebi mingi na mboka minene, nzokande balekaki te mboka mike mingi oyo ezalaki kati na mokili wana.a
Batemwe ya Jéhovah ya Espagne bakutanaki na mikakatano lokola oyo Yesu akutanaki na yango. Kino na 1970, bisika mingi ya mboka mike oyo ekómaki pene mpo na kobuka mbuma, kasi litatoli epesamaki naino te. (Matai 9:37, 38) Mboka mike mingi na bangomba ya nord epai mbula enokaka mingi, na bisobe ya kokauka ya katikati, mpe bisika oyo bizali pembeni ya mai monene eyokaki naino nsango malamu ya Bokonzi te.
Batemwe ya Jéhovah ya Espagne bazalaki na ekateli ya kosala nyonso mpo na komema nsango malamu kino na bitúká yango. Kasi mpo na nini bato ya bisika yango basengelaki kozela ntango molai boye liboso ete bakoka koyoka nsango malamu? Mpe mayoki na bango ezalaki lolenge nini?
Kondimama na mibeko epesi nzela na litatoli na mboka mike
Mosala ya Batemwe ya Jéhovah na Espagne epekisamaki uta nsuka ya etumba ya banamboka na 1939. Na boumeli ya bambula 1950 mpe bambula 1960, Batemwe ya molende basakolaki na bokɛngi kati na bingumba, epai bayebanaki mpenza mingi te. Na nsima, ntango mosala na bango endimamaki na mibeko na mobu 1970, basakoli ya Bokonzi bazalaki soko 10 000 kati na Espagne. Penepene bango nyonso bazalaki kofanda kati na mboka minene mpe bingumba minene, kasi mboka mike ya Espagne ezalaki mpe na mposa ya koyoka nsango ya Bokonzi. Nani alingaki komipesa na mosala wana makasi?
Na boumeli ya bambula 1970, Batemwe basalaki makasi mpo na kosakola nsango malamu na bitúká nyonso ya eteni wana ya mokili oyo ezingami na mai monene. Kobanda 1973 kino 1979, Mosala na biso ya Bokonzi (oyo epesaka batoli etali mosala ya kosakola kati na masangá ya Batemwe ya Jéhovah) ebimisaki sanza na sanza bitúká bikeseni ya mokili yango epai basakoli bakokaki kopesa lisalisi na bango. Mpo na yango, mabota mingi mandimaki mpenza libyangi yango mpe makendaki na bolingo na bango moko kati na bateritware epai mposa ezalaki mingi.
Ndakisa malamu na likambo yango ezali oyo ya Rosendo mpe mwasi na ye, Luci. Batindaki bango lokola ba pionniers spéciaux (basakoli oyo bapesaka ntango na bango nyonso mpo na kosakola) na mboka moko ya balɔbi mbisi na nord-ouest ya Espagne. Bazwaki bongo ekateli ya kofanda na etúká yango kino ntango babotaki mwana na bango ya liboso. Rosendo amonisi ete: “Nasengeli kondima ete tokutanaki na bantango moko ya mpasi. Ezalaki mpasi kozwa mosala ya mosuni, kasi totyaki motema na lisalisi ya Jéhovah mpe ata mokolo moko te tolalaki nzala to tozangaki esika ya kofanda. Ezalaki mpenza na ntina mingi.” Na boumeli ya bambula, bapesaki maboko mpo na kosalema ya masangá minei kati na etúká wana ya Espagne.
‘Boluka moto oyo abongi na yango’
Yesu alobaki na bayekoli na ye ete “boluka” bato oyo babongi na nsango malamu kati na bingumba to na mboka mike nyonso. (Matai 10:11) Kati na mboka mike ya Espagne, bolukiluki wana ezali kosenga mosala makasi mpe mayele, lokola Ángel, ndeko moko ya mboka Alcoy (Alicante) asili komona yango. Autaki kosilisa kotala mwa bandako ya mboka moke Masías wana ayokaki kolela ya nsósó mobali. Akanisaki kati na motema na ye moko ete: “Soki nsósó mobali ezali awa, boye ndako moko mpe esengeli kozala—ndako oyo tomonaki yango te.” Nsima ya kolukaluka zingazinga, Ángel amonaki nzela moke oyo ezalaki komema epai na ngomba moke mpe bakómaki na ndako moko oyo etangolami.
