Kosakola kati na mokili ya makambo ndenge na ndenge
KANGOUROUS, koalas, wombat, mpe ornithorynques, Ayers Rock mpe la Grande Barrière, ezali wana bankombo nyonso oyo ezali koya na makanisi ntango bazali kolobela mokili ya Australie. Ekoki kokamwisa yo, kasi mingi kati na ba Australiens mbala mosusu bamoná naino te Ayers Rock to la Grande Barrière; mbala mosusu bazwi naino te likoki ya komona koalas, wombat, to ornithorynques na libandá ya esika babatelaka banyama. Ya solo, ntina na yango ezali ete 85% kati na bafandi 17 300 000 ya Australie, bazali kofanda na bingumba minene mitano oyo mizali penepene ya mai monene.
Wana totiki eteni ya pembeni ya mai monene mpe, nsima ya mobembo ya bakilomɛtɛlɛ soko 200 na kati ya mokili, tokómi na ebandeli ya etúka eyebani mingi oyo ezali na katikati na mokili yango. Bitwele ebongwani, longwa na zámba minene ya mikili ya molungé mpe mabelé kitoko ya milona etiki esika na bitando minene ya kokauka mpe ezangi mai, epai bobele nzeté ya mike mpe matiti ya koswa mazali kokóla. Bitando minene (ebengami lisusu “stations”) epai bazali kobokola bamɛmɛ, bangombe ezwami likoló na etando ya bankáma ya bakilomɛtɛlɛ. Na katikati ya Australie ezali na bisobe bikauki ya molungé makasi esika bato bazangi bokengi mbala mosusu bakufaka.
Nsango malamu ezali kokóla
Ezali na esika motindo yango nde nsango malamu ya Bokonzi ezali kosakolama, na eteni mosusu ya nsuka ya mokili. Mbula na mbula, bankóto na bato bazali na mpasi te na kondima elikya ya mokili ya sembo oyo Jéhovah alaki. Na mbula ya mosala oyo eleki, motuya na basakoli ya Bokonzi ezwaki motuya ya sika ya koleka 57 000, penepene na mbala mibale koleka motuya mozalaki na mobu moleki. Nsango malamu ezali mpe kokóla na bamboka mikemike, atako mingi na basakoli bazali kofanda na bingumba ya penepene ya mai monene, lokola ebele na bafandi ya mokili wana.
Tolanda moko kati na bakɛngɛli mitano ya district mpe mwasi na ye wana bazali kotala masangá oyo mazali na nsuka ya Australie. Mobembo wana ekopesa biso nzela ya komeka mosala ya kosakola na mokili monene wana ya makambo ndenge na ndenge. Mokɛngɛli mpe mwasi na ye bazali kotala Australie-Occidentale, ndambo ya etúka ebengami Queensland, mpe teritware ya Nord, oyo ezali na etando ya bamilió 4,7 kilomètres carrés. Ekokani mwa moke na bonene ya Europe, kozanga kotanga oyo ebengamaki kala ete Union soviétique.
Mobembo na biso mobandi na Perth, mboka-mokonzi ya Australie-Occidentale. Engumba wana oyo eyebani lokola engumba ya sika, oyo ezali na bato 1,2 milió, ezali na masangá ya ba Témoins de Jéhovah 49. Longola masangá ya lokóta ya Lingelesi, ezali mpe na masangá ya nkóta ya Espagnol, Greke, Italien, Portugais, mpe bituluku mosusu ya mike na minoko mikeseni. Ezali mpe na lisangá oyo ezali bobele na baklisto oyo bazali banamboka, oyo bazali kosala makasi mpo na kosakola epai na babotami ya Australie. Mingi kati na bato wana ya bopolo bazali kondima nsango malamu ya Bokonzi. Kasi, bazali kobika ndenge nini mosika na bingumba minene?
Tolongwe na Perth mpo na koyangana na assemblée ya circonscription oyo ekosalema na Port Hedland, na ntáka ya bakilomɛtɛlɛ 1 800 epai ya Nord. Mingi kati na bayangani 289 bauti na bitúka bitangwi mpe basalaki mobembo ya bakilomɛtɛlɛ 200 kino 700 mpo na kokende na assemblée. Mpo na kokende na Salle du Royaume oyo ezali penepene na bango, basengeli mbala mosusu kosala ntáka ya bakilomɛtɛlɛ 250 na banzela ya mabanga ya mopótu oyo ekotobolaka mbala na mbala ba pneus ya mituka na bango. Masangá misato na etúka wana mauti kala mingi te kotónga ba Salles du Royaume engebene mwango ya botóngi nokinoki.
