Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/10 nk. 8-11
  • Mokakatano ya koyekola kozala na motema molai

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokakatano ya koyekola kozala na motema molai
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Koyekola kozala na motema molai ezali likambo ya mayele
  • Komekama ya sika mpo na bato mingi
  • Tozwa liteya na makambo oyo makómelaki basusu
  • Tobunda etumba kitoko
  • Toyekola kozala na motema molai kati na makambo nyonso
  • Ondimaka kozela mpe komonisa motema molai?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Mikakatano ya nkita ekosila mokolo mosusu?
    Makambo mosusu
  • Tózela Yehova
    Nzembo mpo na kokumisa Yehova
  • Bomoi ya monzemba na ntango na mikakatano ya nkita
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/10 nk. 8-11

Mokakatano ya koyekola kozala na motema molai

KOYEKOLA kozala na motema molai na biloko oyo tozali na yango mposa, ezali mpo na biso bato, moko na makambo oyo tondimaka na mpasi. Na momeseno, bana mike bazalaka na motema lúkulúku. Soki eloko moko ebendi likebi na bango, balingaka kozwa yango nokinoki! Kasi, mbala mosusu oyebi yango na makambo oyo okutanaki na yango ete, kati na bomoi, tozwaka ntango nyonso nokinoki te biloko oyo tozalaka na yango mposa. Ata soki bamposa na biso ezali ya kolongobana, tosengeli kozela ntango oyo ebongi mpo na kokokisa yango. Bato mingi bazali kokanga ntina ya liteya yango; basusu bakokoka kosala yango te.

Bato oyo balingi kosepelisa Nzambe bazali na bantina mingi ya koyekola kozala na motema molai. Yilimia, mosaleli moko ya Jéhovah na ntango ya kala, abendaki likebi likoló na likambo oyo ete: “Ezali malamu ete moto [azela] na kimya mpo na kobika na Jéhovah.” Bikeke mingi na nsima, moyekoli Yakobo alobaki ete: “Bandeko, bozala na mitema molai kino [kozala, MN] na Nkolo na biso.”​—Bileli 3:26; Yakobo 5:7.

Jéhovah azali na manaka na ye mpo na oyo etali kokokisama ya mikano na ye. Soki tokokoka te kozela na motema molai ntango oyo ye asili kokana mpo na kosala makambo mosusu, tokoya kozanga bosepeli mpe tokoimaima, esengo na biso ekosila. Mosaleli ya Nzambe oyo azangi esengo akolemba na elimo, lokola Nehemia alobelaki Bayisraele: “Esengo na Jéhovah ezali nguya na bino.”​—Nehemia 8:10.

Koyekola kozala na motema molai ezali likambo ya mayele

Ezali likambo ya mabe te ete minzemba bayoka mposa ya kobala to babalani oyo bazali na bana te bazala na mposa ya kobota. Lisusu, likambo moko ya mabe ezali te na kolinga kokokisa bamposa na biso mosusu ya mosuni to mikano na biso oyo mibongi. Nzokande, lokola bandimisami ete nsuka ya biloko ya ntango oyo esili kobelema, mpe ete, kati na mokili ya sika, Nzambe ‘akozipola loboko na ye mpe akosilisa mposa na [bikelamu] nyonso na bomoi,’ baklisto mingi bazwaki ekateli ya kozela ntango oyo ebongi mpo na kokokisa bamposa wana.​—Nzembo 145:16.

Bato oyo bazangi elikya wana ya boklisto oyo ezali na moboko makasi bazali komona te ntina ya kozela ntango molai. Na ntina na kozanga kondima na bango epai na Jéhovah, oyo azali eutelo ya “makabo nyonso ya malamu mpe makabo nyonso mabongi,” bazali kondima te ete ezali likambo ya mayele kozela bilaka mpo na mikolo mizali koya oyo biyebani malamu te. Bazali kotambola engebene likanisi oyo ete: “Tolyaka mpe tomelaka, mpo ete tokokufa lobi.”​—Yakobo 1:17; 1 Bakolinti 15:32; Yisaya 22:13.