Na ferme wana, José mpe Dolores ndeko na ye ya mwasi bazalaki kofanda, bazalaki na mibu koleka 60. Bayokaki na likebi mingi mpe bandimaki nokinoki boyekoli ya Biblia. Nzokande, ezalaki likambo ya petee te koyekola elongo na basokemi wana, mpamba te bayebaki kotanga mpe kokoma te mpe esengelaki kobongola makambo nyonso na lokóta oyo ezali kolobama na Valencia, lokóta bobele moko oyo bazalaki koyoka. Lisusu, bakutanaki na botemeli monene epai na baninga na bango ya pembeni. Atako mikakatano wana, José mpe Dolores bakólaki kati na solo, bazalaki koyangana na makita, atako yango elimbolaki mpo na bango kosala mobembo molai kati na bangomba. Na nsima, bakokisaki masengami mpo na batisimo, mpe bango nyonso mibale bazali kolanda kosalela Jéhovah na bosembo nyonso.
Rosendo mpe Luci, oyo tolobelaki na ebandeli, bazali kolimbwela biso lolenge María andimaki solo. Mwasi wana oyo abɛlaka bukabuka, azalaki na ndako moko etangolami penepene ya Moaña, na nord-ouest ya Espagne. Ntango asololaki mbala ya liboso elongo na Batemwe ayebaki kotanga mpe kokoma te, mpe asilaki koumela na mbeto mibu mingi na maladi ya bukabuka oyo azwaki uta bomwana na ye. Ndako na ye etangolamaki bakilomɛtɛlɛ mibale mosika na balabala ya penepene. Nzokande, azalaki na mposa makasi ya koyekola Biblia mpe amonisaki nokinoki ekateli na ye ya kosalela Jéhovah. María ayekolaki kotanga mpe kokoma mpe abandaki koyangana na makita, na lisalisi ya milende makasi ya lisangá. Bandeko bazalaki komema ye penepene bamɛtɛlɛ 200 longwa na ndako na ye kino na nzela moko moke ya mabelé mpe bazalaki kofandisa ye malembe kati na motuka. Atako na ebandeli libota na ye ezalaki koboya, alendendelaki mpe azwaki batisimo. Na ntina na limemya mpo na ye, oyo bokóli na ye ya elimo epesaki ye, María akoki sikawa kokumba motuka moko oyo eyokani na ezaleli na ye. Mpe María alandaki mateya oyo epesaki ye libaku ya kozwa boyebi ya moboko. Rosendo alimboli ete: “Soki tokoki kosalisa bato lokola María, tokozala na esengo ya kosala ata likambo nini.”
Batangi ya Biblia bazali koyanola nokinoki
Na bambula 1970, mpo na mbala ya liboso na Espagne, Biblia epesamaki nzela ete etangama na bato nyonso. Ba espagnols mingi basombaki Biblia mpe basusu babandaki kotanga Makomami. Ezali yango oyo Pilar, mwasi moko mofandi ya Medina del Campo (Valladolid), azalaki kosala ntango Batemwe ya Jéhovah bayaki mpo na mbala ya liboso kotala ye na engumba wana, na 1973. Lokola azalaki Katolike, akakatanaki mpo na kondima mikanda ya Batemwe, kasi alingaki kososola Biblia. Mpo na yango, andimaki masoló ya poso na poso mpo na kozwa biyano na mituna na ye mitali Biblia.