Ba Salles etóngami nokinoki kati na bitúka bitangwi
Bokeseni monene ezali kati na kotónga Salle du Royaume na engumba mpe kotónga Salle du Royaume na bitúka wana! Esengeli komema bisaleli mingi na motuka longwa na Perth, na ntáka ya bakilomɛtɛlɛ 1 600 epai na sud. Na mokolo mobongisami mpo na botóngi, ebele na bandeko mibali mpe basi bazali kotambola na ntáka wana, ata mpe koleka, mpo na kosangana na mosala ya kotónga Salle du Royaume wana malili mazali kokóma na 40° mpe 45° C. Na bisika bitangwi, boyei wana ya basali ezali kopesa litatoli moko kitoko. Na ntango ya kotónga Salle du Royaume na Tom Price, engumba moke epai bakotimolaka mabanga ya ntalo, zulunalo moko ya mboka yango ekomaki na lokasa ya liboso ete: “Totombeli boyei malamu na basali nyonso ya bolingo malamu oyo bazali kosangana na ‘mikolo misato’ ya botóngi ya Salle du Royaume ya ba Témoins de Jéhovah na Tom Price.”
Penepene na bato nyonso ya mboka bazalaki pene ya komonisa motema malamu ya kopesa maboko na mosala yango. Nkolo motuka moko ya motema malamu asengaki bobele mbongo ya essence mpo na komema biloko ya botóngi ya ba tonnes 50 oyo ezalaki kosenga badolare 11 000 mpo na komema yango. Bakompanyi ya mboka yango bapesaki balitɛlɛ 100 ya langi. Bakompanyi ya kobongisa esika epesaki bandeko bamasini, mpe kompanyi ya kotimola mabanga ya ntalo, edefisaki zɛ́ki (grue). Ezalaki likambo ya petee te kozwa esika mpo na bapaya 300, kasi bato na mboka bapesaki lisalisi monene; basusu bapesaki bandako ya kolala. Mobali moko abengaki na telefone, mpo na koyebisa ete akosala mobembo na wikende, kasi akotika ndako na ye polele. Alobaki ete: “Natikeli bino ndako na ngai na boumeli ya ntango nyonso ya botóngi.”
Lisoló moko ya kosekisa: bandeko basengelaki kokende koluka remorque oyo ezalaki mpo na etúka yango. Ntango bakómaki na lopango oyo balakisaki bango, bakamwaki na kotanga maloba oyo na ekoteli ya lopango: “Epekisami na bato ya mangomba.” Nzokande, remorque ezalaki mpenza wana. Balimbolaki na mwasi ya nkolo ndako ete balingaki komema motuka na ye. Ntango basukolaki remorque yango etondaki na bosoto, basosolaki ete ezalaki oyo ya etúka wana te! Ntango nkolo na yango azongaki, mwasi na ye ayebisaki oyo ba Témoins de Jéhovah basalaki. Bandeko baumelaki te mpo na koya kozongisa motuka yango mpe balimbwelaki bango ete ezali yango te nde basengelaki kokamata. Babandaki lisoló moko kitoko mpe bato yango, oyo kala bazalaki batemeli batunaki mituna mingi na ntina na ba Témoins de Jéhovah mpe mosala na bango. Bazalaki na motema likoló mpo na kokende kotala Salle du Royaume ya sika.
Kosakolama ya nsango malamu na teritware wana ezali kosenga mpiko, mpo na bantáka molai oyo esengeli kotambola na yango. Ndeko mwasi moko pionnier mpe mobali na ye basalaka mbala na mbala mobembo ya bakilomɛtɛlɛ 350 na banzela ya mabelé oyo etondi na mputulu: bazali kokende longwa na Port Hedland kino na Marble Bar, epai bazali kosala bozongeli ya sika mpe bazali kotambwisa boyekoli ya Biblia. Marble Bar ezali kati na moko na bitúka bileki molungé na mokili ya Australie; kobanda sanza ya Octobre kino na Mars molungé elekaka mbala mingi 50° C.