Kati na mikili ya bozwi, bapanzi nsango oyo bakumisaka biloko ya botekisi basalelaka mayoki wana ya kopusa motema mpo na kobenda biso ete tokokisa bamposa na biso nokinoki. Balendisaka bato na komisepelisa. Bato na mombongo balingi kondimisa biso ete bozwi mingi mpe bamasini ya mikolo na biso ezali mpenza na ntina mingi. Bazali koloba ete, mpo na nini komipimela biloko wana, soki tokoki kozwa yango, nokinoki na kozwáká biloko na nyongo, na kofutáká mokemoke, to kofuta na nsima? Maloba ya kokumisa biloko oyo mayebani mingi mazali koloba ete, ‘obongi kozwa biloko oyo bileki malamu; komimonisa mpasi te! Kanisa malamu: soki ozwi yango lelo te, mbala mosusu lobi ekozala lisusu te!’

Nzokande, na mikili ya bobóla, bamilió na bato bazali kozwa bobele bilei; mbala mosusu bazali mpe na eloko te. Kozanga kokoka mpe bokesene ya bibongiseli ya politike mpe ya nkita ekoki kolobelama na motindo ya polele?

Tokoki komona ete ezali likambo ya mayele koyekola kozala na motema molai soki tokanisi bamilió na bato oyo, mpo ete baboyi kozela to bazali komona ntina na yango te, batondi na ebele ya banyongo mpo na kokokisa nokinoki bamposa na bango. Makambo makanelami te, lokola bokono to kozanga mosala, makoki kopesa mpasi mingi. Zulunalo ya Allemagne Frankfurter Allgemeine Zeitung elimbolaki mpo na nini, na Allemagne, bato soko nkóto moko bazali kozanga ndako: “Ezali polele, mbala mingi bato bazali kozanga ndako mpo balongoli bango na mosala to mpo bazali na banyongo ebele.”

Lokola bazali kokoka te kofuta banyongo na bango, na mawa mingi, bato yango bazali kozwa mpasi na komona ete babotoli bango ndako mpe biloko na bango. Mbala mingi, mikakatano wana oyo mizali kobakisama mizali kobimisa mitungisi kati na libota. Mabala ya kotengatenga mazali kokabwana. Maladi ya makanisi mpe mikakatano ya kolongono ya nzoto mizali kobakisama. Baklisto oyo bazali kati na ezalela motindo yango bakoki kolemba na elimo, mpe bakoki kolona makanisi ya mabe mpe kokóma na etamboli ya mbindo. Mpo na kozanga mayele, bato oyo na ebandeli balingaki kozwa biloko nyonso, na nsima bazali kotikala maboko mpamba.

Komekama ya sika mpo na bato mingi

Yesu alimbolaki polele ete tosengeli kokeba ete “mitungisi na makambo na mokili mpe bozimbisi na misolo, mpe mposa na biloko mosusu, ekota mpe ekibisa liloba.” (Malako 4:19) Tobosana te ete ebongiseli moko te ya politike elóngi kosilisa mitungisi mpe mikakatano ya nkita oyo Yesu alobelaki.

Communisme oyo mikili ya Europe de l’Est misili kotika sikawa, emekaki kokabola bozwi na nzela ya ebongiseli moko ya nkita oyo ekambami na Leta. Na bokeseni na ebongiseli oyo ezali kotika bonsomi na makambo ya mombongo, ebongiseli ya communisme ezalaki kopesa epai na bato na mikili wana libateli na makambo na nkita oyo ebongiseli ya capitalisme ekokaki te kopesa ntango nyonso. Atako bongo, mikakatano oyo Yesu alobelaki mizalaki komonana na kozanga ya biloko ya kosomba mpe bipekiseli mpo na bonsomi ya moto na moto.

Mingi kati na mikili yango misili kondima motindo ya nkita oyo ntalo ya botekisi biloko ezali kotalela motuya ya biloko mpe motuya ya bato oyo bakosomba yango, kasi ebongiseli yango ebimisi mikakatano ya sika mpo na basombi. Tozali kotanga kati na zulunalo moko ete: “Bindimandima ezali kobakisama na mposa ya kokóma nokinoki na bozwi lokola na mikili ya Ouest.” Mpo na kokokisa yango, “bato mingi kati na Länder (bitúka) ya sika, na Allemagne de l’Est, bazali komitika kobendama na mopepe makasi ya kozwa nyongo.” Zulunalo yango ebakisaki ete: “Esengo monene oyo bonsomi ya nkita ebimisaki na ebandeli ezali sikawa kotika esika na kobanga mpe kozanga elikya.” Ebongiseli ya politike ebongwani, nzokande mitungisi mizali ntango nyonso.