Na kosaleláká malamu mikanda minyatami na la Société Watch Tower, ndeko pionnier ya mwasi oyo akendaki kotala Pilar akokaki koyanola na mituna mingi oyo azalaki na yango. Nsima ya baposo mingi, wana akamwaki mingi na oyo azalaki koyekola, Pilar andimaki kosalela mokanda Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko mpo na koyekola Biblia. Liboso na kosilisa boyekoli ya mokanda Solo, asilaki kotanga Biblia mobimba mpe andimaki ete asili kozwa solo. Akómaki Temwe ya liboso na Medina del Campo, oyo lelo ezali na Salle du Royaume moko kitoko oyo ezali na basakoli 63.
Batemwe ya Espagne bazali naino kokutana na bato oyo “bazali komibanzabanza na bamposa na bango ya elimo” mpe baoyo bazali ntango nyonso kotanga Biblia mpo na kososola mokano ya Nzambe. (Matai 5:3) Pepi, mwasi oyo kala azalaki Katolike mpe moteyi ya malongi na paroisse ya Zumaia na nord ya Espagne, azalaki kosakola na mboka moko ya pembeni ntango akutanaki na sángo ya paroisse.
Sángo ayebisaki ye ete: “Pepi, ozali kolekisa ntango na yo mpamba. Na mboka oyo ya Itziar, ezali bobele na bato mibale oyo bazali kosepela na makambo ya elimo—mobali moko mpe mwasi na ye. Baoyo batikali bakendeke na ndakonzambe bobele mpo na momeseno.”
Pepi azongisaki ete: “Na bongo, soki ezali na bato mibale oyo bazali kosepela na makambo ya elimo, bakokóma Batemwe ya Jéhovah.”
Pepi alandaki mosala na ye ya kosakola ndako na ndako elongo na Batemwe mosusu kino basilisaki mboka mobimba. Lokola bazalaki komizela na yango, na ndako moko etangolami bakutanaki na babalani oyo sángo alobelaki bango. Bazalaki kotanga Biblia, kasi bazalaki kososola yango te. Bandimaki nokinoki koyekola Biblia, bakólaki nokinoki mpe bazwaki batisimo na Avril 1991.
Bato mosusu ya motema sembo bayekolaki solo na kotangáká bango moko mokanda moko mokolimbolaka Biblia oyo enyatami na la Société Watch Tower. Na ndakisa, Batemwe ya engumba Almadén (Ciudad Real) bazalaki kosakola na engumba moko moke ya Ciruelas (Badajoz) wana bakutanaki na mwasi moko oyo ayokaki bango na likebi mingi. Ntango bamonaki mposa monene oyo amonisaki basengaki ete bayekola Biblia elongo na ye. Nzokande, aboyaki mpe alobaki ete mobali moko ya mobangé azalaki kopesa ye mateya ya Biblia. Bato mingi mosusu ya mboka yango balobaki bobele likambo moko wana. Lokola likambo yango ebendaki likebi na bango, bandeko balukaki koyeba mobali wana ya mobangé. Bazwaki adresse na ye mpe bakendaki kotala ye.
Na kokamwa nyonso, bamonaki ete mobali yango na nkombo Felipe, asilaki kozwa mokanda Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis, na Madrid. Nsima ya kotanga yango nyonso asosolaki ete azalaki na mokumba ya koyebisa nsango malamu epai na bazalani na ye. Yango wana, azalaki kosalela mokanda yango mpo na kopesa mateya ya Biblia. Bandeko bazwaki bibongiseli mpo na koyekola elongo na ye. Mwasi moko oyo azalaki koyekola Biblia elongo na ye andimaki mpe boyekoli ya Biblia. Atako azali na mibu 80, mpe mitungisi na ntina na kolongono ya nzoto, Felipe azali kokóla malamu kati na solo.