Na “Nsuka ya Nord”
Assemblée de circonscription oyo elandi ekosalema na Darwin, na bakilomɛtɛlɛ 2 500 epai ya nord. Mokɛngɛli ya district mpe mwasi na ye bazali kozwa litomba na mobembo wana molai mpo na kosala boyekoli na bango moko. Ya liboso, bazali kotanga mpe kotalela makanisi ya texte ya mokolo na mokolo. Na nsima, bazali kolanda botangi ya Biblia na kasete. Lokola bazali kotambwisa motuka moto na moto na ngala na ye, ye oyo azali kotambwisa te azali na ntango ya kotanga masoló ya Mosenzeli mpe ya Lamuká!
Bilembo ya nzela ezali ntango nyonso kokebisa batambwisi mituka mpo na “bingbunduka ya nzela.” Mituka minene wana oyo ba remorques misato to minei oyo yango ezali kobenda ekoki kokóma na bolai ya bamɛtɛlɛ 55. Mpo na yango esengeli kokeba mpenza liboso na koleka yango. Bazali kosalela mituka yango mpo na komema bangombe mpe biloko na bingumba oyo etangwi.
Etúka wana ezali ntango nyonso na molungé makasi mpe bitwele bizali ntango nyonso ya kokauka. Mabelé, oyo ezipami na bitukulúká ya nsɛlɛlɛ oyo etyami na ntáka lolenge moko ezali komonana lokola mayita. Langi ya bitukulúká ya nsɛlɛlɛ yango ekeseni engebene mabelé oyo esika yango ezwami, mpe bolai na yango ezali katikati na mɛtɛlɛ moko mpe mɛtɛlɛ mibale na ndambo. Wana bazali kokatisa ebale Victoria, basali mobembo bamoni bilembo mingi oyo ekomami na maboko. Likoló na moko na yango bakokaki kotanga ete: “Keba! ngando, kosukola na mai epekisami!” Na mayele nyonso, bazwi ekateli ya koluka esika mosusu mpo na kosukola mpe kozwa mwa mpio!
Na nsuka, etuluku wana ya moke ekómi na nsuka ya nord ya Australie. Darwin, mboka-mokonzi ya etúka ya Nord ezali na masangá minene mibale ya ba Témoins de Jéhovah. Darwin ezali engumba moko oyo esangisi bato ya mposo nyonso; nkutu yango ezali komonana polele na ntango ya ba assemblées de circonscription. Tomeka koyebana na Charles, ye azali na mibu 30, azali moto ya esanga Timor na est ya bisanga Indonésie, esika etumba engalaki makasi. Baboti na ye, babɔkɔlaki ye kati na losambo ya bonkɔ́kɔ. Amipesaki mingi na masano ya etumba. Charles azalaki na mikakatano mpo na kotika mimeseno wana ya mabe na ntina na bopusi makasi ya misala ya bilimu mabe. Nzokande, lokola atyaki motema na elaka oyo Yesu apesaki ete “solo ekosikola bino,” atikaki mimeseno na ye ya kala. (Yoane 8:32) Alobaki ete: “Lelo oyo, lisosoli na ngai ezali peto liboso na Jéhovah, mpe nazali sikawa mosaleli na misala. Mokano na ngai ezali ya kokota na Eteyelo mpo na kobongisama ya basungi (Ecole de formation ministérielle).”
Sikawa, tokoluka koyebana na Beverly, mobotami ya Papouasie-Nouvelle-Guinée. Ye moko andimaki ete: “Na ebandeli, nazalaki kobanga kosakola epai na mindele, mpo ete Lingelesi ezali lokóta na ngai ya kobotama te; lisusu nazalaki na mpasi mingi mpo na komesana na elobeli ya ba Australiens. Namikundolaki ete Biblia ezali kolendisa biso na kotyela Jéhovah motema, na komeka mpe na komona ete Jéhovah azali malamu; nabandaki bongo mosala ya pionnier na Janvier 1991. Lelo oyo, moto ya liboso oyo nayekolisaki ye Biblia azali pionnier. Bana na ye mibale ya basi basili mpe kondima solo, mpe moko na bango azali komipesa mingi elongo na mobali na ye kati na mosala ya pionnier.”
Liboso na kotika engumba Darwin, tika totala nokinoki Parc national ya Kakadu, oyo ezali na ntáka ya bakilomɛtɛlɛ 250 na est. Kati na parc wana oyo eyebani mingi mpo na libateli na yango ya bandeke, tozali kokuta ndeko mwasi Debbie, mosakoli bobele moko ya nsango malamu mpo na etúka mobimba. Totuni ye lolenge azali kokoka kobatela elimo na ye atako azali ye moko. Ayanoli ete: “Nabondelaka mingi. . . . Lisusu, nazwaka libondisi na ba versets lokola Yisaya 41:10, oyo elobi ete: ‘Banga te, mpo ete nazali na yo; yoka nsomo te mpo ete ngai nazali Nzambe na yo. Nakokembisa yo, nakosunga yo, nakotombola mpe yo na loboko na ngai na boyengene.’”
Na Jilkmigan, na ntáka ya bakilomɛtɛlɛ 450 na sud ya Darwin, tokutani na etuluku moke ya banamboka. Na boumeli ya mibu mingi, etuluku wana ya banamboka etalelamaki lokola etuluku ya ba Témoins de Jéhovah mpo mingi kati na bango bazalaki koyangana mbala na mbala na ba assemblées, ata wana bazwaki naino batisimo te. Basangani ya etuluku yango bayebanaki mpo na bopeto na bango. Ezalaki esengo monene ntango bamoko kati na bango bazwaki ekateli makasi mpe babatisamaki. Baklisto wana bazali kati na banamboka ya liboso ya bamboka mike na kosala bongo. Bato wana ya kosokema, oyo basili kotika bonkɔ́kɔ mpe misala ya bilimu mabe ya ekólo na bango, bamonisaki mpiko ya solo mpe kotyela motema makasi na elimo santu ya Jéhovah.
Alice Springs mpe Nord-Est
Sikawa ezali ntango ya kotika “Nsuka ya Nord” mpe kosala mobembo ya bakilomɛtɛlɛ 1 600 epai na Alice Springs, na sud na “katikati” ya mokili ya Australie, penepene na Ayers Rock oyo eyebani mingi. Masangá mibale ya etúka oyo mazali koyangana kati na Salle du Royaume kitoko na mopepe ya mpio na engumba ya Alice Springs. Salle yango esalelamaka lisusu mpo na ba assemblées de circonscription, oyo bato koleka 130 bayanganaka na yango. Lisusu, ezali likambo ya esengo na komona bato ya Polynésie, Mindele mpe banamboka koyangana esika moko na libota moko ya boklisto.
Na nsuka, tolongwi na Alice Springs mpe tobandi eteni ya nsuka ya mobembo na biso elongo na mokɛngɛli ya zongazonga mpe mwasi na ye. Na mobembo oyo tokosala na ntáka ya bakilomɛtɛlɛ 2 000 mpe tokokatisa mokili ya Australie mpo na kokende epai na nord-est. Wana tozali kokende, totiki bitúka ya kati, mpamba te tokómi na bazámba minene ya esika ya mbula mingi ya Queensland. Awa, na etúka ya nord ya Queensland penepene ya mai monene, masangá mazali kokóla mpe ba Témoins de Jéhovah bazali mingi kati na bafandi na esika yango.
Liboso ya kosilisa mobembo na biso, tokoyangana lisusu na assemblée de circonscription. Tokamata mpepo na Cairns, engumba ya etúka ya molungé oyo eyebani mingi na Queensland mpo na Grande Barrière. Totiki mikili ya Australie, mpepo epumbwi likoló na nsongɛ ya bisanga ya York mpe ekatisi Torres esika mai monene ezali kokabwana, mpo na kokita na esanga Thursday. Lisangá moke ya esanga yango lizali bobele na basakoli 23. Oyo nde esengo na koyamba bato 63 na assemblée oyo esukisi mobembo na biso!
Tozali kolikya ete osepeli koyeba lolenge mosala ya kosakola Bokonzi ezali kokokisama na mokili wana ya makambo ndenge na ndenge. Mokolo mosusu, mbala mosusu okozala na likoki ya kotala mokili wana kitoko, oyo ezali na ndelo mosusu ya mabelé. Okokoka bongo kokutana na bandeko mibali mpe basi oyo bazali kokokisa na bosembo nyonso mosala na bango na teritware wana ya kokamwa.
Karte/Bililingi na lokasa 23]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Port Hedland
Canberra
Tom Price
Marble Bar
Newman
Darwin
Katherine
Alice Springs
Ayers Rock
Thursday Island
Cairns
Adelaide
Melbourne
Hobart
Sydney
Brisbane
Perth
[Elilingi na lokasa 24]
Perth, mboka-mokonzi ya Australie-Occidentale
[Elilingi na lokasa 25]
Matomba ya litatoli na balabala