Bonsomi monene wana ya politike mpe ya nkita efungoli makoki ya sika ya kokólisa bozwi ya mosuni. Mpo na yango, bato mingi bazali mbala mosusu kokanisa mingi na kofungola misala ya bango moko to kokende kofanda na mikili ya bopaya epai kuna bakozala na mabaku ya kozwa mosala ya malamu.

Ezali likambo ya moto na moto ete azwa ekateli na likambo yango. Ezali mabe te soki moklisto moko akani kobongisa ezalela na ye mpo na oyo etali biloko ya mosuni. Akoki kopusama na mokano ya kokokisa bamposa ya libota na ye, wana ayebi ete “soko moto nani akoleisa bato na ye te mpe na koleka bato kati na ndako na ye moko te, asili koboya bindimeli mpe aleki mabe moto oyo azangi kondima.”​—1 Timoté 5:8.

Na yango, ekozala mabe kotɔ́ngɔ bikateli ya baninga na biso. Epai mosusu, baklisto basengeli kobosana te ete ekozala likambo ya mayele te mpe ekoki kozala ata likámá monene na koluka kokokisa bamposa na bango ya mosuni na kozwáká banyongo mingi. Bobele bongo, bakozala na libunga soki bakoluka kosilisa mikakatano na bango na ntina na mosolo na lolenge oyo ezali kosenga ete bamonisa bopotu na mikumba mpe bamposa na bango ya elimo.

Tozwa liteya na makambo oyo makómelaki basusu

Nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, bankóto ya ba Allemands balongwaki na Europe oyo ebebisamaki na bitumba mpo na kokende na mikili misusu, mingi mpenza na mboka Australie mpe Canada. Na motindo yango, mingi kati na bango bakómaki na mwa bozwi ya mosuni, kasi moko te kati na bango azangaki kokutana na mitungisi oyo Yesu alobelaki. Mbala mosusu, kosilisa mikakatano ya nkita ezalaki komema mikakatano ya sika​—mawa ya botiki mboka na bango, lokóta ya sika, bilei oyo bamesanaki na yango te, mimeseno ya sika; esengelaki lisusu kozala na baninga ya sika mpe kondima bizaleli bikeseni.

Kati na bato wana oyo batikaki mikili na bango, basusu bazalaki ba Témoins de Jéhovah. Mingi kati na bango basalaki makasi mpo na kobatela elimo na bango na mitungisi ya mboka mopaya. Nzokande, na mawa, bango nyonso te basalaki bongo, mpamba te basusu bazimbisamaki na nguya ya bokosi ya mosolo. Bokóli na bango ya elimo etambolaki lolenge moko te na mbongwana ya lolenge ya bomoi na bango.

Yango ezali komonisa ntina ya kotalela malamu ezalela na biso liboso ya kokamata bikateli oyo ekoki komonana ete ezali ya mayele te. Mposa ya mosolo ekokitisa molende na biso ya bosangani na mosala ya kozalisa bayekoli, mosala oyo mopesami na baklisto mpe oyo ekozongelama lisusu te. Likambo yango lizali komonana bipai nyonso, mpamba te ezali na mokili moko te epai bato bazangi mitungisi ya nkita.

Tobunda etumba kitoko

Paulo alendisaki Timoté: “Olanda boyengebene, ezaleli ya kobanga Nzambe, kondima, bolingo, mpiko, bopolo. Obunda etumba malamu na kondima, osimba bomoi na seko, mpo ete obyangami mpo na yango.” Epai na baklisto ya Kolinti alobaki ete: “Bongo, bandeko na ngai balingami, botelema ngwi, boninganaka te, bosalaka mosala na Nkolo ntango nyonso.”​—1 Timoté 6:11, 12; 1 Bakolinti 15:58.

Lolenge eleki malamu ya kolónga mposa ya bozwi ezali ya kolanda toli kitoko oyo; ya solo, mosala mozali mingi mpo na baklisto! Kati na mikili misusu, basakoli ya Bokonzi bazali mingi te, mpe ebele na bato bazali mpenza na libaku te ya koyoka nsango ya solo. Yesu asakolaki na bosolo nyonso ete: “Mbuma na elanga eteli mingi nde basali bazali mingi te.”​—Matai 9:37.