Kolónga makanisi mabe ya bato
Bateritware ya mboka mike ezali na mikakatano na yango. Mbala mingi bonkɔ́kɔ mpe biyambayamba ya mangomba ezali na bopusi makasi na bitúká wana, mpe bato mingi ya mboka mike bazali na makanisi mabe oyo ekotela bango na ntina na “lingomba ya sika.” Bafandi mingi ya mboka mike bazali kotya likebi mingi na oyo baninga mpe bandeko na bango bakokanisa soki bakoti na lingomba mosusu. Kasi nguya ya Liloba na Nzambe ekoki kolónga mikakatano wana mpe kobongola bomoi ya moto moko. Likambo yango limonanaki na mboka ya balɔbi mbisi na Cangas de Morrazo na nord-ouest ya Espagne.
Roberto, moto ya mboka yango, akendaki kosala kati ya masúwa wana azalaki na mibu 14 mpo ete alingaki kozala na lipandá. Bomoi na ye ya mosáli ya masúwa ya mombongo na mai monene ememaki ye na kosala boninga elongo na bilenge mosusu basáli na masúwa, baoyo bazalaki komela masanga mingi mpe komela drogue bobele mpo na kolekisa ntango wana bazalaki bango moko na mobembo. Nokinoki, Roberto mpe akómaki momeli masanga mpe momeli drogue.
Na nsima, Roberto azongaki na mboka kasi akokaki te mpe alingaki te kotika mimeseno mabe na ye. Mpo na kokoka kosomba drogue, akómaki moyibi mpe bakangaki ye na boloko mbala motoba. Ntango azalaki na mibu 18, asangisaki vinyo mpe ba drogues oyo elingaki mpenza koboma ye. Minganga babikisaki bomoi na ye, abungisaki makasi ya maboko mpe makolo na ye. Abimaki na lopitalo wana maboko mpe makolo na ye mazalaki kosala lisusu te. Ata wana azalaki kofanda na kiti ya bibosono, atikaki te momeseno ya komela drogue. Asosolaki bokosi oyo ezalaki kati na mangomba, mpe bobele drogue nde emonanaki lokola nyonso oyo azalaki na yango mposa mpo ete bomoi ezala na ntina—kino mbula misato na nsima ntango Batemwe ya Jéhovah bayaki kotala ye.
Boyekoli ya bisakweli ya Biblia mpe kokokisama na yango esalisaki Roberto na kolónga nkáká na ye. Boyambi ya esengo oyo bamonisaki epai na ye na Salle du Royaume endimisaki ye ete lingomba ya solo lizali kopesa ntina kati na bomoi ya bato. Nsima ya basanza libwa, Roberto asilaki kolónga momeseno na ye ya komela drogue mpe azwaki batisimo. Atako maladi makasi na ye ya bukabuka, azali kosala lokola pionnier esili kokokisa sikawa mibu mwambe. Azali mpe kosala lokola nkulutu kati na lisangá esili kokokisa mibu mibale. Francisco, moko na baninga na ye ya kala akamwaki mingi na mbongwana monene ya bomoi ya Roberto, na motindo boye ete ye mpe akómaki Temwe mpe azali sikawa mosaleli na misala. Mbongwana monene na likambo ya kotika komela drogue oyo bato bazalaki kokanisa ete ekosila te, esalisaki bato ya mboka moke yango na kososola malamu motindo ya mosala na biso. Mwasi moko ayaki nkutu na mwana na ye momeli drogue na Salle du Royaume mpo na komona soki Batemwe bakoki kobikisa ye.
Koluka solo kati na Biblia
Mbala mingi bato bafandi na mboka mike, bamonisaka bosepeli mpo na solo na motindo boye ete bayokisaka bato na mayele ya mokili nsoni. (1 Bakolinti 1:26, 27) Adelina, mwasi moko ya nsoninsoni azali moko na bato oyo bazali kosepela mingi na solo. Azalaki mpenza kotalela kondima na ye ya Katolike na motuya mingi. Ntɔ́ngɔ́ nyonso, kozanga kobosana azalaki kogumbama na mabɔ́lɔ́ngɔ́ mpo na kobondela, kozongela “Tata wa Biso” mbala mingi mpe “Maria Losako.” Mikolo nyonso kati na poso azalaki kopesa libondeli na ye na “mosantu” moko oyo akeseni—mpo na komindimisa ete libondeli na ye ekondimama.
Ntango Adelina abandaki koyekola Biblia, amonisaki molende motindo moko mpo na kondima na ye ya sika. Ata ezaleli na ye ya nsoninsoni epekisaki ye te, atako na mbala ya liboso ye mpe mobali na ye esengelaki minite zomi mpo na kozala na mpiko ya kokota na Salle du Royaume. Nzokande, wana bazalaki na kati ayokaki na likebi mingi. Na libaku moko, ayokaki mateya na ntina na Bokonzi ya Mbula Nkóto ya Klisto. Lisoló yango lisepelisaki ye, mpe ntango azongaki na ndako, asalaki bolukiluki mpo na koyeba makambo mingi na ntina na yango kati na Biblia na ye. Kasi ezala ye, ezala mobali na ye, moko te ayebaki epai bandimbola na likambo yango ekoki kozwama, atako bakanisaki ete ezalaki kati na mokanda ya Emoniseli. Mpo na yango, Adelina abandaki kotanga Emoniseli na butu wana mpe aumelaki kino akómaki na mokapo 20 penepene na bangonga ya ntɔ́ngɔ́.
Na libaku mosusu, Adelina ayokaki ete mpo na oyo etali libondeli, mobali moklisto nde asengeli kobondela liboso ya mwasi na ye. Atako azalaki kolinga kobondela, mobali na ye ayebaki te soki akoloba nini kati na libondeli. Bobele na butu wana, Adelina azwaki ekateli ya koluka mateya yango kati na Biblia. Na ngonga ya mibale ya ntɔ́ngɔ́, alamwisaki mobali na ye mpo na koyebisa ye ete asili komona kati na Matai mokapo 6, oyo ezali kolobela likambo moko na moko na ntina na libondeli. Nsima ya kotanga malako na Yesu, na nsuka mobali na ye asalaki libondeli mpo na bango nyonso. Sikawa Adelina mpe mobali na ye bazali bango nyonso Batemwe ya Jéhovah.
Kobuka mbuka kitoko
Nsima ya mibu soko 25 ya litatoli oyo basaleli ya Jéhovah ya molende bapesi kati na mboka mike, biteni nyonso ya Espagne bisili koyoka nsango malamu. Lokola yango esalemaki na Asie Mineure na ekeke ya liboso, ‘liloba na Jéhovah lizali kotambola kati na mboka mobimba.’ (Misala 13:49) Mpo na yango, bankóto na bato ya mboka mike basili koyanola malamu na libyangi yango.
Na Espagne mpe bipai mosusu, kosakola na mboka mike ezali kosenga motema petee mpe elimo ya komipesa. Kasi mpo ete mokano na Nzambe ezali ete ‘lolenge nyonso ya bato babika,’ Batemwe ya Jéhovah bazali na esengo ya koluka bato oyo bazali komonisa mposa. (1 Timoté 2:4) Lokola makambo oyo touti koloba mazali komonisa yango, Jéhovah asili kopesa mbano monene mpo na milende misalemi mpo na kosakola na mboka mike na mokili ya Espagne.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Josèphe atangaki ete “mboka minene mpe mboka mike” nyonso ezalaki 204 na Galilai, mpe alobelaki etúká yango ete ezalaki na “mboka mike mingi mpenza.”
[Karte na lokasa 23]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
FRANCE
PORTUGAL
SPAIN
BALEARIC ISLANDS
CANARY ISLANDS
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 24]
Vilac, Lérida
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 24]
Puebla de Sanabria, Zamora
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 25]
Casarabonela, Málaga
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 25]
Sinués, Huesca
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 26]
Lekeitio, Vizcaya