Kati na mikili yango, na esika ya kotika ete mikakatano ya nkita epengola bango na misala na bango ya elimo, ba Témoins de Jéhovah bazali kosalela mpenza ezalela na bango mpo na kokólisa misala yango. Wana bazangi mosala mpo na mwa ntango moke, Batemwe mingi bazali kopesa ntango mingi na mosala ya kosakola. Mosala na bango ezali kopesa bango nzela ya kokólisa masanzoli na bango mpo na lokumu ya Jéhovah mpe ezali kopesa esengo ya kolónga mikakatano na bango ya nkita.

Batemwe wana bazali kopesa esika ya liboso na mosala ya kosakola mpe bazali kotya mikakatano na bango ya mosuni na nsima; bazali bongo komonisa na baklisto ya mokili mobimba ete batiki Jéhovah abatela bango. Elaka na ye ezali ete: “Bolukaka nde liboso bokonzi na Nzambe mpe boyengebene na ye mpe biloko oyo nyonso ekobakisama na bino.”​—Matai 6:33.

Uta kozongisama ya losambo na peto na 1919, Jéhovah apesi nzela na libota na ye te ete etengatenga. Abatelaki bango na bantango ya minyoko makasi, mpe na mikili misusu, abatelaki bango na boumeli ya mibu mingi ya kobombama. Ba Témoins de Jéhovah bazali na ekateli makasi ya komitika te kozimbisama na mposa ya bozwi, motambo ya mayele mabe ya Satana, wana bazali kotemela minyoko oyo abimisaki!

Toyekola kozala na motema molai kati na makambo nyonso

Ba Salles du Royaume ya minene, bisaleli ya motuya mingi mpo na kobimisa mongongo malamu (sonorisation), ba Salles d’assemblées mpe ba Béthels kitoko ezali kopesa Jéhovah nkembo mpe ezali litatoli ya kozanga maloba, yango ezali komonisa ete Jéhovah azali kopambola libota na ye. Kati na mikili epai kuna mosala na bango ya kosakola epekisamaki na boumeli ya bambula mingi, ba Témoins de Jéhovah bakoki kokanisa ete bazali na makambo mingi ya kosala mpo na kozwa biloko wana nyonso. Kasi, oyo eleki ntina ezali nde kokóla na elimo. Bilembeteli ya mapamboli ya mosuni mauti na Jéhovah makoya na ntango na yango.

Basaleli ya Jéhovah basengeli kozala na bokɛngi, mpo babanda kokanisa te ete bapimelami biloko mingi ya mosuni. Moto nyonso alingaka kolongwa na ezalela ya bobóla, kasi kobosana te ete basaleli nyonso ya Jéhovah bazali na mposa ya kosikolama. Bakufi miso bazali na mposa makasi ya komona, bato na maladi balingi kozala na nzoto kolongono, bato na maladi ya makanisi bazali na mposa ya elikya makasi mpe mabota oyo mabungisaki balingami na bango mazali na mposa ya kokutana na bandeko na bango oyo basilá kokufa.

Na ntina na makambo na bomoi, baklisto nyonso basengeli, mpo na ntina moko to mosusu, kozela mokili ya sika ya Jéhovah mpo na kozwa kobondisama. Yango wana tosengeli komituna ete: ‘Soki nazali na bilei mpe bilamba, nasengeli te kosepela na biloko yango mpe kozela na motema molai kosikolama na mikakatano ya nkita?’​—1 Timoté 6:8.

Baklisto oyo batyaka elikya na bango mobimba epai na Jéhovah bakoki kondimisama ete bamposa na bango nyonso ya solo ekokokisama mosika te, soki bamonisi ete balingi kozela. Moto moko akozanga eloko te na kozela. Tozali kokundola maloba oyo ya Paulo ete: “Bongo, bandeko na ngai balingami, botelema ngwi, boninganaka te, bosalaka mosala na Nkolo ntango nyonso, awa eyebi bino ete kati na Nkolo mosala na bino ezali mpamba te.”​—1 Bakolinti 15:58.

Nsima na kososola malamu, tosengeli nde kozala na mikakatano na koyekola kozala na motema molai?

[Elilingi na lokasa 10]

Koyekola kozala na motema molai ekoki kobikisa bomoi na yo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto